Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2016

Yehova apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi

Yehova apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi

“Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”BAEBRE 11:6.

NZEMBO: 85, 134

1, 2. (a) Ndenge nini bolingo ezali na boyokani na kondima? (b) Mituna nini tokotalela?

YEHOVA, Tata na biso ya likoló, alaki kopambola basaleli na ye ya sembo. Yango ezali lolenge moko oyo Yehova amoniselaka biso bolingo, mpe tolingaka ye “mpo ye alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:19) Soki bolingo oyo tolingaka Yehova ekoli, kondima na biso epai na ye ekómaka lisusu makasi mpe tokómaka na kondima ete Yehova akopesa baoyo alingaka mbano.Tángá Baebre 11:6.

2 Yehova azali moto oyo apesaka mbano! Yango ezali moko ya bizaleli na ye mpe makambo oyo asalaka. Yango wana, kondima na biso epai na Nzambe ekokóma mobimba kaka soki tondimisami ete akopesa mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo “kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa.” (Baebre 11:1) Kondima elimboli kozala na elikya makasi ete Nzambe akopambola basaleli na ye ya sembo. Kasi ndenge nini elikya ya kozwa mbano epesaka biso mapamboli? Ndenge nini Yehova apesaki basaleli na  ye na ntango ya kala mbano mpe ndenge nini asalaka yango lelo oyo? Tótalela yango.

YEHOVA ALAKI ETE AKOPAMBOLA BASALELI NA YE

3. Elaka nini totángaka na Malaki 3:10?

3 Yehova alaki kopesa basaleli na ye ya sembo mbano. Asɛngaka biso tópesa ye oyo eleki malamu mpe tótya motema ete akopambola biso. Yehova alobi: “Bómeka ngai na likambo oyo.” Abakisi boye: “Bómona soki nakofungwela bino baporte ya mai ya likoló te mpe soki nakosopela bino lipamboli te kino bosɛnga ekozala lisusu te.” (Malaki 3:10) Tomonisaka botɔndi mpo na likambo oyo Yehova asɛngi biso ntango tondimaka libyangi ya komeka ye.

4. Mpo na nini tokoki kotyela maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33 motema?

4 Yesu alakaki bayekoli na ye ete soki batye Bokonzi na esika ya liboso, Nzambe akosunga bango. (Tángá Matai 6:33.) Yesu alobaki bongo mpo ayebaki ete bilaka ya Nzambe ekokisamaka ntango nyonso. (Yisaya 55:11) Yango wana, biso mpe tokoki kondimisama ete soki tozali mpenza na kondima epai ya Yehova, akokokisa elaka oyo: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Baebre 13:5) Elaka wana ya Yehova esalisaka biso tótyela maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33 motema.

Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bakozwa mbano mpo na ezaleli na bango ya komipimela (Talá paragrafe 5)

5. Mpo na nini eyano oyo Yesu apesaki ntoma Petro ezali kolendisa biso nyonso?

5 Mokolo moko, ntoma Petro atunaki Yesu boye: “Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo; eloko nini mpenza tokozwa?” (Matai 19:27) Yesu asembolaki ntoma Petro te mpo atunaki motuna wana. Kutu, Yesu ayebisaki nde bayekoli na ye ete bakozwa mbano mpo na elimo na bango ya komipimela. Bantoma mpe bakristo mosusu ya sembo bakoyangela elongo na Yesu  na likoló na mikolo ezali koya. Kasi, Yesu alobaki mpe ete ata sikoyo mbano ezali: “Moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa biloko yango mbala mingi koleka mpe akozwa libula ya bomoi ya seko.” (Matai 19:29) Lelo oyo, bayekoli nyonso ya Yesu bakoki kozwa batata, bamama, bandeko mibali, bandeko basi, mpe bana na kati ya lisangá. Yango ezali mpenza na motuya mingi koleka eloko nyonso oyo tomipimelaki mpo na Bokonzi ya Nzambe.

