Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2016

 LISOLO YA BOMOI

Nasalaki makasi nalanda bandakisa ya malamu

Nasalaki makasi nalanda bandakisa ya malamu

Natunaki ndeko Izak Marais: “Oyebi soki nazali na mbula boni?” Ayanolaki: “Ɛɛ, nayebi mbula na yo.” Abengaki ngai na telefone ntango nazalaki na etúká ya Colorado, mpe ye azalaki na Patterson, na etúká ya New York. Tiká nalimbola ndenge makambo ebandaki mpo abenga ngai na telefone.

NABOTAMÁ mokolo ya 10/12/1936, na engumba Wichita, na etúká ya Kansas, na États-Unis. Nazali mwana ya liboso na libota ya bana minei. Tata na ngai William mpe mama na ngai Jean bazalaki basaleli ya sembo ya Yehova. Tata na ngai azalaki mosaleli ya lisangá, oyo babengaka lelo mokambi-misala ya bankulutu. Mama na ngai ayebaki solo epai ya mama na ye, Emma Wagner. Nkɔkɔ na ngai Emma ateyaki bato mingi solo, ezala mpe Gertrude Steele, oyo asalaki mosala ya misionɛrɛ na Porto Rico. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Yango wana, nazalaki na bandakisa mingi ya malamu ya kolanda.

KOKANISA BANDAKISA YA MALAMU

Tata na ngai azali kokabola bazulunalo na balabala

Mokolo moko ya pɔsɔ na mpokwa, ntango nazalaki na mbula 5, ngai ná tata na ngai tozalaki kokabola bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Consolation (lelo oyo Lamuká!) epai ya bato oyo bazalaki koleka na balabala. Na ntango wana, ekólo na biso emikɔtisaki mpenza na Etumba ya mibale ya mokili mobimba. Kasi, tata na ngai aboyaki kokɔta na makambo ya mokili. Monganga moko oyo alangwaki ayaki mpe afundaki tata ete azali moto ya bibangabanga mpo aboyaki kokɔta na etumba yango. Monganga yango apusanaki pene mpenza ya tata na ngai, atalaki ye na elongi mpe alobaki: “Mpo na nini obɛti ngai te, yo moto ya bibangabanga!” Nabangaki makasi, kasi nasepelaki mingi na tata na ngai. Akobaki kokabola bazulunalo epai ya bato oyo bazalaki kotala. Na nsima, soda moko azalaki koleka, mpe monganga yango agangaki: “Kotika moto ya bibangabanga oyo kaka boye te!” Soda yango amonaki ete mobali yango alangwaki, yango wana alobaki na ye: “Zongá ndako mpe tiká milangwa!” Bango nyonso bakendaki. Nazali na botɔndi mingi mpo na mpiko oyo Yehova apesaki tata na ngai. Tata azalaki na salon mibale ya kokata nsuki na Wichita, mpe monganga yango azalaki moko ya bakiliya na ye!

Ngai ná baboti na ngai tozali kokende na liyangani ya etúká na Wichita na bambula ya 1940

Ntango nazalaki na mbula 8, baboti na ngai batɛkaki ndako mpe bamagazini na bango mpe basalaki ndako moko ya moke oyo okoki komema yango bisika nyonso. Na nsima, tokendaki na Colorado,  mosika te na engumba Grand Junction, kosala epai mposa ya basakoli ezalaki mingi. Baboti na ngai bazalaki babongisi-nzela mpe mpo na kozwa mwa makoki ya kobikela, bazalaki kosala mosala mwa bangonga; bazalaki kosala na ferme mpe kobɔkɔla bibwɛlɛ. Lokola Yehova apambolaki bango mpe bazalaki kosala na molende, lisangá moko efungwamaki. Na mokolo ya 20/06/1948, tata abatisaki ngai na mokɛli moko ya mai likoló ya ngomba, elongo na bato mosusu oyo bandimaki solo, ezala mpe Billie Nichols ná mwasi na ye, oyo na nsima, basalaki mosala ya zongazonga. Mwana na bango ya mobali ná mwasi na ye basalaki mpe mosala yango.

