Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2014

Mbula 100 ya Boyangeli—Eteyi yo nini?

Mbula 100 ya Boyangeli—Eteyi yo nini?

“Yehova Nzambe, . . . misala na yo ezali minene mpe ezali kokamwisa. Mokonzi ya seko.”EM. 15:3.

1, 2. Bokonzi ya Nzambe ekokokisa likambo nini, mpe mpo na nini tokoki mpenza kotya motema ete bokonzi yango ekoya?

NA PRƐNTA ya mobu 31 ya T.B., na ngomba moko pene na Kapernaume, Yesu Kristo ateyaki bayekoli na ye basambelaka ete: “Bokonzi na yo eya.” (Mat. 6:10) Lelo oyo, bato mingi bamitunaka soki Bokonzi yango ekoya. Kasi, tosengeli mpenza kotya motema ete Nzambe akoyanola na mabondeli oyo tosalaka ete Bokonzi na ye eya.

2 Yehova akosalela bokonzi yango mpo na kosangisa libota na ye oyo ya likoló mpe oyo ya mabele. Mokano wana ya Nzambe ekokokisama. (Yis. 55:10, 11) Kutu, Yehova akómá Mokonzi na mikolo na biso! Makambo ya kokamwa oyo esalemi na boumeli ya mbula 100 oyo esili koleka emonisi likambo yango polele. Nzambe azali kosala makambo minene mpe ya kokamwa mpo na bamilio ya basaleli na ye ya sembo. (Zek. 14:9; Em. 15:3) Nzokande, kokóma oyo Yehova akómi Mokonzi ezali ndenge moko te na koya ya Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu ateyaki biso ete tobondelaka. Makambo yango mibale ekeseni na nini, mpe liteya nini tokoki kozwa?

MOKONZI OYO YEHOVA ATYE ABANDI MOSALA

3. (a) Ntango nini Yesu atyamaki Mokonzi, mpe ezalaki epai wapi? (b) Ndenge nini okoki komonisa ete Bokonzi etyamaki na mobu 1914? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

3 Mbula soki 20 liboso ya mobu 1900, basaleli ya Nzambe babandaki kososola esakweli moko oyo Danyele akomaki esili koleka sikoyo  mbula 2 500, oyo elobaka ete: “Na mikolo ya bakonzi yango, Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te.” (Dan. 2:44) Bayekoli ya Biblia balekisaki ebele ya bambula mpo na komonisa ete mobu 1914 ekozala mobu moko ya ntina mingi. Bato mingi na ntango wana bazalaki mpenza na elikya. Mokomi moko alobaki ete: “Mobu 1914, ezalaki mobu moko ya elikya mpenza mpe ya elaka.” Kasi, ntango Etumba ya liboso ya Mokili mobimba ebandaki mwa moke na nsima na mobu wana, esakweli ya Biblia ekokisamaki. Kolandana ya makambo lokola banzala, koningana ya mabele, bamaladi mabe mpe kokokisama ya bisakweli mosusu ya Biblia emonisi polele ete Yesu Kristo abandaki koyangela na likoló lokola mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na mobu 1914. * Ntango atyaki Mwana na ye lokola Masiya Mokonzi, na ntembe te, Yehova akómaki Mokonzi na lolenge mosusu!

4. Likambo nini Mokonzi oyo autaki kotyama asalaki mbala moko, mpe na nsima atyelaki banani likebi?

4 Mokumba ya liboso ya Mokonzi oyo Nzambe autaki kotya, ezalaki kobunda na Satana, monguna monene ya Tata na ye. Yesu ná baanzelu na ye babwakaki Zabolo mpe bademo na ye awa na mabele. Yango epesaki esengo mingi na likoló kasi ezalaki ntango moko ya mpasi makasi mpo na mabele. (Tángá Emoniseli 12:7-9, 12.) Na nsima, Mokonzi yango, atyaki likebi na ye epai ya bato na ye oyo bazali awa na mabele mpo na kopɛtola, koteya mpe kobongisa bango mpo básala mokano ya Nzambe. Tótalela ndenge botosi oyo bamonisaki na makambo misato wana oyo Yesu asɛngaki bango ezali ndakisa malamu mpo na biso lelo oyo.

