Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2016

Balongwaki na boombo ya mangomba ya lokuta

Balongwaki na boombo ya mangomba ya lokuta

“Bóbima kati na ye, bato na ngai.”EMONISELI 18:4.

NZEMBO: 101, 93

1. Ndenge nini toyebi ete basaleli ya Nzambe basengelaki kosikolama na boombo ya Babilone Monene, mpe mituna nini tokoyanola?

NA LISOLO oyo eleki, toyekolaki ete bakristo ya sembo bakɔtaki na boombo ya Babilone Monene. Nsango malamu ezali ete basengelaki te kotikala na boombo yango libela na libela. Toyebi yango mpo na Biblia, Nzambe apesi basaleli na ye etinda ya ‘kobima’ na lisangá ya mangomba ya lokuta. (Tángá Emoniseli 18:4.) Yango emonisi ete bakristo basengelaki kobima na boombo ya Babilone Monene. Tozali na mposa makasi ya koyeba ntango nini basengelaki kosikolama! Kasi liboso, tosengeli koyanola na mituna oyo: Ekateli nini Bayekoli ya Biblia bazalaki na yango mpo na Babilone Monene ata liboso ya 1914? Milende nini bandeko bazalaki na yango na mosala ya kosakola na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba? Basaleli ya Nzambe bazalaki nde na boombo ya Babilone na ntango wana mpo basengelaki kosembolama?

“KOKWEA YA BABILONE”

2. Ekateli nini Bayekoli ya Biblia ya ebandeli bazwaki ata liboso ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba?

2 Bambula mingi liboso ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba  (1914-1918), ndeko Charles Taze Russell ná Bayekoli ya Biblia mosusu bamonaki ete mangomba ya bokristo ezalaki te koteya solo ya Biblia. Yango wana, balingaki mpenza kokabwana na mangomba ya lokuta. Kutu, na 1879, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona elobaki ete lingomba nyonso oyo ebɛtaka ntolo ete ezali mwasi ya libala ya sembo ya Kristo, nzokande epesaka baguvɛrnema mabɔkɔ, ezali na kati ya Babilone Monene, oyo Biblia ebengi mwasi ya ndumba.Tángá Emoniseli 17:1, 2.

3. Bayekoli ya Biblia basalaki nini mpo na komonisa ete bazalaki lisusu te na kati ya mangomba ya lokuta? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Mibali mpe basi ya sembo bayebaki ete soki bakobi kopesa mangomba ya lokuta mabɔkɔ, Nzambe akopambola bango te. Yango wana, mingi na bango batindaki mikanda na mangomba oyo bazalaki mpo na komonisa ete bazali lisusu bandimi ya mangomba yango te. Basusu kutu batángaki mikanda na bango na mongongo makasi na kati ya ndako-nzambe. Na mangomba oyo bapesaki bango nzela ya kosala bongo te, batindelaki mondimi mokomoko mokanda. Bayekoli ya Biblia bamonisaki polele ete balingi kosangana soki moke te na mangomba ya lokuta! Soki basalaki bongo bambula mingi liboso, bakokaki kobomama. Kasi na bambula 1870, baguvɛrnema ya bikólo mingi ezalaki lisusu te kopesa mangomba mabɔkɔ, ndenge ezalaki kosala liboso. Na ntango wana, bato bakokaki kolobela polele makambo ya Biblia, ata mpe koboya kondima mateya ya mangomba.

4. Ndenge nini Bayekoli ya Biblia bazalaki kotatela Babilone Monene na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba? Limbolá.

4 Bayekoli ya Biblia basosolaki ete basengelaki kosuka kaka te na koyebisa bato ya libota, baninga ya motema, mpe bandimi ya mangomba ete bazali lisusu te kopesa mangomba ya lokuta mabɔkɔ. Balingaki ete mokili mobimba eyeba ete Babilone Monene ezali kosala kindumba na makambo ya losambo! Yango wana, kobanda na sanza ya zomi na mibale 1917 tii na ebandeli ya 1918, bankóto ya Bayekoli ya Biblia bakabolaki na molende batrakte 10 000 000 oyo ezalaki na lisolo moko na motó ya likambo “Babilone ekwei” (na Lingelesi). Trakte yango emonisaki polele bosolo na oyo etali mangomba ya bokristo. Kanisá nkanda makasi oyo bakonzi ya mangomba bakokaki kozala na yango! Kasi, Bayekoli ya Biblia bazongaki nsima te. Bazalaki na ekateli ya kokoba kosakola mpe kotosa “Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:29) Yango emonisi nini? Emonisi ete mibali mpe basi bakristo wana bakɔtaki te na boombo ya Babilone na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba; kutu, bazalaki nde kobima na boombo ya mangomba ya lokuta mpe kosalisa basusu básala lokola bango.

