Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2016

Bwakelá Yehova mitungisi na yo nyonso

Bwakelá Yehova mitungisi na yo nyonso

‘Bwakelá [Yehova] mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’1 PETRO 5:7.

NZEMBO: 60, 23

1, 2. (a) Mpo na nini tokutanaka na mitungisi? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

LELO oyo, Satana “azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” (1 Petro 5:8; Emoniseli 12:17) Yango wana, bomoi etondi na mitungisi, mpe ata basaleli ya Nzambe bazali na mitungisi yango. Basaleli ya Nzambe na ntango ya kala mpe bakutanaki na mitungisi. Na ndakisa, Biblia elobi ete mokonzi Davidi azalaki mpe komitungisa. (Nzembo 13:2) Ntoma Paulo mpe azalaki na “mitungisi mpo na masangá nyonso.” (2 Bakorinti 11:28) Kasi, tosengeli kosala nini soki mitungisi elekeli biso motó?

2 Tata na biso ya likoló oyo alingaka biso asalisaki basaleli na ye na ntango ya kala bázwa kimya ntango bazalaki na mitungisi; azali na mposa ya kosala mpe bongo lelo oyo. Biblia elendisi biso boye: ‘Bwakelá [Yehova] mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:7) Kasi, ndenge nini okoki kosala yango? Tokotalela makambo minei mpo na kosala yango. Okoki (1) kobondela, (2) kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe, (3) kotika elimo santu ya Yehova esalisa yo, mpe  (4) koyebisa moto moko oyo otyelaka motema ndenge oyo ozali komiyoka. Ntango tozali koyekola makambo wana minei, luká koyeba bisika oyo osengeli kobongisa.

‘BWAKELÁ YEHOVA MOKUMBA NA YO YA KILO’

3. Ndenge nini okoki ‘kobwakela Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo’?

3 Likambo ya liboso oyo tokoki kosala mpo na kobwakela Yehova mitungisi na biso ezali libondeli oyo euti na motema. Ntango ozali komitungisa, Tata na biso ya likoló alingaka ete tóyebisa ye ndenge oyo tozali mpenza komiyoka. Davidi, mokomi ya nzembo, abondelaki Yehova boye: “Ee Nzambe, tyá litoi na libondeli na ngai.” Kaka na nzembo yango, Davidi alobaki mpe ete: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.” (Nzembo 55:1, 22) Soki osali nyonso oyo okoki mpo na kosilisa mokakatano moko, kobondela Yehova na motema mobimba ekosalisa yo mingi, na esika ete omitungisa. Kasi ndenge nini libondeli esalisaka? Ndenge nini ekoki kosalisa biso tótika komitungisa mingi ntango makambo elekeli biso?Nzembo 94:18, 19.

4. Ntango tozali komitungisa, mpo na nini libondeli ezali na ntina mingi?

4 Tángá Bafilipi 4:6, 7. Ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli na biso oyo euti na motema mpe oyo tosalaka mbala na mbala? Akoki kosalisa biso tózala na kimya ya motema mpe tóbengana makanisi mabe. Na esika ete tómitungisa mpe tóbanga, Nzambe asalisaka biso tózala na kimya ya motema oyo tozalaki na yango liboso te. Bandeko na biso mingi bayokaki kimya yango. Yo mpe okoki kozala na kimya ya ndenge wana. “Kimya ya Nzambe” ekoki kosalisa yo olonga mokakatano nyonso! Okoki mpenza kotyela elaka oyo ya Yehova motema: “Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.”Yisaya 41:10.

KIMYA YA MOTEMA OYO EUTAKA NA LILOBA YA NZAMBE

5. Ndenge nini Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo ozala na kimya ya motema?

5 Likambo ya mibale mpo na kozwa kimya ya motema ezali kotánga mpe komanyola na bavɛrsɛ ya Biblia. Mpo na nini yango ezali na ntina? Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Ezali na toli ya bwanya mpe oyo ebongi mpenza, oyo euti epai ya Mozalisi na biso. Mbala nyonso oyo olingi komitungisa, meká kokanisa na Liloba ya Nzambe na mozindo mpe manyolá na ndenge oyo toli na ye ekoki kopesa yo makasi. Yango ekoki kosalisa yo otika komitungisa, to omitungisa mingi te, to mpe oboya komitungisa. Yehova amonisi boyokani oyo ezali kati na kotánga Liloba na ye mpe kozala na ‘mpiko mpe makasi mpenza’ mpe “kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te.”Yosua 1:7-9.