Tozalaki baninga malamu ya bandeko mingi oyo bamipesaki na mosala ya Yehova, mingimingi bato ya libota ya ndeko Steele: Don ná Earlene, Dave ná Julia, mpe Si ná Martha. Tosepelaki kosolola na bango makambo ya Biblia, mpe basalisaki ngai mingi na bomoi na ngai. Bamonisaki ngai ete bomoi ezalaka na ntina mingi mpe na esengo soki totye Bokonzi na esika ya liboso.

TOKEI KOFANDA EPAI MOSUSU

Ntango nazalaki na mbula 19, ndeko Bud Hasty, oyo azalaki moninga moko ya libota na biso, asɛngaki ngai nasala mosala ya mobongisi-nzela elongo na ye na Sudi ya États-Unis. Mokɛngɛli ya zongazonga asɛngaki biso tókende na engumba Ruston, na etúká ya Louisiane, epai Batatoli mingi batikaki kosakola. Ayebisaki biso tótambwisa makita nyonso pɔsɔ na pɔsɔ ata soki moto moko ayei te. Tozwaki esika ya kosala makita mpe tobongisaki yango malamu. Tozalaki kosala makita nyonso, kasi na ntango mosusu, kaka biso mibale nde tozalaki koyangana. Tozalaki kosala boye: moko azali kosala lisolo, mosusu azali koyanola na mituna nyonso, moto na moto na ngala na ye. Soki lisolo moko ezali na elakiseli, biso mibale tozalaki komata na estrade, mpe ata moyangani moko azalaki te! Nsukansuka, ndeko mwasi moko ya mobange abandaki koyangana. Na nsima, bayekoli mosusu ya Biblia mpe bandeko mosusu oyo batikaki kosakola babandaki koya na makita, mpe eumelaki te, tokómaki lisangá.

Mokolo moko, ngai ná ndeko Bud tokutanaki na pastɛrɛ ya lingomba moko (Église du Christ), mpe alobelaki bavɛrsɛ oyo nayebaki te. Yango etungisaki ngai mpe etindaki ngai nakanisa lisusu mingi mpo na makambo oyo nazalaki kondima. Pɔsɔ mobimba, nazalaki koyekola tii butu makasi mokolo na mokolo mpo na koluka biyano na mituna na ye. Yango esalisaki ngai mpenza nakómisa boyokani na ngai ná Yehova makasi, mpe nazalaki na mposa makasi ya kokutana na pastɛrɛ mosusu.

Mwa moke nsima na yango, mokɛngɛli ya zongazonga asɛngaki ngai nakende na engumba El Dorado, na etúká ya Arkansas, mpo na kosalisa lisangá yango. Ntango nazalaki kuna, mbala na mbala nasengelaki kozonga lisusu na engumba Colorado  mpo na kokende kokutana na komite oyo ezalaki kozwa ekateli ya kotinda bato na mosala ya soda to te. Mokolo moko, ngai ná babongisi-nzela mosusu tosalaki mobembo elongo, mpe na Texas, tosalaki aksida moko oyo ebebisaki mpenza motuka na biso. Tobengaki ndeko moko na telefone, amemaki biso na ndako na ye, na nsima tokendaki na makita. Kuna, bapesaki liyebisi ete tosalaki aksida, na yango bandeko bapesaki biso mwa mbongo. Ndeko wana mpe atɛkaki motuka na ngai oyo ebebaki na dolare 25.

Tozalaki na likoki ya kokóma na Wichita. Kuna, tokutaki ndeko McCartney, oyo tozalaki kobenga Doc, azalaki mobongisi-nzela. Bana na ye Frank mpe Francis oyo bazali mapasa, bazali baninga na ngai ya motema tii lelo. Bazalaki na motuka moko ya kala oyo batɛkɛlaki ngai na dolare 25, oyo ekokanaki mpenza na mbongo oyo basombaki motuka na ngai oyo ebebaki. Ezalaki mbala ya liboso namona polele ete lokola natyaki Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ngai, Yehova apesaki ngai eloko oyo nasengelaki na yango. Bato ya libota ya ndeko McCartney balakisaki mpe ngai ndeko mwasi moko kitoko, nkombo na ye Bethel Crane. Mama na ye Ruth, oyo azalaki Motatoli moko ya molende na engumba Wellington, na etúká ya Kansas, akobaki na mosala ya mobongisi-nzela tii ntango akómaki na mbula koleka 90. Ngai ná Bethel tobalanaki nsima ya mwa basanza, na mobu 1958, mpe tobandaki mosala ya mobongisi-nzela elongo, na engumba El Dorado.

LIBYANGI OYO ESEPELISAKI BISO MINGI

Tolingaki kolanda bandakisa ya malamu oyo tozalaki komona ntango tozalaki kokola, yango wana tozwaki ekateli ete tokondima libyangi nyonso oyo euti na ebongiseli ya Yehova. Batindaki biso lokola babongisi-nzela monene na engumba Walnut Ridge, na etúká ya Arkansas. Na nsima, na 1962, tosepelaki mingi kozwa libyangi mpo na kokɔta na kelasi ya mbala ya 37 ya Gileade. Tozalaki na esengo ya koyeba ete ndeko Don Steele akokɔta kelasi moko na biso. Nsima ya kozwa diplome, batindaki ngai ná Bethel na engumba Nairobi, na Kenya. Tozalaki na mawa ntango totikaki New York, kasi totondaki na esengo ntango tokitaki na libándá ya mpɛpɔ na Nairobi mpe tomonaki ete bandeko bayaki koyamba biso!

Na mosala ya kosakola na Nairobi elongo na Mary ná Chris Kanaiya

Eumelaki te, tokómaki kolinga kofanda na Kenya mpe kosakola kuna. Bayekoli na biso ya Biblia ya liboso oyo bandimaki solo ezalaki Chris ná Mary Kanaiya. Tii sikoyo bazali kokoba na mosala ya ntango nyonso na Kenya. Mbula oyo elandaki, basɛngaki biso tókende na Kampala, na Ouganda. Tozalaki bamisionɛrɛ ya liboso na ekólo yango. Yango ezalaki mpenza ntango ya esengo mpo bato mingi bazalaki na mposa ya koyeba mateya ya solo ya Biblia, mpe bakómaki bandeko na biso. Kasi, nsima ya kosala mbula misato na ndambo na Afrika, tozongaki na États-Unis mpo na kobɔkɔla bana. Mokolo oyo totikaki Afrika tozalaki na mawa mingi koleka mokolo oyo totikaki New York. Tolingaki bato ya Afrika mingi mpe tozalaki na elikya ya kozonga kuna mokolo mosusu.

MOKUMBA YA SIKA

Tokendaki na wɛsti ya Colorado, epai baboti na ngai bazalaki kofanda. Mwa moke na nsima, Kimberly, mwana na biso ya mwasi ya liboso abotamaki, mpe nsima ya mbula moko na sanza mitano, Stephany abotamaki. Mokumba ya sika ya kozala baboti ezalaki na ntina mingi mpo na biso. Tosalaki makasi mpo na koteya bana na biso solo. Tolingaki kolanda bandakisa ya malamu oyo basusu batikelá biso. Toyebaki ete ndakisa ya malamu ekoki kosalisa bana mingi, kasi ezali ndanga te ete bakosalela Yehova ntango bakokola. Likambo ya mawa, leki na ngai ya mobali mpe ya mwasi batikaki solo. Tozali na elikya ete bakolanda lisusu bandakisa ya malamu oyo bamonaki.

 Tosepelaki mingi kobɔkɔla bana na biso ya basi mpe tolukaki ntango nyonso kosala makambo libota mobimba elongo. Lokola tozalaki kofanda pene ya engumba Aspen, na etúká ya Colorado, toyekolaki lisano ya ski (kosakana likoló ya nɛjɛ) mpo ntango mosusu tósalaka yango libota mobimba elongo. Yango epesaki biso libaku ya kosolola na bana na biso ntango tozalaki kosala lisano yango. Tozalaki mpe kokende kozwa mopɛpɛ libándá mpe tozalaki kosepela kosolola zingazinga ya mɔtɔ oyo topelisaki. Atako bazalaki naino bilenge, bazalaki kotuna mituna lokola: “Nakosala nini ntango nakokola?” mpe “Nakolinga kobala moto ya ndenge nini?” Tosalaki nyonso mpo na koteya bana na biso bálinga Yehova. Tozalaki ntango nyonso kolendisa bango bámityela mikano ya kosala mosala ya ntango nyonso mpe bábalana na bato oyo bazalaki na bango mikano moko. Tolukaki mpe kosalisa bango báyeba ete ezali malamu te bábala ntango bazali naino bilenge makasi. Mbala mingi tozalaki koloba na mokomoko na bango: “Zelá naino okokisa ata mbula 23 liboso obala.”