MOKONZI MASIYA APƐTOLI BATO NA YE YA SEMBO

5. Kopɛtolama nini esalemaki kati na mobu 1914 mpe ebandeli ya mobu 1919?

5 Ntango mokonzi oyo atyamaki asilisaki kopɛtola likoló na makambo mabe ya Satana mpe bademo na ye, Yehova atindaki Yesu akende kotala mpe kopɛtola bayekoli na ye na elimo awa na mabele. Mosakoli Malaki alobelaki yango lokola kopɛtolama na elimo. (Mal. 3:1-3) Emonani ete likambo yango esalemaki kati na mobu 1914 mpe na ebandeli ya mobu 1919. * Mpo na kozala na kati ya libota monene ya Yehova, tosengeli kozala pɛto to basantu. (1 Pe. 1:15, 16) Tosengeli te kozala na mbindo ya mangomba ya lokuta to ya makambo ya politiki ya mokili oyo.

6. Ndenge nini tozwaka bilei ya elimo, mpe mpo na nini ezali na ntina?

6 Na nsima, Yesu asalelaki bokonzi na ye mpo na kotya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Moombo yango asengelaki kopesaka bilei ya elimo oyo ebongi epai ya bato nyonso oyo basali “etonga moko” na libateli ya Yesu. (Mat. 24:45-47; Yoa. 10:16) Kobanda mobu 1919, mwa etuluku ya bandeko oyo batyami mafuta na elimo bazali kokokisa na bosembo nyonso mokumba wana monene ya kopesa bilei epai ya “basali ya ndako.” Ebele ya bilei ya elimo oyo moombo yango azali kopesa esalisaka biso mpo kondima na biso ekóma makasi. Ekómisaka makasi ekateli na biso ya kotikala pɛto na bizaleli, na makanisi mpe na nzoto. Bilei yango ya elimo eteyaka biso mpe epesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tómipesa na mosala ya ntina mingi oyo ezali kosalema lelo na mabele. Ozwaka mpenza matomba na bibongiseli oyo nyonso?

MOKONZI ATEYI BATO NA YE NDENGE YA KOSAKOLA NA MOKILI MOBIMBA

7. Mosala nini ya ntina mingi Yesu abandisaki ntango azalaki awa na mabele, mpe esengelaki kokoba tii ntango nini?

7 Ntango Yesu abandaki mosala na ye awa na mabele, asakolaki ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Na boumeli ya mbula misato na ndambo, Yesu asalaki ete mosala yango  ezala likambo ya ntina mingi na bomoi na ye. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Mat. 10:7) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu asakolaki ete bayekoli na ye bakopanza nsango yango “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Alakaki bango ete ye moko akozala ná bango na mosala wana ya ntina mingi tii na mikolo na biso.Mat. 28:19, 20.

8. Ndenge nini Mokonzi alendisaki bato na ye awa na mabele mpo na mosala?

8 Kobanda mobu 1919, mosala ya kosakola “nsango malamu ya Bokonzi” ekómaki mosala moko ya ntina mingi. (Mat. 24:14) Mokonzi azalaki koyangela kuna na likoló, mpe ayanganisaki awa na mabele mwa etuluku ya bato oyo bapɛtolami. Batosaki na motema mobimba etinda oyo ya Yesu: Kosakola na mabele mobimba nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo etyamá! (Mis. 10:42) Na ndakisa, basakoli ya Bokonzi soki 20 000 bayanganaki na liyangani oyo esangisaki bato ya mikili mingi na Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis, na sanza ya libwa ya mobu 1922. Kanisá naino esengo oyo bazalaki na yango ntango Ndeko Rutherford asalaki diskur oyo ezalaki na motó ya likambo “Bokonzi” mpe alobaki ete: “Bótala, Mokonzi azali koyangela! Bino nde bapalanganisi ya nsango na ye. Na yango bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.” Bayangani nkóto mibale bandimaki kosakola “Mokolo moko ya sipesiale,” bakendeki kosakola na bandako oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 72 na esika oyo liyangani esalemaki. Lokola asepelaki na likambo yango, ndeko moko alobaki boye: “Nakobosana soki moke te ndenge balendisaki biso tókende kosakola Bokonzi mpe molende oyo ebele ya bayangani bamonisaki!” Kaka ye moko te nde alobaki bongo.

9, 10. (a) Bibongiseli nini ezwamaki mpo na kopesa basakoli ya Bokonzi formasyo? (b) Ndenge nini formasyo yango esalisá yo?

