Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2016

 LISOLO YA BOMOI

Nakómaki “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso”

Nakómaki “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso”

“Soki kaka ozwi batisimo, nakokima yo!” Wana ezali maloba ya kokanela oyo tata na ngai ayebisaki mama na ngai na 1941. Atako bongo, mama azwaki batisimo. Yango wana, tata akimaki ye. Na ntango wana, ngai nazalaki na mbula 8 mpamba.

LIBOSO ete likambo yango esalema, nazalaki kosepela na mateya ya solo. Mama azwaki mwa mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe nazalaki kosepela na yango. Nazalaki kosepela mingimingi na bililingi. Tata azalaki te kolinga ete mama ayebisaka ngai makambo oyo azalaki koyekola. Kasi, nazalaki na mposa ya koyeba makambo mingi mpe nazalaki kotuna mituna; na yango azalaki koyekola na ngai soki tata azali te. Yango wana, ngai mpe nazwaki ekateli ya komipesa epai ya Yehova. Na 1943, ntango nazalaki na mbula 10, nazwaki batisimo na Blackpool, na Angleterre.

NABANDI KOSALELA YEHOVA

Banda ntango wana, ngai ná mama tozalaki kobima na mosala ya kosakola mbala na mbala. Na ntango wana, tozalaki kosalela bafono mpo na kosakola. Bafono yango ezalaki minene mpe mokomoko ezalaki na kilo soki minei na ndambo. Meká komona ndenge nazalaki komema fono yango ntango nazalaki elenge!

Ntango nazalaki na mbula 14, nakómaki na mposa ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela. Mama ayebisaki ngai ete nasengeli naino kosolola na mosaleli ya bandeko (lelo oyo mokɛngɛli ya zongazonga). Ndeko yango apesaki ngai toli nayekola naino mosala moko ya mabɔkɔ mpo esalisa ngai nazwaka mwa mbongo ya kobikela ntango nakokóma mobongisi-nzela. Na yango, nayekolaki mosala ya mabɔkɔ. Nsima ya kosala mosala mbula mibale, natunaki mokɛngɛli  ya zongazonga mosusu soki nakoki kokóma mobongisi-nzela. Alobaki: “Okoki kokóma!”

Na yango, na sanza ya minei 1949, ngai ná mama tosundolaki biloko na biso nyonso ya ndako mpe tokendaki na Middleton, pene na engumba Manchester, epai tobandaki mosala ya mobongisi-nzela. Nsima ya sanza minei, naponaki ndeko moko mpo azala moninga na ngai ya mosala, na mosala ya mobongisi-nzela. Biro ya filiale elendisaki biso tókende kopesa mabɔkɔ na lisangá moko oyo eutaki kosalema na Irlam. Mama azalaki mobongisi-nzela elongo na ndeko mwasi moko ya lisangá mosusu.

Nazalaki kaka na mbula 17, kasi ngai ná moninga na ngai ya mosala tozalaki na mokumba ya kotambwisa makita, mpo bandeko mibali oyo bakokisaki masɛngami bazalaki mingi te na lisangá wana ya sika. Na nsima, nakendaki na lisangá ya Buxton, oyo ezalaki na basakoli mingi te mpe ezalaki na mposa ya lisalisi. Makambo nyonso wana ebongisaki ngai mpo na mikumba mosusu na nsima.

Tozali kobengisa bato na diskur ya bato nyonso, na Rochester, New York, 1953

Na 1951, natondisaki formilɛrɛ mpo na kokɔta na Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Na nsima, na sanza ya zomi na mibale 1952, babengisaki ngai mpo nakɔta mosala ya soda. Nasɛngaki bango ete nasala mosala ya soda te, mpo nazalaki na mosala ya ntango nyonso. Kasi tribinale endimaki lisɛngi na ngai te, mpe ekatelaki ngai etumbu ya sanza motoba ya bolɔkɔ. Ntango nazalaki na bolɔkɔ, nazwaki libyangi ya kokɔta na kelasi ya mbala ya 22 ya Gileade. Na sanza ya nsambo 1953, mwa moke nsima  ya kobima na bolɔkɔ, nasalaki mobembo na masuwa babengi Georgic mpe nakendaki na New York.

Ntango kaka nakómaki, nakɔtaki na liyangani ‘Ebongiseli ya mokili ya sika,’ oyo esalemaki na 1953. Na nsima, nasalaki mobembo na engbunduka tii na South Lansing, kaka na etúká ya New York, esika eteyelo yango ezalaki. Lokola nautaki kobima na bolɔkɔ, nazalaki kaka na mwa mbongo moke. Ntango nakitaki na engbunduka, namataki na bisi mpo emema ngai na South Lansing, kasi mpo na kofuta tike, nasɛngaki moninga moko ya mobembo akabela ngai santimɛ 25.

