Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2014

Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Afrika ya Wɛsti

Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Afrika ya Wɛsti

LOKOLA akolaki na mboka moko ya bobola na Côte d’Ivoire, Pascal azalaki na mposa makasi ya bomoi ya malamu. Azalaki moto ya lisano ya makɔfi (boxeur), mpe azalaki komituna boye: ‘Epai wapi nakoki kozwa libaku ya kokóma vɛdɛti ya lisano yango mpe nakóma na mbongo?’ Ntango akómaki na mbula soki 25, amonaki ete mikili ya Mpoto nde esika oyo ebongi mpenza. Kasi, lokola azalaki na mikanda ya kosala mobembo te, esengelaki akɔta kuna na ndenge ya tshobo.

Na mobu 1998, ntango azalaki na mbula 27, Pascal abandaki mobembo na ye. Akendeki na Ghana, alekaki na Togo, na nsima akendeki na Bénin mpe nsukansuka akómaki na engumba Birni Nkonni na Niger. Sikoyo mpasi mpenza ya mobembo elingaki kobanda. Mpo na kokende na ngambo ya nɔrdi, asengelaki komata na motuka mpe kokatisa esobe ya Sahara. Mpe soki akómi na Mediterane, asengelaki kozwa masuwa mpo na kokende na Mpoto. Wana ezali mokano oyo azalaki na yango, kasi makambo mibale oyo esalemaki na Niger ekangelaki ye nzela.

Ya liboso, azalaki na mbongo lisusu te. Ya mibale, akutanaki na ndeko Noé, mobongisi-nzela moko oyo abandaki koyekola Biblia ná ye. Makambo oyo ayekolaki, esimbaki mpenza motema na ye mpe ebongolaki makanisi oyo azalaki na yango. Kosalela Nzambe ezwaki esika ya mikano ya kokóma na bozwi. Na sanza ya zomi na mibale, mobu 1999, Pascal azwaki batisimo. Mpo na komonisa botɔndi na ye epai ya Yehova, na mobu 2001, abandaki mosala ya mobongisi-nzela na Niger, kaka na ekólo oyo ayekolaki solo. Ndenge nini atalelaka mosala na ye? Alobi boye: “Nakómi mpenza na bomoi ya malamu koleka!”

KOSALA NA AFRIKA EZALI KOPESA BANGO ESENGO MINGI

Anne-Rakel

Na ndakisa ya Pascal, bandeko mingi bamonaki ete kolanda mikano ya elimo nde epesaka esengo mingi na bomoi. Mpo na kokokisa mokano yango, bamosusu batikaki Mpoto mpe bakendaki na bisika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi na Afrika. Na yango, Batatoli ya Yehova soki 65 bautaki na Mpoto, oyo bazalaki na mbula kobanda 17 tii 70, bakendaki kosala lokola “bato oyo bakendaka esika mposa ezali monene,” ndenge babengaka bango mbala mingi. Bakendaki na Afrika ya Wɛsti, na bikólo lokola Bénin, Burkina Faso, Niger mpe Togo. * Nini mpenza etindaki bango básala mibembo ya mosika ndenge wana mpe matomba nini emonanaki?

Ndeko Anne-Rakel oyo autaki na Danemark alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki bamisionɛrɛ na Sénégal. Bazalaki kobɛta ntango nyonso masolo kitoko ya mosala yango, mpe ngai nakómaki na mposa ya mosala yango.” Mbula 15 na nsima, ntango Anne-Rakel akómaki na mbula mwa moke koleka 20, akendaki na Togo, epai asalaki elongo na lisangá moko ya elobeli ya bajɛstɛ. Ndenge nini kokende na ye kuna elendisaki basusu? Alobi boye: “Na nsima, leki na ngai ya mwasi mpe ya mobali balandaki ngai na Togo.”

Albert-Fayette ná Aurele

Ndeko Aurele, ndeko moko oyo abalá mpe azali na mbula 70, oyo autaki na France, alobi boye: “Mbula mitano  nsima ya pansiɔ na ngai, nasengelaki kopona: Kofanda na kimya na France mpe kozela Paradiso eya to koluka kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova.” Ndeko Aurele aponaki kosala lisusu mingi. Mbula misato na nsima, ye ná mwasi na ye, Albert-Fayette, bakendeki na Bénin. Ndeko Aurele alobi boye: “Kondima kosalela Yehova awa ezali likambo ya malamu oyo tósala naino te.” Na mwa komungamunga, abakisi ete: “Ndenge makambo emonani awa, bisika mosusu ya teritware na biso oyo ezali na bokula ya mai, ezali kokundwela ngai ndenge Paradiso ekozala.”

Ndeko Clodomir mpe mwasi na ye, Lysiane, balongwaki na France mpe bakendaki na Bénin eleki sikoyo mbula 16. Na ebandeli, bandeko yango batikaki mabota mpe bandeko na bango ya France, mpe bazalaki kobanga ete bakokoka te komesana na mboka ya sika. Nzokande, emonanaki ete ntina ya kobanga ezalaki te. Bayokaki esengo mpenza. Ndeko Clodomir alobi boye: “Na boumeli ya mbula 16, tozwi libaku ya kosalisa moto moko mbula nyonso mpo andima solo.”

