Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2016

Balongwaki na molili

Balongwaki na molili

“[Yehova] abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.”1 PETRO 2:9.

NZEMBO: 116, 102

1. Nini esalemaki ntango Yerusaleme ebebisamaki?

NA MOBU 607 liboso ya Kristo, mokonzi Nebukadenezare II mpe limpinga monene ya basoda na ye ya Babilone babundisaki engumba Yerusaleme. Biblia elobi ete mokonzi yango abomaki bilenge mibali na mopanga. “Ayokelaki elenge mobali to ngɔndɔ, mobange to moto oyo anuni mawa te.” Na nsuka, “abandaki kotumba ndako ya Nzambe ya solo mpe kobuka efelo ya Yerusaleme; mpe batumbaki na mɔtɔ bandako milai na yango nyonso ya kofanda, bakisa mpe biloko na yango nyonso ya kitoko, kino babebisaki eloko nyonso.”2 Ntango 36:17, 19.

2. Likebisi nini Yehova apesaki, mpe nini esengelaki kokómela Bayuda?

2 Kobebisama ya Yerusaleme esengelaki kokamwisa Bayuda te. Bambula mingi liboso, Nzambe atindaki basakoli mpo bákebisa bato ete soki bakobi koboya kotosa ye, bato ya Babilone bakobundisa bango. Bayuda mingi basengelaki kobomama na mopanga, mpe baoyo bakobika basengelaki kokenda na boombo na Babilone. (Yirimia 15:2) Bomoi ezalaki ndenge nini kuna na boombo? Likambo moko ya ndenge wana, oyo ekokani na kokende na boombo ya Babilone, ekómelaki mpe bakristo? Soki ezali bongo, ntango nini?

 BOMOI NA MBOKA MOPAYA

3. Na ndenge nini bomoi ya boombo na Babilone ekesanaki na boombo na Ezipito?

3 Yehova ayebisaki Bayuda ete ntango bakomema bango na boombo, basengeli kondima boombo yango mpe kosala makasi mpo na komesana na bomoi wana ya sika. Na nzela ya mosakoli Yirimia, ayebisaki bango boye: “Bótonga bandako mpe bófanda na yango, bólona bilanga mpe bólya mbuma na yango. Lisusu, bóluka kimya ya engumba epai namemi bino na mboka mopaya, mpe bóbondela Yehova mpo na yango, mpo na kimya na yango, bokozala na kimya.” (Yirimia 29:5, 7) Mpo na Bayuda oyo batosaki malako ya Yehova, bomoi na bango ya mokolo na mokolo ebongwanaki mpenza te, ata kuna na mboka mopaya. Bato ya Babilone bapesaki Bayuda nzela ya kosala mimbongo na bango moko mpe kosala mibembo na mboka mobimba. Na ntango wana, Babilone ezalaki engumba monene ya mombongo. Mikanda ya kala emonisi ete ntango Bayuda bazalaki na mboka mopaya, mingi na bango bayekolaki kosala mombongo, elingi koloba kosomba mpe kotɛka, mpe bakómaki bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ. Bayuda mosusu kutu bakómaki bazwi. Bomoi na mboka mopaya ezalaki mpasi te lokola bomoi ya Bayisraele oyo bazalaki na boombo na Ezipito bankama ya bambula liboso.Tángá Kobima 2:23-25.

4. (a) Banani mosusu basengelaki konyokwama elongo na Bayuda oyo bazalaki sembo te? (b) Mpo na nini bazalaki te na likoki ya kosala makambo nyonso oyo Mibeko ezalaki kosɛnga?

4 Bayuda mosusu oyo bazalaki na boombo bazalaki basaleli ya sembo ya Nzambe. Atako basalaki likambo moko ya mabe te, basengelaki konyokwama elongo na bato mosusu ya ekólo. Bayuda yango bazalaki na biloko ya kobikela oyo basengelaki na yango; kasi ndenge nini bakokaki kosambela Yehova? Tempelo mpe etumbelo ebebisamaki, mpe banganga-nzambe bakokaki te kosala mosala na bango na ndenge oyo ebongisami. Kasi, Bayuda ya sembo basalaki oyo bakokaki kosala mpo na kotosa Mibeko ya Nzambe. Na ndakisa, Danyele, Shadrake, Meshake mpe Abedenego baboyaki kolya biloko oyo Bayuda basengelaki kolya te. Mpe Biblia elobi ete Danyele azalaki kobondela Nzambe mbala na mbala. (Danyele 1:8; 6:10) Kasi, lokola ekólo ya bapakano ezalaki koyangela bango, Bayuda ya sembo bazalaki te na likoki ya kosala makambo nyonso oyo mibeko ezalaki kosɛnga.

