Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2016

Kómisá kondima na yo makasi na biloko oyo ozali kolikya kozwa

Kómisá kondima na yo makasi na biloko oyo ozali kolikya kozwa

“Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa.”BAEBRE 11:1.

NZEMBO: 81, 134

1, 2. (a) Ndenge nini biloko oyo tolikyaka kozwa ekeseni na oyo bato mosusu balikyaka kozwa? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

YEHOVA apesi biso biloko kitoko oyo tokoki kolikya kozwa. Alaki ete akosantisa nkombo na ye mpe akosala ete mokano na ye esalema na likoló mpe awa na mabele. (Matai 6:9, 10) Wana ezali makambo eleki ntina oyo tozali kozela na mikolo ezali koya. Yehova alaki mpe ete akopesa biso bomoi ya seko, basusu likoló, basusu awa na mabele. Ekozala mpenza kitoko! (Yoane 10:16; 2 Petro 3:13) Tozali kozela na motema moko komona ndenge Yehova akokoba kotambwisa mpe kobatela basaleli na ye na mikolo oyo ya nsuka.

2 Biblia elobi ete kondima ezali “ezaleli ya kozela na motema mobimba” biloko oyo tozali kolikya kozwa. Yango elimboli ete baoyo bazali na kondima batyaka ntembe ata moke te ete bilaka ya Yehova ekokokisama. (Baebre 11:1) Nzokande lelo oyo, bato mingi balikyaka makambo mosusu mpe balingaka yango, kasi bakoki te kondimisama ete makambo yango ekokokisama. Na ndakisa, moto akoki kolikya ete akolonga na lisano ya tombola, kasi akoki te kondimisama ete akolonga. Na lisolo oyo, tokomona nini tokoki kosala mpo na kokómisa kondima na biso makasi na bilaka ya Yehova.  Tokomona mpe ndenge oyo kondima makasi ekoki kosalisa biso lelo oyo.

3. Mpo na nini tozali na kondima ete bilaka ya Yehova ekokokisama?

3 Moto moko te abotamaka na kondima. Mpo na kozala na kondima, tosengeli kotika elimo santu ya Nzambe etambwisa mitema na biso. (Bagalatia 5:22) Elimo santu ekoki kosalisa biso tóyeba Yehova. Ntango tokangi ntina ete azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe azali na bwanya, tokondima mpenza ete azali na likoki ya kokokisa bilaka na ye nyonso. Yehova ye moko azali kolobela bilaka na ye lokola nde ekokisami mpe alobi: “Esalemi!” (Tángá Emoniseli 21:3-6.) Toyebi ete Yehova akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. Azali “Nzambe ya sembo.” Yango wana, tondimaka makambo nyonso oyo ayebisaka biso mpo na mikolo ezali koya.Kolimbola Mibeko 7:9.

BASALELI YA NZAMBE YA NTANGO YA KALA OYO BAZALAKI NA KONDIMA MAKASI

4. Basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bazalaki kondima likambo nini?

4 Mokanda ya Baebre mokapo 11 etángi bankombo ya basi mpe mibali 16 oyo bazalaki na kondima makasi na bilaka ya Yehova. Elobeli mpe bato mosusu mingi oyo basepelisaki Yehova “mpo na kondima na bango.” (Baebre 11:39) Bango nyonso bazalaki kozela “momboto” oyo Yehova alakaki. Bayebaki ete “momboto” yango akobebisa banguna nyonso ya Nzambe mpe akokómisa lisusu mabele paradiso. (Ebandeli 3:15) Lisusu, basaleli wana ya Nzambe bazalaki na kondima makasi ete Yehova akozongisa bango na bomoi. Ya solo, bazalaki kozela te kosekwisama mpo na kozala na bomoi na likoló, mpo Yesu apesaki naino nzela na likambo yango te. (Bagalatia 3:16) Bazalaki nde na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele oyo ekokóma paradiso moko kitoko.Nzembo 37:11; Yisaya 26:19; Hosea 13:14.

5, 6. (a) Abrahama mpe libota na ye bazalaki kozela nini? (b) Ndenge nini babatelaki kondima na bango makasi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

5 Mpo na basaleli wana ya sembo ya Yehova, Baebre 11:13 elobi boye: “Bango nyonso bakufaki na kati ya kondima, atako bazwaki te biloko oyo elakamaki, kasi bamonaki yango na mosika mpe basepelaki na yango.” Bazalaki kozela mokili ya sika mpe bazalaki komimona kuna. Moko na bango ezalaki Abrahama. Yesu alobaki ete Abrahama “asepelaki mingi na elikya ya komona” ntango wana. (Yoane 8:56) Sara, Yisaka, Yakobo, mpe bato mosusu bazalaki mpe kozela ntango oyo Bokonzi, elingi koloba “engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali,” ekoyangela mabele mobimba.Baebre 11:8-11.

