Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2016

Tosikolami na nzela ya boboto monene

Tosikolami na nzela ya boboto monene

“Lisumu esengeli te kozala na bokonzi likoló na bino, mpo bozali . . . na nse ya boboto monene.”BAROMA 6:14.

NZEMBO: 2, 61

1, 2. Ndenge nini Baroma 5:12 ekoki kosalisa biso?

BAROMA 5:12 elobi: “Kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” Yango ezali moko ya bavɛrsɛ oyo toyebi malamu mpe tosalelaka mingi ntango tozali koteya bato makambo ya Biblia.

2 Vɛrsɛ yango esalelami mbala mingi na buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe buku Makambo oyo Biblia eteyaka. Ntango toyekolaka mokapo 3, 5, mpe 6 elongo na bana na biso mpe bato mosusu, na ntembe te, totángaka Baroma 5:12. Tokoki kosalela vɛrsɛ yango mpo na kosalisa bango báyeba ntina oyo mabele ezali lisusu paradiso te, ntina oyo tosengeli na lisiko, mpe ntina oyo tokufaka. Kasi, vɛrsɛ yango ekoki mpe kosalisa biso nyonso tókóma na botɔndi mingi mpo na boyokani na biso na Yehova. Ekoki kosalisa biso tózala na ekateli makasi ya kosepelisa ye mpe tókoba kozela na elikya makambo oyo alaki biso.

3. Tosengeli kobosana te ete tozali bato ya ndenge nini?

 3 Likambo ya mawa, biso nyonso tozali bato ya masumu. Tosalaka mabunga mokolo na mokolo. Kasi Yehova azali na motema mawa. Ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, mpe alingaka kolimbisa biso. (Nzembo 103:13, 14) Yesu ateyaki biso ete tosengeli kosɛnga Nzambe alimbisa masumu na biso. (Luka 11:2-4) Soki Yehova alimbisi mabunga na biso ya kala, tosengeli te kokoba kokanisa yango. Tótalela ndenge oyo Yehova akoki kolimbisa biso.

NDENGE OYO YEHOVA AKOKI KOLIMBISA BISO

4, 5. (a) Nini esalisi biso tókanga ntina ya Baroma 5:12? (b) “Boboto monene” elimboli nini?

4 Mokanda ya Baroma, mingimingi mokapo 6, esalisaka biso tóyeba ndenge oyo Yehova akoki kolimbisa masumu na biso. Mokapo 3 emonisi ete “bato nyonso basali lisumu.” Na nsima, ntoma Paulo alimboli: “Ezali lokola nde bazwi likabo ya ofele na ndenge bazali kotángama bayengebene na boboto monene na ye, na kosikolama oyo basikolami na lisiko oyo Kristo Yesu afutaki.” (Baroma 3:23, 24) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “boboto monene” ezali kopesa likanisi ya kosala likambo moko ya malamu kozanga kozela ete bázongisela yo, likambo oyo obongi na yango te, mpe ozali na lotomo na yango te.

5 Moto moko ya mayele alimbolaki ete mbala mingi liloba yango ya Grɛki elobelaka likambo oyo Nzambe ná Kristo basalá mpo na kosikola bato na lisumu mpe na liwa. Yango wana, Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli liloba yango ya Grɛki na “boboto monene.” Tótalela oyo Nzambe asalá mpo na biso mpe ndenge oyo boboto monene na ye ezali kopesa biso matomba sikoyo mpe epesi biso elikya mpo na mikolo ezali koya.

6. Banani bakoki kozwa matomba na boboto monene ya Nzambe, mpe ndenge nini bakozwa yango?

6 Lokola Adama asalaki lisumu, lisumu mpe liwa ezwaki bato nyonso awa na mabele. Yango wana Biblia elobi ete “na libunga ya moto kaka moko liwa eyangelaki na nzela ya moto yango.” Kasi, Yehova amonisaki mpenza boboto monene mpe abongisaki nzela ya kosikola bato nyonso na nzela ya “moto kaka moko, Yesu Kristo.” (Baroma 5:12, 15, 17) “Botosi ya moto kaka moko ekokómisa bato mingi bayengebene.” Bato yango bakoki kolikya kozwa “bomoi ya seko na nzela ya Yesu Kristo.”Baroma 5:19, 21.

