Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2016

Babongisami na boyokani na Buku ya Nzambe

Babongisami na boyokani na Buku ya Nzambe

“Yehova ye moko atyaki moboko ya mabele na bwanya. Atɛlɛmisaki likoló makasi na bososoli.”MASESE 3:19.

NZEMBO: 105, 107

1, 2. (a) Bato mosusu balobaka nini na likanisi oyo ete Nzambe azali na ebongiseli? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

BATO mosusu balobaka ete: “Bosengeli te na ebongiseli moko mpo etambwisa bino. Bozali kaka na mposa ya boyokani elongo na Nzambe.” Ezali solo? Makambo oyo ezali kosalema emonisi nini?

2 Na lisolo oyo, tokomona ete Yehova asalaka makambo na molɔngɔ mpe abongisaka basaleli na ye. Tokolobela mpe oyo tosengeli kosala ntango ebongiseli ya Yehova epesi biso malako. (1 Bakorinti 14:33, 40) Na siɛklɛ ya liboso, basaleli ya Yehova balandaki malako ya Makomami mpe bazalaki na likoki ya kosakola nsango malamu na bisika mingi. Lokola bango, lelo oyo totikaka ete Biblia etambwisa biso. Mpe totosaka malako oyo tozwaka na ebongiseli ya Nzambe. Yango wana, tozali na likoki ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Tobatelaka mpe lisangá ezala pɛto, na kimya mpe na bomoko.

YEHOVA AZALI NZAMBE YA MOBULU TE

3. Nini endimisi yo ete Yehova azali Nzambe ya mobulu te?

3 Soki totali biloko oyo Yehova asalá, tokomona polele ete azali Nzambe ya mobulu te. “Atyaki moboko ya mabele na bwanya. Atɛlɛmisaki likoló makasi na bososoli.” (Masese 3:19) Ezali na  makambo mingi oyo toyebi te mpo na biloko oyo Yehova asalá. Kutu, oyo toyebi ezali kaka ‘mwa nungunungu ya likambo toyoki mpo na ye.’ (Yobo 26:14) Kasi ezali polele ete mwa ndambo ya makambo oyo toyebi mpo na molɔ́ngɔ́ emonisi ete ebongisami malamu mpenza. (Nzembo 8:3, 4) Bamilio ya minzoto na likoló ebalukaka na molɔngɔ. Na ndakisa, kanisá lolenge oyo baplanɛti ebalukaka zingazinga ya moi. Molɔngɔ ya ndenge wana ezali kosalema kaka mpo Yehova abongisá lolenge oyo baplanɛti mpe minzoto ebalukaka. Soki tokanisi ndenge oyo “asalaki likoló na mayele” mpe mabele, tokolinga kokumisa ye, kosambela ye, mpe kozala sembo epai na ye.Nzembo 136:1, 5-9.

4. Mpo na nini bato ya siansi balongi te koyanola na mituna mingi ya ntina?

4 Bato ya siansi basalelaka biloko ebele oyo bayekolá mpo na molɔ́ngɔ́ mpe mabele mpo na kosala ete bomoi na biso ezala malamu koleka. Kasi, balongi te koyanola na mituna mingi ya ntina. Na ndakisa, bato ya astronomi bakoki te koyebisa biso na bosikisiki ndenge oyo molɔ́ngɔ́ ebandá to ntina oyo bato bazali awa na mabele, ezala mpe banyama mpe milona. Mpe bato mingi bakoki te kolimbola ntina oyo bato bazalaka na mposa makasi ya kozala na bomoi libela na libela. (Mosakoli 3:11) Ntina mosusu oyo esalaka ete bato bázwa biyano te na mituna wana ezali ete bato ya siansi mpe bato mosusu balobaka ete Nzambe azali te mpe balendisaka liteya ya evolisyo. Kasi, Nzambe apesi biso biyano na Buku na ye, Biblia.

5. Na makambo nini bato balandaka mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?

5 Yehova atyá mibeko mingi oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́. Mibeko yango ebongwanaka te. Bato ya mayele na lotiliki, bato oyo batyaka pɔmpi ya mai, ba-ingénieur, bapilote, minganga oyo basalaka lipaso, mpe bato mosusu balandaka mibeko yango mpo na kosala mosala na bango. Na ndakisa, motema ya moto ezalaka kaka na esika moko na kati ya nzoto, yango wana, minganga oyo basalaka lipaso bayebaka esika oyo bakozwa yango epai ya moto nyonso ya maladi. Mpe eyebani ete soki moto azali na esika moko ya likoló mingi mpe amitiki, akokwea mpe akoki kokufa. Totosaka mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́, na ndakisa nguya oyo esimbaka biloko ya likoló, mpo tolingaka kozala na bomoi.