5. Elikya nini Yehova apesaki basaleli na ye, mpe mpo na nini elaka yango ezalaki ya kokamwisa?

5 Bayisraele bakokaki lisusu kozala na likoki ya kosambela Nzambe na ndenge oyo azalaki kondima? Na ntango wana, ezalaki komonana lokola ete ekoki kosalema te, mpo Babilone ezalaki soki moke te kobimisa bato na boombo. Kasi Yehova Nzambe alakaki ete basaleli na ye bakosikolama, mpe nsukansuka, basikolamaki. Bilaka ya Nzambe ekokisamaka ntango nyonso!Yisaya 55:11.

BAKRISTO BAZALAKI MPE NA BOOMBO NA BABILONE?

6, 7. Mpo na nini ezali na ntina tósembola lisusu ndenge na biso ya kolimbola ntango oyo bakristo bakɔtaki na boombo ya Babilone?

6 Bakristo bakutanaki mpe na likambo oyo ekokani na boombo ya Babilone? Na boumeli ya bambula mingi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki koloba ete bakristo ya sembo bakɔtaki na boombo ya Babilone na 1918 mpe babimaki na boombo yango na 1919. Kasi, na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokomona mpo na nini ezali na ntina tósembola lisusu ndenge na biso ya kolimbola likambo yango.

7 Tókanisa likambo oyo: Babilone Monene ezali lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Mpe basaleli ya Nzambe bakómaki te baombo ya mangomba ya lokuta na 1918. Ezali solo ete na boumeli ya ntango wana,  bakristo oyo batyami mafuta na elimo banyokwamaki. Nzokande, baguvɛrnema nde ezalaki konyokola bango mingi, kasi te mangomba ya lokuta. Kutu, bambula mingi liboso ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba, basaleli ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo bazalaki kokabwana mokemoke na mangomba ya lokuta. Yango wana, emonani ete basaleli ya Yehova bakɔtaki te na boombo ya Babilone Monene na 1918.

NTANGO NINI BASALELI YA NZAMBE BAKƆTAKI NA BOOMBO YA BABILONE?

8. Nini esalemaki nsima ya liwa ya bantoma? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Na Pantekote ya mobu 33, bankóto ya bakristo ya sika batyamaki mafuta na elimo santu. Bakómaki “libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza.” (Tángá 1 Petro 2:9, 10.) Ntango bantoma bazalaki naino na bomoi, bazalaki kobatela masangá malamu. Kasi, mingimingi nsima ya liwa na bango, bato mosusu na masangá babandaki koteya mateya ya lokuta mpe balingaki kobenda bayekoli mpo bátika nzela ya solo. Bato yango bazalaki kolinga mateya ya filozofi ya Aristote ná Platon, mpe babandaki koteya makanisi na bango moko, na esika ya mateya ya solo oyo euti na Liloba ya Nzambe. (Misala 20:30; 2 Batesaloniki 2:6-8) Mingi na bango bazalaki bato ya lokumu mpe bankulutu na masangá. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete “bino nyonso bozali bandeko,” atako bongo, mokemoke bakonzi babandaki kobima na lisangá.Matai 23:8.

9. (a) Limbolá ndenge oyo bokristo ya lipɛngwi ekómaki kosala na bomoko na guvɛrnema ya Roma. (b) Yango ebimisaki nini?

