Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2016

Ozali ‘kobatela bwanya’?

Ozali ‘kobatela bwanya’?

LISAPO moko elobelaka elenge mobali moko azalaki kofanda na mboka moko ya mosika mpe azalaki mobola. Bato ya mboka yango bazalaki kosɛka ye mpo bazalaki kokanisa ete azali mayele mingi te. Ntango bapaya bayaki na mboka, bato mosusu ya mboka yango bazalaki kotyola ye na miso ya baninga na bango. Basimbaki mbongo mibale ya bibende, moko ya monene ya palata mpe mosusu ya moke ya wolo oyo valɛrɛ na yango elekaki mbala mibale oyo ya palata. Balobaki na ye: “Poná oyo olingi.” Elenge mobali yango aponaki mbongo ya palata mpe akimaki.

Mokolo moko, mopaya moko atunaki elenge yango boye: “Oyebi te ete valɛrɛ ya mbongo ya ebende ya wolo eleki mbala mibale oyo ya mbongo ya palata?” Elenge mobali yango asɛkaki mwa moke mpe alobaki: “Ɛɛ, nayebi.” Mopaya yango atunaki lisusu: “Kasi mpo na nini ozwaki mbongo ya ebende ya palata? Soki ozwaki oyo ya wolo, olingaki kozwa mbongo mbala mibale koleka!” Elenge mobali yango alobaki: “Kasi, soki nazwaki mbongo ya ebende ya wolo, bato balingaki lisusu te kosakana na ngai. Oyebi mbongo boni ya bibende ya palata nasili kozwa?” Na lisapo oyo, elenge mobali yango amonisaki ezaleli moko oyo mikóló bakoki kozwela yango matomba: bwanya.

Biblia elobi: “Batelá bwanya ná likoki ya kokanisa. Boye okotambola na kimya na nzela na yo, mpe ata lokolo na yo ekotutana na eloko moko te.” (Mas. 3:21, 23) Na yango, koyeba oyo “bwanya” elimboli mpe ndenge ya kosalela yango esalaka ete tózala na kimya. Yango esalisaka biso tóbɛta libaku te na elimo, ebatelaka “lokolo” na biso.

ELIMBOLI NINI?

Bwanya ekeseni na boyebi mpe mayele. Moto oyo azali na boyebi akangaka makambo mingi na motó na ye. Moto oyo azali na mayele akoki komona ndenge oyo likambo moko eyokani na mosusu. Moto oyo azali na bwanya azali na likoki ya kosangisa boyebi ná mayele mpe kosalela yango na ndenge oyo ebongi.

Na ndakisa, moto akoki kotánga mpe kokanga ntina ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? na ntango mokuse. Ntango azali koyekola Biblia, akoki koyanola malamu. Akoki kobanda koyangana na makita ya lisangá, ata mpe kopesa biyano ya malamu. Makambo wana nyonso ekoki komonisa ete azali kokola na elimo, kasi yango nde elingi koloba ete akómi na bwanya? Mpenza te. Mbala mosusu azali kaka moto oyo akangaka makambo nokinoki. Kasi, ntango azali kosalela mateya yango ya solo na bomoi na ye, azali kosalela boyebi mpe mayele na ndenge oyo ebongi, azali kozwa bwanya. Soki azali kozwa bikateli ya malamu, oyo ezali komonisa ete azali kokanisa malamu liboso, ekomonana polele ete amonisi bwanya oyo ebongi.

Matai 7:24-27 elobeli ndakisa ya Yesu ya bato mibale; mokomoko na bango atongaki ndako. Moko na bango alobelami lokola moto ya “mayele.” Lokola moto yango akanisaki liboso likambo oyo ekosalema, atongaki ndako na ye likoló ya mabanga. Azalaki komona mosika mpe azalaki mayele. Akanisaki te ete kotonga likoló ya zɛlo ekozwa mbongo mingi te to ekosila noki. Lokola azalaki na bwanya, akanisaki makambo oyo ekokómela misala na ye nsima ya mikolo. Yango wana, ntango mopɛpɛ makasi eyaki, ndako na ye ebatelamaki. Sikoyo, motuna yango oyo: Ndenge nini tokoki kozwa mpe kobatela bwanya, ezaleli oyo ya motuya?

