Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2013

Ndenge ya kosala ntango mwasi to mobali na yo akufi

Ndenge ya kosala ntango mwasi to mobali na yo akufi

BIBLIA elobi polele ete mobali asengeli ‘kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko.’ Mwasi mpe asengeli “kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” Bango nyonso mibale basengeli kokokisa mikumba na bango lokola “mosuni moko.” (Ef. 5:33; Eba. 2:23, 24) Nsima ya mikolo, boyokani mpe bolingo oyo mwasi ná mobali bazalaka na yango ekómaka makasi. Tokoki kokokanisa yango na misisa ya banzete mibale oyo ezali kokola esika moko. Ndenge moko mpe bolingo ya mwasi ná mobali oyo bazali na libala ya esengo ekómaka makasi.

Kasi makambo elekaka ndenge nini soki moko na bango akufi? Boyokani malamu oyo bazalaki na yango ekatani. Mbala mingi mwasi to mobali oyo molongani na ye akufi atikalaka na mpota monene na motema, amiyokaka mpenza akómi ye moko, mpe ntango mosusu ayokaka nkanda to lokola amemi ngambo. Na boumeli ya mbula 58 ya libala na ye, Daniella ayebaki bato ebele oyo basi to mibali na bango bakufaki. * Kasi na nsima, mobali na ye akufaki. Alobaki boye: “Namoná naino te likambo ya boye. Soki ekómeli yo, nde okoyeba ndenge esalaka.”

MPASI OYO EMONANAKA LOKOLA NDE EKOSILA TE

Bato mosusu ya mayele balobi ete mpasi oyo moto ayokaka soki mobali to mwasi na ye akufi eleki bampasi nyonso. Bato mingi oyo bakutaná na likambo yango bandimaka likanisi wana. Esili koleka mbula mingi banda mobali ya Millie akufá. Mpo na komonisa ndenge amiyokaka lokola atikalá ye moko, alobi boye: “Namiyokaka lokola eteni moko ya nzoto  na ngai elongwá.” Azalaki komonisa mpasi oyo ayokaka ndenge mobali na ye akufá eleki sikoyo mbula 25.

Susan azalaki kokanisa ete basi mosusu balekisaka ndelo ndenge balelaka mibali na bango mbula mingi. Na nsima mobali na ye oyo azalaki na mbula 38 akufaki. Alobi ete eleki sikoyo mbula 20, akanisaka ye mikolo nyonso. Mbala mingi, soki atali ete azali te, alelaka mingi.

Biblia emonisi ete mpasi oyo moto ayokaka ntango mobali to mwasi na ye akufi ezalaka mabe mpenza mpe eumelaka mingi. Ntango Sara akufaki, mobali na ye Abrahama ‘akɔtaki kolela ye makasi mpe alelaki ye na kobimisa mpisoli.’ (Eba. 23:1, 2) Atako Abrahama azalaki kondima lisekwa, ayokaki mpasi makasi ntango mwasi na ye akufaki. (Ebr. 11:17-19) Ntango mwasi na ye Rashele akufaki, Yakobo akobaki kokanisa ye. Azalaki kolobela malamu na ye epai ya bana na ye.Eba. 44:27; 48:7.

Liteya nini tokoki kozwa na masolo wana ya Biblia? Mbala mingi, moto oyo mobali to mwasi na ye akufá ayokaka mpasi bambula mingi. Ntango bazali kolela to koyoka mawa, tosengeli te komona bango lokola bazali makasi te na elimo, kasi tosengeli nde komitya na esika na bango mpo motema na bango ezoki. Bakoki kozala na mposa tómitya na esika na bango mpe tósalisa bango mwa ntango molai.

YIKÁ MPIKO MOKOLO NA MOKOLO

Bomoi ya moto oyo mwasi to mobali na ye akufá ezalaka ndenge moko te ná oyo ya monzemba. Nsima ya bambula mingi ya libala, mobali ayebaka ndenge ya kobɔndisa mwasi na ye, kokitisa ye motema ntango azali kotungisama na makanisi to azali na nkanda. Kasi soki mobali yango akufi, mwasi amonaka ete moto oyo azalaki kolinga mpe kobɔndisa ye azali lisusu te. Ndenge moko mpe, nsima ya bambula, mwasi ayebaka ndenge ya kosala mpo mobali na ye azala na kimya mpe esengo. Ndenge asimbaka ye na boboto mpe maloba na ye ya kitoko, likebi oyo atyelaka ye, eleki makambo nyonso. Soki akufi, mobali amiyokaka lokola azangi eloko moko ya ntina na bomoi. Yango wana, moto oyo azali na mawa mpo na mobali to mwasi na ye oyo akufá, ayebaka te ndenge bomoi na ye ekozala mpe abangaka. Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa bango bázala na kimya mpe esengo?