“LONGO MPO NA MOLIMO”

6. Mpo na nini Yehova alaki kopesa basaleli na ye mbano?

6 Longola ebele ya mapamboli oyo tozali kozwa sikoyo, tozali kozela mapamboli ya minene oyo tokozwa na mikolo ezali koya. (1 Timote 4:8) Yehova alaki kopesa basaleli na ye ya sembo mbano, mpe koyeba bongo ekosalisa biso tóyika mpiko na ntango ya mpasi. Soki tondimisami mpenza ete Yehova “akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi,” tokoki kotikala sembo.Baebre 11:6.

7. Ndenge nini elikya ezali lokola longo?

7 Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alobaki: “Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.” (Matai 5:12) Basaleli mosusu ya Nzambe bakozwa mbano na likoló. Mpe basusu bakozwa mbano ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Mpo na ntina yango, basengeli ‘kosepela mpe kopumbwa na esengo.’ (Nzembo 37:11; Luka 18:30) Kasi mpo na biso nyonso, elikya na biso ekoki kozala “longo mpo na molimo, ezali makasi mpe ngwi.” (Baebre 6:17-20) Ndenge kaka longo ebatelaka masuwa na ntango ya mopɛpɛ makasi, elikya makasi oyo tozali na yango ekoki kosalisa biso tótengatenga te. Ekoki kopesa biso makasi tóyika mpiko na ntango ya mpasi.

8. Ndenge nini elikya na biso ekitisaka mitungisi?

8 Elikya na biso ekoki kosalisa mpo tókima mitungisi mosusu. Kaka ndenge mafuta ekoki kokitisa mpasi na nzoto, bilaka ya Nzambe ekoki kokitisa biso motema na ntango ya mitungisi. Koyeba ete Yehova akotyela biso likebi ntango tozali kobwakela ye mokumba na biso ya kilo ezali mpenza kobɔndisa biso. (Nzembo 55:22) Tokoki mpenza kondima ete Nzambe akoki kosala “mingi mpenza koleka makambo nyonso oyo tosɛngaka.” (Baefese 3:20) Yehova akosalisa biso, kaka mingi te, kasi “mingi mpenza koleka!”

9. Nini ekosala ete tózwa mapamboli ya Yehova?

9 Mpo na kozwa mbano, tosengeli kozala na kondima makasi epai ya Yehova mpe kotosa malako na ye. Moize ayebisaki ekólo Yisraele boye: “Yehova akopambola yo mpenza na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo lokola libula mpo na kozwa yango, kaka soki okoyoka mpenza mongongo ya Yehova Nzambe na yo na kokebáká ete osalela mitindo nyonso oyo nazali kopesa yo lelo. Mpo Yehova Nzambe na yo akopambola yo mpenza kaka ndenge apesi yo elaka.” (Kolimbola Mibeko 15:4-6) Ozali mpenza kondima ete Yehova akopambola yo soki okobi kosalela ye na bosembo nyonso? Ebongi mpenza ete ozala na elikya ya ndenge wana.

YEHOVA AZALAKI MOPESI-MBANO NA BANGO

10, 11. Ndenge nini Yehova apesaki Yozefe mbano?

10 Biblia ekomamaki mpo na litomba na biso. Na Biblia, ezali na bandakisa mingi oyo emonisi ndenge oyo Nzambe apesaki basaleli na ye ya sembo mbano na ntango ya kala. (Baroma 15:4) Yozefe azalaki ndakisa ya malamu mpo na likambo yango. Liboso, bandeko na ye batɛkaki ye lokola moombo. Na nsima, mwasi ya nkolo na ye akoselaki ye makambo mpe batindaki ye na bolɔkɔ moko ya Ezipito. Ntango Yozefe azalaki na bolɔkɔ, Yehova asundolaki  nde ye? Soki moke te! Biblia elobi: “Yehova azalaki kaka elongo na Yozefe mpe azalaki komonisela ye motema boboto,” mpe “Yehova azalaki elongo na Yozefe mpe oyo ye azalaki kosala, Yehova azalaki kolongisa yango.” (Ebandeli 39:21, 23) Atako akutanaki na mikakatano wana nyonso, Yozefe azalaki kozela Nzambe na ye na motema molai.

