Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2016

“Bókoba kolendisana mokolo na mokolo”

“Bókoba kolendisana mokolo na mokolo”

“Soki bozali na mwa liloba ya kolendisa bato, bóyebisa yango.”MISALA 13:15.

NZEMBO: 121, 45

1, 2. Mpo na nini ezali na ntina tólendisaka basusu?

CRISTINA oyo azali na mbula 18 alobi boye: “Baboti na ngai balendisaka ngai mingi te, kasi balobaka na ngai maloba mabe mingi. Mpe maloba na bango ekoki mpenza kozokisa. Balobaka ete nazali na bomwana mingi, nakangaka makambo te, mpe nazali monene. Yango wana, nalelaka mingi mpe namonaka malamu nasolola na bango te. Namonaka ete nazali na ntina te.” [1] Bomoi ekoki mpenza kozala mpasi soki basusu bazali kolendisa biso te!

2 Nzokande, kanisá ndenge oyo tokoki kosalisa basusu soki tozali kolendisa bango. Rubén alobi: “Na boumeli ya mbula mingi nazalaki komona ete nazali na ntina te. Kasi mokolo mosusu, nasakolaki elongo na nkulutu moko oyo amonaki ete nazali malamu te. Ayokaki ngai na boboto nyonso ntango nayebisaki ye ndenge oyo nazalaki komiyoka. Na nsima, ayebisaki ngai makambo ya malamu oyo nazalaki kosala. Akundwelaki ngai mpe maloba ya Yesu oyo emonisi ete mokomoko na biso azali na motuya mingi koleka bakɛngɛli-mboka ebele. Mbala mingi namikundolaka vɛrsɛ wana, mpe esimbaka motema na ngai tii lelo. Maloba ya nkulutu wana esalaki mpenza mosala.”Matai 10:31.

3. (a) Ntoma Paulo alobaki nini mpo na oyo etali kolendisa basusu? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

 3 Biblia elobi ete tosengeli kolendisanaka mbala na mbala. Ntoma Paulo akomelaki bakristo Baebre boye: “Bandeko, bókeba noki moko na bino akóma na motema mabe oyo ezangi kondima mpo atiki Nzambe ya bomoi; kasi bókoba kolendisana mokolo na mokolo.” Alimbolaki ntina oyo esengeli kosala bongo: “Noki moko na bino akóma motema makasi mpo na nguya ya bokosi ya lisumu.” (Baebre 3:12, 13) Kanisá ndenge osepelaki ntango moto moko alendisaki yo. Na yango, mpo na bantina nini tosengeli kolendisaka bandeko? Liteya nini tokoki kozwa mpo na ndenge oyo Yehova, Yesu, mpe ntoma Paulo balendisaki basusu? Mpe na makambo lokola nini tokoki kolendisanaka? Tólobela mituna wana.

BISO NYONSO TOZALAKA NA MPOSA ETE BÁLENDISA BISO

4. (a) Banani bazalaka na mposa ete bálendisa bango? (b) Mpo na nini bato mingi lelo balendisaka basusu te?

4 Biso nyonso tozalaka na mposa ete bálendisa biso. Mingimingi baboti basengeli mpenza kolendisaka bana na bango. Molakisi moko na nkombo Timothy Evans alimboli ete bana “bazalaka na mposa ete bálendisaka bango, kaka ndenge milona ezalaka na mposa ya mai.” Abakisi boye: “Bilendiseli esalisaka mwana amona ete azali na ntina mpe bazali kosepela na ye.” Kasi lokola tozali na “mikolo ya nsuka,” bato mingi bazali na ezaleli ya moimi mpe ‘balinganaka mpenza te na kati ya libota.’ (2 Timote 3:1-5) Baboti mosusu balendisaka bana na bango te mpo baboti na bango mpe balendisaki bango te. Mikóló mpe bazalaka na mposa ete bálendisa bango, kasi mbala mingi balendisaka bango te. Na ndakisa, bato mingi bamilelaka ete bapesaka bango longonya ata mokolo moko te mpo na mosala oyo basalaka.

5. Ndenge nini tokoki kolendisa basusu?

5 Tokoki kolendisa basusu soki tozali kopesa bango longonya mpo na likambo moko ya malamu oyo basali. Tokoki mpe kolendisa basusu soki tozali koyebisa bango ete bazali na bizaleli malamu mpe kobɔndisa bango ntango bazali na mawa to balɛmbi nzoto. (1 Batesaloniki 5:14) Lokola tozalaka ntango nyonso elongo na bandeko na biso, tozali na mabaku mingi ya koloba mwa likambo ya kolendisa. (Tángá Mosakoli 4:9, 10.) Na yango, omituna boye: ‘Nasalaka ete basusu bámona ete napesaka bango lokumu mpe nalingaka bango? Nasalaka yango mbala nyonso oyo esengeli?’ Kanisá oyo Biblia elobi: “Liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi!”Masese 15:23.

