Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2013

‘Oyo ezali ekaniseli mpo na bino’

‘Oyo ezali ekaniseli mpo na bino’

“Mokolo oyo esengeli kozala ekaniseli mpo na bino, mpe bosengeli kokanisa yango lokola fɛti moko mpo na Yehova.”KOB. 12:14.

1, 2. Anivɛrsɛrɛ nini esengeli kozala na ntina mpo na bakristo nyonso, mpe mpo na nini?

NTANGO okanisaka na baanivɛrsɛrɛ, oyo wapi eyelaka yo mbala moko na makanisi? Moto oyo abalá akoki koloba ete: “Anivɛrsɛrɛ ya libala na ngai.” Mpo na bato mosusu, ekoki kozala mokolo oyo likambo moko monene esalemaki, lokola mokolo oyo mboka na bango ezwaki lipanda. Kasi, oyebi anivɛrsɛrɛ oyo bato bakanisaka yango eleki sikoyo mbula 3 500?

2 Ezali molulu ya Elekeli. Ezalaki komonisa mokolo oyo Bayisraele basikolamaki na boombo na Ezipito. Molulu yango esengeli kozala na ntina mingi mpo na yo. Mpo na nini? Mpamba te etaleli makambo mingi ya ntina na bomoi na yo. Kasi, mbala mosusu okoki kokanisa boye, ‘Bayuda basalaka Elekeli mpo bazali Bayuda kasi, ngai nazali Moyuda te. Mpo na nini nasengeli kotyela anivɛrsɛrɛ yango likebi?’ Tokoki kozwa eyano na maloba oyo ya ntina mingi: “Kristo elekeli na biso apesami mbeka.” (1 Ko. 5:7) Mpo na kokanga ntina ya maloba yango, tosengeli koyeba malamumalamu ndenge oyo Elekeli ya Bayuda ezalaki kosalema mpe tótalela yango lokola nde mobeko oyo epesamaki mpo na bakristo nyonso.

ELEKELI EZALAKI NA NTINA NINI?

3, 4. Makambo nini esalemaki liboso ete Elekeli ya liboso esalema?

3 Ebele ya bato na mokili mobimba oyo bazali Bayuda te bayebi mwa moke makambo oyo esalemaki liboso ete Elekeli ya liboso esalema. Ekoki kozala ete batángá yango na mokanda ya Kobima, bayoká yango na masolo to batalá yango na bafilme.

4 Ntango Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito na boumeli ya bambula mingi, Yehova atindaki Moize ná ndeko na ye Arona epai ya Farao mpo na kosɛnga ye atika bato na Ye bázonga epai na bango. Mokonzi wana ya Ezipito ya lolendo aboyaki kotika Bayisraele bákende, yango wana Yehova abimiselaki ekólo yango malɔzi mingi. Nsukansuka, Nzambe abimiselaki bango bolɔzi ya zomi oyo ebomaki bana nyonso ya liboso ya Ezipito, mpe yango etindaki Farao atika Bayisraele bákende.Kob. 1:11; 3:9, 10; 5:1, 2; 11:1, 5.

5. Makambo nini Bayisraele basengelaki kosala liboso ete bálongwa na boombo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

 5 Kasi Bayisraele basengelaki kosala nini liboso ete bázwa bonsomi? Ezalaki na 1513 L.T.B., na mokolo, oyo ezala butu to moi, eumelaka ndenge moko na sanza ya Abibe, oyo na nsima ekómaki kobengama Nisana. * Nzambe alobaki ete na mokolo ya zomi ya sanza yango, Bayisraele basengelaki komibongisa mpo na kosala mwa makambo mosusu na mokolo ya 14 Nisana. Mokolo yango ezalaki kobanda na mpokwa ntango moi elali mpamba te mikolo ya Baebre ezalaki kobanda na mpokwa mpe kosuka na mpokwa ya mokolo oyo elandi. Na mokolo ya 14 Nisana, libota mokomoko esengelaki koboma mpate ya mobali (to ntaba) mpe kopakola ndambo ya makila na yango na makonzí ya porte mpe na libaya ya likoló oyo esimbaka makonzí ya porte ya ndako. (Kob. 12:3-7, 22, 23) Libota esengelaki kolya mwana ya mpate ya kotumba ná mampa oyo ezangi levire mpe mwa ndunda. Anzelu ya Nzambe alekaki na ekoló yango mpe abomaki bana nyonso ya liboso ya Ezipito, kasi Nzambe abatelaki Bayisraele oyo batosaki, mpe na nsima asikolaki bango.Kob. 12:8-13, 29-32.