7. Mpo na nini likabo ya lisiko oyo Nzambe epesá ezalaki ya boboto mpe tobongaki na yango te?

7 Kanisá likambo oyo: Yehova asengelaki te kopesa Mwana na ye lokola lisiko. Kasi, amonisaki boboto monene na ndenge azwaki ebongiseli mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa. Moto moko te kati na biso abongi na likambo oyo Nzambe mpe Yesu basalaki mpo na biso. Tozali na botɔndi mingi na ndenge basalaki ete tólimbisama mpe tózala na likoki ya kozwa bomoi ya seko! Tiká tómonisa ete tozali na botɔndi mingi epai ya Nzambe na ndenge tozali kotambwisa bomoi na biso.

TÓZALA NA BOTƆNDI MPO NA BOBOTO MONENE YA NZAMBE

8. Makanisi nini tosengeli koboya?

8 Toyebi ete Nzambe alingaka kolimbisa masumu na biso, ata masumu ya minene. Kasi, tosengeli soki moke te komona boboto monene ya Yehova libaku ya kosala mabe mpe kokanisa ete ‘Yehova  akolimbisa biso.’ Na siɛklɛ ya liboso, ata ntango bantoma mosusu bazalaki naino na bomoi, ezalaki na bakristo mosusu oyo bazalaki na makanisi ya ndenge wana. (Tángá Yuda 4.) Lelo oyo, tosengeli kokeba ete tólanda makanisi mabe ya basusu te, mpe mokemoke tókóma kokanisa ndenge wana.

9, 10. Na ndenge nini ntoma Paulo mpe bakristo mosusu basikolamaki na lisumu mpe na liwa?

9 Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ete ezali mabe kokanisa ete soki bakobi kosala masumu, Nzambe akolimbisa bango. Alobaki ete basengeli koboya makanisi ya ndenge wana mpo ‘bakufaki na makambo ya lisumu.’ (Tángá Baroma 6:1, 2.) Alingaki koloba nini?

10 Na nzela ya lisiko, Nzambe alimbisaki masumu ya ntoma Paulo mpe ya bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso. Yehova atyaki bango mafuta na nzela ya elimo santu mpo bázala bana na ye. Soki batikali sembo, bakozwa bomoi ya seko na likoló mpe bakoyangela elongo na Kristo. Kasi lokola bazalaki naino na bomoi awa na mabele, na ndenge nini ‘bakufaki na makambo ya lisumu’? Ntoma Paulo asalelaki bokokani moko mpo na komonisa ete bomoi na bango ebongwanaki mpenza. Alobaki ete Yesu, nsima ya liwa na ye, asekwisamaki lokola ekelamu ya elimo oyo akokufa lisusu te. Yango wana, liwa ezalaki “lisusu na bokonzi likoló na ye te.” Ndenge moko mpe, ezalaki lokola nde bakristo yango bakufaki. Na ndenge nini? Bomoi na bango ebongwanaki mpenza mpo bazalaki lisusu kotika te ete bamposa ya masumu etambwisa bango. Bakómaki kosala nyonso mpo bomoi na bango esepelisa Nzambe. ‘Bazalaki bakufi na makambo ya lisumu kasi bazalaki na bomoi mpo na Nzambe na nzela ya Kristo Yesu.’Baroma 6:9, 11.

11. Lelo oyo, ndenge nini bakristo ‘bakufaki na makambo ya lisumu’?

11 Bongo biso? Ndenge nini ‘tokufaki na makambo ya lisumu’? Ekoki kozala ete kala tosalaki makambo mingi ya mabe kozanga koyeba ndenge oyo Yehova azalaki kotalela yango. Tozalaki lokola “baombo ya mbindo ná kobuka mibeko,” elingi koloba, “baombo ya lisumu.” (Baroma 6:19, 20) Kasi, ntango toyekolaki na Biblia ndenge oyo Nzambe alingi tótambwisa bomoi na biso, tobongwanaki, tomipesaki na ye, mpe tozwaki batisimo. Tozalaki na mposa makasi ya kotosa Yehova mpe kozala na bomoi oyo ekosepelisa ye. ‘Tosikolamaki na lisumu,’ mpe ‘tokómaki baombo ya boyengebene.’Baroma 6:17, 18.

