Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2016

“Kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya”

“Kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya”

“Baoyo bazali kolanda elimo [batyaka makanisi na bango] na makambo ya elimo.”BAROMA 8:5.

NZEMBO: 57, 52

1, 2. Mpo na nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo batyaka mpenza likebi na Baroma mokapo 8?

NA NTEMBE te, osilá kotánga Baroma 8:15-17 na ntango ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Bavɛrsɛ yango elimboli ndenge bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebaka ete bazali na elikya ya bomoi ya seko na likoló. Baroma 8:1 ebengi bakristo oyo batyami mafuta na elimo “baoyo bazali na bomoko na Kristo.” Kasi Baroma mokapo 8 etaleli kaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo? To ekoki mpe kosalisa baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele?

2 Baroma mokapo 8 ekomamaki libosoliboso mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Bazwaki “elimo” lokola bato oyo ‘bazali kozela na mposa makasi Nzambe akamata bango mpe akómisa bango bana na ye, básikwama na nzoto [na bango ya mosuni].’ (Baroma 8:23) Na mikolo ezali koya, bakozala bana ya Nzambe na likoló. Yehova alimbisá masumu na bango na nzela ya lisiko. Atángi bango bayengebene mpo bákoka kozala bana na ye.Baroma 3:23-26; 4:25; 8:30.

3. Mpo na nini baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele basengeli mpe koyekola Baroma mokapo 8?

 3 Nzokande, na ebandeli ya mokanda ya Baroma, ntoma Paulo alobelaki mobali moko oyo atyamaki mafuta na elimo te, kasi Yehova azalaki komona ye moto ya sembo. Mobali yango ezali Abrahama, moto ya sembo oyo azalaki na bomoi bambula mingi liboso ete Yesu apesa bomoi na ye lokola lisiko. (Tángá Baroma 4:20-22.) Lelo oyo, Yehova akoki mpe kotalela bakristo ya sembo oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele lokola bayengebene. Bango mpe bakoki kozwa matomba na toli oyo ezali na Baroma mokapo 8.

4. Ntango totángaka Baroma 8:21, motuna nini tosengeli komituna?

4 Na Baroma 8:21, Yehova apesi bino ndanga ete mokili ya sika oyo alaki ekoya mpe bato bakosikolama na lisumu mpe na liwa. Vɛrsɛ yango elobi ete bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” Omimonaka na kati ya mokili wana ya sika? Tótalela makambo oyo tosengeli kosala mpo na kozala na bomoi kuna.

“KOKANISA BAMPOSA YA NZOTO”

5. Likambo nini ntoma Paulo alobeli na Baroma 8:4-13?

5 Tángá Baroma 8:4-13. Na Baroma mokapo ya mwambe, ntoma Paulo alobeli ndenge mibale ya bato: baoyo bazali “kolanda bamposa ya nzoto” mpe baoyo bazali “kolanda elimo.” Bato mosusu bakanisaka ete ntoma Paulo azalaki kolobela bato oyo bazalaki bakristo te mpe baoyo bazalaki bakristo. Nzokande, na bavɛrsɛ yango, ntoma Paulo akomelaki nde bakristo, oyo ‘babengami mpo bázala basantu.’ (Baroma 1:7) Yango wana, ezala baoyo bazalaki “kolanda bamposa ya nzoto” mpe baoyo bazalaki “kolanda elimo,” bango nyonso bazalaki bakristo. Kasi nini ezalaki kokesenisa bango?

6, 7. (a) Na Biblia, liloba “nzoto” to mosuni elimbolaka nini? (b) Ndenge nini liloba “nzoto” to mosuni esalelami na Baroma 8:4-13?

6 Ntango Biblia esalelaka liloba “nzoto” to mosuni, elimbolaka makambo ebele. Ntango mosusu elimbolaka mpenza mosuni ya nzoto na biso. (Baroma 2:28; 1 Bakorinti 15:39, 50)  Ekoki mpe kolimbola boyokani na kati ya bato ya libota. Na ndakisa, Biblia elobi ete na mosuni, Yesu azalaki ‘moto ya libota ya Davidi,’ mpe ntoma Paulo abengaki Bayuda ‘bandeko na ye [ya mosuni].’Baroma 1:3; 9:3.

7 Kasi, ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango alobelaki baoyo bazali na bomoi na “kolanda bamposa ya nzoto,” na Baroma 8:4-13? Mpo na kozwa eyano, tótala na Baroma 7:5. Kuna, ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango tozalaki kolanda bamposa ya nzoto, bamposa ya masumu oyo elamwisamaki na Mibeko ezalaki kosala mosala na binama na biso.” Na vɛrsɛ yango, ntoma Paulo alimbolaki ete bato oyo bazali na bomoi na “kolanda bamposa ya nzoto” ezali baoyo batyaka makanisi na bango na bamposa na bango ya masumu mpe balandaka yango, mpo na kosala oyo balingi.