9 Na mobu 1922, basakoli ya Bokonzi koleka 17 000 bazalaki kosakola na mikili 58 na mokili mobimba. Kasi, basengelaki kozwa formasyo. Na siɛklɛ ya liboso, Mokonzi oyo aponamaki, apesaki bayekoli na ye malako ya polele na likambo oyo basengelaki kosakola, epai mpe ndenge oyo basengelaki kosala yango. (Mat. 10:5-7; Luka 9:1-6; 10:1-11) Na kolanda ndakisa wana, Yesu asalaka ete baoyo nyonso bazali kosakola Bokonzi bázwa malako mpe bázala na bisaleli oyo esengeli mpo na kosakola malamumalamu. (2 Tim. 3:17) Na nzela ya lisangá ya bokristo, Yesu apesaka bato na ye formasyo mpo na kosakola. Lolenge moko oyo apesaka bango formasyo, ezali na nzela ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, oyo etambwisamaka na masangá koleka 111 000 oyo ezali na mokili mobimba. Lokola bazali kozwa litomba na mateya ya eteyelo yango, basakoli koleka milio 7 bazali sikoyo na nyonso oyo esengeli mpo na kosakola mpe koteya na lolenge oyo ekosepelisa “bato ya ndenge nyonso.”Tángá 1 Bakorinti 9:20-23.

 10 Longola Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, biteyelo mosusu mpe ebimá mpo na kopesa formasyo na bankulutu ya masangá, babongisi-nzela, bandeko mibali oyo bazali minzemba, bandeko oyo babalá, bandeko ya Komite ya filiale mpe basi na bango, bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango mpe bamisionɛrɛ. * Bayekoli ya kelasi moko ya bandeko oyo bakɔtá Eteyelo ya bandeko oyo babalá, bamonisaki botɔndi na bango mpo na kelasi yango na maloba oyo: “Formasyo ya ntina mingi oyo tozwaki, esalisi biso tólinga lisusu Yehova mingi mpe epesi biso nyonso oyo tozalaki na yango mposa mpo na kosalisa basusu.”

11. Nini esalisaka basakoli ya Bokonzi bákoka koyika mpiko atako botɛmɛli ezali?

11 Satana, monguna amonaka milende wana oyo ezali kosalema mpo na kosakola mpe koteya Bokonzi. Asalelaka bato to mayele oyo emonanaka te mpo na koluka kopekisa mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe basakoli na yango. Kasi, milende ya monguna yango ezali kaka mpamba. Yehova atye Mwana na ye “mosika mpenza koleka guvɛrnema nyonso mpe bokonzi mpe nguya mpe bonkolo.” (Ef. 1:20-22) Lokola Yesu azali mokonzi, asalelaka bokonzi na ye mpo na kobatela mpe kotambwisa bayekoli na ye mpo na mokano ya Tata na ye esalema. * Nsango malamu ezali kosakolama, mpe bamilio ya bato ya motema sembo bazali koteyama na banzela ya Yehova. Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kopesa mabɔkɔ na mosala wana monene!

MOKONZI ABONGISI BATO NA YE MPO NA MOSALA MOKO MONENE

12. Lobelá mwa bambongwana na likambo etali lolenge ya kotambwisa makambo kobanda Bokonzi etyamaki.

12 Kobanda Bokonzi etyamaki na mobu 1914, Mokonzi apɛtoli lolenge oyo basaleli ya Nzambe babongisami mpo na kosala mokano ya Tata na ye. (Tángá Yisaya 60:17.) Na mobu 1919, bakómaki kotya mokambi mosala (ndenge bazalaki kobenga mokɛngɛli ya mosala ya kosakola) na lisangá mokomoko mpo na kotambwisa mosala ya kosakola. Mosala ya kosakola ndako na ndako mikolo ya lomingo ebongisamaki na mobu 1927. Basakoli ya Bokonzi balendisamaki mpo na kosala lisusu mingi na 1931 ntango bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova, nkombo oyo euti na Biblia. (Yis. 43:10-12) Na mobu 1938, batikaki kopona bandeko oyo basengelaki kozwa mikumba na masangá na ndenge ya voti, kasi bakómaki koponama na ndenge ya Teokrasi. Na mobu 1972, mokumba ya kotambwisa lisangá epesamaki na mabɔkɔ ya lisangani ya bankulutu na esika ya kopesa mokumba yango kaka na moto moko. Bandeko mibali nyonso balendisamaki mpo bákokisa masɛngami mpo na ‘kobatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ  na bango.’ (1 Pe. 5:2) Na 1976, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisamaki na bakomite motoba mpo na kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba. Mokonzi oyo Yehova atye abongisaki mokemoke bato ya Bokonzi na ndenge ya teokrasi, to na lolenge oyo Nzambe ayangelaka.

13. Makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 100 ya boyangeli eteyi yo nini?

13 Tótalela makambo oyo Mokonzi Masiya asali na boumeli ya mbula 100 ya liboso ya boyangeli na ye. Apɛtoli libota moko mpo na nkombo ya Yehova. Atambwisi mosala ya kosakola Bokonzi na mikili 239 mpe ateyi bamilio ya bato banzela ya Yehova. Ayanganisi bato ya sembo koleka milio nsambo, mpe mokomoko azali komipesa na bolingo na ye mpo na kosala mokano ya Tata na ye. (Nz. 110:3) Ya solo, misala oyo Yehova asali na nzela ya Bokonzi ya Masiya ezali minene mpe ya kokamwa. Kutu makambo mosusu ya kitoko oyo akosala ezali liboso na biso!