12. Mokomoko na biso asengeli kopona kosala nini?

12 Atako bongo, mokomoko na biso asengeli kopona. Ntoma Paulo alobaki: “Bótika te ete lisumu eyangela nzoto na bino oyo ekufaka mpo bótosa bamposa na yango.” (Baroma 6:12) Tokoki kopona soki tokolanda makanisi mpe bamposa na biso ya kosala masumu to koboya kolanda yango. Omituna boye: ‘Natikaka ete bamposa mabe oyo eyelaka ngai ekóma makasi mpe etinda ngai nasala likambo ya mabe? To nabenganaka yango mbala moko?’ Soki tozali na botɔndi mingi mpo na boboto monene ya Nzambe, tokosala nyonso mpo na kosepelisa ye.

OKOKI KOBUNDISA LISUMU

13. Mpo na nini tokoki kondimisama ete tokoki kosala makambo ya malamu?

13 Na siɛklɛ ya liboso, bato mosusu na Korinti oyo bazalaki miyibi, mibali oyo balalaka na mibali, bato ya ekobo, basambeli  ya bikeko, mpe balangwi masanga babongwanaki ntango bayebaki Yehova mpe balingaki ye. Bayokaki nsɔni mpo na makambo oyo bazalaki kosala liboso. (Baroma 6:21; 1 Bakorinti 6:9-11) Bakristo ya Roma mpe basengelaki kobongwana ndenge wana. Ntoma Paulo ayebisaki bango: “Bókoba mpe kopesa lisumu binama na bino te mpo ezala bibundeli ya kozanga boyengebene, kasi bómipesa nde na Nzambe mpo bózala bato oyo bakufaki mpe sikoyo bozali na bomoi, mpe bópesa Nzambe binama na bino mpo ezala bibundeli ya boyengebene.” (Baroma 6:13) Ntoma Paulo andimisamaki ete bakoki kosala makambo ya malamu mpe kokoba kozwa matomba na boboto monene ya Nzambe.

14, 15. Mituna nini tosengeli komituna?

14 Ezali mpe bongo lelo oyo. Ekoki kozala ete bandeko mosusu ya basi mpe ya mibali bazalaki na bomoi lokola bato ya Korinti. Kasi, ntango bayebaki Yehova, babongwanaki. Ezali lokola nde basukwamaki. Mpo na kosepelisa Yehova, biso nyonso tobongolaki makambo mingi ya bomoi na biso. Ata sikoyo, tolingaka komonisa ete tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe. Yango wana, tozali na ekateli ya kobundisa bamposa na biso ya mabe mpe kosalela Yehova na bomoi na biso.

15 Ya solo, tosengeli koboya kosala masumu ya minene lokola oyo bandeko mosusu ya Korinti bazalaki kosala. Tosengeli te kokoba kosala makambo ya ndenge wana, mpe kokanisa ete Nzambe akomonisela biso boboto monene mpe akolimbisa biso. Kasi, tokoloba nini mpo na masumu oyo bato mosusu bakoki kokanisa ete ezali ya minene te? Tozali na ekateli ya kosala nyonso mpo na kotosa Yehova na makambo nyonso?Baroma 6:14, 17.

16. Ndenge nini toyebi ete tosengeli koboya ata masumu oyo etángami te na 1 Bakorinti 6:9-11?

16 Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Alobaki: “Ngai nazali na nzoto ya mosuni, natɛkamá mpo nazala moombo ya lisumu. Mpo oyo nasalaka nayebi yango te. Mpo oyo nalingi, nasalaka yango te; kasi oyo nayini yango nde nasalaka.” (Baroma 7:14, 15) Atako ntoma Paulo azalaki te kosala makambo oyo etángami na 1 Bakorinti 6:9-11, andimaki ete azalaki kaka moto ya masumu. Alingaki kosepelisa Yehova, yango wana azalaki kobunda mpo asala te makambo ya mabe. (Tángá Baroma 7:21-23.) Tiká tólanda ndakisa na ye mpe tósala nyonso mpo na kotosa Yehova.