6. Ndenge nini maloba ya Yesu ekoki kosalisa yo?

6 Na Liloba ya Nzambe, totángaka ndenge oyo Yesu azalaki kosolola na bato. Bato bazalaki kosepela koyoka ye mpo maloba na ye ezalaki kobɔndisa mpe kokitisa motema, mingimingi epai ya bato oyo balɛmbaki mpe bazalaki komitungisa. (Tángá Matai 11:28-30.) Yesu azalaki kotya likebi mingi na ndenge oyo bato bazalaki komiyoka. (Marko 6:30-32) Kaka ndenge Yesu alakaki ete akosalisa bantoma oyo bazalaki kotambola elongo na ye, akosalisa mpe biso. Mpo na kozwa matomba, esengeli kaka te tózala elongo na Yesu. Lokola Yesu azali Mokonzi na biso kuna na likoló, azali kokoba kolinga biso. Yango wana, soki ozali komitungisa,  yebá ete azali pene na yo mpe akosalisa yo na ntango oyo ebongi. Yesu apesi biso elikya mpe mpiko, oyo esalisaka biso tótika komitungisa.Baebre 2:17, 18; 4:16.

BIZALELI OYO ELIMO SANTU YA NZAMBE ESALISAKA BISO TÓMONISA

7. Ndenge nini elimo santu ya Nzambe esalaka biso?

7 Yesu alakaki ete Tata na biso akopesa biso elimo santu soki tosɛngi ye yango. (Luka 11:10-13) Ndenge nini likambo wana ya misato oyo ekoki kosala ete tómitungisa mingi te ekoki kosalisa biso? Elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye oyo esalaka mosala, esalisaka biso tókóma na bizaleli malamu, oyo Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, azalaka na yango. (Bakolose 3:10) Na Biblia, bizaleli yango ebengami “mbuma ya elimo.” (Tángá Bagalatia 5:22, 23.) Soki tokómi komonisa bizaleli wana ya malamu, boyokani na biso na basusu ekokóma malamu koleka, mpe tokokima makambo oyo ekoki kotungisa biso. Tótalela ndenge oyo mbuma ya elimo ekoki kosalisa biso na makambo ndenge na ndenge.

8-12. Ndenge nini mbuma ya elimo esalisaka yo?

8 “Bolingo, esengo, kimya.” Soki ozali kosalela basusu makambo na limemya, okomona ete okozala na mitungisi mingi te. Na ndenge nini? Soki ozali komonisa bolingo ya bondeko, bolingo ya motema, mpe kopesa basusu lokumu, mbala mingi okoki kokima makambo oyo epesaka yo nkanda, esilikisaka yo, mpe etungisaka yo. Yango ekosala ete tózala na mokakatano te mpo na kobatela kimya na basusu.Baroma 12:10.

9 “Motema molai, boboto, bolamu.” Biblia elobi: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko.” (Baefese 4:32) Soki tolandi toli wana, tokozala na kimya na basusu, mpe tokokima makambo oyo ekoki kobimisa mitungisi. Lisusu, tokozala na mokakatano te mpo na kosilisa makambo oyo ebimaka mpo tozali bato ya kozanga kokoka.

10 “Kondima.” Lelo oyo, mbala mingi tomitungisaka mpo na mbongo mpe biloko ya mokili. (Masese 18:11) Ndenge nini tokoki kokima mitungisi ya ndenge wana? Tosengeli kolanda toli ya ntoma Paulo oyo etali “kosepela na biloko oyo tozali na yango sikoyo.” Kozala na kondima makasi epai ya Yehova ekosalisa biso tótyela ye motema ete akopesa biso biloko oyo tosengeli na yango. Alaki ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” Yango wana, tokoki koloba lokola ntoma Paulo ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”Baebre 13:5, 6.