6. Ndenge nini Bayisraele bakómaki kotalela Elekeli na nsima?

6 Makambo esalemaki ndenge wana mpe mbula na mbula Bayisraele basengelaki kokanisaka mokolo oyo basikolamaki. Nzambe ayebisaki bango boye: “Mokolo oyo esengeli kozala ekaniseli mpo na bino, mpe bosengeli kokanisa yango lokola fɛti moko mpo na Yehova na boumeli ya mabota na bino nyonso. Bosengeli kokanisa yango lokola mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” Bazalaki kosala fɛti mosusu ya mikolo nsambo nsima ya fɛti ya mokolo ya 14 Nisana. Elekeli ezalaki mpenza mokolo ya 14 Nisana, kasi bakokaki mpe kosalela liloba yango mpo na kolobela mikolo nyonso mwambe ya bafɛti wana. (Kob. 12:14-17; Luka 22:1; Yoa. 18:28; 19:14) Elekeli ezalaki moko ya bafɛti (“baanivɛrsɛrɛ,” The Bible in Living English) oyo Bayuda basengelaki kokanisaka mbula nyonso.2 Nta. 8:13.

7. Likambo nini Yesu abimisaki na Elekeli ya nsuka?

7 Lokola Bayuda nyonso oyo bazalaki na nse ya mibeko ya Moize, Yesu ná bantoma na ye mpe bazalaki kosala Elekeli mbula nyonso. (Mat. 26:17-19) Na Elekeli ya nsuka, Yesu abandisaki molulu moko ya sika oyo bayekoli na ye basengelaki kosalaka mbula na mbula. Molulu yango ebengami Bilei ya mpokwa ya Nkolo. Kasi mokolo nini basengelaki kosala yango?

BILEI YA MPOKWA YA NKOLO ESENGELI KOSALEMA MOKOLO NINI?

8. Na kotalela Elekeli ná Bilei ya mpokwa ya Nkolo, motuna nini tokoki komituna?

8 Yesu abandisaki Bilei ya mpokwa ya Nkolo ntango kaka Elekeli ya nsuka oyo Yehova asɛngaki esalemaki, molulu wana ya sika esengelaki kosalema mokolo ya Elekeli. Ntango mosusu okoki komona ete dati ya Elekeli ya Bayuda oyo ezali na bakalandrye ya lelo ekoki kokesana na mokolo moko to mikolo mingi na dati ya mokolo oyo tokanisaka liwa ya Kristo. Mpo na nini bokeseni ya ndenge wana? Eyano ezali na kati ya mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele. Nsima ya koloba ete “lisangá mobimba ya liyangani ya Yisraele esengeli koboma” mwana ya mpate, Moize alobaki polele ntango nini na mokolo ya 14 Nisana basengelaki kosala yango.Tángá Kobima 12:5, 6.

9. Na kotalela Kobima 12:6, ntango nini bazalaki koboma mwana-mpate? (Talá mpe etanda  “Na eteni nini ya mokolo?”)

9 Buku moko (Le Pentateuque et les prophètes) emonisi ete na Kobima 12:6, mwana ya mpate esengelaki kobomama na “mpokwa liboso ete molili ekɔta.” Mabongoli mosusu ya Biblia esalelaka mpenza maloba yango. Mabongoli mosusu mpe, na ndakisa libongoli ya Bayuda oyo babengi Tanakh, ebongolaka yango na “mpokwa.”  Nzokande mosusu mpe ebongolaka yango na “ntango moi ebandi kokɔta” to “ntango moi ebandi kolala.” Esengelaki koboma mwana-mpate nsima ya kolala ya moi, kasi mwa kongɛnga ezali naino, ntango mokolo ya 14 Nisana ebandi.