MAKAMBO OYO NZAMBE ABONGISÁ

6. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingaka bato básambela ye na lolenge oyo ebongisami?

6 Yehova abongisá molɔ́ngɔ́ na ndenge ya kokamwa mpenza. Yango wana, alingaka mpenza ete basaleli na ye básambela ye na lolenge oyo ebongisami. Kutu, Yehova apesá biso Biblia mpo eteya biso ndenge ya kosambela ye. Kaka soki tolandi malako oyo apesaka biso na nzela ya Biblia mpe ebongiseli na ye nde tokozala na bomoi ya esengo mpe oyo ezali kosepelisa.

7. Liteya nini tozwi na lolenge oyo Biblia ekomamaki?

7 Biblia ezali mpenza likabo kitoko oyo Nzambe apesá biso. Bato mosusu ya mayele balobaka ete Biblia ezali kaka mikanda ya etuluku moko ya Bayuda mpe ya bakristo oyo bato basangisá esika moko. Kasi Nzambe nde aponaki bato ya kokoma mikanda yango, ntango ya kokoma yango, mpe makambo ya kokoma. Yango wana, mikanda nyonso ya Biblia esalisaka biso tókanga ntina ya nsango ya Nzambe. Kobanda na mokanda ya Ebandeli tii ya Emoniseli, Biblia emonisi ete ekozala na “momboto” oyo akosala ete mabele ekóma lisusu paradiso. Mpe toyekoli ete “momboto” yango ezali Kristo Yesu mpe ete Bokonzi na ye ekomonisa ete Yehova azali na lotomo ya koyangela moto nyonso.Tángá Ebandeli 3:15; Matai 6:10; Emoniseli 11:15.

8. Na ndenge nini Bayisraele babongisamaki malamu?

8 Bayisraele bazalaki kolanda Mibeko oyo Nzambe apesaki bango mpe babongisamaki  malamu mpenza. Na ndakisa, ezalaki na “basi basaleli oyo bazalaki kosala mosala oyo ebongisami na monɔkɔ ya hema ya kokutana.” (Kobima 38:8) Bayisraele mpe bazalaki na malako mpo na ndenge ya kolongwa esika moko mpo na kokende esika mosusu, mpe komema tabernakle na ndenge ya molɔngɔ. Na nsima, mokonzi Davidi abongisaki banganga-nzambe mpe balevi mpo básala mosala ya sikisiki na tempelo. (1 Ntango 23:1-6; 24:1-3) Ntango Bayisraele bazalaki kotosa Yehova, azalaki kopambola bango. Babongisamaki mpe bazalaki na kimya mpe na bomoko.Kolimbola Mibeko 11:26, 27; 28:1-14.

9. Ndenge nini masangá na siɛklɛ ya liboso ebongisamaki?

9 Masangá na siɛklɛ ya liboso ebongisamaki mpe malamu. Ezalaki na lisangani ya mikóló-bakambi, elingi koloba, etuluku ya mibali oyo bazalaki kopesa masangá malako. Na ebandeli, etuluku yango esalemaki na bantoma. Na nsima, bankulutu mosusu babakisamaki. (Misala 6:1-6; 15:6) Yehova akambaki bandeko ya lisangani ya mikóló-bakambi mpe bakristo mosusu oyo bazalaki kosala elongo na bango bákoma mikanda oyo ezalaki na toli mpe malako mpo na masangá. (1 Timote 3:1-13; Tito 1:5-9) Matomba nini masangá ezwaki ntango ezalaki kolanda malako ya lisangani ya mikóló-bakambi?

10. Nini esalemaki ntango masangá na siɛklɛ ya liboso ezalaki kolanda malako ya lisangani ya mikóló-bakambi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Tángá Misala 16:4, 5. Na siɛklɛ ya liboso, bandeko mosusu bazalaki kokende kotala masangá mpo na kopesa yango “mitindo oyo bantoma ná bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme [elingi koloba lisangani ya mikóló-bakambi] bakamataki.” Masangá ezalaki kolanda malako yango mpe “ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.” Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na bango oyo ekosalisa biso na lisangá lelo oyo?

OTOSAKA MALAKO?

11. Bankulutu ná basaleli na misala basengeli kosala nini ntango bazwi malako oyo euti na ebongiseli ya Nzambe?

11 Bandeko ya Komite ya filiale to ya Komite ya ekólo, bakɛngɛli ya zongazonga, mpe bankulutu basengeli kotosa malako oyo bazwaka na ebongiseli ya Nzambe. Kutu, Buku ya Yehova eyebisi biso nyonso tótosaka baoyo bazali kokamba biso. (Kolimbola Mibeko 30:16; Baebre 13:7, 17) Baoyo bazali sembo epai ya Yehova bazalaka batomboki te, mpe baimaimaka te mpo na malako oyo bazwaka. Tolingi te kozala lokola Diotrefese, oyo azalaki komemya te bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá. (Tángá 3 Yoane 9, 10.) Soki tolandi malako oyo bapesaka biso, tokosala ete kimya mpe bomoko ezala na lisangá. Yango wana, tokoki komituna boye: ‘Nalendisaka bandeko na ngai bázala sembo epai ya Yehova? Nalandaka kozanga koumela malako oyo ebongiseli ya Nzambe epesaka?’