9 Na mobu 313 nsima ya Kristo, Constantin, amperɛrɛ oyo azalaki koyangela ampire ya Roma oyo ezalaki ya bapakano, akómisaki bokristo wana ya lipɛngwi lingomba ya Leta. Na nsima, Lingomba ekómaki kosala na bomoko na guvɛrnema ya Roma. Na ndakisa, Constantin asalaki likita elongo na bakonzi ya mangomba; likita yango eyebani na nkombo ya Concile de Nicée. Nsima ya likita wana, amperɛrɛ yango abenganaki sango moko na nkombo Arius, mpe sango yango akimaki na mboka mopaya, mpo aboyaki kondima ete Yesu azali Nzambe. Na nsima, Théodose akómaki amperɛrɛ ya Roma, mpe Lingomba ya Katolike ekómaki lingomba ya Leta ya Ampire ya Roma. Bato ya mayele na istware balobaka ete ampire ya Roma, oyo ezalaki ya bapakano, ekómaki ya “bakristo” na ntango ya amperɛrɛ Théodose. Kasi, mpo na koloba solo, na ntango wana, bakristo bapɛngwi basilaki kondima mateya ya bapakano, na ndenge yango, bakɔtaki na Babilone Monene. Atako bongo, ezalaki kaka na mwa bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo. Bazalaki lokola ble oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye. Bato wana ya sembo bazalaki kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosambela Nzambe, kasi kaka bato moke nde bazalaki koyokela bango. (Tángá Matai 13:24, 25, 37-39.) Bazalaki mpenza na boombo ya Babilone!

10. Mpo na nini bato bakómaki kotya ntembe na mateya ya lingomba?

10 Na boumeli ya mwa bankama ya bambula nsima ya Kristo, bato mingi bazalaki na likoki ya kotánga Biblia kaka na monɔkɔ ya Grɛki to ya Latin. Bazalaki na likoki ya kokokanisa mateya ya Liloba ya Nzambe ná mateya ya lingomba. Ntango bato mosusu bayebaki ete mateya ya lingomba ezalaki ya lokuta, baboyaki yango. Kasi ezalaki likama koyebisa basusu makanisi na bango, mpe bakokaki ata kobomama soki basali bongo.

11. Ndenge nini lingomba ezalaki na bokonzi likoló ya Biblia?

11 Nsima ya bambula, kaka bato moke nde bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki to ya Latin.  Mpe bakonzi ya mangomba bapesaki nzela te ete Liloba ya Nzambe ebongolama na minɔkɔ oyo bato mingi bayebi. Yango wana, kaka bakonzi ya mangomba mpe mwa ndambo ya bato oyo batángá mingi nde bazalaki na likoki ya kotánga Biblia bango moko, atako bakonzi mosusu ya mangomba bayebaki te kotánga to kokoma malamu. Moto nyonso oyo azalaki te kondima makambo oyo lingomba ezalaki koteya azalaki kozwa etumbu ya makasi. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki sembo bazalaki koyangana elongo, na bituluku ya mikemike; basusu kutu bazalaki na likoki ya koyangana te. Ndenge kaka ezalaki mpo na Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone, ‘banganga-nzambe’ wana ya bokonzi oyo batyami mafuta na elimo bazalaki te na likoki ya kosambela na ndenge oyo ebongisami. Babilone Monene ezalaki mpenza na bokonzi likoló ya bato!

BANTINA YA KOZALA NA ELIKYA EMONANI

12, 13. Wapi bantina mibale oyo epesaki bakristo ya solo elikya ya kozwa bonsomi? Limbolá.

12 Bakristo ya solo bakokaki nde kosikolama mpo na kosambela Nzambe na bosomi mpe na ndenge oyo endimami? Ɛɛ! Mwa elikya emonanaki, mpo na bantina mibale. Ntina ya liboso ezalaki kobimisama ya masini ya konyata mikanda. Liboso ete masini yango ebimisama na mobu soki 1450, esengelaki kosala bakopi ya Biblia na mabɔkɔ, mosala oyo ezalaki pɛtɛɛ te. Ekokaki kozwa sanza zomi mpo moto oyo amesani na mosala yango asala kopi ya Biblia moko mpamba! Longola yango, bato oyo bazalaki kosala bakopi bazalaki kokoma na mposo ya nyama. Yango wana, bakopi ya Biblia ezalaki kaka moke, mpe ezalaki ntalo mingi. Nzokande, na masini ya konyata mikanda mpe papye, moto oyo ameseni na mosala yango akokaki konyata nkasa koleka 1300 mokolo na mokolo!