Tolandaki ndakisa ya baboti na biso mpe tosalaki makasi mpo na koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola libota mobimba mbala na mbala. Tozalaki kosɛnga bandeko mosusu oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso báya epai na biso. Lisusu, mbala mingi tozalaki kolobela ndenge oyo tozalaki kolinga mosala ya misionɛrɛ. Tozalaki kolikya ete mokolo mosusu biso nyonso minei tokosala mobembo na Afrika. Bana na biso bazalaki mpenza na mposa ya kosala yango.

Tozalaki kosala boyekoli ya libota mbala na mbala. Tozalaki kosala bilakiseli ya makambo oyo ekokaki kobima na eteyelo, mpe bana na biso bazalaki kosala lokola Motatoli oyo azali kopesa biyano. Bazalaki kosepela koyekola lolenge wana, mpe yango ezalaki kosala ete bátika kobanga. Kasi, lokola bakómaki kokola, ntango mosusu bazalaki kosepela te na boyekoli ya libota. Mokolo moko, nalɛmbaki nzoto, yango wana nayebisaki bango bákende na shambrɛ na bango mpe tokosala boyekoli te. Esalaki bango mpasi mpe babandaki kolela mpe balobaki ete balingi koyekola. Banda ntango wana, tomonaki ete tozalaki mpenza kosalisa bango básepela koyekola makambo etali Yehova. Lokola mikolo ezalaki koleka, balingaki koyekola, mpe bakómaki kosepela koyebisa biso makanisi mpe mayoki na bango. Na bantango mosusu, ezalaki mpasi koyoka bango bazali koloba ete bandimi te liteya moko ya Biblia. Kasi toyebaki ndenge oyo bazalaki mpenza komiyoka. Nsima ya kososola na bango, bandimaki mitinda ya Yehova.

TONDIMI BAMBONGWANA MOSUSU

Bambula oyo tolekisaki na kobɔkɔla bana na biso elekaki mbangu mpenza. Na lisalisi mpe litambwisi ya ebongiseli ya Nzambe, tosalaki nyonso mpo na koteya bango bálinga Yehova. Tozalaki mpenza na botɔndi ntango bana na biso babandaki mosala ya mobongisi-nzela nsima ya kosilisa eteyelo ya ntei, mpe bayekolaki mwa misala mpo na kozwa mbongo ya kobikela. Bakendaki elongo na bandeko basi mibale na engumba Cleveland, na etúká ya Tennessee, epai basakoli bazalaki mingi te. Tozalaki na mawa mingi mpo batikaki biso, kasi tozalaki na esengo mpo bamipesaki na mosala ya ntango nyonso. Na nsima, ngai ná Bethel tokómaki lisusu babongisi-nzela, mpe mpo na yango nazwaki libaku ya kokóma mokɛngɛli ya zongazonga mosungi mpe kosala na komite ya liyangani.

Liboso bana na biso bákende na Tennessee, basalaki mobembo na Londres, na Angleterre, mpe bakendaki kotala Betele. Na ntango wana, Stephany oyo azalaki na mbula 19, akutanaki na Paul Norton, elenge moko oyo azalaki kosala na Betele. Na nsima, na mobembo mosusu, Kimberly mpe akutanaki na Brian Llewellyn oyo azalaki moninga na ye ya mosala. Ntango Stephany akómaki na mbula 23, abalanaki na Paul. Mpe na mbula oyo elandaki, ntango Kimberly akómaki na mbula 25, abalanaki na Brian. Bakokisaki mbula 23 liboso ya kobala. Tozalaki na esengo mpo baponaki mibali ya malamu.