12. Ndenge nini bankulutu mpe basaleli na misala batyamaka?

12 Na bambula euti koleka, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongolaki ndenge oyo bankulutu mpe basaleli na misala na lisangá mokomoko basengeli kotyama. “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/2014 elimbolaki ete na siɛklɛ ya liboso, lisangani ya mikóló-bakambi epesaki bakɛngɛli-batamboli bokonzi ya kotya bankulutu ná basaleli na misala. Na yango, kobanda na sanza ya libwa 2014, bakɛngɛli ya zongazonga nde batyaka bankulutu mpe basaleli na misala. Soki bankulutu ya lisangá moko batindi nkombo ya ndeko moko mpo aponama nkulutu to mosaleli na misala, mokɛngɛli ya zongazonga alukaka koyeba malamu ndeko yango mpe libota na ye. Na ndakisa, akoki kobima na mosala ya kosakola elongo na ndeko yango. (1 Timote 3:4, 5) Na nsima, mokɛngɛli ya zongazonga asalaka likita elongo na bankulutu. Batalelaka malamumalamu mikapo ya Biblia oyo emonisi  bizaleli oyo nkulutu to mosaleli na misala asengeli kozala na yango.1 Timote 3:1-10, 12, 13; 1 Petro 5:1-3.

13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tosalaka na boyokani na malako oyo tozwaka epai ya bankulutu?

13 Bankulutu bapesaka biso malako ya Biblia mpo balingaka kobatela lisangá mpe koleisa yango. Tosengeli kosala elongo na bango mpo malako yango ezali mpo na bolamu na biso moko. (1 Timote 6:3) Na siɛklɛ ya liboso, bato mosusu bazalaki bato ya “mobulu.” Bazalaki kosala mosala te kasi bazalaki nde komikɔtisa na makambo oyo etali bango te. Bankulutu balukaki kosembola bango, kasi baboyaki kobongwana. Ntoma Paulo ayebisaki lisangá ndenge ya kotalela moto ya ndenge wana. Alobaki: “Bótya moto yango elembo, bótika kosangana na ye.” Basengelaki kotika kosangana na moto yango, kasi te kotalela ye lokola monguna. (2 Batesaloniki 3:11-15) Lelo oyo mpe, bankulutu bamekaka kosalisa ndeko oyo aboyi kolanda mitinda ya Nzambe, na ndakisa, ndeko oyo alingi kobalana na moto oyo azali Motatoli te. (1 Bakorinti 7:39) Soki ndeko yango aboyi kobongola etamboli na ye, bankulutu bakoki kozwa ekateli ya kosala diskur moko oyo ekolimbola ndenge oyo etamboli ya ndenge wana ekoki kotinda basusu báloba mabe mpo na lisangá. Soki bankulutu basali diskur ya ndenge wana na lisangá na bino, okosala nini? Soki oyebi ndeko oyo balobeli, okotika kosangana na ye? Soki otiki kosangana na ye, okosalisa ye ayeba ete etamboli na ye ekosala ye moko mabe mpe ekosepelisa Yehova te, mpe yango ekoki kosalisa ye abongola makanisi na ye. [1]

TÓBATELA LISANGÁ PƐTO, NA KIMYA MPE NA BOMOKO

14. Ndenge nini tokoki kobatela bopɛto ya lisangá?

14 Liloba ya Nzambe eyebisi biso makambo oyo biso nyonso tosengeli kosala mpo tókangaka miso te na mabe na kati ya lisangá. Tótalela makambo oyo esalemaki na lisangá ya Korinti. Ntoma Paulo azalaki kolinga bandeko ya lisangá yango. Asalisaki mingi na bango báyeba solo. (1 Bakorinti 1:1, 2) Kasi, kanisá ndenge oyo ayokaki ntango ayebaki ete moko na bango azalaki kosala pite mpe ete bandeko batikaki ye na kati ya lisangá! Ntoma Paulo ayebisaki bankulutu ‘bápesa Satana moto yango.’ Basengelaki kobengana moto yango, elingi koloba kolongola ye na lisangá. (1 Bakorinti 5:1, 5-7, 12) Lelo oyo, bankulutu bakoki kozwa ekateli ete moto alongolama na lisangá mpo asalaki lisumu moko ya monene mpe aboyi kobongola motema. Soki esalemi bongo, tokotalela moto oyo alongolami na lisangá ndenge Biblia esɛngi? Soki tosali bongo, tokobatela bopɛto ya lisangá. Mpe tokoki kosalisa moto yango ayeba ete asengeli kobongola motema mpe kosɛnga ete Yehova alimbisa ye.