Lysiane mpe Clodomir ná bandeko mosusu oyo basalisaki báyeba solo

Johanna ná Sébastien

Ndeko Sébastien ná mwasi na ye, Johanna, bautaki France mpe bakendaki na Bénin na mobu 2010. Ndeko Sébastien alobi ete: “Makambo ya kosala ezali mingi na lisangá. Kosala awa esika mosala ezali mingi, ezali kosalisa mpo na koyekola makambo mingi noki!” Matomba nini ezali komonana na mosala ya kosakola? Ndeko Johanna alobi boye: “Bato bazalaka mpenza na mposa ya koyeba solo. Ata soki tozali na mosala ya kosakola te, bato batɛlɛmisaka biso na balabala mpo na kotuna mituna ya Biblia mpe kosɛnga biso mikanda.” Kokende kuna esalisi libala na bango na nini? Ndeko Sébastien alobi boye: “Ebongisi lisusu mpenza libala na biso. Ezali esengo kolekisa mikolo nyonso ná mwasi na ngai na mosala ya kosakola.”

Ndeko Eric ná mwasi na ye, Katy, bazali babongisi-nzela mpe basakwelaka mwa ndambo ya bato oyo bazali na nɔrdi ya Bénin. Mbula soki 10 esili koleka, ntango bazalaki na France, babandaki kotánga masolo oyo ezalaki kolobela kokende kosala epai mposa ezali makasi mpe bazalaki kosolola ná bandeko mosusu oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso. Yango epesaki bango mposa ya kokende kosala na mboka mopaya, yango nde basalaki na mobu 2005. Bokoli oyo bamonaki ekamwisaki bango. Ndeko Erick alobi boye: “Na mbula mibale oyo eleki, etuluku na biso oyo ezali na engumba Tanguiéta, ezalaki na basakoli 9; kasi sikoyo tozali na basakoli 30. Na mokolo ya lomingo, bato kobanda 50 tii 80 bayanganaka na makita. Komona bokoli ya ndenge wana, epesaka biso esengo oyo ekokani na eloko ata moko te!”

Katy ná Eric

MIKAKATANO OYO BAKUTANAKI NA YANGO MPE NDENGE BALONGAKI YANGO

Benjamin

Mikakatano nini bandeko mosusu oyo “bakendeki kosala epai mposa ezali makasi” bakutanaki na yango? Ndeko Benjamin, azali na mbula 33 mpe azali ndeko ya  Anne-Rakel. Na mobu 2000 na Danemark, akutanaki na misionɛrɛ moko oyo asalaki na Togo. Ndeko Benjamin alobi boye: “Ntango nayebisaki misionɛrɛ yango ete nalingi kokóma mobongisi-nzela, alobaki ete: ‘Oyebi, okoki kokóma mobongisi-nzela na Togo.’” Ndeko Benjamin akanisaki na likambo yango. Alobi ete: “Nakokisaki naino te mbula 20 na ntango wana, kasi bandeko na ngai mibale ya basi bazalaki kosala na Togo. Yango ezalaki mpasi te mpo na ngai kokende kuna.” Yango wana akendeki. Kasi, mokakatano moko ezalaki. Ndeko Benjamin alobi ete: “Nayebaki Lifalanse ata moke te. Basanza motoba ya liboso ezalaki mpasi makasi mpo nakokaki te kosolola na bato.” Kasi, na nsima asalaki makasi. Ndeko Benjamin azali lelo na Betele ya Bénin, asalaka mosala ya kotinda mikanda na masangá mpe apesaka mabɔkɔ na departema oyo etali makambo ya baordinatɛrɛ.

Marie-Agnès ná Michel

Ndeko Eric ná mwasi na ye Katy, oyo tolobelaki liboso, bapesaki mabɔkɔ na lisangá moko ya monɔkɔ ya bapaya na France liboso bákende na Bénin. Afrika ya Wɛsti ekeseneki na France na nini? Ndeko Katy alobi ete: “Ezalaki mpasi kozwa esika ya malamu mpo na kofanda. Na boumeli ya basanza mingi, tofandaki na ndako moko oyo kura mpe mai ya pɔmpi ezalaki te.” Kasi, ndeko Erick abakisi boye: “Bato oyo bazalaki zingazinga na biso, bazalaki kobɛta miziki makasi tii na butu makasi. Esengeli kozala motema molai na makambo ya ndenge wana mpe koluka komesana na yango.” Bango nyonso mibale balobi ete: “Esengo ya kosala na teritware oyo Batatoli ya Yehova bazali te, eleki mosika mikakatano ya lolenge nyonso.”

Ndeko Michel ná mwasi na ye, Marie-Agnès, oyo bautaki na France, mpe bazalaki na mbula mwa moke koleka 50, bakendaki na Bénin esili koleka mbula mitano. Na ebandeli babangaki. Ndeko Michel alobi ete: “Basusu bamonaki ndenge tozalaki kotambola bongo, lokola batye biso likoló ya pusupusu oyo bazali kotambwisa yango likoló ya nsinga! Ekokaki kozala mpasi soki oyebi te ete moto oyo azalaki kotambwisa yango ezali Yehova. Yango wana, tosalaki mobembo yango mpo na Yehova mpe elongo na ye.”

