Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2016

 BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

“Basakoli ya Bokonzi na Grande-Bretagne—Bólamuka!!”

“Basakoli ya Bokonzi na Grande-Bretagne—Bólamuka!!”

EZALAKI libyangi ya nokinoki mpe ya polele: “Basakoli ya Bokonzi na Grande-Bretagne: Bólamuka!!” (Informateur, * sanza ya 12, 1937, ebimeli ya Londres) Motó ya likambo ya moke ebakisaki: “Bokoli ya malonga emonani te na mbula zomi oyo euti koleka.” Lapolo ya mbula zomi, kobanda na 1928 tii na 1937, oyo etyamaki na lokasa ya liboso, emonisaki likambo yango.

BABONGISI-NZELA MINGI?

Nini esalaki ete mosala ya kosakola na Grande-Bretagne ekita? Emonanaki ete masangá ezalaki “kokola te,” etɛlɛmaki kaka esika moko banda bambula mingi. Longola yango, biro ya filiale ezwaki ekateli ya kokabola teritware kaka na babongiseli-nzela soki 200, oyo bazalaki kosakola na bateritware ya mosika, kasi te na masangá. Na yango, biro ya filiale eyebisaki bandeko oyo balingaki kokóma babongiseli-nzela ete teritware ya sika ezali lisusu te na Grande-Bretagne, mpe elendisaki bango bákende kosakola na teritware ya bikóló mosusu ya Mpoto. Na yango, babongiseli-nzela mingi balongwaki na Grande-Bretagne mpe bakendaki kosakola na bikólo lokola France, atako bayebaki monɔkɔ malamu te to bayebaki yango te.

“LIBYANGI MPO NA MOSALA”

Na 1937, lisolo moko ya Informateur elendisaki bandeko bákokisa mokano moko oyo ezalaki pɛtɛɛ te mpo na mobu 1938: Ngonga milio moko! Mokano yango ekokaki kokokisama kozanga mokakatano soki mosakoli mokomoko asali ngonga 15 na mosala ya kosakola na sanza mpe mobongisi-nzela mokomoko asali ngonga 110 na sanza. Makanisi epesamaki ete bandeko básala bituluku mpo na kosakolaka ngonga mitano na mokolo mpe básala makasi mpo na kozongela bato mbala na mbala, mingimingi na mpokwa, katikati ya pɔsɔ.

Babongisi-nzela ya molende bamipesaki na esengo na mosala ya kosakola

Lolenge wana ya sika ya kosakola mingi esepelisaki bandeko mingi. Ndeko Hilda Padgett  * alobi boye: “Biro monene nde esɛngaki bongo, mpe mingi na biso tozalaki na mposa na yango makasi; eumelaki te, mayele yango ebotaki mbuma mingi.” Ndeko mwasi Wallis alobi boye: “Likanisi ya kosakola ngonga mitano na mokolo ezalaki mpenza malamu! Esengo oyo toyokaka na koyeba ete tolekisi mokolo mobimba na mosala ya Nkolo ekokani na eloko mosusu te. . . . Ntango mosusu, tozalaki kozonga ndako tolɛmbi, kasi totondi na esengo. Ezali bongo!” Ndeko Stephen Miller, oyo azalaki elenge, amonaki ete asengeli kosala na lombangu mpe andimaki kosala bongo. Alingaki kosala yango ntango azalaki na libaku ya kosala bongo! Akanisi lisusu bituluku ya bandeko oyo bazalaki kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola na velo, mpe na bampokwa na eleko ya molunge koyokisa bato badiskur oyo bakɔtisaki mingongo. Na molende, bazalaki kotambola na bitanda mpo na kosakola mpe kokabola bazulunalo na balabala.