11 Bambula mingi na nsima, Farao abimisaki ye na bolɔkɔ, mpe moombo wana akómaki mokonzi ya mibale oyo aleki na nguya na Ezipito. (Ebandeli 41:1, 37-43) Ntango Yozefe ná mwasi na ye babotaki bana mibali mibale, “Yozefe apesaki mwana ya liboso nkombo Manase, mpamba te, mpo na kozongela maloba na ye: “Nzambe asali ete nabosana mpasi na ngai nyonso mpe ndako mobimba ya tata na ngai.” Mpe apesaki oyo ya mibale nkombo Efraime, mpamba te, mpo na kozongela maloba na ye: ‘Nzambe asali ete nabota na mokili ya mawa na ngai.’” (Ebandeli 41:51, 52) Yehova apambolaki bosembo ya Yozefe, mpe na nsima Yozefe abikisaki Bayisraele mpe bato ya Ezipito na ntango ya nzala. Lisusu, Yozefe ayebaki ete ezalaki Yehova nde apesaki ye mbano mpe apambolaki ye.Ebandeli 45:5-9.

12. Ndenge nini Yesu atikalaki sembo ntango amekamaki?

12 Yesu Kristo mpe atikalaki sembo epai ya Nzambe na kati ya komekama ndenge na ndenge, mpe Yehova apesaki ye mbano. Nini esalisaki Yesu atikala sembo? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko, atyolaki nsɔni.” (Baebre 12:2) Yesu azalaki na esengo mingi ndenge asantisaki nkombo ya Nzambe. Mpe Yesu azwaki mbano na ndenge Tata na ye andimaki ye mpe apesaki ye mikumba mosusu mingi ya lokumu. Biblia elobi ete “afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.” Tozali mpe kotánga boye: “Nzambe atombolaki ye likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso.”Bafilipi 2:9.

YEHOVA ABOSANAKA TE OYO TOSALAKA

13, 14. Yehova amiyokaka ndenge nini mpo na makambo oyo tosalaka mpo na ye?

13 Tokoki kondimisama ete Yehova azwaka na motuya mingi likambo nyonso oyo tosalaka mpo na kosalela ye. Ayebaka malamumalamu ntango tozali kokakatana to ntango tozali komona lokola ete tokokoka te kosala likambo moko boye. Atyelaka biso likebi mingi ntango tozali komitungisa mpo na mosala to mpo na koleisa libota na biso. Lisusu, amityaka na esika na biso ntango oyo tokoki kosala lisusu mingi te na mosala na ye ndenge tozalaki kosala liboso mpo tozali kobɛla to kotungisama na makanisi. Tokoki kozala na elikya makasi ete Yehova azwaka na motuya mingi bosembo na biso atako tozali na mikakatano.Tángá Baebre 6:10, 11.

14 Kobosana mpe te ete Yehova azali “Moyoki ya libondeli.” Tokoki kondimisama ete ntango tobondelaka ye, akoyoka biso. (Nzembo 65:2) “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso,” akopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tótikala penepene na ye. Ntango mosusu, akoki kosalela bandeko basi mpe mibali mpo na kobɔndisa biso. (2 Bakorinti 1:3) Yehova asepelaka ntango tomoniselaka basusu motema mawa. “Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.” (Masese 19:17; Matai 6:3, 4) Na yango, ntango tozali kokabela bandeko mpe kosalisa bango, Yehova amonaka malamu oyo tosalaka lokola nde tozali kodefisa ye. Mpe alaki ete akopesa biso mbano mpo na boboto oyo tomonisi.

MBANO SIKOYO MPE MPO NA LIBELA

15. Mbano nini ozali kozela na mposa makasi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

15 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na elikya ya kozwa “motole ya boyengebene,” mbano oyo euti epai ya Yesu. (2 Timote 4:7, 8) Kasi, kokanisa te ete ozali na motuya  mingi te na miso ya Nzambe mpo ozali na elikya mosusu. Bamilio ya “bampate mosusu” ya Yesu bazali kozela na mposa makasi kozwa mbano ya bomoi ya seko na mikolo ezali koya awa na mabele. “Bakosepela mpenza na kimya mingi” na mokili ya sika.Yoane 10:16; Nzembo 37:11.