MOLENDE NA NTANGO YA ETUMBA YA LIBOSO YA MOKILI MOBIMBA

5. Mpo na nini tolobi ete bandeko bazalaki mpenza na molende na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba?

5 Kala, tozalaki koloba ete Nzambe andimaki te basaleli na ye na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba mpo bazalaki te kosakola na molende. Mpo na ntina wana, tozalaki kokanisa ete Yehova atikaki nzela ete Babilone Monene ekanga bango na boombo mpo na ntango mokuse. Kasi, bandeko mibali mpe basi ya sembo oyo basalelaki Nzambe kobanda na 1914 tii na 1918 balimbolaki mwa moke na nsima ete bango nyonso lokola etuluku, basalaki nyonso oyo bakokaki mpo bákoba kosakola. Koyeba malamu nini ekómelaki Bayekoli ya Biblia na ntango wana esalisi biso tókanga ntina ya makambo mosusu oyo Biblia elobeli.

6, 7. (a) Mikakatano nini Bayekoli ya Biblia bakutanaki na yango na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba? (b) Nini emonisi ete Bayekoli ya Biblia bazalaki na molende mingi?

 6 Kutu, na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba, Bayekoli ya Biblia bamipesaki mingi na mosala ya kosakola. Kasi bazalaki mpe na mikakatano mingi. Tótalela mikakatano mibale kati na yango. Ya liboso, Bayekoli ya Biblia basengelaki koyekola kosakola kaka na Biblia. Bamesanaki kokabola babuku mpe kotikela bato mikanda oyo elimbolaka mateya ya solo. Na yango, ntango guvɛrnema epekisaki buku Le mystère accompli na ebandeli ya 1918, mosala ya kosakola ekómaki mpasi mpo na bandeko mingi. Mokakatano ya mibale ezalaki maladi babengi grippe espagnole oyo ebimaki kaka na mbula yango. Maladi wana ya nsɔmɔ ezalaki kozwa bato ebele mpe kosala ete ezala mpasi mpo bandeko básala mibembo mpe básakola. Atako Bayekoli ya Biblia bakutanaki na mikakatano wana, basalaki nyonso oyo bakoki mpo bákoba kosakola.

Bayekoli ya Biblia wana bazalaki mpenza na molende! (Talá paragrafe 6, 7)

7 Na 1914, Bayekoli ya Biblia, oyo bazalaki mingi te, balakisaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Fɔtɔ-Drame yango, oyo ezalaki na bililingi oyo ezalaki koningana mpe kobimisa mongongo, ezalaki likambo ya sika na ntango wana. Drame yango, ndenge ezalaki kobengama, elobelaki lisolo ya bato kobanda na kozalisama ya Adama tii na nsuka ya boyangeli ya Kristo. Na 1914, mbula ya liboso oyo drame yango elakisamaki, bato koleka 9 000 000 bamonaki yango. Kanisá naino: Yango eleki motángo ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba lelo oyo! Balapolo mosusu emonisi ete na 1916, bato koleka 809 000 bazalaki koyangana na makita ya bato nyonso na États-Unis, mpe na 1918, motángo yango ekómaki pene na 950 000. Bayekoli ya Biblia wana bazalaki mpenza na molende!

8. Ndenge nini bandeko oyo bazalaki kokamba mosala balendisaki Bayekoli ya Biblia na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba?