11 “Motema pɛtɛɛ, komipekisa.” Kanisá ndenge oyo motema pɛtɛɛ mpe komipekisa ekoki mpenza kosalisa yo. Bizaleli wana ekopekisa yo osala to oloba makambo oyo ekoki kotungisa yo, mpe ekosalisa yo olongola “makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga.”Baefese 4:31.

12 Osengeli kozala na komikitisa mpo na kotyela “lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe” motema mpe ‘kobwakela ye mitungisi na yo nyonso.’ (1 Petro 5:6, 7) Soki ozali na komikitisa, Yehova akosalisa yo mpe akokokisa bamposa na yo. Soki oyebi makambo oyo okoki kosala mpe oyo okoki kosala te, okomityela motema te. Mpe okozala na mitungisi mingi te mpo okotyela Nzambe motema.Mika 6:8.

 “BÓMITUNGISA ATA MOKE TE”

13. Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki: “Bómitungisa ata moke te”?

13 Na Matai 6:34 (tángá), tozali kokuta toli oyo ya Yesu: “Bómitungisa ata moke te.” Ekoki komonana lokola ete tokokoka te kosalela toli yango. Kasi Yesu alingaki mpenza koloba nini? Tomonaki ete Davidi mpe ntoma Paulo bazalaki mpe komitungisa na bantango mosusu. Yesu alingaki te koloba ete moto oyo asalelaka Nzambe akoki soki moke te komitungisa. Yesu azalaki nde kosalisa bayekoli na ye bákanga ntina ete mitungisi oyo ezangi ntina to oyo eleki ndelo esilisaka mikakatano te. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango, yango wana, mokristo asengeli te kobakisa mitungisi na kokanisa mikakatano oyo eleká to oyo ekoya. Ndenge nini toli ya Yesu ekoki kosalisa yo omitungisaka mingi te?

14. Lokola Davidi, ndenge nini okoki komitungisa mingi te?

14 Ntango mosusu bato bamitungisaka mpo na mabunga na bango ya kala. Bakoki komiyoka ete bamemi ngambo mpo na makambo oyo basalá, atako eleki bambula mingi. Ntango mosusu, mokonzi Davidi azalaki komona ete mabunga na ye elekeli ye motó. Alobaki boye: “Nagangi mpo na komilelalela ya motema na ngai.” (Nzembo 38:3, 4, 8, 18) Na likambo yango, Davidi asalaki likambo moko ya bwanya. Atyaki motema na mawa ya Yehova mpe na likoki na ye ya kolimbisa. Na nsima, Davidi asepelaki ntango ayebaki ete Nzambe alimbisaki ye.Tángá Nzembo 32:1-3, 5.

15. (a) Liteya nini mosusu tozwi epai ya Davidi? (b) Okoki kosala nini mpo omitungisa mingi te? (Talá etanda “ Ndenge malamu ya kokima mitungisi.”)

15 Na bantango mosusu, okoki komitungisa mpo na sikoyo. Na ndakisa, ntango Davidi akomaki Nzembo 55, azalaki kobanga mpo balingaki koboma ye. (Nzembo 55:2-5) Atako bongo, atikaki te ete mitungisi epekisa ye kotyela Yehova motema. Davidi abondelaki Yehova asalisa ye na mikakatano na ye, kasi ayebaki mpe ete ye moko asengelaki kosala mwa eloko mpo na mikakatano na ye. (2 Samwele 15:30-34) Liteya nini okoki kozwa epai ya Davidi? Na esika ya kotika ete mitungisi elekela yo motó, salá nde nyonso oyo okoki mpo na kosilisa likambo yango, mpe tyelá Yehova motema ete akosalisa yo.

