Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2013

‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’

‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’

“Nsima ya kopesa matɔndi, abukaki yango mpe alobaki ete: ‘Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ezali mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.’”1 KO. 11:24.

1, 2. Ekoki kozala ete bantoma bazalaki na makanisi nini na likambo etali mobembo ya kokende na Yerusaleme?

‘MAPATA ekómi kitoko, tokoki komona sanza ya sika. Na mpokwa ya mokolo oyo elekaki, basinzili bamonaki sanza ya sika. Ntango Sanedrina eyokaki likambo yango, balobaki ete Nisana, sanza ya sika ebandi. Na nsima, bamemi-nsango bamemaki nsango, mpe ekómaki tii Perea. Na ntembe te, Yesu alingaki kokende na Yerusaleme mpo akóma liboso ya Elekeli.’

2 Tokoki komona na makanisi ndenge makanisi ya ndenge wana eyaki epai ya bayekoli mosusu oyo bazalaki ná Yesu na Perea (na ngambo ya Yordani) na mobembo na ye ya nsuka mpo na kokende na Yerusaleme. (Mat. 19:1; 20:17, 29; Mrk. 10:1, 32, 46) Soki kaka batángi mokolo ya liboso ya Nisana, sanza ya Bayuda, Elekeli ezalaki kokwea nsima ya mikolo 13, mokolo ya 14, nsima ya kolala ya moi.

3. Mpo na nini bakristo batyelaka mpenza dati ya Elekeli likebi?

3 Dati ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo, oyo eyokani na dati ya Elekeli, ekozala mokolo ya 14/04/2014 nsima ya kolala ya moi. Ekozala mokolo moko ya sipesiale mpo na bakristo ya solo mpe bato oyo basepelaka na mateya ya Biblia. Mpo na nini? Mpo 1 Bakorinti 11:23-25 elobi boye: “Yesu, na butu oyo asengelaki kokabama, akamataki limpa mpe, nsima ya kopesa matɔndi, abukaki yango mpe alobaki ete: ‘Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ezali mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.’ Asalaki lisusu mpe ndenge moko mpo na kɔpɔ.”

4. (a) Mituna nini tokoki komituna mpo na Ekaniseli? (b) Ndenge nini bayebaka dati ya Ekaniseli mbula na mbula? (Talá etanda  “Ekaniseli ya mobu 2014.”)

4 Na ntembe te okozala na molulu kaka moko oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli kokanisaka mbula na mbula. Kasi liboso, omituna boye: ‘Ndenge nini nasengeli komibongisa mpo na mpokwa wana? Biloko nini tokosalela? Molulu yango ekoleka ndenge nini? Molulu yango  mpe biloko oyo bakosalela ekozala na ntina nini mpo na ngai?’

LIMPA MPE VINYO

5. Bibongiseli nini Yesu asɛngaki bayekoli na ye bázwa mpo na Elekeli ya nsuka?

5 Ntango Yesu ayebisaki bantoma bákende kobongisa shambrɛ mpo na kolya Elekeli, alobaki te ete bátondisa yango na mayemi ndenge na ndenge, kasi alingaki nde ezala esika moko malamu, ya pɛto mpe oyo ekokoka mpo na bato oyo basengelaki koya. (Tángá Marko 14:12-16.) Basengelaki kobongisa mwa biloko mosusu mpo na Elekeli, na ndakisa limpa ezangá levire ná vinyo ya motane. Nsima ya kolya Elekeli, Yesu atyaki likebi na ye na biloko wana mibale.

6. (a) Nsima ya kolya Elekeli, Yesu alobaki nini mpo na limpa? (b) Tosengeli kosalela limpa ya ndenge nini na Ekaniseli?

6 Ntoma Matai azalaki wana, mpe na nsima akomaki boye: “Yesu akamataki limpa mpe, nsima ya kobondela, abukaki yango mpe, apesaki yango bayekoli, alobi: ‘Bókamata, bólya.’” (Mat. 26:26) “Limpa” yango ezalaki na levire te ndenge oyo bazalaki kosalela na Elekeli. (Kob. 12:8; Mib. 16:3) Mpo na kosala limpa yango, bazalaki kosangisa farini ya ble ná mai, kasi bazalaki kotya levire te, mungwa mpe te. Lokola limpa yango ezalaki na levire te, ezalaki kovimba te. Ezalaki papala, ekauká, mwa makasi mpe ekoki kobukana bitenibiteni lokola bisikiti. Lelo oyo, liboso ya Ekaniseli, bankulutu bakoki kosɛnga ndeko moko asala limpa ya ndenge wana na farini mpe mai, mpe atya mwa mafuta moke na kikalungu mpo na kotumba yango. (Soki farini ya ble ezali te, bokoki kosala yango na farini ya loso, ɔrje, masango to mbuma mosusu ya ndenge wana.) Bokoki mpe kosalela limpa ya Bayuda oyo batyá levire te (Pain azyme juif), oyo babakisá malt, maki to matungulu te.