10. Bato mosusu balobaka ete bazalaki koboma mwana-mpate ntango nini, kasi likambo yango ebimisi motuna nini?

10 Na nsima ya mikolo, Bayuda mosusu bakanisaki ete ekozwa ntango mingi mpo na koboma bana-mpate nyonso oyo bato bamemi na tempelo. Na yango, bato bakómaki kokanisa ete Kobima 12:6 elobeli nsuka ya mokolo ya 14 Nisana, elingi koloba na katikati ya ntango oyo moi ebandaka kolala (nsima ya midi) mpe na nsuka ya mokolo ntango moi esilisi kokɔta. Kasi, soki makanisi wana ezalaki solo, bongo ntango nini bakokaki kolya biloko ya Elekeli? Profesɛrɛ moko na nkombo Jonathan Klawans, oyo alimbolaka makambo etali Bayuda ya kala, alobi ete: “Mokolo ya sika ebandaka ntango moi elali, yango wana bazalaki kopesa mwana-mpate mokolo ya 14, kasi Pasika mpe kolya biloko na yango, ezalaki kobanda mokolo ya 15, atako kolandana ya badati yango emonisami polele te na mokanda ya Kobima.” Akomaki lisusu ete: “Mikanda ya Barabi . . . eyebisi kutu te ndenge nini Seder [Bilei ya Pasika] ezalaki kolyama liboso ete tempelo ebomama” na mobu 70 ya ntango na biso.

11. (a) Makambo nini Yesu akutanaki na yango na mokolo ya Elekeli ya mobu 33 T.B.? (b) Mpo na nini mokolo ya 15 Nisana ya mobu 33 T.B. ebengamaki Sabata “monene”? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

11 Na yango, ezali mpenza na ntina tómituna ete: “Tokoloba nini mpo na Elekeli oyo esalemaki na mobu 33 T.B.?” Na mokolo ya 13 Nisana, ntango “mokolo oyo mbeka ya elekeli esengelaki kopesama” ekómaki pene, Yesu ayebisaki ntoma Petro ná Yoane boye: “Bókende mpe bóbongisela biso elekeli mpo tólya yango.” (Luka 22:7, 8) “Nsukansuka . . . ngonga ekokaki” mpo na kolya Elekeli, na mokolo ya 14 Nisana nsima ya kolala ya moi, oyo ezalaki mokolo ya minei na mpokwa. Yesu alyaki Elekeli yango ná bantoma na ye mpe na nsima abandisaki Bilei ya mpokwa ya Nkolo. (Luka 22:14, 15) Kaka na butu wana, bakangaki ye mpe basambisaki ye. Babakaki Yesu na nzete ya mpasi pene na midi ya 14 Nisana mpe akufaki na nsima ya midi. (Yoa. 19:14) Na yango, ‘Kristo elekeli na biso apesamaki mbeka’ kaka mokolo oyo bazalaki koboma mwana-mpate ya Elekeli. (1 Ko. 5:7; 11:23; Mat. 26:2) Wana mokolo yango ezalaki kokende na nsuka, Yesu akundamaki; liboso ete mokolo ya 15 Nisana ebanda. *Lev. 23:5-7; Luka 23:54.

 EKANISELI MOKO YA NTINA MINGI MPO NA YO

12, 13. Na ndenge nini molulu ya Elekeli etalelaki mpe bana ya Bayuda?

12 Tózongela mwa moke makambo oyo esalemaki na Ezipito. Moize alobaki ete na mikolo ezali koya, basaleli ya Nzambe basengelaki kokoba kosala Elekeli; esengelaki kozala lilako “mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” Lokola ezalaki molulu oyo esengelaki kosalema mbula na mbula, na ntembe te bana basengelaki kotuna baboti na bango ntina ya molulu yango. (Tángá Kobima 12:24-27; Mib. 6:20-23) Na nsima, Elekeli elingaki ezala lokola “ekaniseli” ata mpo na bana na bango.Kob. 12:14.

13 Lokola bana bazalaki kobotama, esengelaki koyebisaka bango mateya ya ntina; tata asengelaki kosala yango mpo na mwana na ye. Na ndakisa, esengelaki koyebisa bana ete Yehova akoki kobatela basambeli na ye. Bana bayekolaki ete Yehova azali te libombami to nguya moko boye. Kasi azali mpenza Nzambe ya solo oyo atyelaka bato na ye likebi mpe oyo asalaka makambo mpo na bolamu na bango. Amonisaki yango na ndenge abatelaki mpe abikisaki bana nyonso ya liboso ya Yisraele “ntango abɛtaki Baezipito na bolɔzi.”