17. Mpo na nini osengeli kozala sembo?

17 Na ndakisa, toyebi ete mpo na kosalela Yehova tosengeli kozala sembo. (Tángá Masese 14:5; Baefese 4:25.) Tolingi te kozala lokola Satana, oyo azali “tata ya lokuta.” Tosengeli mpe kobosana te ete Ananiasi ná mwasi na ye bakufaki mpo bakosaki. Yango wana, tosengeli kokosa te. (Yoane 8:44; Misala 5:1-11) Kasi, kozala sembo esuki kaka te na koboya kokosa. Soki tozali mpenza na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe, tokozala mpe sembo na makambo mosusu.

18, 19. Kozala sembo elimboli nini?

18 Moto akoki kozanga bosembo ata soki akosi te. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Bayisraele ete: “Bosengeli koyiba te, mpe bosengeli kokosa te, mpe bosengeli te, moto na moto, kosalela moninga na ye makambo oyo ezangi sembo.” Mpo na nini basengelaki kosala bongo? Yehova alobaki: “Bokozala basantu, mpamba te ngai,  Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu.” (Balevi 19:2, 11) Ata soki tokosi te, soki totindi basusu bándima likambo moko oyo ezali solo te, tozali sembo te.

Tozali na ekateli ya koboya kokosa mpe kobuka lokuta? (Talá paragrafe 19)

19 Na ndakisa, moto akoki koyebisa patrɔ na ye to baninga na ye ya mosala ete alingi kosilisa mosala liboso ya ngonga mpo asengeli kokende kokutana na monganga. Nzokande ntina ya solosolo ezali mpenza yango te. Alingi nde kosilisa mosala liboso ya ngonga mpo akende kozwa mopɛpɛ. “Kokutana na monganga” oyo alobi ezali kaka kokende kosomba nkisi na farmasi to koleka nokinoki na biro ya monganga mpo na kofuta faktire. Azali mpenza sembo, to azali nde kokosa basusu? Moto yango atindi basusu bándima likambo moko oyo ezali solo te. Ntango mosusu, bato bakosaka basusu mpo na kozwa eloko moko oyo bazali na mposa na yango to mpo na kokima etumbu. Kasi, totosaka Yehova, oyo alobi: “Bosengeli kokosa te.” Tolingi kosala makambo oyo ye alobi ete ezali sembo mpe mosantu.Baroma 6:19.

20, 21. Soki tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe, nini mosusu tosengeli koboya?

20 Ya solo, toboyaka kosala ekobo, kolangwa masanga, mpe masumu mosusu ya minene. Longola yango, toboyaka mpe kosala likambo nyonso oyo ekosepelisa Yehova te. Na ndakisa, tosukaka kaka te na koboya kosala pite to ekobo, kasi toboyaka mpe kominanola nyonso ya mbindo. Tosukaka kaka te na koboya kolangwa masanga, kasi toboyaka mpe komɛla mingi tii kokóma pene na kolangwa. Ekoki kosɛnga ete tósala makasi mpo tókwea te na komekama ya ndenge wana; kasi tokoki kolonga.

21 Tosengeli komityela mokano lokola ntoma Paulo, oyo alobaki: “Bótika te ete lisumu eyangela nzoto na bino oyo ekufaka mpo bótosa bamposa na yango.” (Baroma 6:12; 7:18-20) Ezali solo ete tokoki te kolonga kokima masumu nyonso. Kasi soki tozali kobundisa mitindo nyonso ya masumu, tokomonisa ete tozali mpenza na botɔndi mpo na boboto monene oyo Nzambe mpe Kristo bamoniselaki biso.

22. Mbano nini tokoki kozela kozwa soki tozali mpenza na botɔndi mpo na boboto monene ya Yehova?

22 Yehova alimbisá masumu na biso mpe akoki kokoba kolimbisa yango. Tozali mpenza na botɔndi mpo na boboto monene na ye! Yango wana, tósala nyonso mpo na koboya kosala makambo oyo alobi ete ezali mabe, ata soki basusu bamonaka ete ezali masumu te. Mbano nini tokoki kozela kozwa soki tosali bongo? Ntoma Paulo alobaki: “Sikoyo, lokola bosikolamaki na lisumu kasi bokómi baombo ya Nzambe, mbuma na bino ezali bomoi na bino ya bosantu, mpe na nsuka: bomoi ya seko.”Baroma 6:22.