8. Mpo na nini ntoma Paulo asengelaki kokebisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo na likama ya kozala na bomoi na “kolanda bamposa ya nzoto”?

8 Mpo na nini ntoma Paulo akebisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo na likama ya kozala na bomoi na “kolanda bamposa ya nzoto”? Mpe mpo na nini bakristo nyonso lelo oyo basengeli na likebisi yango? Mpo mosaleli nyonso ya Nzambe akoki kobanda kokómisa bamposa na ye moko likambo oyo eleki ntina na bomoi na ye. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki ete bandeko mosusu ya Roma bazalaki baombo “ya mabumu na bango moko.” Mbala mosusu na maloba wana, alingaki komonisa ete kosangisa nzoto, bilei, to bisɛngo mosusu ya bomoi ezalaki makambo oyo elekaki ntina na bomoi na bango. (Baroma 16:17, 18; Bafilipi 3:18, 19; Yuda 4, 8, 12) Lisusu, na ntango moko boye, likambo moko ya mabe koleka esalemaki na lisangá ya Korinti: ndeko moko azalaki kosala pite na “mwasi ya tata na ye.” (1 Bakorinti 5:1) Ezali polele ete bakristo wana ya siɛklɛ ya liboso basengelaki na likebisi ya ntoma Paulo oyo etali kozala na bomoi na “kolanda bamposa ya nzoto.”Baroma 8:5, 6.

9. Makambo nini Baroma 8:6 elimboli te?

9 Likebisi wana etaleli mpe biso lelo. Ata soki moto asaleli Yehova banda bambula mingi, akoki kobanda “kolanda bamposa ya nzoto” na bomoi na ye. Kasi, ntoma Paulo alingaki nde koloba ete tosengeli ata moke te kokanisa makambo lokola kolya,  mosala, kominanola, to lolango kati ya mwasi ná mobali? Ezali bongo te. Wana ezali makambo oyo bomoi esɛngaka. Ata Yesu azalaki kosepela na bilei mpe kopesa basusu bilei. Amonaki mpe ete azalaki na mposa ya kopema mwa moke. Longola yango, ntoma Paulo akomaki ete na libala kosangisa nzoto ezali na ntina mingi.

Masolo oyo tobɛtaka emonisaka nini? (Talá paragrafe 10 mpe 11)

10. Maloba “kokanisa na” elimboli nini?

10 Ntoma Paulo alingaki koloba nini na maloba “kokanisa na”? Liloba ya Grɛki oyo ntoma Paulo asalelaki elimboli moto oyo makanisi na ye nyonso mpe myango na ye nyonso etyami na likambo moko. Moto moko ya mayele alimbolaki ete maloba yango etaleli bato oyo “bamikɔtisaka na mozindo na likambo moko, mpe balobelaka yango mbala na mbala,” mpe batyaka makanisi kaka na bamposa na bango moko. Batikaka ete bamposa yango etambwisa bomoi na bango.

11. Makambo nini ekoki kokóma na ntina mingi koleka mpo na biso?

11 Bakristo ya Roma basengelaki komitalela malamumalamu mpe koluka koyeba soki bazalaki kotya makanisi na bango na nini. Bazalaki nde kotya yango na “makambo ya nzoto”? Lelo oyo, biso mpe tosengeli koluka koyeba makambo oyo eleki ntina mpo na biso. Makambo nini tosepelaka kolobela mingi? Makambo nini tosepelaka mpenza kosala? Bato mosusu bakoki komona ete makanisi na bango ezalaka mingi na komeka vinyo ndenge na ndenge, kobongisa ndako na bango, kosomba bilamba ya sika, koluka koyeba mayele ya kozwa mbongo, to kozwa ntango ya kobongisa konje. Makambo wana nyonso ezali mabe te. Ekoki kozala makambo oyo bomoi esɛngaka. Na ndakisa, ata Yesu abongolaki mai mpo ekóma vinyo na fɛti moko ya libala, mpe ntoma Paulo apesaki Timote toli amɛlaka “mwa vinyo” mpo na maladi oyo azalaki kobɛla. (1 Timote 5:23; Yoane 2:3-11) Kasi, vinyo ezalaki te eloko oyo elekaki ntina na bomoi na bango. Bongo biso? Makambo nini tosepelaka na yango mingi na bomoi?

12, 13. Mpo na nini tosengeli kokeba na makambo oyo totyaka makanisi na biso?

12 Ntoma Paulo apesi likebisi oyo: “Kokanisa bamposa ya nzoto elakisi liwa.” (Baroma 8:6) Alingaki komonisa nini na maloba wana? Soki tozali na bomoi na “kolanda bamposa ya nzoto,” tokoki kobebisa boyokani na biso na Yehova sikoyo mpe kobungisa bomoi na mikolo ezali koya. Kasi, tokolinga te ete likambo ya ndenge wana ekómela biso. Moto akoki kobongwana. Tókanisa lisusu moto oyo azalaki kosala pite na Korinti mpe asengelaki kolongolama na lisangá. Moto yango abongwanaki mpe atikaki kolanda bamposa na ye ya mbindo. Azongelaki kosalela Yehova na lisosoli ya pɛto.2 Bakorinti 2:6-8.