Yehova akoki kosalisa yo mokolo na mokolo oyika mpiko ntango mobali to mwasi na yo akufi

“Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.” (Mat. 6:34) Maloba oyo ya Yesu esalelamaka mpenzampenza mpo na biloko ya mosuni oyo tozalaka na yango mposa, kasi esalisá mpe bato ebele oyo mibali to basi na bango bakufá báyika mpiko. Mwa basanza nsima ya liwa ya mwasi na ye, Charles akomaki boye: “Mpasi oyo nayokaka ndenge Monique akufá ezali kaka makasi, mpe na ntango mosusu nayokaka lokola ekómi makasi koleka. Kasi, nayaki komona ete ezalaka na yango kaka bongo mpe nsima ya mikolo mpasi yango ekosila mokemoke.”

Ya solo, Charles asengelaki koyika mpiko “mokolo na mokolo.” Ndenge nini asalaki yango? Alobaki boye: “Na lisalisi ya Yehova, nazalaki koyika mpiko mokolo na mokolo.” Charles ayokaki te mawa koleka ndelo. Mpasi na ye esilaki kaka mbala moko te, kasi elekelaki ye te. Soki mwasi to mobali na yo akufá, salá makasi oyika mpiko mokolo na mokolo.  Oyebi te matomba to bilendiseli oyo okoki kozwa lobi to nsima ya lobi.

Yehova akanaki te ete bato bakufaka. Epai mosusu, liwa ezali na kati ya “misala ya Zabolo.” (1 Yoa. 3:8; Rom. 6:23) Satana asalelaka liwa mpe kobanga oyo yango ebimisaka mpo na kokómisa bato mingi baombo mpe bázanga elikya. (Ebr. 2:14, 15) Satana asepelaka soki moto azali lisusu na elikya te ete akoki kozala mpenza na esengo, ata na mokili ya sika ya Nzambe. Na yango, mpasi oyo moto ayokaka soki mwasi to mobali na ye akufi eutaka na lisumu ya Adama mpe mayele mabe ya Satana. (Rom. 5:12) Yehova akobongisa mpenza makambo nyonso ya mabe oyo Satana abimisá, mpe akobebisa mpenza liwa, ebundeli na ye ya mabe. Na kati ya bato oyo balongwá na boombo ya kobanga oyo Satana abimiselaka bato, tokoki mpe kotánga bato mingi oyo mibali to basi na bango bakufá, yo mpe okoki kolongwa na boombo yango.

Na ntembe te, ntango bato oyo bakozala na bomoi awa na mabele bakosekwa, bambongwana mingi ekosalema. Kanisá ndenge baboti, bankɔkɔ oyo bakosekwa mpe bakokóma malɛmbɛmalɛmbɛ bato ya kokoka ná bana ya bana na bango. Makambo oyo ememaka bobange ekozala lisusu te. Bilenge basengeli koyekola kotalela bankɔkɔ na bango na lolenge oyo ekeseni mpenza na lolenge oyo bazali kotalela bango lelo, boye te? Tondimi te ete bambongwana yango ekozala mpenza likambo ya sika mpo na bato?

Ezali na mituna mingi oyo tokoki komituna mpo na bato oyo bakosekwa, na ndakisa mpo na mwasi to mobali oyo abalaki mbala mibale to koleka mpe balongani yango bakufá. Basadukai batunaki  motuna moko oyo elobelaki mwasi oyo mobali na ye ya liboso akufaki, na nsima ya mibale mpe mibali na ye nyonso bakufaki. (Luka 20:27-33) Ekozala boni ntango bato yango bakosekwa? Toyebi te, mpe ezali na ntina te kopesapesa makanisi na biso to kotungisama na makambo oyo toyebi te. Na likambo ya ndenge oyo, tosengeli kotyela Nzambe motema. Likambo ya solo ezali ete: Likambo nyonso oyo Yehova akosala na mikolo ezali koya ekozala malamu, oyo tokoki kotyela motema, kasi oyo ekobangisa biso te.

