Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2016

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

 Na ntango ya kala, ekokaki kosalema ete moto moko alona matiti mabe na elanga ya moto mosusu?

Mokanda oyo ya 1468 ya Amperɛrɛ Justinien ezali moko ya mikanda oyo elobeli makambo mingi etali mibeko na ntango ya kala

NA MATAI 13:24-26, Yesu alobaki: “Bokonzi ya likoló ezali lokola moto moko oyo alonaki mboto ya malamu na elanga na ye. Ntango bato balalaki mpɔngi, monguna na ye ayaki kolona matiti mabe na katikati ya blé, mpe akendaki. Ntango milona yango ebimaki mpe ebotaki mbuma, matiti mabe mpe ebimaki.” Bakomi mosusu bandimaka mpenza te ete ndakisa yango ezalaki likambo ya solo, kasi na kotalela makomi ya kala ya mibeko ya Baroma, likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema.

Diksionɛrɛ moko oyo elimbolaka Biblia elobi ete na mibeko ya Baroma, kolona matiti mabe na elanga ya moto mosusu mpo na kozongisa mabe na mabe, ezalaki mpenza likambo moko ya mabe. Lokola mibeko elobelaki likambo yango, yango elimboli ete ezalaki kosalema mpenza. Moto moko ya mayele na mibeko na nkombo Alastair Kerr, amonisi ete na mobu 533 nsima ya Kristo, amperɛrɛ Moroma Justinien abimisaki mokanda moko. Ezalaki na mibeko ya Baroma na mokuse mpe na maloba mosusu ya bato ya mayele na mibeko kobanda mobu soki 100 tii 250 nsima ya Kristo. Na mokanda yango, moko ya bato yango ya mayele na nkombo Ulpian alobelaki likambo moko oyo esalemaki na siɛklɛ ya mibale. Balonaki matiti mabe na elanga ya moto mosusu, mpe yango esalaki ete milona ebeba. Mokanda yango elobelaki ntomo oyo mibeko epesaki mosali-bilanga; moto oyo alonaki matiti mabe asengelaki kofuta ye mbongo mpo na milona oyo ebebaki.

Makambo wana oyo esalemaki na Ampire ya Roma ya kala, emonisi ete likambo oyo Yesu alobeli na ndakisa na ye ekokaki mpenza kozala likambo ya solo.

Bonsomi nini Roma epesaki bakonzi ya Bayuda na Yudea na siɛklɛ ya liboso?

NA NTANGO wana, Baroma bazalaki koyangela Yudea; ezalaki na guvɛrnɛrɛ moko oyo azalaki koyangela mpe azalaki na limpinga na ye ya basoda. Libosoliboso mposa na ye ezalaki ya kokɔngɔla mpako mpo na Roma mpe kotya kimya mpe molɔngɔ. Baroma bazalaki kotya likebi mingi na kolongola misala oyo mibeko epesaki nzela te mpe kosambisa moto nyonso oyo azali kotya mobulu. Lisusu, Baroma bazalaki kosepela kotikela bakonzi ya Bayuda mokumba ya kotambwisa makambo mikemike ya mboka.

Sanedrina ya Bayuda ezali kosambisa

Sanedrina ezalaki tribinale monene ya Bayuda mpe ezalaki kokata makambo etali mibeko ya Bayuda. Batribinale mosusu ya mike ezalaki na bisika mingi na Yudea. Makambo mingi ezalaki kokatama na batribinale yango kozanga kutu ete bakonzi ya Roma bákɔta na makambo yango. Nzokande, batribinale ya Bayuda ezalaki te kokata likambo ya koboma basali-mabe, mpo mbala mingi kaka Baroma nde bazalaki na lotomo ya kosala yango. Likambo oyo esalemaki ndenge mosusu, ezalaki ntango bakonzi ya Sanedrina basambisaki Stefano mpe babambaki ye mabanga tii akufaki.Misala 6:8-15; 7:54-60.

Sanedrina ya Bayuda ezalaki na bokonzi bisika mingi. Kasi Emil Schürer, moto moko ya mayele alobi ete “ezalaki mpenza na bokonzi mingi te likoló ya Baroma, mpo bakonzi ya Baroma bakokaki kozwa bikateli bango moko ntango nyonso, ndenge basalaki ntango bamonaki ete babukaki mibeko na bango na makambo etali politiki.” Likambo ya ndenge wana esalemaki ntango Klode Lisiasi azalaki mokonzi ya basoda, mpe atyaki ntoma Paulo, oyo azalaki mwana mboka ya Roma na bolɔkɔ.Misala 23:26-30.