 NDENGE NINI NAKOKI KOZWA YANGO?

Ya liboso, yebá ete Mika 6:9 elobi: “Moto oyo azali na bwanya, akobanga nkombo [ya Nzambe].” Kobanga nkombo ya Yehova elakisi komemya ye. Elimboli kozala na limemya mingi mpo na makambo oyo nkombo na ye emonisaka, ata mpe mitinda na ye. Mpo na komemya moto, osengeli koyeba ndenge oyo akanisaka. Na nsima, okoki kotyela ye motema mpe koyekola epai na ye, komekola makambo na ye ya malamu. Soki tozali kokanisa mingi na ndenge oyo boyokani na biso ná Yehova ekokóma nsima ya mikolo soki tosali boye to boye, mpe soki tozali kozwa bikateli na kotalela mitinda na ye, tokozwa bwanya.

Ya mibale, Masese 18:1 elobi: “Ye oyo azali komitangola na bamosusu akoluka mposa na ye moko; akotombokela makambo nyonso ya bwanya.” Soki tozali ekɛngɛ te, tokoki komitangola na Yehova mpe basaleli na ye. Mpo tómitangola te, tosengeli kolekisa ntango elongo na bato mosusu oyo babangaka nkombo ya Nzambe mpe bamemyaka mitinda na ye. Soki likoki ezali, tosengeli kokende na Ndako ya Bokonzi mpo na kozala mbala na mbala elongo na bandeko ya lisangá. Ntango tozali na makita, tosengeli kofungola makanisi mpe mitema na biso mpe kotika ete makambo oyo ezali kolobama kuna esimba mitema na biso.

Longola yango, soki tofungoleli Yehova mitema na biso na libondeli, tokokóma baninga na ye. (Mas. 3:5, 6) Soki tofungoli makanisi mpe mitema na biso ntango tozali kotánga Biblia mpe mikanda oyo ebongiseli ya Yehova epesaka biso, tokomona mwa moke matomba oyo misala na biso ekobimisa mpe tokosala na boyokani na makambo yango.  Tosengeli mpe kofungola mitema na biso ntango bandeko oyo bakɔmɛli bazali kopesa biso toli. (Mas. 19:20) Boye, na esika ya ‘koboya bwanya,’ tokobatela makasi ezaleli yango ya ntina mingi.

NDENGE NINI EKOKI KOSALISA LIBOTA NA NGAI?

Bwanya ekoki kobatela mabota. Na ndakisa, Biblia esɛngi na mwasi azala na “limemya makasi” epai ya mobali na ye. (Ef. 5:33) Mobali akoki kosala nini mpo mwasi na ye azala na limemya makasi epai na ye? Soki mobali azali kosɛnga limemya na makasi, akozwela yango matomba mpo na ntango mokuse. Mpo na koboya mindɔndɔ, mwasi ya mobali ya ndenge wana akomonisela ye limemya kaka ntango mobali yango azali wana. Kasi, mwasi yango akokoba komemya ye ntango azali te? Mbala mingi esalemaka te. Mobali yango asengeli koluka koyeba nini ekobimisa matomba mpo na ntango molai. Soki amonisi bizaleli ya mbuma ya elimo, lokola bolingo mpe boboto, mwasi na ye akobanda kopesa ye limemya makasi. Ya solo, mwasi mokristo asengeli komemya mobali na ye, ezala abongi na yango to te.Gal. 5:22, 23.