7. Yesu alobelaki vinyo ya ndenge nini, mpe vinyo ya ndenge nini tosengeli kosalela lelo oyo na Ekaniseli?

7 Ntoma Matai abakisi boye: “[Yesu] akamataki kɔpɔ mpe, apesaki matɔndi, apesaki bango yango, alobi: ‘Bómɛla yango, bino nyonso.’” (Mat. 26:27, 28) Eloko oyo Yesu asimbaki na lobɔkɔ ezalaki kɔpɔ ya vinyo ya motane. (Ezalaki te mai ya mbuma ya vinyo oyo bauti kobuka sika, mpamba te eleko ya kobuka mbuma ya vinyo esilaki.) Vinyo ezalaki te na Elekeli ya liboso oyo Bayisraele balyaki na Ezipito; kasi Yesu  amonaki mabe te ndenge bakómaki kosalela yango na Elekeli. Kutu asalelaki ndambo na yango ntango bazalaki kolya Bilei ya mpokwa ya Nkolo. Yango wana, bakristo basalelaka vinyo na Ekaniseli. Lokola ezalaki na ntina te kobakisa biloko mosusu mpo na kokómisa makila ya Yesu na valɛrɛ mingi, yango wana esengeli te kobakisa na vinyo ya Ekaniseli alkole to biloko mosusu. Bokoki kosalela vinyo ya motane mpenza, to oyo basalaka na mboka na bino, ata mpe oyo batɛkaka, na ndakisa Beaujolais, Bourgogne, to Chianti.

NDIMBOLA YA LIMPA MPE VINYO

8. Mpo na nini bakristo batyaka likebi na ndimbola ya limpa mpe vinyo?

8 Ntoma Paulo amonisaki polele ete longola bantoma, bakristo mosusu mpe basengelaki kokoba kosala Bilei ya mpokwa ya Nkolo. Epai ya baninga na ye ya Korinti, akomaki boye: “Nazwaki epai ya Nkolo likambo oyo napesaki mpe bino: ete Nkolo Yesu . . . akamataki limpa mpe nsima ya kopesa matɔndi, abukaki yango mpe alobaki ete: ‘Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ezali mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.’” (1 Ko. 11:23, 24) Yango wana, kino lelo bakristo basalaka molulu wana ya sipesiale mbula na mbula mpe batyaka mpenza likebi na ndimbola ya limpa mpe vinyo.

9. Likanisi nini ya lokuta bato mosusu bazalaka na yango na likambo etali limpa oyo Yesu asalelaki?

9 Bandimi mosusu ya mangomba balobaka ete Yesu alobaki mpenza ete: ‘Oyo ezali nzoto na ngai,’ na ndenge yango bandimaka ete limpa ebongwanaki na ndenge ya likamwisi mosuni na ye. Nzokande, likanisi yango ezali lokuta. * Yesu azalaki liboso ya bantoma na ye ya sembo, mpe limpa ezangi levire oyo basengelaki kolya ezalaki mpe liboso na bango. Emonani polele ete Yesu alobaki maloba ya elilingi, ndenge azalaki  koloba mbala mingi.Yoa. 2:19-21; 4:13, 14; 10:7; 15:1.

10. Limpa oyo basalelaka na ntango ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo elimboli nini?

10 Limpa oyo bantoma bamonaki mpe balingaki kolya ezalaki elilingi ya nzoto ya Yesu. Nzoto nini? Na kala, basaleli ya Nzambe bakanisaki ete lokola Yesu abukaki limpa kasi ata mokuwa na ye moko te ebukanaki, na boye limpa elimboli “nzoto ya Kristo,” lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Ef. 4:12; Rom. 12:4, 5; 1 Ko. 10:16, 17; 12:27) Nzokande, na nsima emonanaki ete makanisi ya bato mpe Makomami emonisaka ete limpa ezali elembo ya nzoto mpenza ya Yesu, oyo Nzambe abongisaki mpo na ye. Yesu “anyokwamaki na nzoto,” kutu babakaki ye na nzete ya mpasi. Na yango, na ntango ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo, limpa elimbolaka nzoto mpenza wana ya Yesu oyo “amemaki [na yango] masumu na biso.”1 Pe. 2:21-24; 4:1; Yoa. 19:33-36; Ebr. 10:5-7.