NDENGE OKOKI KOMIBONGISA

Bandeko oyo “bakendá kosala epai mposa ezalaki monene” bamonisi ete ezali malamu mingi komibongisa mpe kosala makambo oyo: Kosala programɛ liboso. Koluka ndenge ya komesana. Kolya mbongo ngulungulu te. Kotyela Yehova motema.Luka 14:28-30.

Ndeko Sébastien oyo tolobeli liboso, alobi ete: “Liboso tókende, ngai ná Johanna tobombaki mbongo na boumeli ya mbula mibale; mpo na kolonga, tozalaki te kobebisa mbongo na makambo etali kominanola mpe tozalaki te kosomba biloko oyo tozalaki mpenza te na mposa na yango.” Mpo na kokoba kosala na mboka mopaya, mbula nyonso bakendeke na Mpoto mpe basalaka mosala ya mosuni mwa basanza, mpe yango esalisaka bango bákoba mosala na bango ya mobongisi-nzela na Bénin na basanza oyo etikali.

Marie-Thérèse

 Ndeko Marie-Thérèse, azali na kati ya bandeko basi 20 ya minzemba oyo bazali “kosala epai mposa ezali monene” na Afrika ya Wɛsti. Asalaki mosala ya kotambwisa bisi na France, kasi na mobu 2006, akataki mosala yango mpo na mbula moko mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela na Niger. Eumelaki te, amonaki ete wana ezalaki lolenge ya bomoi oyo asengelaki kolanda. Alobi boye: “Ntango nazongaki na France, nasololaki na patrɔ na ngai ete nazali na mposa ya kobongisa programɛ na ngai ya mosala, mpe andimaki. Sikoyo, kobanda na sanza ya mitano tii ya mwambe, nazalaka sofɛlɛ ya bisi na France, mpe kobanda sanza ya libwa tii ya minei, nasalaka mosala ya mobongisi-nzela na Niger.”

Saphira

Baoyo bazali “koluka liboso Bokonzi” bakoki kotya motema ete Yehova akopesa bango ‘biloko mosusu nyonso ya ntina.’ (Mat. 6:33) Tózwa ndakisa: Tótala oyo ekómelaki Saphira, ndeko mwasi moko ya France oyo azali na mbula koleka mwa moke 20 mpe azali mobongisi-nzela na Bénin. Na mobu 2011, azongaki lisusu na France mpo na koluka mbongo oyo ekosalisa ye mpo na kobikela na Afrika na mbula oyo elandaki (yango ezalaki mbula na ye ya motoba ya kosala bongo). Alobi boye: “Mokolo ya mitano, ezalaki mokolo na ngai ya nsuka ya mosala, kasi nazalaki na mposa bábakisela ngai mikolo mosusu zomi ya mosala mpo nakokisa mbongo oyo ekosalisa ngai mpo na mbula oyo ezalaki koya. Natikalaki kaka na pɔsɔ mibale na France. Nabondelaki Yehova mpe nayebisaki ye likambo yango. Mwa moke na nsima, biro moko oyo elukelaka bato misala ebengaki na telefone mpe batunaki soki nakoki kosala na esika ya moto moko mpo na pɔsɔ mibale.” Mokolo ya mosala moko, ndeko Saphira akendeki na esika yango mpo moto wana oyo ye alingaki kosala na esika na ye apesa ye formasyo. Alobi boye: “Nakamwaki mpenza ntango nayebaki ete moto yango ezali nde ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela oyo azalaki na mposa ya mikolo zomi mpo na kokɔta Eteyelo ya babongisi-nzela! Patrɔ azalaki koboya kopesa ye mikolo yango soki moto ya kosala na esika na ye amonani te. Abondelaki Yehova asalisa ye, ndenge kaka ngai mpe nasalaki.”

EPAI ESENGO YA SOLOSOLO EUTAKA

Bandeko mosusu oyo bakendeki kosala na Afrika ya Wɛsti na boumeli ya bambula mingi bakómisaki bamboka yango epai na bango. Basusu basalaki mpo na mwa bambula mpe na nsima, bazongaki epai na bango. Kasi ata tii lelo, “bandeko mosusu oyo bakendeki kosala epai mposa ezalaki monene,” bazali kozwa matomba ya bambula oyo basalaki na bamboka mosusu. Bamoni ete esengo ya solosolo eutaka nde na kosalela Yehova.

^ par. 6 Filiale ya Bénin etambwisaka mosala na bikólo wana nyonso minei, oyo balobaka monɔkɔ ya Lifalanse.

Makambo mosusu

BANANI BAZALI KOSALA MOKANO YA YEHOVA LELO OYO?

Biteyelo nini ebongisami mpo na babongisi-nzela?

Formasyo nini ya ntina mingi ebongisami mpo na baoyo bapesaka ntango na bango nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi?