Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2013

‘Koningana nokinoki te na makanisi na yo’!

‘Koningana nokinoki te na makanisi na yo’!

“Bandeko, . . . tozali kosɛnga bino ete bóningana nokinoki te na makanisi na bino.”2 TES. 2:1, 2.

1, 2. Nini esali ete makambo ya lokuta ezala mingi lelo, mpe emonanaka na balolenge nini? (Talá elilingi na ebandeli ya lisolo.)

MAKAMBO ya lokuta mpe kobuba bato ezali komonana mingi na ebongiseli oyo. Yango ekoki kokamwisa biso te. Biblia emonisi polele ete Satana Zabolo azali mokosi ya monene mpenza, mpe azali mokonzi ya mokili oyo. (1 Tim. 2:14; 1 Yoa. 5:19) Lokola tozali kokóma na nsuka ya ebongiseli oyo mabe, nkanda ya Satana ezali kobakisama mpo atikali kaka “na ntango mokuse.” (Em. 12:12) Yango wana, tokoki kokamwa te soki bato oyo Satana atambwisaka bazali koloba makambo ya lokuta, mingimingi mpo na bato oyo bazali kosala makasi ete losambo ya solo ekende liboso.

2 Na ntango mosusu, ekómaka ete bákosela basaleli ya Yehova makambo to bálobela bindimeli na bango na ndenge ya mabe na batelevizyo to na radio. Bato basalelaka mingi bazulunalo, bafilme na televizyo mpe Internet mpo na kopanza makambo ya lokuta. Yango esali ete bato mosusu bákóma na mobulungano mpe bándima makambo yango.

3. Nini ekoki kosalisa biso tólanda te makambo ya lokuta?

3 Mpo tólanda te mayele wana mabe ya monguna na biso, tozali na Liloba ya Nzambe, oyo ezali na “litomba . . . mpo na kosembola makambo.” (2 Tim. 3:16) Ezali na ntina ete tózwa liteya na makambo oyo ntoma Paulo akomaki ete bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso na Tesaloniki bakosamaki, bandimaki makambo ya lokuta. Alendisaki bango ete ‘báningana nokinoki te na makanisi na bango.’ (2 Tes. 2:1, 2) Mateya nini tokoki kozwa na toli wana ya bolingo mpenza oyo ntoma Paulo apesaki, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango na bomoi na biso?

TOLI OYO EYEI NA NTANGO OYO EBONGI

4. Ndenge nini ntoma Paulo akebisaki bakristo ya Tesaloniki mpo na koya ya “mokolo ya Yehova,” mpe ndenge nini biso tozwaka makebisi lelo?

4 Na mokanda ya liboso oyo akomelaki lisangá ya Tesaloniki,  ntoma Paulo abendaki likebi na bango ete “mokolo ya Yehova” ezali koya. Alingaki te ete bandeko na ye bázala na molili mpe bázanga komibongisa. Kutu, alendisaki bango lokola “bana ya pole” mpo ‘bázala ekɛngɛ mpe bábatela makanisi na bango.’ (Tángá 1 Batesaloniki 5:1-6.) Lelo oyo, tozali kozela kobomama ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Yango ekozala elembo oyo ekomonisa ete mokolo monene ya Yehova ebandi. Likambo ya esengo, toyebi mpenza ndenge mokano ya Yehova ekokokisama. Lisusu, na nzela ya lisangá, tozwaka malako na ntango oyo ebongi, oyo esalisaka biso mpo tóbatela makanisi na biso. Soki tozali kotya likebi na batoli yango oyo ezongelamaka mbala na mbala, yango ekokómisa makasi ekateli oyo tozali na yango ya ‘kosala mosala mosantu na makoki na biso ya kokanisa.’Rom. 12:1.

Ntoma Paulo akomaki mikanda oyo epesaki bakristo toli oyo eyaki na ntango oyo ebongi (Talá paragrafe 4, 5)

5, 6. (a) Ntoma Paulo akomaki makambo nini na mokanda na ye ya mibale epai ya Batesaloniki? (b) Makambo nini Nzambe akosala mosika te na nzela ya Yesu, mpe tosengeli komituna mituna nini?

5 Mwa moke, nsima ya kotinda mokanda na ye ya liboso epai ya bakristo ya Tesaloniki, ntoma Paulo atindelaki bango mokanda ya mibale. Na mokanda yango, abendaki likebi na bango na bolɔzi oyo ekoya ntango Nkolo Yesu akopesa bitumbu ya Nzambe epai ya “baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali kotosa te nsango malamu.” (2 Tes. 1:6-8) Mokapo 2 ya mokanda yango emonisi ete bato mosusu ya lisangá yango bakómaki kozela mokolo ya Yehova na “mitema likolólikoló” mpe bazalaki kokanisa ete mokolo yango ekoya nokinoki. (Tángá 2 Batesaloniki 2:1, 2.) Bakristo wana ya siɛklɛ ya liboso bayebaki mokano ya Yehova kaka ndambo, kutu likambo yango emonani na maloba oyo ntoma Paulo akomaki na nsima na ntina na esakweli ete: “Tozali na boyebi ya ndambo mpe tosakolaka kaka na ndambo; kasi ntango eloko ya mobimba ekoya, oyo ya ndambo ekolongolama.” (1 Ko. 13:9, 10) Batoli ya Biblia oyo ntoma Paulo, Petro mpe bakristo mosusu ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bakomaki na ntango wana, ekokaki kobongisa bakristo ya Tesaloniki mpo bábatela kondima na bango.

6 Mpo na kosembola makambo, na litambwisi ya elimo santu, ntoma Paulo alimbolaki ete lipɛngwi monene mpe “mobuki mibeko” bakobima liboso ya mokolo ya Yehova. * Na nsima,  wana ntango na ye ekokoka, Nkolo Yesu asengelaki ‘kokómisa eloko mpamba’ baoyo nyonso bakosamaki. Ntoma Paulo amonisi ntina oyo bato yango basengelaki kosambisama; ezali mpo ete “bamonisaki te ete balingi mpenza solo.” (2 Tes. 2:3, 8-10) Ekozala malamu soki tomituni boye: ‘Nalingaka mpenza solo? Nazali kotambola nzela moko ná bingɛngiseli ya sika, oyo ebimaka na zulunalo oyo mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia, oyo ebimisamaka mpo na masangá ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba?’

ZALÁ NA BWANYA NTANGO OZALI KOPONA BANINGA NA YO

7, 8. (a) Makama nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso basengelaki kobunda na yango? (b) Likama nini monene bakristo ya solo bazali na yango lelo oyo?

7 Longola makama ya bapɛngwi mpe mateya na bango, bakristo basengelaki mpe kokutana na makama mosusu. Ntoma Paulo akomelaki Timote ete “bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.” Ntoma Paulo alobaki lisusu ete “lokola bamosusu bakolisi bolingo wana babungi nzela, batiki kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Tim. 6:10) Longola yango, “misala ya nzoto” mpe ezali na kati ya makama oyo tokutanaka na yango.Gal. 5:19-21.

8 Yango wana, okoki komona ntina oyo ntoma Paulo apesaki Batesaloniki toli ya polele na likambo etali likama oyo bato oyo abengaki “bantoma ya lokuta” babimisaki. Na kati na bango, ezalaki na bato oyo bazalaki koloba “makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (2 Ko. 11:4, 13; Mis. 20:30) Na nsima, Yesu apesaki lisangá ya Efese longonya mpo ‘esepelaki te na bato mabe.’ Bato yango ya Efese ‘bamekaki’ bantoma yango ya lokuta, mpe bamonaki ete bazali bakosi. (Em. 2:2) Likambo ya esengo, na mokanda na ye ya mibale epai ya Batesaloniki, ntoma Paulo alendisaki bango boye: “Sikoyo tozali kopesa bino mitindo, bandeko, na nkombo ya Nkolo Yesu Kristo, ete bókima ndeko nyonso oyo azali kotambola na mobulu.” Atángaki mpenza bakristo oyo bazalaki “kolinga kosala mosala te.” (2 Tes. 3:6, 10) Soki bato wana babengamaki bato ya mobulu, omoni te ete baoyo bazalaki kobendama na lipɛngwi bazalaki bato ya mobulu koleka, boye te? Ya solo, ezalaki mpenza likama kosala boninga ná bato yango mpe esengelaki kokima bango; tosengeli mpe kosala bongo lelo oyo.Mas. 13:20.

9. Mpo na nini tosengeli kokeba soki moto moko abandi koloba makanisi euti na Biblia te to koloba mabe mpo na basusu?

9 Tokómi mpenza pene ete bolɔzi monene ebanda mpe mokili oyo mabe esuka, na yango tosengeli kozwa na lisɛki te batoli oyo epesamaki na siɛklɛ ya liboso. Tosengeli kolinga ata moke te ‘kobosana ntina’ oyo Yehova azali komonisa boboto monene mpe kolongola na makanisi elaka ya bomoi ya seko, ezala na likoló to awa na mabele. (2 Ko. 6:1) Soki moto moko oyo ayanganaka na makita na biso aluki kobenda biso na makanisi oyo euti na Biblia te to koloba mabe mpo na basusu, tosengeli mpenza kokeba.2 Tes. 3:13-15.

“BÓKOBA KOKANGAMA NA MIMESENO”

10. Ntoma Paulo alendisaki bakristo ya Tesaloniki bákangama na mimeseno nini?

10 Ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye ya Tesaloniki ete ‘bátɛlɛma ngwi’ mpe bákangama na makambo oyo bayekolaki. (Tángá 2 Batesaloniki 2:15.) “Mimeseno” nini oyo bateyamaki na yango? Na ntembe te, ezali te mimeseno oyo ezalaki na lingomba ya lokuta mpe oyo bato bazalaki komonisa ete ezali na motuya mingi koleka oyo ezali na kati ya Makomami. Kasi, ntoma Paulo alobelaki nde mateya oyo ye mpe bandeko mosusu bazwaki epai ya Yesu mpe oyo Nzambe atindaki ntoma Paulo ayebisa, oyo mingi na yango ekomamaki na kati ya Makomami mosantu. Ndenge ntoma Paulo akomaki yango, akumisaki  bandeko na ye ya Korinti mpo ‘na makambo nyonso bazalaki kokanisa ye mpe bazalaki kokangama makasi na mimeseno kaka ndenge apesaki bango yango.’ (1 Ko. 11:2) Mateya yango eutaki mpenza na esika oyo ebongi mpe ebongaki kotyelama motema.

11. Makambo nini ekoki kosala ete bato mosusu bákosama?

11 Ntango akomelaki Baebre, ntoma Paulo abendaki likebi na bango na makambo mibale oyo ekoki kosala ete mokristo abungisa kondima mpe atika kotɛlɛma ngwi. (Tángá Baebre 2:1; 3:12.) Alobelaki ‘komemama mosika na nzela’ mpe ‘kotika.’ Masuwa oyo ezali komemama mosika na libongo ekoki koyeba te na ebandeli ete ezali komitangola na libongo. Mokemoke, ekokóma mosika na libongo. Nzokande, moto oyo azali kotindika masuwa na ye mpo etika libongo, akoki kokómisa yango mosika na libongo ye moko. Bandakisa oyo mibale emonisi malamu ndenge bato mosusu bakoki kotika ete bákosa bango, mpe kopesa nzela ete kondima na bango mpo na solo elɛmba.

12. Wapi makambo oyo ekoki lelo oyo kosala ete makanisi na biso eningana nokinoki?

12 Ekoki kozala ete yango nde ekómelaki bakristo mosusu ya Tesaloniki. Bongo tokoloba nini mpo na mikolo na biso, oyo makambo oyo ekoki kolekisela biso ntango ezali kobotama lokola mayebo? Kanisá na bangonga ebele oyo bato mosusu balekisaka mpo na kosolola na baninga na bango na Internet, kotánga mpe kotinda bamesaje na Internet, kosakana to koyeba baprogramɛ nyonso ya masano. Ata likambo moko na kati ya makambo wana ekoki kokanga mokristo miso na makambo ya elimo mpe kolɛmbisa molende na ye. Yango ekoki kobimisa makama nini? Moto akoki kozanga ntango ya kobondela, koyekola Liloba ya Nzambe, koyangana na makita mpe kosakola nsango malamu. Tokoki kosala nini mpo tópesa nzela te ete makanisi na biso eningana nokinoki?

NDENGE YA KOBATELA MAKANISI NA BISO MPO ENINGANA TE

13. Ndenge Biblia esakolaki, ezaleli nini bato mingi bazali na yango, mpe nini ekoki kosalisa mpo kondima na biso ebeba te?

13 Likambo oyo tosengeli mpenza kosala ezali ete tobosanaka te ntango oyo tozali mpe likama ya kozala baninga ya bato oyo bazali koyeba te ete oyo ezali “mikolo ya nsuka.” Ntoma Petro akomaki na ntina ya eleko yango ete: “Na mikolo ya nsuka basɛki bakoya ná kosɛka na bango, bakotambola na kolanda bamposa na bango moko mpe bakoloba ete: ‘Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.’” (2 Pe. 3:3, 4) Kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ekosalisa biso tótya makanisi mobimba na ntango oyo tozali mpe tóbosana te ete tozali na “mikolo ya nsuka.” Lipɛngwi oyo Biblia esakolaki ebimaki banda kala mpe ezali tii lelo oyo. “Mobuki mibeko” azali kaka mpe azali kotɛmɛla basaleli ya Nzambe. Na yango, lokola mokolo ya Yehova ekómi mpenza pene, biso tosengeli kozala ntango nyonso ekɛngɛ.Sef. 1:7.

Komibongisa malamu mpe kosakola ekoki kosalisa biso mpo ‘makanisi na biso eningana nokinoki te’ (Talá paragrafe 14, 15)

14. Mpo na nini komipesa na mosala ya Nzambe ekoki kozala libateli?

14 Makambo oyo esalemá emonisi ete likambo ya liboso mpo na kotikala ekɛngɛ mpe koboya ete makanisi na biso eningana, ezali ya komipesa mpenza na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Ntango Kristo Yesu, mokonzi ya lisangá, atindaki bayekoli bákende kokómisa bato ya bikólo nyonso bayekoli, koteya bango bátosa makambo nyonso oyo ateyaki, apesaki bango toli oyo ekokaki kobatela bango. (Mat. 28:19, 20) Soki tolandi toli yango, tokozala na molende na mosala ya kosakola. Okanisi ete bandeko ya Tesaloniki bakokaki kozala na esengo soki bazalaki kosakola mpe koteya kaka bongobongo, lokola ezalaki mosala moko ya kosala kaka mpo  na kosala? Ntoma Paulo alobaki na bango ete: “Bóboma mɔtɔ ya elimo te. Bótyola maloba ya esakweli te.” (1 Tes. 5:19, 20) Oyo nde bisakweli kitoko tozali koyekola mpe koyebisa bato mosusu!

15. Makambo nini ya ntina tokoki kotalela na Losambo na kati ya libota?

15 Na ntembe te, tolingaka kosalisa mabota na biso ekóma kosakola malamu. Bandeko mingi bamoni ete lolenge moko ya kosala yango ezali ya kobomba mwa ntango na Losambo na kati ya libota mpo na kolobela mosala ya kosakola. Bokoki komona malamu bólobela na kati ya libota ndenge bokozongela bato oyo basepelaki ntango bosololaki na bango na mosala ya kosakola. Bakoloba nini ntango bakozongela bato yango? Masolo nini ekosepelisa bato yango mpe ekosala ete bándima bozongelaka bango? Ntango nini ebongi mpenza kozongelaka bango? Bato mingi mosusu balekisaka ntango na Losambo na kati ya libota mpo na kobongisa makambo oyo ekolobama na makita ya lisangá mpo bálanda yango na likebi. Okoki komibongisa malamu mpo opesa biyano? Kopesa biyano na makita ekokómisa kondima na yo makasi mpe ekosalisa yo mpo ete makanisi na yo eningana te. (Nz. 35:18) Ya solo, kosala Losambo na kati ya libota ekoki kobatela biso na makanisi oyo euti na Biblia te mpe bantembe.

16. Eloko nini oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na yango, oyo epesaka bango makasi ya kobatela makoki na bango ya kokanisa?

16 Soki tokanisi na ndenge oyo Yehova asalisi basaleli na ye báyeba bisakweli mingi ya Biblia na boumeli ya ebele ya bambula, tokoki mpenza kosepela na mapamboli kitoko oyo ezali liboso na biso. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na elikya ya kozala elongo na Kristo na likoló. Yango ekoki kotinda bango bábatela makoki na bango ya kokanisa! Maloba oyo ntoma Paulo akomaki mpo na Batesaloniki ebongi mpenza mpo na bango: “Biso tosengeli kopesa Nzambe matɔndi ntango nyonso mpo na bino, bandeko oyo Yehova alingi, mpamba te Nzambe aponaki bino . . . na ndenge asantisaki bino na elimo mpe na nzela ya kondima na bino na kati ya solo.”2 Tes. 2:13.

17. Toli nini ya kolendisa omoni na 2 Batesaloniki 3:1-5?

17 Baoyo mpe bazali kozela bomoi ya seko awa na mabele, basengeli mpe kosala makasi mpo makanisi na bango eningana te nokinoki. Soki ozali na elikya ya bomoi awa na mabele, batelá makanisi oyo ntoma Paulo akomaki mpo na baninga na ye, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki na Tesaloniki. (Tángá 2 Batesaloniki 3:1-5.) Mokomoko na biso asengeli mpenza kosepela na makanisi oyo kitoko. Ɛɛ, mikanda oyo ntoma Paulo atindelaki Batesaloniki ezali na batoli ya kitoko mpenza oyo ekebisi biso na likambo etali koloba makanisi oyo euti na Biblia te to oyo ezangi motó ná makolo. Batoli oyo ezali mpenza na ntina mingi mpo na biso baoyo tozali kobika na mikolo oyo ya nsuka.

^ par. 6 Ndenge totángaka na Misala 20:29, 30, ntoma Paulo amonisaki ete na kati ya masangá, “mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” Na nsima, likambo yango emonanaki na ndenge bokeseni ekómaki komonana kati na bakonzi ya mangomba mpe bandimi mpamba. Na siɛklɛ ya misato, “mobuki mibeko” amonanaki, ayebanaki na etuluku ya bakonzi ya mangomba ya nkombo mpamba.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1/02/1990, nkasa 10-14 (na Lifalanse).