Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2014

“Bokonzi na yo eya”​—Kasi ntango nini?

“Bokonzi na yo eya”​—Kasi ntango nini?

“Ntango bokomona makambo yango nyonso, bóyeba ete azali pene, na baporte.”​—MAT. 24:33.

1, 2. (a) Nini ekoki kozala nsima ya makambo oyo tozali komona lelo? (b) Na likambo etali Bokonzi ya Nzambe, tokoki kondimisama na nini?

NDENGE okoki koyeba yango, bato oyo bamonaki ndenge likambo moko esalemaki, bakoki komikundola ndenge likambo yango esalemaki, kasi mwa bokeseni ekoki kozala. Ndenge moko mpe, moto akoki te kozongisa na bosikisiki na makanisi makambo oyo monganga alobaki na ye nsima ya kosala ye ekzamɛ. To moto moko akoki kozala na mokakatano ya komona mafungola to manɛti na ye, nzokande ezali kaka pene ya lobɔkɔ na ye. Makambo oyo nyonso eyokani na oyo bato ya mayele balobaka ete ezali lokola moto akufá miso, oyo azali koyeba eloko te, to azali kobosana yango, mpo azali kosala likambo mosusu. Bato balobaka ete ezali ndenge wana nde bɔɔngɔ na biso esalaka.

2 Bato mingi lelo, bazali lokola “miso ekufá,” mpo bazali koyeba te makambo oyo ezali koleka na mokili. Bakoki kondima ete mokili ebongwani makasi kobanda mobu 1914, kasi bazali koyeba te ndimbola mpenza ya makambo yango. Lokola tozali bayekoli ya Biblia, toyebi ete Bokonzi ya Nzambe etyamaki na mobu 1914 ntango Yesu akómaki Mokonzi kuna na likoló. Kasi toyebi ete makambo mosusu esengeli kokokisama liboso ete libondeli oyo tosalaka ete “Bokonzi  na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele” ekokisama. (Mat. 6:10) Emonani polele ete nsuka ya mokili oyo mabe ezali mpe na kati ya makambo yango. Kaka na ntango wana nde mokano ya Nzambe ekosalema na mabele ndenge ezali kosalema na likoló.

3. Litomba nini tozali kozwa lokola toyekolaka Liloba ya Nzambe?

3 Lokola toyekolaka Liloba ya Nzambe, tokoki komona ete esakweli yango ezali kokokisama sikoyo. Tokeseni mpenza na bato mosusu! Bamizindisi mpenza na makambo na bango ya bomoi mpe na koluka biloko ya mokili, mpe bazali te komona bilembeteli ya polele ete Kristo azali koyangela kobanda mobu 1914 mpe mosika te, akokokisa bitumbu ya Nzambe. Kasi, omituna motuna oyo: Soki osaleli Nzambe esili koleka bambula ebele, oyebi malamumalamu ndimbola ya eleko na biso koleka ndenge oyebaki yango na bambula oyo eleki? Ata soki outi kokóma Motatoli ya Yehova, otyaka likebi na yo na makambo nini? Ezala tokopesa eyano nini, tótalela naino makambo misato ya ntina oyo ezali komonisa ntina oyo tokoki kotya motema ete mosika te, Mokonzi oyo Nzambe atyaki akosala makambo mosusu mpo ete mokano ya Nzambe esalema na mabele na mobimba na yango.

BATAMBWISI YA BAMPUNDA BAMONANI

4, 5. (a) Yesu azali kosala nini kobanda 1914? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Batambwisi mpunda misato bazali elilingi ya nini mpe babimisi makambo nini?

4 Na mobu 1914, Yesu Kristo oyo amonisamaki na elilingi ya moto oyo azali kotambwisa mpunda ya mpɛmbɛ, azwaki motole kuna na likoló. Abandaki mbala moko kobunda mpo na kolonga tii na nsuka mokili mabe oyo ya Satana. (Tángá Emoniseli 6:1, 2.) Makambo oyo Emoniseli mokapo ya 6 elobeli, emonisi ntina oyo tosengeli kondima ete nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe, makambo esengelaki kobeba na lombangu mpenza na mokili: bitumba, kozanga bilei, maladi mabe mpe makambo mosusu oyo ememelaka bato liwa. Makambo yango emonisami na elilingi ya batambwisi mpunda misato oyo bazalaki kolanda Yesu Kristo na nsima, kasi bazalaki te mosika na ye.​—Em. 6:3-8.