BATINDI NGAI NA MBOKA MOPAYA

Na Eteyelo ya Gileade, tozwaki formasyo ya malamu mpenza oyo esalisaki biso ‘tókóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.’ (1 Bakorinti 9:22) Batindaki ngai ná ndeko Paul Bruun mpe ndeko Raymond Leach na ekólo Philippines, kasi tosengelaki kozela basanza mingi mpo na kozwa viza. Na nsima, tosalaki mobembo na masuwa tii na engumba Rotterdam, na ekólo Hollande. Nsima na yango, tokobaki mobembo na masuwa, tokatisaki Mbu ya Mediterane mpe canal de Suez, mpe tokendaki na Océan Indien tii na ekólo Malaisie, na nsima, na Hong Kong. Nsukansuka, nsima ya kosala mikolo 47 na mai, tokómaki na Manille mokolo ya 19/11/1954.

Ngai ná Raymond Leach tosalaki mobembo ya mikolo 47 na masuwa mpo na kokende na mosala ya misionɛrɛ na Philippines

Kuna, tosengelaki komesana na mimeseno ya sika, ekólo ya sika, mpe monɔkɔ ya sika. Kasi na ebandeli, biso nyonso misato totindamaki na lisangá moko na Quezon City, esika bato mingi bazalaki koloba Lingelesi. Yango wana, nsima ya sanza motoba, toyebaki kaka mwa maloba moke ya monɔkɔ ya Tagalog. Kasi, makambo ebongwanaki ntango tozwaki mikumba mosusu.

Mokolo moko, na sanza ya mitano 1955, ntango tozongaki na ndako nsima ya mosala ya kosakola, ngai ná ndeko Leach tokutaki mikanda oyo emonisaki ete tokómi bakɛngɛli ya zongazonga. Nazalaki kaka na mbula 22, kasi na mokumba wana, nasengelaki koyekola lolenge ya sika ya ‘kokóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.’

Nazali kosala diskur ya bato nyonso na liyangani ya zongazonga na monɔkɔ ya Bicol

Na ndakisa, nasalaki diskur na ngai ya liboso lokola mokɛngɛli ya zongazonga libándá ya magazini moko. Na ntango wana, na Philippines, badiskur ya bato nyonso ezalaki kosalema mpenza na bisika ya bato nyonso! Na yango, ntango nazalaki kokende kotala masangá ndenge na ndenge ya zongazonga, nazalaki kosala badiskur na bisika ya polele oyo bato bazwaka mopɛpɛ, na bazando, liboso ya bandako minene ya makita, na bisika babɛtaka baskɛti, na baparke, mpe mbala mingi na ebandeli to na nsuka ya balabala. Mokolo moko na engumba San Pablo, nalingaki kosala diskur na zando moko ya monene, kasi mbula etungisaki biso. Yango wana, nasɛngaki bandeko oyo bazalaki kotambwisa lisangá ete nakende kosala diskur yango na Ndako ya Bokonzi. Na nsima, bandeko yango batunaki soki basengeli kokoma na lapolo ete ezalaki diskur ya bato nyonso, lokola esalemaki te na esika ya bato nyonso.

Mbala mingi, nazalaki kofanda na bandako ya bandeko. Atako bandako yango ezalaki ya mindɔndɔ te, ezalaki pɛto. Mbala mingi, mbeto na ngai ezalaki kaka litɔkɔ moko ya moke oyo batandi na nse, na ndako ya mabaya. Esika ya kosukola ezalaki kaka libándá ya ndako, epai moto nyonso akokaki komona ngai; yango wana nakómaki kosukola kozanga ete bato bámona ngai. Nazalaki kosala mibembo na bisi mpe ntango mosusu na masuwa mpo na kokende na bisanga mosusu. Na bambula nyonso oyo nasali, nasombá naino vuatire na ngai moko te.

Nayekolaki monɔkɔ ya Tagalog, atako batángisaki ngai yango te. Nayekolaki kaka na koyoka ndenge bandeko bazalaki koloba na mosala ya kosakola mpe na makita. Bandeko basalisaki ngai nayeba, mpe nazalaki kotɔnda bango mpo na motema molai na bango mpe ndenge bazalaki koyebisa ngai makambo polele.