11, 12. (a) Yesu alobaki nini mpo na vinyo? (b) Vinyo oyo tosalelaka na ntango ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo elimboli nini?

11 Likambo yango esalisi biso tóyeba oyo Yesu alobaki nsima mpo na vinyo. Tozali kotánga boye: “Asalaki lisusu mpe ndenge moko mpo na kɔpɔ, nsima ya kolya bilei ya mpokwa, alobaki ete: ‘Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai.’” (1 Ko. 11:25) Mabongoli mingi ya Biblia esalelaka maloba ya libongoli ya Robert Young ete: “Kɔpɔ oyo ezali kondimana ya sika na makila na ngai.” Kɔpɔ oyo Yesu asimbaki ezalaki kondimana ya sika? Te. Liloba “kɔpɔ” esalelamaki mpo na kolobela vinyo, oyo ezalaki na kati. Yesu alobaki ete vinyo elimbolaki to ezalaki elembo ya nini? Makila na ye oyo esengelaki kosopama.

12 Na Evanzile ya Marko, tozali kokuta maloba oyo ya Yesu: “Oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi.” (Mrk. 14:24) Ya solo, makila ya Yesu esengelaki ‘kosopama mpo masumu ya bato mingi elimbisama.’ (Mat. 26:28) Na yango, ebongaki mpenza ete vinyo ya motane ezala elembo ya makila ya Yesu. Tokoki kosikolama na nzela ya makila yango, mpe ‘kolimbisama mabunga na biso.’Tángá Baefese 1:7.

Bantoma bamɛlaki vinyo oyo elimbolaki makila ya Yesu mpo na kondimana (Talá paragrafe 11 mpe 12)

NDENGE YA KOKANISA LIWA YA YESU

13. Lobelá ndenge Ekaniseli ya liwa ya Yesu esengeli kosalemaka mbula na mbula?

13 Soki okozala na Ekaniseli ná Batatoli ya Yehova mbala ya liboso, ozali kolikya ete okomona nini kuna? Likita yango ekozala na esika moko kitoko, ya pɛto mpe oyo bato nyonso bakosepela na yango. Bakoki kotya mwa bafololo, kasi okomona te biloko ndenge na ndenge oyo ekolongola likebi na yo to oyo ekomonisa lokola oyei na fɛti ya libala to ya likambo moko boye. Nkulutu oyo ayebi koteya malamu akolimbola polele mpe na ndenge ebongi oyo Biblia elobi mpo na Ekaniseli. Akosalisa moto nyonso azala na botɔndi mpo na oyo Kristo asalá mpo na biso. Akufaki lokola lisiko mpo biso tókoka kozala na bomoi. (Tángá Baroma 5:8-10.) Molobi akomonisa polele bilikya mibale oyo Biblia elobeli mpo na bakristo.

14. Diskur ya Ekaniseli elobelaka bilikya nini?

14 Elikya ya liboso ezali ya koyangela elongo na Kristo na likoló, kaka mwa bayekoli moke ya Kristo, na ndakisa bantoma na ye ya sembo nde bazali na elikya yango. (Luka 12:32; 22:19, 20; Em. 14:1) Elikya ya mibale ezali mpo na bakristo mingi oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo na mikolo na biso. Bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela na mabele oyo ekobongwana paradiso. Na nsima, mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabele ndenge moko na likoló, likambo oyo bakristo babondelaka banda kala. (Mat. 6:10) Mpe Makomami emonisi bomoi kitoko oyo bakozala na yango libela na libela seko.Yis. 11:6-9; 35:5, 6; 65:21-23.

15, 16. Bakosala na limpa nini na mokolo ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo?

15 Pene ya kosilisa diskur yango, molobi akomonisa ete ntango ekoki mpo tósala ndenge  Yesu ayebisaki bantoma na ye basalaka. Ndenge tomonisaki yango liboso, tokosalela biloko mibale: limpa ezangi levire mpe vinyo ya motane. Biloko yango esengeli kozala na mesa mosika te na molobi. Akobenda likebi na lisolo moko ya Biblia oyo elobeli makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki ntango abandisaki molulu yango. Na ndakisa, na lisolo ya Matai, tozali kotánga boye: “Yesu akamataki limpa mpe, nsima ya kobondela, abukaki yango mpe, apesaki yango bayekoli, alobi: ‘Bókamata, bólya. Oyo elakisi nzoto na ngai.’” (Mat. 26:26) Yesu abukaki limpa wana oyo ezangi levire mpo alekisa yango epai ya bantoma na ye oyo bafandaki na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpe ya mobali. Okomona ete na Ekaniseli oyo ekosalema mokolo ya 14/04/2014, mampa oyo babuki bitenibiteni mpe batye na saani ekozala.