Kobimisama ya masini ya konyata mikanda mpe milende ya babongoli ya mpiko ya Biblia epesaki elikya ya kobima na boombo ya Babilone (Talá paragrafe 12, 13)

 13 Ntina ya mibale ezalaki kobongolama ya Biblia. Soki na mbula 1500, bato mosusu ya mpiko babongolaki Liloba ya Nzambe na minɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba. Basalaki mosala yango atako bayebaki ete bakokaki kobomama mpo na yango. Bakonzi ya mangomba bazalaki kobanga. Mpo na nini? Mpo bazalaki kobanga ete soki mibali mpe basi ya mitema sembo batángi Biblia na minɔkɔ na bango, bakobanda kotuna mituna lokola: ‘Esika nini na Biblia okokuta liteya ya epongelo? Esika nini Biblia elobi ete moto asengeli kofuta sango mbongo mpo asala misa ya bato oyo bakufá? Esika nini Biblia elobeli bapápa mpe bakardinale?’ Mateya mingi ya mangomba ya lokuta ezwaki moboko na mateya ya filozofi ya Aristote mpe Platon, mibali oyo bazalaki na bomoi bankama ya bambula liboso ya Kristo. Bakonzi ya mangomba bazalaki na nkanda ntango bato bazalaki kotuna bango mituna. Mibali mpe basi oyo baboyaki mateya na bango, bazalaki kokatela bango etumbu ya liwa. Bakonzi ya mangomba balingaki kopekisa bato kotánga Biblia mpe kotuna mituna, kasi mbala mingi, yango nde ezalaki kosalema. Kasi bato mosusu ya mpiko bazalaki kondima te ete Babilone Monene ezala na bokonzi likoló na bango. Bazwaki mateya ya solo na Liloba ya Nzambe, mpe balingaki koyeba lisusu makambo mingi! Mokemoke, bazalaki kobima na boombo ya mangomba ya lokuta.

14. (a) Bato oyo bazalaki na mposa ya koyekola Biblia basalaki nini? (b) Limbolá milende oyo ndeko Russell asalaki mpo na koyeba solo.

14 Bato mingi bazalaki na mposa ya kotánga Biblia, koyekola yango, mpe koyebisa basusu makambo oyo bazalaki koyekola. Bazalaki kolinga te ete bakonzi ya mangomba báyebisa bango oyo basengelaki kondima. Yango wana, bakimaki na bikólo oyo bazalaki na bonsomi ya koyekola Biblia. Moko ya bikólo yango ezalaki États-Unis. Kuna, na bambula 1870, ndeko Charles Taze Russell elongo na bandeko mosusu babandaki koyekola Biblia na mozindo. Na ebandeli, ndeko Russell azalaki na mposa ya koyeba lingomba nini ezalaki koteya solo. Azalaki kokokanisa malamumalamu mateya ya mangomba oyo ezalaki kobengama ya bokristo, ata mpe mangomba ya bokristo te, ná makambo oyo Biblia eteyaka. Eumelaki te, amonaki ete na mangomba wana nyonso, ata moko te ezalaki kolanda mpenza Liloba ya Nzambe. Na ntango moko boye, asololaki na bakambi ya mangomba mingi. Ndeko Russell akanisaki ete bakondima mateya ya solo oyo ye ná etuluku na ye bazwaki na Biblia mpe bakoteya yango na masangá na bango. Kasi bakambi ya mangomba yango batyaki likebi te na makambo na ye. Eumelaki te, Bayekoli ya Biblia bayebaki ete basengelaki te kosambela Nzambe elongo na bato oyo bazalaki na mangomba ya lokuta.Tángá 2 Bakorinti 6:14.

15. (a) Ntango nini bakristo ya solo bakɔtaki na boombo ya Babilone? (b) Mituna nini tokozwa biyano na yango na lisolo oyo elandi?

15 Na lisolo oyo, toyekoli ete bakristo ya solo bakɔtaki na boombo ya Babilone mwa moke nsima ya liwa ya ntoma ya nsuka. Kasi, tozali kaka na mposa ya kozwa biyano na mituna oyo: Ndenge nini toyebi ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo babandaki mokemoke kolongwa na boombo ya Babilone Monene bambula mingi liboso ya 1914? Ezali solo ete Yehova asepelaki te na basaleli na ye mpo balɛmbisaki mabɔkɔ na mosala ya kosakola na boumeli ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba? Bandeko mosusu na ntango wana bakɔtaki nde na makambo ya mokili mpe Yehova andimaki bango te? Nsukansuka, soki bakristo bakɔtaki na boombo ya mangomba ya lokuta nsima ya liwa ya bantoma, ndenge nini basikolamaki? Mituna wana ezali na ntina mingi, mpe tokozwa biyano na yango na lisolo oyo elandi.