Informateur ebimisaki mpe libyangi oyo: “Tozali na mposa ya babongisi-nzela 1 000.” Malako ya sika mpo na teritware emonisaki ete babongisi-nzela basengelaki lisusu te kosakola bango moko na bateritware ya mosika, kasi elongo na masangá, mpo na kopesa masangá yango mabɔkɔ mpe kolendisa yango. Ndeko Joyce Ellis alobi boye: “Bandeko mingi balamukaki na mpɔngi na ndenge bamonaki ete basengeli kokóma babongisi-nzela.” Abakisi boye: “Atako nazalaki kaka na mbula 13 na ntango wana, yango nde nazalaki na mposa ya kosala;  nalingaki kokóma mobongisi-nzela.” Akokisaki mokano na ye na sanza ya nsambo 1940, ntango azalaki na mbula 15. Ndeko Peter, oyo na nsima akómaki mobali ya ndeko Joyce, atyaki mpe likebi na libyangi “Bólamuka,” oyo etindaki ye “abanda kokanisa mosala ya mobongisi-nzela.” Na sanza ya motoba 1940, ntango azalaki na mbula 17, asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 105 na velo tii na Scarborough mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela na teritware wana, oyo batindaki ye.

Ndeko Cyril Johnson ná mwasi na ye Kitty bazalaki babongisi-nzela ya sika oyo bamonisaki elimo ya komipimela. Bazwaki ekateli ya kotɛka ndako na bango mpe biloko na bango mosusu mpo na kozwa mbongo ya kosala mosala ya ntango nyonso. Ndeko Cyril atikaki mosala na ye, mpe kaka na sanza yango, babandaki mosala ya mobongisi-nzela. Alobi boye: “Tozalaki na kondima ete tokolonga kosala yango. Tosalaki yango na motema moko mpe na esengo.”

BANDAKO MPO NA BABONGISI-NZELA EFUNGWAMI

Lokola motángo ya babongisi-nzela emataki nokinoki, bandeko oyo bazalaki kokamba mosala balukaki ndenge ya kosalisa babongisi-nzela yango. Ndeko Jim Carr, oyo azalaki mokɛngɛli ya zone (lelo oyo mokɛngɛli ya zongazonga) na 1938, alandaki likanisi oyo epesamaki ya kozala na bandako ya babongisi-nzela na bingumba. Bazalaki kolendisa babongisi-nzela ebele báfandaka esika moko mpe básalaka elongo, mpo kosala bongo ezalaki kosɛnga mbongo mingi te. Na engumba Sheffield, bazalaki kofutela ndako moko monene, mpe ndeko moko oyo azalaki na mikumba azalaki kokɛngɛla yango. Bandeko ya lisangá oyo ezalaki kuna basangisaki mbongo mpe basombaki biloko ya ndako yango. Ndeko Jim alobi boye: “Moto nyonso azalaki kosala makasi mpo ebongiseli yango elonga.” Babongisi-nzela zomi ya molende bazalaki kofanda kuna, mpe bazalaki na programɛ malamu ya makambo ya elimo. “Bazalaki kotalela mokapo [ya mokolo] ntɔngɔ nyonso na ntango ya komɛla ti,” mpe “mokolo na mokolo babongisi-nzela yango bazalaki kokende na teritware na bango na bisika mingi ya engumba yango.”

Babongisi-nzela ya sika batondaki na teritware ya Grande-Bretagne

Ezala basakoli to babongisi-nzela bayanolaki na libyangi yango, mpe mokano ya ngonga milio moko na 1938 ekokisamaki. Kutu, balapolo emonisi ete bokoli emonanaki na bisika nyonso na teritware ya ekólo yango. Na boumeli ya mbula mitano, motángo ya basakoli na Grande-Bretagne emataki mbala soki misato. Likebi oyo basaleli ya Yehova batyaki na mosala ya Bokonzi epesaki bango makasi ya kolonga na bambula ya mpasi ya etumba oyo ezalaki koya.

Lelo oyo, lokola Armagedone, etumba ya Nzambe ekómi pene, motángo ya babongisi-nzela na Grande-Bretagne ezali komata lisusu. Motángo yango ebakisami lisusu mingi na mbula zomi oyo eleki; ekómaki 13 224 na sanza ya zomi 2015. Babongisi-nzela wana balamuki mpenza na mpɔngi na ndenge basosoli ete mosala ya ntango nyonso ezali lolenge moko ya malamu mpenza ya kosalela bomoi na bango.

^ par. 3 Na nsima ekómaki kobengama Mosala na biso ya Bokonzi.

^ par. 8 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/1995, nkasa 19-24, ezali na lisolo ya bomoi ya ndeko Hilda Padgett.