15. Ndenge nini tokoki kobatela kimya na kati ya lisangá?

15 Ezalaki na mokakatano mosusu na lisangá ya Korinti. Bandeko mosusu bazalaki kofunda bandeko na tribinale. Ntoma Paulo atunaki bango boye: “Kutu mpo na nini te kondima ete básalela bino mabe?” (1 Bakorinti 6:1-8) Lelo oyo, bandeko mosusu ya lisangá basalaki kɔntra ya mombongo ná bandeko mosusu, kasi na nsima, babungisaki mbongo to bamonaki ete bandeko babubaki bango. Na yango, bafundaki bandeko na tribinale. Kasi soki esalemi bongo, yango ekoki kosala ete bato báloba mabe mpo na Yehova mpe basaleli na ye. Mpe ekoki kobebisa kimya ya lisangá. Buku ya Nzambe esalisaka biso tómona ete tosengeli kobatela kimya elongo na bandeko, ata soki esɛngi ete tóbungisa mbongo. [2] Kutu, Yesu ateyaki biso ndenge ya kosilisa matata minene mpe kowelana. (Tángá Matai 5:23, 24; 18:15-17.) Soki totosi malako na ye, tokobatela kimya mpe bomoko ya lisangá.

16. Mpo na nini basaleli ya Nzambe bazali na bomoko?

 16 Buku ya Yehova eyebisi biso: “Talá! Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!” (Nzembo 133:1) Ntango Bayisraele bazalaki kotosa Yehova, babongisamaki mpe bazalaki na bomoko. Mpo na basaleli na ye, Nzambe asakolaki boye: “Nakotya bango na bomoko, lokola bibwɛlɛ na lopango.” (Mika 2:12) Yehova asakolaki mpe ete basaleli na ye bakoyekola solo oyo ezali na kati ya Biblia mpe bakosalela ye na bomoko. Alobaki: “Nakopesa bato ya bikólo monɔkɔ moko ya pɛto, mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.” (Sefania 3:9) Tozali na botɔndi mingi mpo tozali na likoki ya kosambela Yehova na bomoko!

Bankulutu bazali kosalisa ndeko moko oyo “abɛti libaku” (Talá paragrafe 17)

17. Bankulutu basengeli kosala nini soki ndeko moko na lisangá asali lisumu ya monene?

17 Soki ndeko moko asali lisumu ya monene, bankulutu basengeli kosala noki mpo na kosembola ye na bolingo. Bayebi ete Yehova alingaka bango bábatela lisangá na etamboli ya mabe mpe bábatela yango pɛto mpe ezala na bomoko. (Masese 15:3) Ntoma Paulo azalaki kolinga bandeko ya lisangá ya Korinti mpe asembolaki bango ntango esengelaki, ndenge totángaka yango na mokanda ya liboso oyo akomelaki bango. Toyebi ete bankulutu na lisangá yango balandaki nokinoki malako ya ntoma Paulo mpo mwa basanza na nsima, apesaki bango longonya na mokanda ya mibale oyo akomelaki bango. Soki ndeko moko “abɛti libaku liboso ayeba yango,” bankulutu basengeli kosembola ye na boboto.Bagalatia 6:1.

18. (a) Ndenge nini malako ya Liloba ya Nzambe esalisaki masangá na siɛklɛ ya liboso? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Ezali polele ete ntango bakristo na siɛklɛ ya liboso bazalaki kolanda malako ya Buku ya Nzambe, masangá na bango ezalaki pɛto, na kimya mpe na bomoko. (1 Bakorinti 1:10; Baefese 4:11-13; 1 Petro 3:8) Yango esalaki ete bandeko yango bázala na likoki ya kosakola nsango malamu “na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Bakolose 1:23) Lelo oyo mpe, basaleli ya Yehova bazali na bomoko mpe babongisami, mpe bazali kosakola nsango malamu na mabele mobimba. Lisolo oyo elandi ekopesa bilembeteli mosusu oyo emonisi ete bazali na mposa makasi ya kokumisa Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, mpe kotosa malako ya Buku na ye, Biblia.Nzembo 71:15, 16.

^ [1] (paragrafe 13) Talá buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 134-136.

^ [2] (paragrafe 15) Mpo na koyeba makambo oyo ekoki kotinda mokristo moko azwa ekateli ya kofunda mokristo mosusu na tribinale, talá buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” lokasa 223, maloba na nse ya lokasa.