16. Libɔndisi nini tozali kokuta na 1 Yoane 3:19, 20?

16 Ntango mosusu, tokoki komona lokola ete tozali kosala mingi te na mosala ya Yehova, to komituna soki Yehova azali kosepela na makambo oyo tosalaka. Tokoki ata kokanisa ete tobongi te mpo na kozwa ata mbano ya ndenge nini. Kasi, tosengeli soki moke te bobosana ete “Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (Tángá 1 Yoane 3:19, 20.) Soki tozali kosalela Yehova mpo tozali na kondima mpe tolingaka ye, tokoki kondimisama ete akopesa biso mbano, ata soki makambo oyo tozali kosala emonani lokola ete ezali na ntina mingi te.Marko 12:41-44.

17. Mbano nini mosusu tozali kozwa sikoyo?

17 Ata na mikolo oyo ya nsuka ya mokili mabe ya Satana, Yehova azali kopambola basaleli na ye. Azali kosɛnzɛla ete tózwa boyebi mingi mpe tózala na kimya na kati ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba. (Yisaya 54:13) Ya solo, kaka ndenge Yesu alakaki yango, Yehova azali kopesa biso mbano sikoyo na nzela ya libota ya bandeko mibali mpe basi na mokili mobimba, oyo balingaka biso. (Marko 10:29, 30) Lisusu, baoyo bazali koluka Nzambe na mposa makasi bazali kozwa mbano ndenge bazali na kimya ya motema mpe bazali na esengo.Bafilipi 4:4-7.

18, 19. Basaleli ya Yehova bamiyokaka ndenge nini mpo na mbano oyo bazwaka?

18 Basaleli ya Yehova na mokili mobimba bazali kozwa mbano oyo euti epai ya Tata na biso ya likoló. Na ndakisa, ndeko Bianca, na Allemagne, alobi: “Natɔndaka Yehova mingi ndenge asalisaka ngai na makambo oyo ebangisaka ngai mpe azalaka pene na ngai mokolo na mokolo. Mokili etondi na yikiyiki mpe ezali kobeba se kobeba. Kasi, lokola nazali kosala elongo na Yehova, namimonaka ete nabatelami na mabɔkɔ na ye. Mbala nyonso oyo namipimelaka makambo mingi mpo na ye, apesaka ngai ebele ya mapamboli.”

19 Tózwa mpe ndakisa ya ndeko Paula, na Canada, oyo azali na mbula 70 mpe maladi moko makasi na mokuwa ya mokɔngɔ (spina-bifida) epekisaka ye asala makambo mingi. Alobi ete atako maladi yango esalaka ete atambola malamu te, yango elimboli te ete akoki kosakola mingi te. Abakisi boye: “Nasalelaka mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya kosakola, na ndakisa kopesa litatoli na telefone to litatoli ya libaku malamu. Mpo ngai moko nalɛmba te, nazalaka na mwa karnɛ oyo nakomaka bavɛrsɛ ya Biblia mpe makanisi oyo euti na mikanda na biso, mpo natángaka yango mbala na mbala. Nabengaka yango: ‘Karnɛ na ngai ya lobiko.’ Soki totye makanisi na biso nyonso na bilaka ya Yehova, kolɛmba nzoto ekozala kaka mpo na ntango mokuse. Yehova azali ntango nyonso wana mpo na kosalisa biso, ezala tokutani na likambo nini.” Mbala mosusu, mokakatano na yo ekeseni mosika na oyo ya Bianca to oyo ya Paula. Atako bongo, okoki kokanisa ndenge oyo Yehova apesaka yo mpe bato oyo bazali zingazinga na yo mbano. Ezali mpenza esengo kokanisa ndenge oyo Yehova azali kopesa yo mbano sikoyo, mpe ndenge akopesa yo mbano na mikolo ezali koya!

20. Nini tokoki kozela na mposa makasi soki tokobi kosala nyonso mpo na kosalela Yehova na bosembo?

20 Kobosana soki moke te ete mabondeli na yo oyo euti na motema ekozwa ‘mbano monene.’ Okoki kondimisama ete ‘nsima ya kosala mokano ya Nzambe, okozwa eloko oyo alaki.’ (Baebre 10:35, 36) Na yango, tókoba kokómisa kondima na biso makasi mpe tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela Yehova. Tozali na kondima ete Yehova akopesa biso mbano!Tángá Bakolose 3:23, 24.