Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2013

Yehova abatelaki bango na bilili ya bangomba

Yehova abatelaki bango na bilili ya bangomba

NTANGO mwasi moko abimaki libándá ya porte ya ndako na ye na ntɔngɔ makasi, amonaki mwa kartɔ moko ya moke liboso ya porte. Alɔkɔtaki yango mpe atalaki epai na epai, kasi ata moto te azalaki na nzela. Ekoki kozala ete mopaya moko oyo nkombo eyebani te atikaki yango wana na butu. Afungolaki mwa kartɔ yango moke mpe azongaki noki na ndako mpe akangaki porte. Ezalaki likambo ya kokamwa te. Mwa kartɔ yango ezalaki na mikanda na biso oyo bapekisaki! Asepelaki makasi, abondelaki na nse ya motema, mpe apesaki Yehova matɔndi mpo na bilei wana kitoko ya elimo.

Makambo ya ndenge wana esalemaki na ekólo Allemagne na bambula 1930. Ntango Banazi bazwaki bokonzi na mobu 1933, mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na bisika mingi na ekólo yango. Ndeko Richard Rudolph, oyo azali lelo na mbula koleka 100 * alobi boye: “Tondimisamaki ete mobeko wana oyo mwana ya moto abimisaki, ekopekisa soki moke te ete tópesa litatoli na ntina na Yehova mpe nkombo na ye. Eloko ezalaki kosalisa mingi mpo na koyekola mpe kosakola, ezalaki mikanda na biso. Kasi, lokola mosala na biso epekisamaki, ezalaki mpasi kozwa mikanda yango. Tozalaki komituna ndenge nini mosala ekokende liboso.” Mosika te, ndeko Richard ayokaki ete esengeli akokisa mposa wana na ndenge moko ya mayele. Mosala yango esengelaki kosalema na bilili ya bangomba.Bas. 9:36.

NA BANZELA OYO MIYIBI BAZALAKÁ KOSALELA

Soki olongwe na sudi ya ebale Elbe (to Labe) okokóma na bangomba minene oyo babengi (Krkonoše), oyo ezali na ndelo ya République Tchèque mpe Pologne. Atako bangomba yango mosusu ezali na mɛtrɛ 1600, bato oyo bazali na kati mpenza ya Mpoto babengaka yango esanga ya Arctique. Mbula mpɛmbɛ ezipaka bansɔngɛ ya bangomba yango mɛtrɛ 3 na boumeli ya sanza motoba. Baoyo bakanisaka ete kuna malili to molunge ekoki kozala te, bakoki mbala mosusu komona ndenge londende ekoki kozipa bansɔngɛ ya bangomba yango na mbalakaka.

Na boumeli ya basiɛklɛ, ngomba yango ebimisá ndelo moko kati na bitúka, bikólo mpe bamboka mosusu. Lokola ezalaki bisika ya makama, ezalaki mpasi mpo na kokɛngɛla yango, yango wana na ntango ya kala, bato mingi ya bisika yango bazalaki kokatisa bangomba yango mpo na komema to kobimisa biloko na  ndenge ya moyibi. Na bambula 1930, ntango bangomba minene ekabolaki Tchécoslovaquie mpe Allemagne, Batatoli ya Yehova ya mpiko babandaki koleka na bisika yango. Mpo na nini? Mpo na kozwa mikanda na biso esika ezalaki mpe komema yango epai mosusu. Elenge Richard azalaki moko ya Batatoli yango.

Bandeko bazalaki kolata lokola bato oyo batambolaka na bangomba minene mpo na kokatisa bangomba mpe kokɔtisa mikanda na Allemagne

MOBEMBO MOKO YA LIKAMA MAKASI

Ndeko Richard alobi boye: “Na bawikende, tozalaki kokende na bangomba na bituluku ya bato nsambo mpe bandeko mibali ya bilenge bazalaki kolata lokola bato oyo batambolaka na bangomba ya milai mpenza. Kobanda na ngambo ya Allemagne, tozalaki kosala ngonga misato mpo tókatisa bangomba mpe tozalaki kokóma na Špindlerův Mlýn,” esika oyo ezali na kilomɛtrɛ 16,5 na ngambo ya République Tchèque. Na mikolo wana, bato mingi ya Allemagne bazalaki kofanda na esika yango. Moto moko oyo azalaki kobɔkɔla banyama andimaki kosalisaka bandeko. Azalaki kozwa mpunda na ye oyo ezalaki komema bato oyo bazali na konje, azalaki kozwa bakartɔ na engumba moko ya pembeni, epai batindaki bakartɔ yango na nzela ya engbunduka kouta na Prague. Azalaki komema bakartɔ yango na ferme na ye mpe azalaki kobomba yango na esika oyo abatelaka bambuma mpo na kozela bandeko oyo bakomema yango na Allemagne.

Ndeko Richard akobi boye: “Ntango tozalaki kokóma na ferme yango, tozalaki kotya mikanda na basaki na biso, oyo tozalaki kosalela mingimingi mpo na komema biloko ya kilo. Mokomoko na biso azalaki komema kilo soki 50.” Mpo bakanga bango te, bazalaki kotambola na butu, bazalaki kolongwa na mpokwa mpe bazalaki kokóma liboso moi ebima. Ndeko Ernst Wiesner, oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na Allemagne na ntango wana, alobeli mayele mosusu oyo bandeko bazalaki kosalela mpo bákanga bango te, alobi boye: “Bandeko mibale bazalaki kokende liboso mpe, mbala nyonso oyo bazalaki kokutana na moto, bazalaki mbala moko kopelisa ba-torche na bango mpo na kokebisa baninga. Soki esalemi bongo, bandeko oyo bazalaki na kilo makasi mpe oyo bazalaki nsima na bango na ntaka ya mɛtrɛ 100, bazalaki komibomba na matiti pembeni ya nzela tii ntango bandeko wana mibale bakozonga mpe bakoloba mwa liloba mpo bandeko mosusu wana bábima, mpe pɔsɔ na pɔsɔ bazalaki kopona liloba nini bakosalela.” Kasi, kaka te bapolisi ya Allemagne oyo bazalaki kolata iniforme ya bule nde bazalaki likama.