5 Ndenge esakolamaki, kimya ‘elongolamaki na mabele,’ atako bikólo epesanaki bilaka ya kosalisana mpe koyokana na makambo ya politiki. Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ekoki kotalelama lokola ebandeli ya bitumba ya minene, ndenge emonisami na makambo minene oyo ezali kosalema na mokili. Mpe atako bokoli esalemi na makambo ya nkita mpe ya siansi kobanda mobu 1914, kozanga ya bilei ezali likambo oyo ezali kosala ete kimya ezala te na mokili mobimba. Na yango, nani akoki koboya kondima ete bamaladi mabe ya lolenge nyonso, koningana ya mabele, bampela mpe ‘bolɔzi ya liwa’ ezali kokoba koboma bamilio ya bato mbula na mbula? Makama wana ya minene ezali kosalema mingi mpe mbala na mbala koleka ndenge ezalaki kosalema liboso. Ozali koyeba ndimbola ya makambo yango?

Ntango batambwisi mpunda bazali kotambwisa, makambo ezali kobeba se kobeba na mokili (Talá paragrafe 4, 5)

6. Banani bakangaki ntina ya kokokisama ya esakweli ya Biblia, mpe likambo yango etindaki bango básala nini?

6 Bato mingi batungisamaki ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe grippe espagnole ebimaki. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazalaki komonisa ete mobu 1914 ekozala nsuka ya ntango ya mabota, to “bantango oyo etyamá ya bikólo.” (Luka 21:24) Bayebaki mpenza te likambo nini ekosalema. Kasi, bayebaki ete 1914 ekozala mobu oyo ekobongola makambo mingi na oyo etali Boyangeli ya Nzambe. Ntango kaka basosolaki kokokisama ya esakweli ya Biblia, basakwelaki bato na molende ete Boyangeli ya Nzambe ebandaki koyangela. Milende na bango wana ya kosakola bokonzi ememelaki bango minyoko makasi. Likambo yango esalemaki na bikólo ebele, ezalaki mpe kokokisama ya esakweli. Na bambula oyo elandaki, banguna ya Bokonzi ‘babimisaki mpasi na nzela ya mobeko.’  Babɛtaki mpe bandeko na biso, babwakaki bango na bolɔkɔ, mpe kutu babomaki bango likoló ya nzete, na masasi to bakataki bango nkingo.​—Nz. 94:20; Em. 12:15.

7. Mpo na nini ebele ya bato bayebi te ndimbola ya solosolo ya makambo oyo ezali kosalema na mokili?

7 Atako bilembeteli emonisi polele ete Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló, mpo na nini ebele ya bato bandimaka te ndimbola na yango? Mpo na nini bazali te na likoki ya komonisa boyokani oyo ezali kati na makambo oyo ezali na mokili mpe bisakweli ya Biblia ya sikisiki oyo basaleli ya Nzambe basakolaka esili koleka bambula mingi? Ekoki nde kozala ete bato mingi bazali kotya likebi koleka kaka na makambo oyo bakoki komona na miso? (2 Ko. 5:7) Komipesa na makambo ya mokili nde ezali kokanga bango miso mpo bámona te oyo Nzambe azali kosala? (Mat. 24:37-39) Bamosusu bazali kobendama na makanisi ya lokuta oyo Satana azali kopanza? (2 Ko. 4:4) Esɛngaka kozala na kondima mpe kozala moto ya elimo mpo na komona makambo oyo ezali kosalema na likoló. Oyo nde esengo tozali na yango lokola tozali na molili te mpo na makambo oyo ezali mpenza kosalema!

MABE EZALI SE KOBAKISAMA

8-10. (a) Ndenge mokanda ya 2 Timote 3:1-5 ezali kokokisama? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete mabe ezali se kobakisama?

8 Ezali na ntina ya mibale oyo toyebi ete ekoumela lisusu te mpo Bokonzi ya Nzambe ezwa makambo ya mabele na mabɔkɔ: Mabe ezali se kobakisama. Na boumeli ya mbula pene ya 100, makambo oyo mokanda ya 2 Timote 3:1-5 esakolaki, ezali mpenza komonana polele. Makambo yango mpe ezali kosalema mingi mpe eumeli mingi. Okoki kondima te ete kokokisama ya esakweli yango ezali kosalema mingi koleka? Tótalela mwa bandakisa oyo emonisi likambo yango.​—Tángá 2 Timote 3:1, 13.