14. Baboti bakristo bakoki kosalela lisolo ya Elekeli mpo na koteya bana na bango likambo nini?

14 Baboti bakristo bayebisaka te bana na bango ndimbola ya Elekeli wana mbula na mbula. Kasi, oteyaka bana na yo liteya oyo bakoki kozwa na lisolo yango ete Nzambe abatelaka basaleli na ye? Omonisaka bango ete yo moko ondimaka mpenza ete Yehova abatelaka ntango nyonso basaleli na ye? (Nz. 27:11; Yis. 12:2) Osalaka yango lokola kaka mwa botángi moko ya bongobongo, to ezalaka lokola lisolo moko ya ntina mingi kati na yo ná bana? Salá makasi olobelaka liteya yango na ndenge oyo ekosalisa libota na yo ekóma na boyokani malamu ná Yehova.

Ntango bozali kotalela lisolo ya Elekeli, mateya nini okosalisa bana na yo báyeba? (Talá paragrafe 14)

15, 16. Baboti bakoki kosalela lisolo ya Elekeli mpe makambo oyo ezali na mokanda ya Kobima mpo na kolobela likambo nini oyo etali Yehova?

15 Liteya oyo tokoki kozwa na lisolo ya Elekeli ezali kaka te ete Yehova abatelaka basaleli na ye. Abikisaki mpe bango, na ndenge ‘abimisaki bango na Ezipito.’ Kanisá naino oyo asalaki mpo na kobikisa bango. Likonzí ya lipata mpe likonzí ya mɔtɔ ezalaki kotambwisa bango. Bakatisaki na makolo Mbu Motane oyo etɛlɛmaki ngambo na ngambo lokola efelo. Ntango basilisaki kokatisa, bamonaki ndenge mai yango ezalaki kozipa basoda ya Ezipito. Na nsima, Bayisraele oyo babikaki bayembaki boye: “Tiká nayembela Yehova . . . Abwaki mpunda ná motambwisi na yango na mbu. Makasi na ngai mpe nguya na ngai ezali Yah, mpo azali lobiko na ngai.”Kob. 13:14, 21, 22; 15:1, 2; Nz. 136:11-15.

16 Soki ozali na bana, osalisaka bango bándima ete Yehova azali Mobikisi? Na masolo na yo to bikateli oyo ozwaka esalisaka bango bámona ete ondimaka mpe bongo? Na Losambo na kati ya libota, okoki mpe kokɔtisa makambo oyo totángaka na Kobima mokapo 12 tii na 15 mpe komonisa ndenge Yehova abikisaki basaleli na ye. Na ntango mosusu okoki kotalela Misala 7:30-36 to Danyele 3:16-18, 26-28 mpo na kolobela liteya wana. Ya solo, mikóló ná bilenge, basengeli kotya motema ete Yehova azali Mobikisi na bileko nyonso. Ndenge abikisaki basaleli na ye na ntango  ya Moize, akobikisa mpe biso na mikolo ezali koya.Tángá 1 Batesaloniki 1:9, 10.

TÓKANISAKA YANGO

17, 18. Kokanisa na ndenge basalelaki makila na Elekeli ya liboso ezali kozongisa likambo nini na makanisi na biso?

17 Bakristo ya solo bakanisaka Elekeli ya Bayuda te. Anivɛrsɛrɛ yango ezalaki na kati ya makambo oyo esɛngamaki na mobeko ya Moize, kasi biso tozali te na nse ya mibeko yango. (Rom. 10:4; Kol. 2:13-16) Tokanisaka molulu moko ya ntina mingi: liwa ya Mwana ya Nzambe. Atako bongo, ezali na makambo mosusu oyo ezalaki kosalema na Elekeli oyo babandisaki na Ezipito, oyo ezali na ntina mingi mpo na biso.

18 Makila ya mwana-mpate oyo bapakolaki na makonzí ya porte mpe na libaya ya likoló oyo esimbaka makonzí yango ezalaki na ntina mpo na kobikisa bato. Lelo oyo, topesaka Nzambe bambeka ya banyama te, ezala na mokolo ya Elekeli to na mokolo mosusu nyonso. Kasi ezali na mbeka moko ya ntina mpenza oyo ekoki kobikisa bato mpo na libela. Ntoma Paulo akomaki na ntina etali “lisangá ya bana ya liboso oyo bakomamá nkombo na likoló.” Makila ya Yesu to “makila ya komwangisa,” nde ezali eloko oyo ezali kobikisa bakristo yango oyo batyami mafuta na elimo. (Ebr. 12:23, 24) Bakristo oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele, basengeli mpe kaka na makila yango mpo bábika. Basengeli mbala na mbala kokanisa maloba oyo: “Mpo na ye tosikolami na nzela ya lisiko na makila ya moto wana, ɛɛ, tolimbisami mabunga na biso, na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye.”Ef. 1:7.