8 Na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba, bandeko oyo bazalaki kokamba mosala basalaki mosala makasi ya kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe kolendisa Bayekoli ya Biblia nyonso. Lisalisi wana ya bolingo epesaki bango makasi ya kokoba kosakola. Ndeko Richard Barber, oyo azalaki mosakoli ya molende na ntango wana,  alobi: “Tolongaki kotinda mwa ndambo ya bakɛngɛli-batamboli mpe kotindela bandeko Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe kotinda yango na Canada esika bapekisaki yango.” Abakisi boye: “Nazalaki na libaku malamu ya kotinda buku Le mystère accompli ya mikemike epai ya baninga oyo babungisaki yango ntango babɔtɔlaki bango mikanda. Ndeko Rutherford asɛngaki ete tóbongisa mayangani na bingumba mingi na wɛsti ya États-Unis mpe tótinda balobi bákende kolendisa bandeko na ndenge oyo esengeli.”

ESENGELAKI KOSEMBOLA MAKAMBO MOSUSU

9. (a) Mpo na nini basaleli ya Nzambe basengelaki kosembolama na makambo mosusu kobanda 1914 tii na 1919? (b) Atako basengelaki kosembolama na makambo mosusu, ekozala mabe kokanisa nini?

9 Ezalaki na likambo moko oyo Bayekoli ya Biblia basengelaki kosembola. Bayebaki malamu te ndimbola ya maloba oyo Yehova alobaki ete esengeli kotosa baguvɛrnema. (Baroma 13:1) Yango wana, ntango mosusu, lokola etuluku, bakɔtaki na makambo ya mokili na ntango ya etumba yango. Na ndakisa, ntango prezida ya États-Unis asɛngaki bato básambela mpo na kimya mokolo ya 30/05/1918, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaki mpe Bayekoli ya Biblia básambela. Bandeko mosusu bapesaki mbongo mpo na kopesa mabɔkɔ na etumba yango, mpe mwa ndambo na bango bakómaki basoda mpe bakendaki na etumba. Kasi atako basengelaki kosembolama na makambo mosusu, ekozala mabe kokanisa ete ezali mpo na ntina wana nde bakɔtaki na boombo ya Babilone Monene. Kutu, mpo na koloba solo, bakabwanaki mpenza na lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba na ntango ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba.Tángá Luka 12:47, 48.

10. Ndenge nini Bayekoli ya Biblia bamonisaki limemya mpo na bomoi?

10 Ezali solo ete Bayekoli ya Biblia bayebaki malamu te makambo nini basengelaki koboya mpo na komonisa ete bazali bato ya mokili te. Kasi bayebaki ete ezali mabe koboma moto. Yango wana, ata mwa bandeko oyo bakómaki basoda mpe basimbaki mindoki na Etumba ya liboso ya Mokili mobimba, baboyaki kosalela yango mpo na koboma moto mosusu. Bandeko mosusu oyo baboyaki koboma bato batindamaki na esika ya etumba mpo báboma bango.

11. Baguvɛrnema esalaki nini ntango Bayekoli ya Biblia baboyaki kobunda na ntango ya etumba?

11 Zabolo azalaki na nkanda mpo bandeko batikalaki sembo epai ya Nzambe. Yango wana, abimisaki “mpasi na nzela ya mobeko.” (Nzembo 94:20) James Franklin Bell, mokonzi moko ya basoda ya États-Unis, ayebisaki ndeko Rutherford mpe ndeko Van Amburgh ete guvɛrnema elingaki kobimisa mobeko moko ya sika, oyo ekopesa nzela ete báboma moto nyonso oyo aboyi kobunda na ntango ya etumba. Azalaki kolobela mingimingi Bayekoli ya Biblia. Na nkanda makasi, mokonzi yango ya basoda ayebisaki ndeko Rutherford ete mobeko yango ebimaki te mpo prezida ya États-Unis aboyaki yango. Na nsima, alobaki boye: “Kasi toyebi ndenge ya kozwa bino, mpe tokosala yango!”

12, 13. (a) Mpo na nini bakatelaki bandeko mwambe etumbu ya bolɔkɔ ya ntango molai? (b) Bolɔkɔ esalaki nde ete bandeko yango bábongola ekateli na bango ya kotosa Yehova? Limbolá.