ELIKYA YA LISEKWA EBƆNDISAKA

Liteya oyo elobaka ete bakufi bakozonga na bomoi ezali na kati ya mateya ya Liloba ya Nzambe oyo esimbaka mitema. Masolo ya kala ya bato oyo basekwaki oyo ezali na Biblia epesi biso elikya ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na [Yesu] mpe bakobima.” (Yoa. 5:28, 29) Baoyo bakozala na bomoi na ntango wana bakozala na esengo mingi ndenge bakokutana na bato oyo balongwe na boombo ya liwa. Epai mosusu, tokoki kutu te koyeba esengo oyo bato oyo bakosekwa bakozala na yango.

Ntango bakufi bakobanda kosekwa, mabele ekozala na esengo moko ya kosakana te. Bamilio ya bato oyo bakufaki bakozonga lisusu kofanda esika moko ná bato ya bomoi. (Mrk. 5:39-42; Em. 20:13) Komanyola na likamwisi wana oyo ekosalema na mikolo ezali koya, esengeli kobɔndisa moto nyonso oyo mwasi to mobali na ye akufá.

Ezali na bantina oyo ekoki kosala ete bato mosusu báyoka mawa ntango likambo wana monene ekosalema? Biblia elobi bongo te. Yisaya 25:8 elobi ete Yehova “akolongola mpenza liwa mpo na libela.” Yango emonisi mpe ete mpasi oyo liwa ebimisaka ekosila, mpo esakweli yango ebakisi ete: “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.” Soki ozali koyoka mpasi mpo mwasi to mobali na yo akufá, na ntembe te lisekwa ekopesa yo esengo ya solosolo.

Moto moko te ayebi na mozindo makambo nyonso oyo Nzambe akosala na mokili ya sika. Yehova alobi ete: “Ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele, ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino, mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.” (Yis. 55:9) Elaka ya lisekwa oyo Yesu apesaki, ezali kotinda biso  tótyela Yehova motema ndenge Abrahama asalaki. Likambo ya ntina oyo mokristo nyonso asengeli kosala sikoyo ezali ya kosala oyo Nzambe azali kosɛnga mpo ‘tómonana ete tobongi kozwa bomoi na ntango wana’ elongo na bato oyo bakosekwa.Luka 20:35.

NTINA YA KOZALA NA ELIKYA

Na esika ya kobanga, zalá nde na elikya. Mpo na bato, esengeli te kozala na elikya mpo na mikolo ezali koya. Kasi Yehova apesi biso elikya moko kitoko. Tokoki soki moke te koyeba mpenzampenza ndenge Yehova akokokisa bamposa na biso, kasi tosengeli kozala na elikya ete akosala bongo. Ntoma Paulo akomaki boye: “Elikya oyo ezali komonana ezali elikya te, mpo ntango moto azali komona eloko, atyelaka yango nde elikya? Kasi soki tozali kotyela eloko oyo tozali komona te elikya, tokozela yango na ezaleli ya koyika mpiko.” (Rom. 8:24, 25) Soki ozali na elikya makasi na bilaka ya Nzambe, okozala na makasi ya koyika mpiko. Ezaleli ya koyika mpiko ekosalisa yo omona ndenge Yehova “akopesa yo oyo motema na yo ezali kosɛnga.” Akokokisa “mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.”Nz. 37:4; 145:16; Luka 21:19.

Tyá motema na elaka oyo Yehova apesi ete bato bakozala na esengo mingi na mikolo ezali koya

Mwa moke liboso ete Yesu akufa, bantoma na ye babulunganaki na makanisi. Yesu abɔndisaki bango na maloba oyo: “Mitema na bino etungisama te. Bóndimela Nzambe, bóndimela mpe ngai.” Ayebisaki bango ete: “Nakotika bino bino moko te. Nazali koya epai na bino.” (Yoa. 14:1-4, 18, 27) Maloba na ye epesaka bayekoli na ye ya basiɛklɛ nyonso oyo batyami mafuta na elimo, elikya mpe makasi ya koyika mpiko. Ndenge moko, baoyo bazali na mposa makasi ya komona bandeko na bango na lisekwa basengeli mpe kobungisa elikya te. Yehova ná mwana na ye bakotika bango bango moko te. Okoki mpenza kondima likambo yango!

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.