6. (a) Mpo na nini Satana alingaka kolɛmbisa basaleli ya Nzambe? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge alukaki kosala yango.

6 Masese 24:10 elobi: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” Satana ayebi ete soki alɛmbisi biso, akoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Alukaki kolɛmbisa Yobo ndenge abimiselaki ye minyoko mingi. Kasi mwango mabe ya Satana elongaki te. Yobo atikalaki sembo epai ya Yehova. (Yobo 2:3; 22:3; 27:5) Biso mpe tokoki kobundisa Satana mpe komindimisa ete akolonga te. Soki tokobi kolendisa bato ya libota na biso mpe bandeko ya lisangá, yango ekoki kosala ete biso nyonso tózala na esengo mpe tókoba kozala penepene na Yehova.

BATO OYO TOKOKI KOMEKOLA

7, 8. (a) Ndenge nini Yehova alendisaka bato? (b) Ndenge nini baboti bakoki komekola Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Yehova alendisaka bato. Mokomi ya nzembo akomaki: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.” (Nzembo 34:18) Ntango mosakoli  Yirimia azalaki kobanga mpe alɛmbaki nzoto, Yehova alakaki ete akosalisa ye. (Yirimia 1:6-10) Yehova atindaki anzelu moko mpo na kolendisa mosakoli Danyele oyo akómaki mobange. Anzelu yango abengaki Danyele “moto oyo alingami mingi.” (Danyele 10:8, 11, 18, 19) Yo mpe okoki kolendisa bandeko na yo ndenge wana, ezala babongisi-nzela mpe mibange mosusu oyo bakoki te kosala mingi ndenge bazalaki kosala liboso?

8 Atako Yehova ná Yesu bazalaki elongo na boumeli ya bambula ebele, Yehova ayebaki ete asengelaki kaka kolendisa Yesu, Mwana na ye, ntango azalaki awa na mabele. Yesu ayokaki mongongo ya Tata na ye uta na likoló ntango abandaki mosala na ye ya kosakola mpe na mbula ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Na mabaku mibale, Yehova alobaki: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Matai 3:17; 17:5) Kozanga ntembe, Yesu alendisamaki mpenza ntango ayokaki Tata na ye alobi ete alingaka ye mpe asepelaka na ye mingi. Na nsima, na butu liboso ete Yesu akufa, atungisamaki mingi. Yehova alendisaki ye na ndenge atindaki anzelu moko alendisa ye mpe abɔndisa ye. (Luka 22:43) Baboti, bokoki komekola Yehova soki bozali kolendisa bana na bino mbala na mbala. Bópesaka bango longonya ntango basali likambo moko ya malamu. Mpe ntango bakutani na komekama na eteyelo, bósala nyonso oyo bokoki mpo na kolendisa bango mpe kosalisa bango báyika mpiko.

9. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bantoma na ye makambo?

9 Yesu mpe atikelaki biso ndakisa malamu ya komekola. Na butu ya nsuka liboso ete akufa, asukolaki bantoma na ye makolo mpe ayebisaki bango ntina ya kozala na komikitisa. Kasi bazalaki na lolendo mpe bazalaki kowelana mpo na koyeba nani aleki basusu, mpe ntoma Petro atutaki ntolo ete akotika Yesu soki moke te. (Luka 22:24, 33, 34) Kasi, Yesu atyaki likebi kaka na mabunga na bango te. Kutu, apesaki nde bango longonya ndenge batikalaki sembo epai na ye. Alakaki bango ete bakosala makambo ya minene koleka oyo ye asalaki, mpe andimisaki bango ete Yehova alingaka bango. (Luka 22:28; Yoane 14:12; 16:27) Tokoki komituna boye, ‘Namekolaka Yesu mpe napesaka basusu longonya mpo na bizaleli na bango ya malamu na esika ya kotala kaka mabunga na bango?’

10, 11. Ndenge nini ntoma Paulo alendisaki bandeko, mpe azalaki na mposa ya kosala nini?

10 Mbala mingi ntoma Paulo azalaki koloba malamu mpo na bandeko. Alekisaki bambula mingi na kosala mibembo elongo na basusu kati na bango mpe ayebaki bango malamu, kasi alobelaki te mabunga na bango na mikanda na ye. Kutu, azalaki nde kokumisa bango. Na ndakisa, alobaki ete Timote azalaki ‘mwana na ye ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo’ mpe azalaki na kondima ete Timote akokokisa bamposa ya basusu. (1 Bakorinti 4:17; Bafilipi 2:19, 20) Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti ete Tito azalaki ‘moninga na ye mpe moto oyo azalaki kosala na ye mpo na matomba na bino.’ (2 Bakorinti 8:23) Kozanga ntembe, Timote ná Tito balendisamaki ntango bayebaki ete ntoma Paulo akanisaki bango!