Elongo na Paul, Stephany, Kimberly mpe Brian, na Betele ya Malawi na mobu 2002

Bana na biso bayebisaki biso ete ndakisa na biso mpe ya bankɔkɔ na bango esalisaki bango ‘bákoba koluka liboso Bokonzi ya Nzambe,’ ata ntango bazalaki na mikakatano ya mbongo. (Matai 6:33) Na sanza ya 04/1998, Paul ná Stephany babengamaki na kelasi ya mbala ya 105 ya Gileade, mpe batindaki bango na ekólo Malawi, na Afrika. Na ntango wana, Brian ná Kimberly babengamaki na Betele ya Londres mpe na nsima batindamaki na Betele ya Malawi. Tozali na esengo mingi mpo bana na biso bazali kosalela bomoi na bango na lolenge oyo eleki malamu.

LIBYANGI MOSUSU OYO ESEPELISAKI BISO MINGI

Na sanza ya 01/2001, babengaki ngai na telefone, ndenge nalobaki yango na ebandeli. Ndeko Marais,  mokɛngɛli ya Departema ya mosala ya kobongola, alobaki ete bandeko bazali kobongisa mateya oyo ekosalisa babongoli na mokili mobimba mpo báyeba Lingelesi malamu. Atako nakómaki na mbula 64, balingaki kopesa ngai formasyo mpo nazala moko ya balakisi. Ngai ná Bethel tobondelaki mpo na yango mpe tosololaki na bamama na biso mpo na koyeba makanisi na bango. Atako bakómaki mibange mpe tokokaki kosalisa bango lisusu mpenza te, bango nyonso bandimaki ete tókende. Nabengaki ndeko yango na telefone mpe nalobaki ete tondimi mokumba wana ya malamu mingi na esengo mpenza.

Na nsima bazwaki mama na ngai na maladi ya kanser. Nayebisaki mama ete tokokende lisusu te, mpo tolingi kopesa leki na ngai Linda mabɔkɔ mpo na kosunga ye. Mama aboyaki mpe alobaki: “Nakoyoka lisusu mabe koleka soki bokei te.” Linda mpe amonaki bongo. Tozalaki na botɔndi mingi ndenge bandimaki komipimela lolenge wana, mpe tozalaki na botɔndi ndenge bandeko mibali mpe basi ya teritware wana basalisaki biso. Mokolo moko nsima ya kolongwa mpo na kokende na Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, Linda abengaki biso na telefone mpo na koyebisa biso ete mama akufi. Kaka ndenge mama alendisaki biso tósala, tokobaki komipesa na mosala na biso ya sika.

Tosepelaki mingi ntango bayebisaki biso ete batindi biso na Betele ya Malawi, esika bana na biso ya basi mpe mibali na bango bazalaki kosala. Ezalaki esengo mingi kokutana lisusu. Na nsima, tokendaki kopesa mateya na Zimbabwe mpe na nsima na Zambie. Nsima ya kopesa mateya yango mbula misato na ndambo, tozongaki na Malawi mpo tókoma masolo ya Batatoli oyo banyokwamaki kuna mpo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili. *

Elongo na bankɔkɔ na ngai na mosala ya kosakola

Na 2005, tozalaki lisusu na mawa mingi ya kotika Afrika. Tozongaki epai na biso na Basalt, na Colorado, esika ngai ná Bethel tokobaki na mosala ya mobongisi-nzela. Na 2006, Brian ná Kimberly bazongaki kofanda pene na biso mpo na kobɔkɔla bana na bango mibale ya basi, Mackenzie mpe Elizabeth. Paul ná Stephany bazali kaka na Malawi, mpe Paul asalaka na komite ya filiale. Sikoyo nazali na mbula pene na 80, mpe nasepelaka mingi komona bilenge mibali oyo nasalaki na bango bazali kokokisa mikumba oyo nazalaki na yango kala. Tolukaki kolanda bandakisa ya malamu oyo basusu batikelá biso mpo bana na biso mpe bankɔkɔ na biso bázwela yango matomba. Yango epesaka biso mpenza esengo monene mpe bolamu.

^ par. 5 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/1956, nkasa 275 tii 276, mpe ya 01/04/1972, nkasa 216 tii 220 (nyonso na Lifalanse) mpo na koyeba makambo mosusu etali mosala ya misionɛrɛ oyo bato ya libota ya ndeko Steele basalaki.

^ par. 30 Na ndakisa, talá lisolo ya bomoi ya ndeko Trophim Nsomba na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2015, nkasa 27-31.