16. Ndenge nini ndimbola ya nkombo ya Nzambe ekoki kokómisa kondima na yo makasi?

16 Ntango mosusu mokristo akoki komitungisa mpo na makambo oyo ekoki kosalema na mikolo ezali koya. Kasi, ezali na ntina te omitungisa mpo na makambo oyo esalemi naino te. Mpo na nini? Mpo mbala mingi, makambo ekómaka mabe te ndenge oyo tokanisaki. Lisusu, osengeli koyeba ete Nzambe ayebi makambo nyonso. Nkombo na ye elimboli ete “Akómisaka.” (Kobima 3:14) Na yango, tosengeli te komitungisa mpo na lobi, mpo nkombo ya Nzambe emonisi ete nyonso oyo akani mpo na bato ekokokisama. Okoki kozala na kondima ete Nzambe akopambola basaleli na ye ya sembo mpe akosalisa bango bámitungisa mingi te mpo na makambo ya kala, ya sikoyo, mpe ya mikolo ezali koya.

 SOLOLÁ NA MOTO MOKO OYO OTYELAKA MOTEMA

17, 18. Ndenge nini kosolola malamu ekoki kosalisa yo ntango ozali komitungisa?

17 Likambo ya minei oyo ekoki kosalisa yo ntango ozali komitungisa ezali kosolola polele mpe na bosembo na moto moko oyo otyelaka motema. Molongani na yo, moninga moko ya motema, to nkulutu moko na lisangá akoki kosalisa yo omona likambo na yo polele. Biblia eyebisi biso: “Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.” (Masese 12:25) Biblia elobi lisusu ete: “Myango elongaka te esika lisolo ya nkuku ezali te, kasi ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.”Masese 15:22.

18 Makita na biso ya lisangá esalisaka mpe biso tómitungisa mingi te. Na makita ya pɔsɔ na pɔsɔ, olekisaka ntango elongo na bandeko, oyo batyelaka yo likebi mpe bazalaka na mposa ya kolendisa yo. (Baebre 10:24, 25) ‘Kolendisana’ ya ndenge wana ekopesa yo makasi mpe ekosala ete ezala mpasi te mpo olonga motungisi, ezala ya ndenge nini.Baroma 1:12.

BOYOKANI NA YO NA NZAMBE NDE MAKASI OYO ELEKI NYONSO

19. Mpo na nini ondimi ete boyokani na yo na Yehova ekopesa yo makasi?

19 Nkulutu moko na Canada amonaki ntina oyo esengeli kobwakela Yehova mikumba na ye. Azalaki na mosala oyo ezalaki kopesa ye mitungisi mpo azalaki molakisi mpe mopesi-toli na eteyelo moko, azalaki mpe na maladi moko oyo ezalaki kosala ete amitungisa. Nini esalisaki ye azala makasi? Likambo ya libosoliboso, azalaki kosala milende mpo na kokómisa makasi boninga na ye na Yehova. Lisusu, baninga na ye ya motema basalisaki ye mingi na bantango ya mpasi, mpe ayebisaka mwasi na ye polele mpe na bosembo ndenge oyo azalaki komiyoka. Longola yango, baninga na ye bankulutu mpe mokɛngɛli ya zongazonga basalisaki ye atalela likambo na ye ndenge oyo Yehova azalaki kotalela yango. Monganga moko mpe asalisaki ye ayeba malamu oyo maladi na ye ezali kosɛnga, mpe abongola programɛ na ye mpo azwaka ntango ya kozwaka mopɛpɛ mpe kosalaka ngalasisi. Mokemoke, ayekolaki ndenge ya komibatela mpe kopekisa mayoki na ye. Soki ezali na makambo oyo akoki kosala eloko te mpo na kobongola yango, atyelaka Yehova motema mpo asalisa ye.

20. (a) Ndenge nini tokoki kobwakela Nzambe mitungisi na biso? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Na lisolo oyo, tomoni ntina oyo tosengeli kobwakela Yehova mitungisi na biso na nzela ya libondeli, kotángaka Liloba na ye mpe komanyola yango. Tomoni mpe ntina oyo tosengeli kotika ete elimo santu ya Yehova esalisa biso, kosolola na moto moko oyo totyelaka motema, mpe koyanganaka na makita. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo Yehova asalisaka biso na ndenge alaki biso ete akopesa biso mbano.Baebre 11:6.