Ndeko Richard alobi boye: “Mokolo moko na mpokwa nasalaki ntango molai mpe yango esalaki ete nabima na République Tchèque nsima ya bandeko mosusu. Molili mpe londende ezalaki makasi, mpe nazalaki kolɛnga na malili ntango nazalaki kotambola na kati  ya mbula mpɛmbɛ. Nakɔtaki na kati ya banzete ya mikuse mpe nazalaki komona nzela te na boumeli ya ngonga ebele. Bato mingi oyo batambolaka na bangomba ya milai bakufá ndenge wana. Kaka ntango bandeko mosusu bazongaki na ntɔngɔ makasi nde nakutanaki na bango.”

Na boumeli ya mbula soki misato, etuluku moko ya moke ya bandeko ya mpiko bazalaki kokende na bangomba pɔsɔ nyonso. Na ntango ya malili, bazalaki kokende na bangomba yango na bisaleli oyo bato oyo batambolaka na bangomba ya minene basalelaka mpe bazalaki komema mikanda na basaki ya mikɔngɔ. Na ntango mosusu, bandeko koleka 20 bazalaki kokatisa bangomba yango na moi, mpe bazalaki koleka na banzela ya bato oyo batambolaka na bangomba balekaka. Mpo na komonisa ete bazali kaka bato oyo batambolaka na bangomba, bandeko basi mosusu bazalaki kotambola ná bango. Bamosusu bazalaki kotambola liboso mpe bazalaki kobwaka bikɔti na bango likoló soki bamoni likambo moko ya mabe.

Mbula mpɛmbɛ ezalaki kozipa bansɔngɛ ya bangomba mpe koleka na bangomba yango ezalaki likama

Soki bandeko oyo bazalaki komema mikanda bazongi na mibembo na bango wana ya butu, makambo ezalaki koleka ndenge nini na nsima? Bibongiseli ezalaki kozwama mpo ete mikanda ekabolama mbala moko. Ndenge nini? Bazalaki kotya mikanda na bakartɔ lokola sabuni mpe bazalaki komema yango na esika bazelaka engbunduka na Hirschberg. Bakartɔ yango ezalaki kotindama na bisika ndenge na ndenge ya Allemagne, epai bazalaki kokabolela bandeko mikanda yango na mayele ndenge tomonisaki yango na ebandeli. Kosala na boyokani ndenge wana mpo na kokabola mikanda ezalaki kosalisa mingi mpo bandeko bayebaki ete soki eyindi, makama ekozala mingi. Kasi, mokolo moko, kozanga ete bandeko bayeba, likambo yango eyebanaki.

Na mobu 1936, bato bamonaki esika oyo bazalaki kobomba mikanda mosika te na Berlin. Na kati ya biloko oyo bakutaki kuna, ezalaki na bakartɔ misato oyo eutaki na Hirschberg mpe moto oyo atindaki yango ayebanaki te. Bapolisi batalaki makomi yango malamumalamu mpo na koyeba moto oyo azali kokɔtisa biloko na ndenge ya moyibi mpo bákanga ye. Mwa moke na nsima, bapolisi bakangaki bato koleka mibale oyo bamonaki ete bango nde bazali kosala likambo yango; na kati na bango, ezalaki mpe na ndeko Richard Rudolph. Lokola bandeko wana bandimaki mokumba nyonso, yango esalaki ete bandeko mosusu bákoba kosala mibembo wana ya likama.

LITEYA OYO TOZWI NA LISOLO

Mikanda oyo bazalaki komema na basaki na bangomba ya minene esalisaki mpenza Batatoli ya Yehova ya Allemagne mpo na kozwa bilei ya elimo. Kasi bandeko bazalaki koleka mpe na banzela mosusu. Tii na mobu 1939, ntango basoda ya Allemagne bakómaki koyangela Tchécoslovaquie, banzela ya ndenge wana ezalaki pembenipembeni ya ndelo ya ekólo yango. Na bikólo mosusu lokola France, Pays-Bas mpe Suisse oyo ezali bandelo ná Allemagne, Batatoli ya bikólo yango batyaki bomoi na bango na likama mpo na komemela bandeko na bango oyo bazalaki na epekiseli bilei ya elimo.

Lelo oyo, mingi na biso tokoki kozwa mikanda, bavideo mpe biloko mosusu oyo tosengeli na yango ata motángo nini. Ntango ozwi mokanda moko ya sika na Ndako ya Bokonzi to obimisi yango na site na biso ya Internet jw.org, mpo na nini te kokanisa na oyo nyonso esalemaki mpo mokanda yango ekómela yo? Ntango mosusu esɛngaki te kokatisa bansɔngɛ ya bangomba oyo etondi na mbula mpɛmbɛ na butu makasi, kasi esɛngaki bandeko mingi básala mosala makasi mpe bámipimela makambo mosusu mpo na kosalela yo yango.

^ par. 3 Azalaki na lisangá ya Hirschberg na Silésie. Engumba ya Hirschberg ekómá Jelenia Góra na sudi-wɛsti ya Pologne.