12 Nsukansuka, guvɛrnema ezwaki lolenge moko ya kopesa Bayekoli ya Biblia etumbu. Bakangaki ndeko Rutherford ná ndeko Van Amburgh, elongo na bandeko mosusu motoba oyo mpe bazalaki bamonisi ya la Société Watch Tower. Zuzi oyo azalaki kosambisa likambo yango alobaki ete bandeko  wana bazalaki bato mabe koleka limpinga moko ya basoda ya Allemagne. Alobaki ete batyolaki guvɛrnema, mosala ya soda, mpe mangomba nyonso, yango wana basengelaki kozwa etumbu ya makasi. [1] Na yango, bakatelaki Bayekoli ya Biblia wana mwambe etumbu ya molai na bolɔkɔ ya Atlanta, na Georgie. Kasi, ntango etumba esilaki, babimisaki bango, mpe balongolaki bitumbu oyo bakatelaki bango.

13 Ata ntango bazalaki na bolɔkɔ, bandeko mibali wana mwambe bazalaki na ekateli ya kotosa mibeko ya Nzambe. Ndenge nini toyebi yango? Bakomelaki prezida ya États-Unis mokanda mpo na kosɛnga ete bábimisa bango na bolɔkɔ. Na mokanda yango, balobaki ete Biblia ezali koyebisa biso ete tosengeli koboma moto te, na yango moto nyonso oyo amipesi na Nzambe mpe aboyi kotosa ye na nko akondimama lisusu na Nzambe te mpe akobomama. Balimbolaki ete ezali mpo na ntina wana nde bakoki te mpe basengeli te koboma moto. Bazalaki mpenza na mpiko mpo na kokomela prezida mokanda ya ndenge wana! Ntembe ezalaki te ete bandeko yango balingaki soki moke te kobongola ekateli na bango ya kotosa Yehova.

NSUKANSUKA BASALELI YA NZAMBE BALONGWAKI NA BOOMBO!

14. Na lisalisi ya Makomami, limbolá makambo oyo esalemaki kobanda 1914 tii na 1919.

14 Malaki 3:1-3 elimboli oyo ekómelaki Bayekoli ya Biblia kobanda na 1914 tii na ebandeli ya 1919. (Tángá.) Yehova Nzambe, “Nkolo ya solosolo,” mpe Yesu Kristo, “momemi-nsango ya kondimana,” bayaki kotala “bana ya Levi,” elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Nsima ya kosembolama mpe kopɛtolama na Yehova, babongisamaki mpo na kozwa mokumba ya sika. Na 1919, Yesu atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo azwaki mokumba ya kotambwisa mpe koteya basaleli nyonso ya Nzambe. (Matai 24:45) Nsukansuka, basaleli ya Nzambe balongwaki na boombo ya Babilone Monene. Kobanda wana, bazali kokoba koyekola makambo mingi oyo etali mokano ya Nzambe, mpe bolingo oyo balingaka ye ekómi lisusu makasi. Bazali na botɔndi mingi mpo na lipamboli na ye! [2]

15. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi ndenge tosikolami na boombo ya Babilone Monene?

15 Tozali na botɔndi mingi ndenge tobimá na boombo ya Babilone Monene. Satana akoki te kolimwisa losambo ya solo. Alongi te! Kasi, tosengeli te kobosana ntina oyo Yehova asikolaki biso. Mokano na ye ezali ete bato nyonso bábika. (2 Bakorinti 6:1) Nzokande, tii lelo, mangomba ya lokuta ezali na bokonzi likoló ya bamilio ya bato ya mitema sembo, oyo bazali na mposa ete tósalisa bango! Tiká ete tósala nyonso oyo tokoki mpo na komekola bandeko na biso ya sembo, tósalisa bato bálongwa na boombo.

^ [1] (paragrafe 12) Talá buku La foi en marche ya ndeko Alexandre Macmillan, lokasa 99.

^ [2] (paragrafe 14) Bokokani ezali mingi kati ya boombo ya Bayuda na Babilone mpe makambo oyo ekómelaki bakristo nsima ya kokɔta ya lipɛngwi. Kasi, tokoki te koloba ete boombo ya Bayuda ezalaki elilingi ya makambo oyo ekómelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo, na yango tosengeli te koluka kozwa ndimbola ya esakweli ya makambo nyonso ya mikemike ya boombo yango. Bokeseni ezali na makambo mosusu. Na ndakisa, Bayuda basalaki mbula 70 na boombo, nzokande bakristo baumelaki bambula mingi koleka na boombo.