9 Kanisá na bokeseni oyo ezali kati na makambo oyo ezalaki komonana mabe na bambula 1940 to 1950 mpe makambo oyo ezali kosalema lelo na bisika ya mosala, na makambo etali kominanola, na masano mpe na makambo etali molato. Mobulu makasi mpe bizaleli ya mbindo ezali komonana mingi lelo. Bato babomaka nzoto mpo bámonana lokola bato ya nkanza, ya mbindo, to ya makambo makasimakasi. Makambo oyo ezalaki kosepelisa  bato te na televizyo na bambula 1950, lelo oyo ekómá makambo oyo ezali kosepelisa mabota. Mpe bato mingi bandimaka ete bapiblisite ya bato oyo basangisaka nzoto mibali ná mibali mpe basi ná basi, esalemaka mingi na bisika oyo bato baminanolaka, na bilamba, mpe balakisaka lolenge ya bomoi na bango na miso ya bato. Tozali mpenza na botɔndi lokola toyebi likanisi ya Nzambe na likambo yango!​—Tángá Yuda 14, 15.

10 To okoki kokanisa na ezaleli oyo ezalaki komonana botomboki epai ya bilenge na bambula 1950 ná oyo makambo oyo ezali kosalema lelo. Baboti bazalaki komitungisa soki bana na bango bamɛlaka makaya, masanga to babinaka mabina ya nsɔni. Lelo oyo, bansango ya mabe ekómi mingi: Mwana kelasi moko ya mbula 15 abɛtaki baninga na ye masasi, abomaki mibale mpe azokisaki 13. Etuluku moko ya bilenge oyo bamɛlaki bangi babomaki mwana mwasi moko ya mbula 9 mpe babɛtaki ndeko ya mwana mwasi yango ná tata na ye. Balobaka ete na mboka moko ya Azia, bilenge mingi nde basalaki makambo ya mobulu na boumeli ya bambula zomi oyo eleki. Ezali mpenza na moto oyo akoki koboya ete makambo ezali kobeba se kobeba?

11. Mpo na nini bato mingi bazali komona te ete makambo ezali se kobeba?

11 Ntoma Petro amonisaki polele ete: “Na mikolo ya nsuka basɛki bakoya ná kosɛka na bango, bakotambola na kolanda bamposa na bango moko mpe bakoloba ete: ‘Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.’” (2 Pe. 3:3, 4) Nini etindaka bato mosusu básala bongo? Emonani lokola ete soki likambo moko ekómi momeseno, bato batyelaka yango lisusu likebi te. Ndenge oyo bizaleli ya bato na mokili mobimba ezali kobeba ekoki mbala mosusu kosala mpasi mingi te soki tokokanisi yango na mpasi oyo esalaka soki moninga moko akómi mbala moko na bizaleli ya mabe. Nzokande, kobeba mokemoke ya bizaleli, ezali mpenza likama.

12, 13. (a) Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te mpo na makambo oyo ezali kosalema na mokili? (b) Koyeba likambo nini ekosalisa biso tóyika mpiko na ‘ntango oyo ya mpasi’?

12 Ntoma Paulo akebisaki biso ete “na mikolo ya nsuka,” “ntango moko ya mpasi” ekozala. (2 Tim. 3:1) Kasi elingi koloba te ete tokokoka yango te, nzokande tosengeli mpe te kobosana ete ezali. Na lisalisi ya Yehova, elimo na ye, mpe lisangá ya bokristo, tokoki kolonga makambo nyonso ya mpasi mpe kobanga oyo ekoki kokómela biso. Tokoki kotikala sembo. “Nguya oyo eleki makasi” ezali oyo ya Nzambe, kasi oyo ya biso te.​—2 Ko. 4:7-10.

13 Ezali malamu koyeba ete ntoma Paulo abandi kolobela esakweli ya mikolo ya nsuka na maloba “yebá likambo oyo.” Maloba wana ezali ndanga mpo na komonisa ete makambo oyo elandi ekosalema mpenza. Ntembe ezali te ete mokili oyo mabe ekokoba kobeba se kobeba kino ntango Yehova akosukisa yango. Bato ya istware bamonisi ete bipai nyonso, bizaleli malamu ebebi makasi mpenza. Bizaleli malamu ebebi na mokili mobimba na ndenge oyo esalemá naino te. Bato mingi bazali koyeba te nini esalaka bongo, kasi makambo minene oyo ezali kosalema na mokili kobanda mobu 1914 esengeli mpenza komonisa biso polele ete tokoki kotya motema ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekosala mosala na yango.

LIBOTA OYO EKOLEKA TE

14-16. Wapi ntina ya misato ya kondima ete Bokonzi ya Nzambe “ekoya” mosika te?

14 Ezali mpe na likambo ya misato oyo tokoki kotya motema. Makambo minene oyo esalemi kati ya basaleli ya Nzambe emonisi ete nsuka ekómi mpenza pene. Na ndakisa, liboso ete Bokonzi ya Nzambe etyama na likoló, etuluku moko ya bakristo ya sembo oyo batyami mafuta  na elimo bazalaki kosalela Nzambe na molende. Ntango bilikya na bango mosusu mpo na makambo oyo esengelaki kokokisama na mobu 1914 esalemaki te, basalaki nini? Mingi na bango bamonisaki bosembo na ntango ya minyoko mpe komekama mpe bakobaki kosalela Yehova. Na boumeli ya bambula, bakristo wana mingi oyo batyami mafuta na elimo [ntango mosusu bango nyonso] basilisaki bomoi na bango awa na mabele.