Biblia elobi mpe ete mobali asengeli kolinga mwasi na ye. (Ef. 5:28, 33) Mpo mobali na ye akoba kolinga ye, mwasi akoki kokanisa ete ezali malamu abombela ye makambo mabe oyo azali na lotomo ya koyeba. Kasi, kosala bongo nde emonisaka bwanya? Na nsima, ntango mobali na ye akoyeba likambo oyo ebombamaki, ekosuka ndenge nini? Akolinga ye lisusu mingi? Ekozala pɛtɛɛ te mpo na mobali wana. Nzokande, soki mwasi aponi ntango oyo ebongi mpo na koyebisa makambo ya mabe na kimya, mobali na ye akosepela na bosembo na ye. Boye, akokóma kolinga mwasi na ye lisusu mingi.

Ndenge oyo opesaka bana na yo disiplini lelo ekoki kosala ete osolola na bango to te na nsima

Bana basengeli kotosa baboti na bango mpe kozwa disiplini na ndenge oyo eyokani na mibeko ya Yehova. (Ef. 6:1, 4) Yango elimboli ete baboti basengeli kotyela bana na bango mibeko ebeleebele? Koyeba mibeko ya ndako to etumbu oyo okoki kozwa soki otosi yango te, ekoki te. Moboti ya bwanya asalisaka mwana na ye ayeba ntina oyo asengeli kotosa.

Na ndakisa, kanisá mwana oyo alobaka na moboti na ye kozanga limemya. Kogangela mwana yango makasi to kopesa ye etumbu na mbalakaka ekoki koyokisa ye nsɔni to kotinda ye aloba lisusu likambo te. Kutu, akoki kobomba nkanda na motema, mpe yango ekoki kosala ete akimaka baboti na ye.

Baboti oyo bazali komonisa bwanya bakanisaka lolenge oyo bapesaka bana na bango disiplini mpe matomba to makama oyo disiplini yango ekomema na mikolo ezali koya. Baboti basengeli te kopesa disiplini nokinoki mpo bayoki nsɔni. Ntango mosusu moboti akoki kososola na mwana na kimya mpe na bolingo, na esika oyo bazali kaka bango mibale, mpe kolimbwela ye ete Yehova azali kosɛnga ye akumisaka baboti na ye mpo na kozwa mapamboli ya seko. Na nsima, ntango mwana yango amonisi ete amemyaka baboti na ye, akoyeba ete azali nde kokumisa Yehova. (Ef. 6:2, 3) Komonisa boboto ndenge wana ekoki kosimba motema ya mwana. Akomona ete baboti na ye bazali mpenza kotyela ye likebi, mpe akokóma komemya bango lisusu mingi. Yango ekozala mpasi te mpo mwana asɛnga lisalisi ntango makambo mosusu ya ntina ekobima na nsima.

Baboti mosusu bakoki koyoka mabe mpo ntango mosusu bakozokisa mwana na bango na motema, yango wana baboyaka kosembola ye. Kasi, nini ekosalema ntango mwana akómi mokóló? Akobanga Yehova mpe akoyeba ete kondima mitinda ya Nzambe ezali likambo ya bwanya? Akondima kofungolela Yehova motema mpe makanisi na ye, to akomitangola na elimo?Mas. 13:1; 29:21.

Moyemi malamu amibongisaka liboso mpo na eloko oyo alingi koyema. Akobukabuka kaka te mpe kolikya eloko ya malamu na nsima. Baboti ya bwanya balekisaka ntango mingi mpo na koyekola mpe kosalela mitinda ya Yehova, yango wana babangaka nkombo na ye. Soki bamitangoli te na Yehova mpe ebongiseli na ye, bakozwa bwanya mpe bakosalela yango mpo na kotonga mabota na bango.

Mokolo na mokolo, tozwaka bikateli oyo ekoki kobongisa to kobebisa bomoi na biso na mikolo ezali koya. Na esika ya kosala nokinoki likambo moko oyo eyeli biso na motó mpe kozwa ekateli na mbalakaka, mpo na nini te kokanisaka liboso? Tókanisa malamu matomba to makama oyo ekateli yango ekoki kobimisa nsima ya mikolo. Tóluka litambwisi ya Yehova, mpe tósalela bwanya na ye. Boye, tokobatela bwanya, mpe ekopesa biso bomoi.Mas. 3:21, 22.