19. Na ndenge nini makambo oyo bazalaki kosala nyama ya Elekeli ekoki kolendisa totyelaka bisakweli motema?

19 Ntango bazalaki koboma mwana-mpate mpo na kolya na Elekeli, Bayisraele basengelaki te kobuka mokuwa na yango ata moko. (Kob. 12:46; Mit. 9:11, 12) Tokoloba nini mpo na “Mwana-Mpate ya Nzambe” oyo ayaki kopesa lisiko? (Yoa. 1:29) Babakaki ye na nzete ya mpasi na katikati ya bato mabe mibale. Bayuda basɛngaki Pilato ete bábuka mikuwa ya bato yango. Yango elingaki kosala ete bákufa noki mpo bátikala te likoló ya nzete tii mokolo ya 15 Nisana oyo ezalaki Basabata mibale. Basoda babukaki makolo ya bato mabe wana mibale, “kasi ntango bakómaki epai ya Yesu, lokola bamonaki ete asilaki kokufa, babukaki makolo na ye te.” (Yoa. 19:31-34) Yango eyokanaki na oyo bazalaki kosala mwana-mpate ya Elekeli, na yango mwana-mpate wana ezalaki lokola “elili” ya makambo oyo esengelaki kosalema mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B. (Ebr. 10:1) Lisusu, ndenge makambo yango esalemaki ekokisaki maloba ya Nzembo 34:20, oyo esengeli kolendisa kondima na biso na bisakweli ya Biblia.

20. Bokeseni nini ya ntina ezali kati na Elekeli mpe Bilei ya mpokwa ya Nkolo?

20 Kasi, bokeseni ezali kati na Elekeli mpe Bilei ya mpokwa ya Nkolo. Yango emonisi ete Elekeli oyo Bayuda basengelaki kokanisaka ezalaki te komonisa likambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye basalaka mpo na kokanisa liwa na ye. Na Ezipito, Bayisraele balyaki mosuni ya mwana-mpate, kasi bamɛlaki makila na yango te. Yango ekeseni na oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye básalaka. Alobaki ete baoyo bakoyangela “na kati ya bokonzi ya Nzambe” basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo oyo elakisi nzoto mpe makila na ye. Na lisolo oyo elandi tokolobela yango na mozindo.Mrk. 14:22-25.

21. Mpo na nini ezali na ntina tóyeba makambo etali Elekeli?

21 Na ntembe te, na makambo oyo Nzambe asalelá Bayisraele, Elekeli ezalaki molulu moko ya ntina mingi mpe ezali na mateya oyo ebongi mpenza mpo na mokomoko na biso. Na yango, atako Elekeli ezalaki ‘ekaniseli mpo na’ Bayuda, kasi mpo na Bakristo te; biso Bakristo tosengeli koyeba yango mpe kobomba na motema mateya ya ntina oyo ezali na lisolo yango lokola moko ya makambo oyo ezali na kati ya “makomami nyonso oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.”2 Tim. 3:16.

^ par. 5 Atako Nisana ezalaki nkombo oyo Baebre bakómaki kobenga sanza ya liboso nsima ya kobima na boombo, mpo na komonisa makambo polele, na lisolo oyo mpe tokobenga sanza ya liboso ya kalandriye ya Bayuda Nisana.

^ par. 11 Mokolo ya 15 Nisana ebandaki ntango moi elalaka, yango emonisaki ete sabata oyo bazalaki kosala pɔsɔ na pɔsɔ (mokolo ya pɔsɔ) ekweaki mbula wana mokolo ya liboso ya fɛti ya bagato ezangá levire, oyo ezalaki mpe sabata. Lokola Basabata yango mibale ekweaki mokolo moko, yango wana ebengamaki Sabata “monene.”Tángá Yoane 19:31, 42.