16 Esengeli kosalela basaani ebele mpo ete nsima ya mwa ntango moke, limpa eleka epai ya bayangani nyonso. Esengeli kozala te molulu moko ya kokamwisa bato. Libondeli ya mokuse ekosalema, mpe na nsima bakolekisa basaani na molɔngɔ, na kotalela oyo ezali malamu kosala epai na bino. Bato moke (to mbala mosusu ata moto moko te) bakolya limpa, ndenge esalemaki na masangá mingi ntango balekisaki limpa na Ekaniseli ya mobu 2013.

17. Na Ekaniseli, ndenge nini tolandaka malako ya Yesu na likambo etali vinyo?

17 Na nsima, molobi akobenda likebi na likambo oyo Matai alobaki lisusu ete: “[Yesu] akamataki kɔpɔ mpe, apesaki matɔndi, apesaki bango yango, alobi: ‘Bómɛla yango, bino nyonso; mpo oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi mpo na kolimbisa masumu.’” (Mat. 26:27, 28) Na kolanda ndakisa wana, libondeli mosusu ekosalema mpe na nsima ‘bakɔpɔ’ ya vinyo ya motane ekoleka epai ya bayangani nyonso.

18. Ata soki kaka bato moke to moko te nde bakolya limpa mpe bakomɛla vinyo, mpo na nini ezali na ntina ete tózala wana?

18 Na limemya nyonso, bayangani mingi baboyaka kolya limpa mpe komɛla vinyo ntango ezali koleka mpo Yesu amonisaki ete kaka bato oyo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi na ye ya likoló nde basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo. (Tángá Luka 22:28-30; 2 Tim. 4:18) Bayangani mosusu nyonso, basengeli kaka kotala mpamba mpe na limemya. Bamonaka ete kozala na ntango ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo ezali na ntina mingi, mpo bamonisaka ete bazwaka mpenza na motuya mingi mbeka oyo Yesu apesaki. Na Ekaniseli, bakanisaka na mapamboli oyo bakoki kozwa na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Bazali na elikya ya kozala na kati ya “ebele mpenza ya bato” oyo bakobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya. Bato yango bazali basambeli oyo ‘bakosukola bazambala na bango mpe bakokómisa yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate.’Em. 7:9, 14-17.

19. Okoki kosala nini mpo na komibongisa mpo na Bilei ya mpokwa ya Nkolo mpe kozwa litomba?

19 Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali komibongisa mpo na likita wana ya sipesiale. Bapɔsɔ mingi liboso, tokosala kampanye mpo na kobenga bato ebele na likita yango. Lisusu, mwa mikolo liboso tókóma na Ekaniseli, mingi kati na biso tokotánga masolo ya Biblia oyo emonisi makambo oyo Yesu asalaki mpe makambo oyo esalemaki na badati oyo ekokani na oyo ya mobu 33 T.B. Tosengeli komibongisa mpo tózala wana mokolo yango. Ekozala malamu mingi tókóma liboso mpenza ete loyembo mpe libondeli ya ebandeli ebanda mpo tókoka koyamba bapaya mpe tólanda programɛ mobimba. Biso nyonso, Batatoli ya Yehova ná bato oyo tokobenga, tokozwa matomba mingi soki tokolanda na Babiblia na biso ntango molobi azali kolimbola makanisi. Na koleka nyonso, soki toyei na Ekaniseli, tokomonisa mpenza botɔndi na biso mpo na mbeka oyo Yesu apesaki mpe tokomonisa botosi na etinda oyo apesaki ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”1 Ko. 11:24.

^ par. 9 Moto moko ya mayele ya Allemagne na nkombo Heinrich Meyer alobi boye: “Komona . . . ete nzoto ya Yesu ebukanaki te (azalaki na bomoi), mpe ete makila na ye esopanaki te, mpe ata moto moko te [bantoma] akokaki kokanisa likambo ya ndenge wana . . . ete balyaki mpe bamɛlaki mpenza nzoto mpe makila ya Nkolo, kutu Yesu ye moko akokaki kozala na likanisi te ete bayekoli na ye bakotalela maloba na ye ndenge wana.”