13 Moto wana akendaki mpenza mosika na likambo etali kozala na bomoi na “kolanda bamposa ya nzoto.” Atako bongo, abongwanaki. Na yango, soki mokristo moko lelo akómi kolanda bamposa na ye ya masumu, na esika ya kolanda mitinda ya Yehova, ye mpe akoki kobongwana. Kokanisa likebisi wana ya ntoma Paulo ekoki kotinda biso tóbongwana soki esengeli.

“KOKANISA NA ELIMO”

14, 15. (a) Ntoma Paulo alendisaki biso tókanisaka makambo nini? (b) “Kokanisa na elimo” elakisi nini te?

14 Nsima ya kolobela makama ya “kokanisa bamposa ya nzoto,” ntoma Paulo alimbolaki ete: “Kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya.” Yango ezali mpenza mbano monene oyo tokoki kozwa!

 15 Kasi “kokanisa na elimo” elakisi te ete makambo mosusu ya bomoi etali biso te. Elakisi te ete moto asengeli kokanisa mpe koloba kaka makambo ya Yehova to ya Biblia. Na ndakisa, basaleli ya Nzambe na siɛklɛ ya liboso bazalaki na bomoi lokola bato nyonso. Bazalaki kosepela na bilei, komɛla, kobala, kobɔkɔla bana, mpe kosala misala.Marko 6:3; 1 Batesaloniki 2:9.

16. Likambo nini elekaki ntina na bomoi ya ntoma Paulo?

16 Kasi ntoma Paulo mpe bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso batikaki te ete makambo wana ya bomoi ya mokolo na mokolo ekóma makambo oyo eleki ntina na bomoi na bango. Na ndakisa, toyebi ete ntoma Paulo azalaki kotonga bahema mpo na kozwa mwa mbongo ya kobikela. Kasi mosala wana ezalaki te likambo oyo elekaki ntina na bomoi na ye. Likambo oyo elekaki ntina na bomoi ya ntoma Paulo ezalaki kosalela Nzambe. Atyaki makanisi na ye nyonso na mosala ya kosakola mpe ya koteya. (Tángá Misala 18:2-4; 20:20, 21, 34, 35.) Kaka ndenge bandeko basi mpe mibali na Roma basengelaki komekola ntoma Paulo, biso mpe tosengeli komekola ye.Baroma 15:15, 16.

17. Matomba nini tokozwa soki tozali “kokanisa na elimo”?

17 Tokozala na bomoi ya ndenge nini soki totye makanisi na biso nyonso na mosala ya Yehova? Baroma 8:6 elobi ete: “Kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya.” Kosala bongo elimboli kotika ete elimo ya Yehova etambwisa makanisi na biso mpe koyekola kokanisa lokola Yehova. Yehova alaki biso bomoi ya malamu mpe ya esengo sikoyo mpe bomoi ya seko na mikolo ezali koya.

18. Ndenge nini tokoki kozala na kimya soki tozali “kokanisa na elimo”?

18 Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete “kokanisa na elimo” ekoki kopesa biso kimya? Moto nyonso alingaka kimya, mingimingi kimya ya makanisi. Nzokande, kaka bato moke nde bazwaka kimya yango. Kasi, na lisalisi ya Yehova, tokoki kozwa kimya ya solosolo ya makanisi. Tokoki mpe kozala na kimya na bato ya libota na biso mpe na bandeko ya lisangá. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ntango mosusu tokoki kozwana mwa matata na bandeko mibali mpe basi. Soki esalemi bongo, tosengeli kolanda toli oyo ya Yesu: “Yokaná yo na ndeko na yo.” (Matai 5:24) Kobosana te ete ndeko yango azali mpe kosalela Yehova, “Nzambe oyo apesaka kimya.”Baroma 15:33; 16:20.

19. Kimya ya ndenge nini tokoki kozala na yango?

19 Soki tozali “kokanisa na elimo,” tokozala mpe na kimya elongo na Nzambe. Mosakoli Yisaya akomaki boye: “Baoyo bazali na makanisi oyo ezali kotengatenga te, [Yehova] okobatela bango na kimya ntango nyonso, mpo bazali kotyela yo motema.”Yisaya 26:3; tángá Baroma 5:1.

20. Mpo na nini ozali na botɔndi mpo na toli oyo ezali na Baroma mokapo 8?

20 Ezala tozali na elikya ya bomoi ya seko na likoló to awa na mabele, biso nyonso tokoki kozwa matomba na maloba ya bwanya oyo ezali na Baroma mokapo 8. Tozali na botɔndi ndenge Biblia elendisi biso tótya makanisi na biso nyonso na kosalela Yehova, na esika ya kolanda bamposa na biso moko. Toyebi ete soki tozali “kokanisa na elimo,” tokoki kozwa mbano moko monene. Ntoma Paulo akomaki: “Likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”Baroma 6:23.