 Ntango mikolo ezalaki koleka, nasengelaki kobongola makambo mosusu mpo na mikumba ya sika oyo nazwaki. Na 1956, ntango ndeko Nathan Knorr ayaki na Philippines, tosalaki liyangani ya ekólo mobimba. Nazwaki mokumba ya kosala na boyokani na bapanzi-nsango. Nayebaki mosala yango liboso te, kasi bandeko mosusu basalisaki ngai nayekola. Mbula mobimba ekokaki te, tosalaki liyangani mosusu ya ekólo mobimba, mpe nazalaki mokɛngɛli ya liyangani. Ndeko Frederick Franz, oyo autaki mpe na biro monene, ayaki na Philippines. Nayekolaki makambo mingi epai na ye. Ntango asalaki diskur ya bato nyonso, alataki elamba oyo babengi barong Tagalog, ndenge bato ya Philippines balataka. Yango esepelisaki bandeko mingi, mpe eteyaki ngai nasala makasi mpo na komesana na bato.

Nasengelaki lisusu kobongola makambo ntango nakómaki mokɛngɛli ya etúká. Na ntango wana, tozalaki kolakisa filme Le bonheur de la Société du monde nouveau. Mbala mingi, tozalaki kolakisa yango libándá, na bisika ya bato nyonso, yango wana ntango mosusu nyamankɛkɛ ezalaki koswa biso. Mwinda ya aparɛyi ya kolakisa filme (projecteur) ezalaki kobenda yango, mpe ezalaki kokangama na aparɛyi yango. Kopangwisa aparɛyi yango na nsima, ezalaki mosala mingi! Kobongisa makita wana ezalaki pɛtɛɛ te; kasi komona ndenge bato bazalaki koya kotala mpo na koyeba ebongiseli ya Yehova na mokili mobimba ezalaki kosepelisa biso.

 Na bisika mosusu, basango ya Katolike bazalaki kotinda bakonzi ya Leta báboya kopesa biso ndingisa ya kosala mayangani. Mpo na kopekisa bato bálanda diskur, bazalaki kobɛta ngonga ya losambo mbala nyonso oyo diskur ezalaki kosalema pene na bandako-nzambe na bango. Atako bongo, bato bakobaki koyekola solo, mpe lelo oyo bato mingi na bisika wana basambelaka Yehova.

MIKUMBA YA SIKA OYO ESƐNGAKI NABONGOLA MAKAMBO MINGI

Na 1959, batindaki ngai nakende kosala na biro ya filiale. Makambo oyo nakutanaki na yango kuna, eteyaki ngai mingi. Mwa moke na nsima, basɛngaki ngai nakendaka kotala bafiliale mosusu lokola mokɛngɛli ya zone. Na moko ya mibembo yango, nayebanaki na Janet Dumond, oyo azalaki misionɛrɛ na Thaïlande. Na nsima, ngai ná ye tokómaki kokomelana mikanda, mpe nsukansuka, tobalanaki. Sikoyo, tosali mbula 51 na libala, mpe tozali kosalela Yehova na esengo.

Ngai ná Janet, na esanga moko ya Philippines

Nazwaki libaku ya kotala basaleli ya Yehova na bikólo 33. Nazali na botɔndi mingi ndenge mikumba oyo nazwaki liboso esalisaki ngai nayeba kofanda na bato ya mimeseno mpe bikólo ndenge na ndenge! Mibembo wana esalisaki ngai namona polele ete Yehova alingaka bato ya ndenge nyonso.Misala 10:34, 35.

Tosalaka nyonso tóbimaka na mosala ya kosakola mbala na mbala

TOZALI KAKA KOKOBA KOMESANA NA MAKAMBO YA SIKA

Ngai ná Janet tozali na esengo mingi kosala elongo na bandeko na Philippines, mpe tii lelo tozali kaka kosala na biro ya filiale ya ekólo yango, na Quezon City. Motángo ya basakoli lelo oyo ezali mbala zomi koleka ntango nabandaki mosala awa, esili koleka mbula 60. Ata nsima ya bambula nyonso wana, nasengeli kaka komesana na makambo ya sika oyo Yehova azali kosɛnga. Na ndakisa, mpo na mbongwana oyo esalemi na ebongiseli ya Yehova na mikolo euti koleka, esɛngaki ete biso mpe tóndima mbongwana na makambo mosusu.

Tozali na esengo mingi ndenge motángo ya Batatoli ezali se kobakisama

Tosalaki nyonso oyo tokoki mpo na kolanda litambwisi ya Yehova, mpe yango ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Tosalaki mpe makasi mpo na kondima mbongwana nyonso oyo esengelaki mpo na kosalela bandeko malamu. Ya solo, ntango nyonso oyo Yehova akolinga ete tósala yango, tozali na ekateli ya ‘kokóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.’

Tii lelo, tozali kosala na biro ya filiale na Quezon City