11 Ntoma Paulo mpe moninga na ye Barnabasi batyaki bomoi na bango na likama mpo na kolendisa bandeko. Na ndakisa, bango mibale bayebaki ete bato mingi ya engumba Listra balingaki koboma bango. Atako bongo, bazongaki lisusu kuna mpo na kolendisa bayekoli ya sika mpe kosalisa bango bátikala sembo epai ya Yehova. (Misala 14:19-22) Na nsima, na Efese, ntoma Paulo azalaki na likama ya ebele ya bato oyo bazalaki na nkanda, kasi aumelaki kuna ntango molai mpo na kolendisa bandeko. Misala 20:1, 2 elobi: “Paulo abengaki bayekoli, mpe nsima ya kolendisa bango mpe kopesa bango mbote ya bokabwani, abimaki mpo na kokende na Masedonia. Nsima ya kokatisa bisika  wana mpe kolendisa baoyo bazalaki kuna na maloba ebele, ayaki na Grɛsi.”

TÓLENDISANAKA

12. Mpo na nini kokenda na makita ezali malamu mpo na biso?

12 Yehova alingaka oyo eleki malamu mpo na biso. Yango wana ayebisi biso tóyanganaka elongo mbala na mbala. Na makita na biso, toyekolaka makambo etali ye mpe tólendisanaka. (1 Bakorinti 14:31; tángá Baebre 10:24, 25.) Cristina, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, alobi: “Eloko nalingaka mingi na makita ezali bolingo mpe bilendiseli oyo nazwaka kuna. Na bantango mosusu nazalaka na esengo te ntango nakómi na Ndako ya Bokonzi. Kasi na nsima, bandeko basi bapusanaka pene na ngai, bayambaka ngai mpe bayebisaka ngai ete nabimi kitoko. Bayebisaka ngai ete balingaka ngai mpe bazali kosepela ndenge nazali kokola na elimo. Bilendiseli na bango esalaka ete namiyoka malamu koleka!” Ezali mpenza na ntina ete mokomoko na biso alendisaka basusu!Baroma 1:11, 12.

13. Mpo na nini ata bandeko oyo basaleli Yehova bambula ebele bazalaka na mposa ete bálendisa bango?

13 Ata bandeko oyo basaleli Yehova bambula ebele bazalaka na mposa ete bálendisaka bango. Tózwa ndakisa ya Yosua. Ntango Bayisraele bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova aponaki Yosua mpo na kokamba bango. Kasi, Yehova ayebisaki Moize alendisa Yosua atako asalelaki Yehova bambula ebele. Yehova alobaki: “Pesá Yosua mokumba mpe yikisá ye mpiko mpe lendisá ye, mpamba te ye nde akokatisa liboso ya bato oyo mpe ye nde akosala ete bázwa lokola libula mokili oyo okomona.” (Kolimbola Mibeko 3:27, 28) Yosua azalaki na mposa bálendisa ye, mpo na nsima ekólo Yisraele esengelaki kobunda bitumba ebele; mpe balongaki te na bitumba yango mosusu. (Yosua 7:1-9) Lelo oyo, tokoki kolendisa bankulutu mpe bakɛngɛli ya zongazonga, oyo bazali kosala mosala makasi mpo na kobatela basaleli ya Nzambe. (Tángá 1 Batesaloniki 5:12, 13.) Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki boye: “Ntango mosusu, bandeko bakomelaka biso mikanda ya botɔndi, mpo na koyebisa biso ndenge oyo basepelaki na viziti na biso. Tobombaka mikanda yango mpe totángaka yango ntango tolɛmbi mwa moke. Elendisaka biso mpenza.”

Tosalisaka bana na biso bápusana penepene na Yehova ntango tolendisaka bango na esengo (Talá paragrafe 14)

14. Bandakisa nini emonisi ete ezali malamu kopesaka basusu longonya ntango tozali kopesa bango toli?

14 Mokolo moko, ntoma Paulo asengelaki kopesa Bakorinti toli. Ntango basalelaki toli yango, ntoma Paulo apesaki bango longonya. (2 Bakorinti 7:8-11) Kozanga ntembe, maloba na ye elendisaki bango bákoba kosala makambo ya malamu. Lelo oyo, bankulutu mpe baboti bakoki kolanda ndakisa ya ntoma Paulo. Ndeko Andreas, oyo azali na bana mibale, alobi: “Bilendiseli esalisaka bana bákola na elimo mpe na mayoki. Okopesa bana toli ya malamu soki ozali kolendisa bango. Atako bana na biso  bayebi makambo ya malamu oyo basengeli kosala, bakosala yango na bomoi na bango ya mokolo na mokolo kaka soki tozali kolendisa bango ntango nyonso.”

NINI EKOKI KOSALISA YO OLENDISAKA BASUSU?

15. Wapi lolenge moko oyo tokoki kolendisa basusu?

15 Yebisáká bandeko ete osepelaka mingi na milende oyo basalaka mpe na bizaleli malamu oyo bazali na yango. (2 Ntango 16:9; Yobo 1:8) Soki tosali bongo, tokomekola Yehova mpe Yesu. Bazwaka na motuya mingi eloko nyonso tosalaka mpo na bango, ata soki tokoki te kosala lisusu mingi ndenge tolingi kosala. (Tángá Luka 21:1-4; 2 Bakorinti 8:12.) Na ndakisa, toyebi ete esɛngaka milende mingi mpo bandeko na biso oyo bakómi mikóló báyaka na makita mpe bábimaka na mosala ya kosakola mbala na mbala. Tolendisaka bango mpe topesaka bango longonya mpo na nyonso oyo basalaka?

16. Ntango nini tokoki kolendisa basusu?

16 Lendisáká basusu mbala nyonso oyo esengeli. Mbala nyonso oyo omoni likambo moko ya malamu oyo moto asali, kobosana te kopesa ye longonya. Ntango ntoma Paulo ná Barnabasi bazalaki na Antiokia ya Pisidia, kuna, bakambi ya sinagoga bayebisaki bango boye: “Mibali, bandeko, soki bozali na mwa liloba ya kolendisa bato, bóyebisa yango.” Ntoma Paulo asalelaki libaku wana mpo na kolendisa bato yango. (Misala 13:13-16, 42-44) Soki tozali kolendisa basusu, bango mpe bakosepela kolendisa biso.Luka 6:38.

17. Wapi lolenge eleki malamu ya kopesa basusu longonya?

17 Lobá likambo moko ya sikisiki. Ntango Yesu apesaki bakristo ya Tyatire longonya, alobaki makambo ya sikisiki mpe amonisaki makambo ya malamu oyo basalaki. (Tángá Emoniseli 2:18, 19.) Ndenge nini tokoki komekola ye? Mbala mosusu tokoki kopesa ndeko mwasi moko longonya mpo na ndenge oyo azali kobɔkɔla bana ye moko, atako ezali pɛtɛɛ te mpo na ye. To soki ozali moboti, okoki kopesa bana na yo longonya mpo na milende oyo bazali kosala mpo na kosalela Yehova. Yebisá bango makambo ya malamu oyo omoni. Soki tozali koloba makambo ya sikisiki ntango tozali kolendisa basusu, bakomona ete oyo tolobi euti mpenza na motema.

18, 19. Ndenge nini tokoki kosalisana mpo tótikala penepene na Yehova?

18 Yehova ayebisaki Moize alendisa Yosua mpe apesa ye makasi. Ezali solo ete lelo oyo, tokoki te koyoka mongongo ya Yehova mpe akoki te kotinda biso tólendisa moto moko boye. Kasi asepelaka ntango amonaka milende oyo tosalaka mpo na kolendisa basusu. (Masese 19:17; Baebre 12:12) Na ndakisa, ntango ndeko moko asali diskur ya bato nyonso na lisangá na biso, tokoki koyebisa ye likambo oyo tosepeli na yango na diskur na ye. Mbala mosusu makambo oyo alobaki esalisaki biso tólonga mokakatano moko to tókanga ntina ya vɛrsɛ moko. Ndeko mwasi moko akomelaki ndeko moko oyo asalaki diskur boye: “Atako tosololaki kaka mwa miniti moke, oyebaki mpasi oyo nazalaki na yango na motema, obɔndisaki ngai mpe olendisaki ngai. Nalingi oyeba ete ntango olobaki na boboto ndenge wana, ezala ntango tosololaki to kuna na ebaelo, namonaki ete maloba na yo ezali mpenza likabo oyo euti epai ya Yehova.”

19 Tokozala na likoki ya kosalisa basusu bátikala penepene na Yehova soki tolandi toli oyo ya ntoma Paulo: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana, ndenge kutu bozali kosala yango.” (1 Batesaloniki 5:11) Soki ‘tokobi kobɔndisana mpe kolendisana mokolo na mokolo,’ tokosepelisa mpenza Yehova!

^ [1] (paragrafe 1) Bankombo mosusu ezali ya bango te.