Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Poná monɔkɔ Lingala

Monisá kondima na bilaka ya Yehova

Monisá kondima na bilaka ya Yehova

“Kondima ezali . . . elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.”BAEBRE 11:1.

NZEMBO: 54, 125

1. Tosengeli kozala na nini mpo na kondima na biso?

BATO nyonso bazalaka na kondima te. (2 Batesaloniki 3:2) Kasi Yehova apesaka kondima na bato nyonso oyo basambelaka ye. (Baroma 12:3; Bagalatia 5:22) Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova apesi biso kondima!

2, 3. (a) Matomba nini tokozwa soki tozali na kondima? (b) Mituna nini tokotalela sikoyo?

2 Yehova apesaki Yesu, Mwana na ye oyo alingaka mingi, mpo moto nyonso oyo andimeli ye, alimbisama masumu. Yango epesi bato likoki ya kokóma baninga ya Yehova mpe kozwa bomoi ya seko. (Yoane 6:44, 65; Baroma 6:23) Yehova amoniselaka biso mpenza boboto! Atako tozali bato ya masumu mpe tobongi na liwa, Yehova amonaki ete tozalaki na likoki ya kosala makambo ya malamu. (Nzembo 103:10) Asalisaki biso tóyeba nsango malamu oyo etali Yesu mpe mbeka oyo apesaki. Ntango tobandaki kondimela Yesu mpe kolanda ye, tokokaki  kolikya kozwa bomoi ya seko!Tángá 1 Yoane 4:9, 10.

3 Kasi makambo nini mosusu tokoki koyekola mpo na kondima? Soki kaka toyebi oyo Nzambe asalá mpo na biso mpe oyo akosala na mikolo ezali koya, yango elimboli nde ete tozali na kondima? Tótalela makambo mosusu oyo tosengeli kosala.

‘MONISÁ KONDIMA NA MOTEMA NA YO’

4. Soki tozali na kondima, yango esengeli kotinda biso tósala nini?

4 Soki tondimeli Yehova mpe Yesu, tokosuka kaka te na koyeba makambo oyo basalá mpe oyo bakosala mpo na biso. Tozali mpe na mposa makasi ya kozala na bomoi oyo eyokani na makambo oyo bateyi biso. Mpe tozali na mposa ya kosalisa basusu báyeba bango. Ntoma Paulo alobaki: “Soki ozali kosakola polele ete Yesu azali Nkolo, mpe ozali kondima na motema na yo ete Nzambe alamwisaki ye uta na bakufi, okobika. Mpo na motema nde moto andimaka mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto alobaka polele mpo na lobiko.”Baroma 10:9, 10; 2 Bakorinti 4:13.

5. (a) Mpo na nini kondima ezali na ntina mingi? (b) Tosengeli kosala nini mpo tózala na kondima makasi? Pesá ndakisa.

5 Ezali polele ete mpo na kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe, tosengeli kozala na kondima mpe kokoba kobatela kondima yango makasi. Kondima ezali lokola molona. Tosengeli kosopelaka yango mai mpo ezala malamu mpe ekoba kokola. Kasi soki tozali kosopela yango mai mingi te, ekoki kokauka mpe kokufa. Ndenge moko mpe, tosengeli kondimisama ete kondima na biso ezali “makasi” mpe ezali kokoba “kokola.”Tito 2:2; 2 Batesaloniki 1:3; Luka 22:32; Baebre 3:12.

BIBLIA EMONISI NDIMBOLA YA KONDIMA

6. Ndimbola nini mibale Baebre 11:1 epesi mpo na kondima?

6 Na Baebre 11:1, Biblia emonisi ndimbola ya kondima. (Tángá.) (1) Kondima ezali “ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa.” Na makambo oyo tozali kolikya kozwa, tokoki kotánga bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya. Na ndakisa, tondimisami ete mabe ekosila mpe mokili ya sika ekozala. (2) Kondima ezali “elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo” to elembo ya kondimisa, ya ‘makambo oyo ezali komonana te.’ Toyebi ete Yehova Nzambe, Yesu Kristo, mpe baanzelu bazali kuna na likoló, atako tokoki komona bango te; ezali mpe bongo mpo na Bokonzi ya Nzambe. (Baebre 11:3) Ndenge nini tokoki komonisa ete tondimaka mpenza bilaka ya Nzambe mpe tondimaka makambo oyo tokoki komona te? Tomonisaka yango na bomoi na biso mpe na makambo oyo tolobaka mpe tosalaka.

7. Ndenge nini ndakisa ya Noa esalisi biso tóyeba soki kozala na kondima elimboli nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Ndakisa ya Noa eteyi biso nini mpo na kondima? Ntoma Paulo alobaki ete Noa, “nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe mpo na makambo oyo emonanaki naino te, abangaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye.” (Baebre 11:7) Noa andimaki makambo oyo Yehova ayebisaki ye, yango wana atongaki masuwa wana ya monene. Ntango mosusu bazalani na ye batunaki ye mpo na nini azali kotonga masuwa wana monene. Tokanisi ete Noa azangaki te koyebisa bango ntina yango. Biblia elobi ete Noa azalaki “mosakoli ya boyengebene.” (2 Petro 2:5) Akebisaki bato ete Nzambe alingi koboma bato mabe  na Mpela. Ntango mosusu, ayebisaki bango kaka makambo oyo Yehova ayebisaki ye: “Nsuka ya ekelamu nyonso ya mosuni eyei liboso na ngai, mpamba te mabele etondi na mobulu mpo na bango,” mpe “nazali koyeisa mpela na mabele mpo na kobebisa na nse ya lola ekelamu nyonso ya mosuni oyo nguya ya bomoi ezali kosala na kati na yango. Eloko nyonso oyo ezali na mabele ekokufa.” Na nsima, ekoki kozala ete Noa ayebisaki bato yango makambo oyo basengelaki kosala mpo na kobika. Yehova alobaki na ye: “Osengeli kokɔta na masuwa.”Ebandeli 6:13, 17, 18.

8. Yakobo alobaki nini mpo na kondima?

8 Moyekoli Yakobo mpe akomaki mpo na kondima. Na ntembe te, akomaki mokanda na ye mwa moke nsima ya mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Baebre. Yakobo akomaki: “Lakisá ngai kondima na yo oyo ezali na misala te, mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na misala na ngai.” (Yakobo 2:18) Yakobo alimbolaki ete mpo na kozala na kondima, tosengeli kosuka kaka te na kondima likambo moko. Bademo bandimaka ete Nzambe azali, kasi bandimelaka Yehova te. Kutu, batɛmɛlaka ye makasi mpenza. (Yakobo 2:19, 20) Nzokande, soki moto azali na  kondima, asengeli kosala makambo ya malamu to misala ya malamu mpo na kosepelisa Nzambe. Yango nde Abrahama asalaki. Yakobo akomaki: “Abrahama tata na biso atángamaki moyengebene mpo na misala na ye nsima ya kokaba mwana na ye Yisaka mbeka na etumbelo, boye te? Omoni, kondima na ye esalaki nzela moko na misala na ye mpe na nzela ya misala na ye kondima na ye ekokaki.” Na nsima, Yakobo amonisaki ete kondima oyo ezangi misala ezali na ntina te ntango alobaki: “Se ndenge nzoto oyo ezali na elimo te ekufi, ndenge moko mpe kondima oyo ezali na misala te ekufi.”Yakobo 2:21-23, 26.

9, 10. Kondimela Mwana elimboli nini?

9 Mbula koleka 30 na nsima, ntoma Yoane akomaki Evanzile na ye mpe mikanda mosusu misato. Lokola bakomi mosusu ya Biblia, ntoma Yoane mpe ayebaki ndimbola ya kondima. Mbala mingi na makomi na ye, ntoma Yoane asalelaki vɛrbɛ ya Grɛki oyo ntango mosusu ebongolamaka na Lingala na liloba “kondimela.”

10 Na ndakisa, ntoma Yoane akomaki: “Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.” (Yoane 3:36) Mpo na kondimela Mwana, tosengeli kotosa Yesu. Kutu, na nzela ya makomi ya Yoane, tomoni ete mbala mingi Yesu azalaki koloba ete mpo na kozwa bomoi ya seko, tosengeli kondimela ye mpe Tata na ye.Yoane 3:16; 6:29, 40; 11:25, 26; 14:1, 12.

11. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi epai ya Yehova ndenge toyebi solo?

11 Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kosalisa biso tóyeba solo oyo etali ye mpe Mwana na ye mpe tóndimela bango. (Tángá Luka 10:21.) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi epai ya Yehova mpo na nyonso oyo asalá mpo na biso? Tosengeli soki moke te kotika kopesa ye matɔndi ndenge andimá ete tókóma na boyokani malamu na ye na nzela ya Yesu, oyo azali “Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso.” (Baebre 12:2) Mpe tosengeli kobondelaka mingi mpe koyekolaka Liloba na ye mpo na kokoba kokómisa kondima na biso makasi.Baefese 6:18; 1 Petro 2:2.

Mpo na komonisa ete ozali na kondima, yebisáká basusu nsango malamu ntango nyonso oyo ozwi libaku (Talá paragrafe 12)

12. Soki tozali na kondima, tokosala nini?

12 Tosengeli kokoba komonisa na misala na biso ete tozali na kondima makasi na bilaka ya Yehova. Na ndakisa, tokobaka kosakwela bato nsango ya Bokonzi ya Nzambe mpe kosalisa bango bákóma bayekoli ya Yesu. Tokobaka mpe kosalela “bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Tosalaka mpe makasi ‘tólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango’ mpo tolingi te ete eloko moko ebebisa boninga na biso na Yehova.Bakolose 3:5, 8-10.

KONDIMELA NZAMBE EZALI NA KATI YA MOBOKO

13. (a) “Kondimela Nzambe” ezali na ntina nini? (b) Ndenge nini Biblia elimboli yango, mpe mpo na nini?

13 Biblia elobi: “Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa ye ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” (Baebre 11:6) Biblia emonisi mpe ete “kondimela Nzambe” ezali moko ya makambo ya libosoliboso oyo bakristo ya solo basengeli komonisa. Ezali na kati ya “moboko” na biso. (Baebre 6:1) Kasi, longola kondima, tosengeli na bizaleli mosusu ya ntina mingi mpo tózala  baninga ya Yehova mpe tóbatela boninga yango.Tángá 2 Petro 1:5-7; Yuda 20, 21.

14, 15. Soki tokokanisi kondima na bolingo, kondima esengeli kozala na esika nini?

14 Bakomi ya Biblia balobelaki kondima mbala mingi koleka bizaleli mosusu nyonso. Yango elingi nde koloba ete kondima ezali ezaleli eleki ntina oyo tosengeli kozala na yango?

15 Ntoma Paulo akokanisaki kondima na bolingo. Akomaki: “Soki nazali na kondima monene oyo ekoki ata kolongola bangomba mpe kotya yango epai mosusu, kasi nazali na bolingo te, nazali mpamba.” (1 Bakorinti 13:2) Yesu alobaki ete ‘mobeko oyo eleki monene na kati ya Mibeko’ ezali kolinga Nzambe. (Matai 22:35-40) Bolingo esalisaka biso tózala na bizaleli mosusu mingi oyo esepelisaka Nzambe. Na ndakisa, Biblia elobi ete bolingo “endimaka makambo nyonso.” Na yango, bolingo ekosalisa biso tóndima to tóndimela likambo nyonso oyo Nzambe ayebisi biso na Biblia.1 Bakorinti 13:4, 7.

16, 17. (a) Biblia elobi nini mpo na kondima mpe bolingo? (b) Ezaleli nini eleki monene na bizaleli yango mibale, mpe mpo na nini?

16 Ezala kondima to bolingo, nyonso mibale ezali bizaleli ya ntina mingi, mpe mbala mingi bakomi ya Biblia balobelaki yango nzela moko. Ntoma Paulo alendisaki bandeko ‘bálata ebateli-ntolo ya kondima mpe bolingo.’ (1 Batesaloniki 5:8) Ntoma Petro akomaki mpo na Yesu: “Atako bomoná ye te, bozali kolinga ye. Atako bozali komona ye te sikoyo, bozali kondimela ye.” (1 Petro 1:8) Moyekoli Yakobo atunaki bandeko oyo batyami mafuta na elimo: “Nzambe aponaki baoyo bazali babola na mokili mpo bázala bazwi na kati ya kondima mpe bázala bazwi-ya-libula ya bokonzi, oyo alakaki baoyo balingaka ye, boye te?” (Yakobo 2:5) Ntoma Yoane akomaki ete mobeko ya Nzambe ezali ete “tóndima nkombo ya Mwana na ye Yesu Kristo mpe tólinganaka.”1 Yoane 3:23.

17 Kasi ntoma Paulo akomaki mpe: “Nzokande, sikoyo kondima, elikya mpe bolingo ezali, yango misato; kasi oyo eleki na kati na yango ezali bolingo.” (1 Bakorinti 13:13) Na mikolo ezali koya, tokozala lisusu te na mposa ya kozala na kondima na bilaka ya Nzambe oyo etali mokili ya sika, mpo ekokokisama. Tokozala na bomoi ya malamu mpenza oyo Biblia elobeli. Kasi tokokoba kaka kolinga Nzambe mpe kolinga bato. Kutu, bolingo oyo tokolinga Nzambe mpe bato ekokoba kokola seko na seko.

YEHOVA APAMBOLI KONDIMA NA BISO

18, 19. (a) Kondima oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango lelo ebimisi matomba nini? (b) Nani abongi kozwa lokumu mpo na yango?

18 Basaleli ya Yehova na mikolo na biso bandimaka Bokonzi ya Nzambe mpe bapesaka yango mabɔkɔ. Balinganaka mpe. Basalaka bongo mpo batikaka ete elimo ya Nzambe etambwisa bomoi na bango. (Bagalatia 5:22, 23) Yango ebimisi matomba nini? Na mokili mobimba, bandeko mibali mpe basi koleka milio mwambe bazali na kimya mpe bomoko na masangá na bango. Emonani polele ete kondima mpe bolingo ezali bizaleli ya ntina mingi.

19 Soki tozali na bomoko ndenge wana, ezali kaka na lisalisi ya Nzambe na biso. Ebongi ete tókumisa ye mpo na yango. (Yisaya 55:13) Tozali mpenza na botɔndi ndenge asalaki ete ‘tóbikisama na nzela ya kondima.’ (Baefese 2:8) Yehova akokoba kosalisa bato mosusu mingi bándimela ye. Nsukansuka, mabele mobimba ekotonda na bato ya kokoka, ya sembo, mpe ya esengo, oyo bakokumisa Yehova libela na libela!