15 Ntango alobelaki ebele ya makambo ya esakweli oyo etali nsuka ya mokili oyo, Yesu alobaki ete: “Libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo wana nyonso ekosalema.” (Tángá Matai 24:33-35.) Tosimbi ete ntango alobelaki “libota oyo,” Yesu alobelaki bituluku mibale ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Ya liboso, ezalaki oyo ya 1914, mpe basosolaki mpenza elembo ya kozala ya Kristo na mbula yango. Ezali te ete bato ya etuluku yango bazalaki kaka na bomoi na 1914, kasi batyamaki mafuta na elimo lokola bana ya Nzambe na mbula yango to liboso ya mbula yango.​—Rom. 8:14-17.

16 Etuluku ya mibale ya “libota oyo,” esangisi bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki na bomoi na eleko moko na etuluku ya liboso. Bazalaki kaka na bomoi te eleko moko na bakristo ya etuluku ya liboso, kasi batyamaki mafuta na elimo santu na boumeli ya eleko oyo bakristo ya etuluku ya liboso bazalaki naino na bomoi. Na yango, moto nyonso te oyo atyami mafuta na elimo lelo nde azali na kati ya “libota oyo,” oyo Yesu alobelaki. Lelo oyo, baoyo bazali na etuluku wana ya mibale, bazali kopusana mpenza na bambula. Kutu, maloba ya Yesu na Matai 24:34 endimisi biso ete mwa ndambo ya bato ya “libota oyo ekoleka ata moke te” liboso ete bámona ntango bolɔzi monene ekobanda. Yango esengeli kondimisa biso lisusu ete etikali mwa ntango moke mpo ete Bokonzi ya Nzambe ebebisa mokili oyo mabe mpe ebandisa mokili ya sika ya boyengebene.​—2 Pe. 3:13.

MOSIKA TE, KRISTO AKOLONGA TII NA NSUKA

17. Nsima ya kotalela makambo oyo misato, tokoki koloba nini?

17 Nsima ya kotalela makambo misato oyo, tokoki koloba nini? Yesu alobaki ete tosengeli te koyeba​—mpe tokoyeba te—​na bosikisiki mokolo to ngonga. (Mat. 24:36; 25:13) Kasi ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, tokoki koyeba “eleko.” (Tángá Baroma 13:11.) Tozali na eleko yango, elingi koloba mikolo ya nsuka. Soki totye likebi mobimba na bisakweli ya Biblia mpe na oyo Yehova mpe Yesu Kristo bazali kosala, tokomona mpenza polele ete tozali lisusu mosika te na nsuka ya ebongiseli oyo.

18. Likambo nini ezali kozela baoyo bazali koboya kondima Bokonzi ya Nzambe?

18 Etikali moke baoyo bazali koboya kondima bokonzi monene oyo Nzambe apesi Yesu Kristo, Momemi mpunda ya mpɛmbɛ oyo abimaki mpo na kolonga, bakomona ete bazalaki na libunga. Bakozala te na esika ya kokima. Na ntango wana, bato mingi bakoganga na nsɔmɔ ete: “Nani akoki kotɛlɛma?” (Em. 6:15-17) Ya solo, mokapo oyo elandi ya mokanda ya Emoniseli epesi eyano. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele ‘bakotɛlɛma’ mokolo yango mpo Nzambe akondima bango. Na nsima, “ebele mpenza ya bato” ya bampate yango mosusu bakobika na bolɔzi monene.​—Em. 7:9, 13-15.

19. Soki ozali koyeba mpe kondima na motema moko bilembeteli oyo emonisi polele ete mosika te mikolo oyo ya nsuka ekosuka, elikya nini ozali na yango?

19 Soki tozali kotya mpenza likebi mobimba na ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama na ndenge ya polele na eleko oyo ya yikiyiki, tokobendama te na makelele ya wenze oyo mokili ya Satana ezali kosala; tokomona polele ndimbola ya solosolo ya makambo oyo ezali koleka na mokili. Mosika te, Kristo akosilisa bolongi na ye na mokili oyo ya mabe na etumba ya nsuka mpe ya boyengebene. (Em. 19:11, 19-21) Kanisá ndenge tokozala na esengo ntango tokomona makambo oyo Biblia epesá biso elaka!​—Em. 20:1-3, 6; 21:3, 4.