MAPAMBOLI OYO BOKONZI YA MASIYA EKOPESA BISO

14. (a) Ntango tobondelaka Nzambe ete: “Bokonzi na yo eya,” tosɛngaka mpenza nini? (b) Mokapo na biso ya mobu 2014 ezali nini, mpe mpo na nini ebongi mpenza?

14 Atako Yehova apesaki Mwana na ye, Yesu Kristo motole ya Mokonzi Masiya na mobu 1914, yango ezalaki te eyano mobimba na libondeli oyo tosalaka ete “Bokonzi na yo eya.” (Mat. 6:10) Biblia esakolaká ete Yesu asengelaki ‘kokende kotya bato na nse ya bokonzi na ye na katikati ya banguna na ye.’ (Nz. 110:2) Baguvɛrnema ya bato oyo Satana azali kotambwisa, ezali kaka kotɛmɛla Bokonzi ya Yesu. Ntango tobondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya, tosɛngaka ye ete Mokonzi Masiya mpe bato oyo bakoyangela elongo na ye báya kotya nsuka na biyangeli ya bato mpe bálongola bato nyonso oyo batɛmɛlaka Bokonzi yango awa na mabele. Likambo wana ekokokisa maloba ya Danyele 2:44 oyo elobaka ete Bokonzi ya Nzambe “ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso.” Ekolongola bato nyonso ya politiki oyo bazali banguna ya Bokonzi yango. (Em. 6:1, 2; 13:1-18; 19:11-21) Etikali moke mpenza likambo yango esalema. Yango wana, ebongi mpenza ete mokapo na biso ya mobu 2014, oyo ezali anivɛrsɛrɛ ya mbala ya 100 kobanda Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló, ezala Matai 6:10: “Bokonzi na yo eya”!

15, 16. (a) Makambo nini kitoko ekosalema na boumeli ya mbula nkóto? (b) Likambo nini ya nsuka oyo Yesu, Mokonzi Masiya akosala, mpe yango ekomonisa nini mpo na mokano ya Yehova mpo na bikelamu na ye nyonso?

15 Nsima ya koboma banguna ya Nzambe, Mokonzi Masiya akobwaka Satana mpe bademo na ye na libulu mozindo na boumeli ya mbula nkóto moko. (Em. 20:1-3) Lokola Satana ná bademo na ye bakolongwa, Bokonzi ekosalela na lombangu matomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu mpe ekolongola makambo nyonso oyo eutá na lisumu ya Adama. Mokonzi akosekwisa bamilio na bamilio ya bato oyo balali na kati ya malita mpe akobongisa programɛ moko monene ya koteya bango na ntina na Yehova. (Em. 20:12, 13) Mabele mobimba ekokóma paradiso ndenge elanga ya Edene ezalaki. Bato nyonso ya sembo bakokóma bato ya kokoka.

16 Ntango Boyangeli ya mbula nkóto ya Kristo ekosila, Bokonzi ya Masiya ekokokisa mokano na yango. Na nsima, Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Tata na ye. (Tángá 1 Bakorinti 15:24-28.) Ntina ekozala lisusu te ya kozala na molobeli kati na Yehova mpe bana na ye awa na mabele. Bana ya Nzambe nyonso ya likoló mpe awa na mabele, bakosala libota kaka moko monene ya Tata na bango ya likoló.

17. Ekateli nini ozwi na likambo etali Bokonzi?

17 Makambo kitoko oyo esalemi na boumeli ya mbula 100 ya Bokonzi endimisi biso ete Yehova asimbi makambo na mabɔkɔ mpe mokano na ye mpo na mabele ekokokisama. Tiká ete tókoba kozala bato ya sembo ya Bokonzi yango mpe tókoba kosakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye. Tozali kosala bongo na elikya mpenza ete mosika te, Yehova akoyanola na libondeli na biso oyo ete: “Bokonzi na yo eya”!

^ par. 5 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nkasa 22-23, paragrafe 12.

^ par. 10 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/2012, nkasa 13-17, na lisolo oyo elobi “Biteyelo ya Teokrasi emonisaka bolingo ya Yehova.”

^ par. 11 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1/12/1998, nkasa 19-22, na ndakisa makambo oyo tolongi na batribinale ya bikólo ndenge na ndenge.

Mokapo na biso ya mobu 2014: “Bokonzi na yo eya.”Matai 6:10