6 Ndenge nini Abrahama mpe bato ya libota na ye babatelaki kondima na bango makasi? Bakobaki koyekola makambo ya Yehova. Na ntango mosusu, Nzambe alobaki na bango na nzela ya baanzelu, bimonaneli, to bandɔtɔ. Mbala mosusu bayekolaki mpe epai ya basaleli ya sembo ya mibange to na makomi ya kala. Ata mokolo moko te Abrahama mpe libota na ye babosanaki bilaka ya Yehova, mpe basepelaki komanyola na yango. Yango esalaki ete bátya ntembe te ete Yehova akokokisa bilaka na ye. Yango wana, batikalaki sembo epai na ye ata ntango bakutanaki na mikakatano mpe minyoko.

7. Yehova apesi biso nini mpo tókómisa kondima na biso makasi, mpe tosengeli kosala nini?

7 Nini ekosalisa biso tóbatela kondima na biso makasi? Yehova apesi biso Biblia mpo na koyebisa biso bilaka na ye mpo na mikolo ezali koya. Na Biblia, amonisaka biso oyo tosengeli kosala mpo na kozala na esengo. Yango wana, ebongi totángaka Biblia mokolo na mokolo mpe tólandaka toli na yango. (Nzembo 1:1-3; tángá Misala 17:11.) Yehova apesaka mpe biso “bilei na ntango oyo ebongi” na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Ndenge moko na basaleli ya Nzambe ya ntango  ya kala, tosengeli kotángaka bilaka ya Nzambe mbala na mbala na Biblia mpe komanyola na yango na mozindo. Yango ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Nzambe mpe tókoba kozela ntango oyo Bokonzi na ye ekoyangela mabele mobimba.

8. Ndenge nini libondeli ekoki kokómisa kondima na biso makasi?

8 Eloko nini mosusu esalisaki basaleli ya Yehova ya ntango ya kala bábatela kondima na bango makasi? Bazalaki kobondela Yehova asalisa bango, mpe ntango bazalaki komona ete Yehova ayanoli na mabondeli na bango, kondima na bango ezalaki kokóma makasi. (Nehemia 1:4, 11; Nzembo 34:4, 15, 17; Danyele 9:19-21) Ndenge moko mpe, ntango tozali komona ete Yehova ayoki mabondeli na biso mpe apesi biso oyo tosengeli na yango mpenza na ntango oyo ebongi, kondima na biso ekómaka lisusu makasi. (Tángá 1 Yoane 5:14, 15.) Tosengeli mpe ‘kokoba kosɛnga’ Yehova apesa biso elimo santu na ye mpo tókóma na kondima makasi.Luka 11:9, 13.

9. Makambo nini mosusu tosengeli kobondela mpo na yango?

9 Ntango tozali kobondela Yehova, tosengeli kosuka kaka te na kosɛnga oyo tosengeli na yango. Tosengeli mpe kopesa ye matɔndi mpe kokumisa ye mokolo na mokolo. Asalelá biso makambo mingi ya malamu! (Nzembo 40:5) Basaleli ya Yehova babondelaka mpe mpo na bandeko na bango na mokili mobimba. Na ndakisa, ‘tokanisaka baoyo bazali na bolɔkɔ.’ Tobondelaka mpe mpo na “baoyo bazali kokamba biso.” Ntango tomonaka ndenge Yehova ayanolaka na mabondeli na biso, kondima na biso epai na ye ekómaka lisusu makasi mpe tokómaka baninga na ye.Baebre 13:3, 7.

BATIKALAKI SEMBO

10. Nini esalisaki bato mingi bázala na mpiko mpe bátikala sembo epai ya Nzambe?

10 Na mokanda ya Baebre mokapo 11, ntoma Paulo alobaki: “Basi bazwaki bakufi na bango na lisekwa; kasi bato mosusu banyokwamaki makasi mpo bandimaki te kosikolama na nzela ya lisiko moko boye, mpo bázwa lisekwa moko oyo eleki malamu.” (Baebre 11:35) Bato mingi bayikaki mpiko na komekama mpe batikalaki sembo epai ya Nzambe mpo bazalaki na kondima makasi na lisekwa oyo Nzambe alakaki. Bayebaki ete na mikolo ezali koya, Yehova akozongisa bango na bomoi mpe bakozala na bomoi ya seko awa na mabele. Tózwa ndakisa ya Nabote mpe Zekaria. Babambaki bango mabanga mpe bakufaki mpo bazalaki kotosa Nzambe. (1 Bakonzi 21:3, 15; 2 Ntango 24:20, 21) Babwakaki Danyele na libulu ya bankɔsi oyo ezalaki na nzala, mpe babwakaki baninga na ye na mɔtɔ oyo ezalaki kopela. Bandimaki kokufa na esika ya koboya kotosa Yehova. Mibali wana bazalaki na kondima makasi epai ya Yehova ete akopesa bango elimo santu na ye mpe akosalisa bango bálonga minyoko wana.Danyele 3:16-18, 20, 28; 6:13, 16, 21-23; Baebre 11:33, 34.

11. Mikakatano nini basakoli mosusu bayikelaki mpiko mpo na kondima na bango?

11 Basakoli mingi, lokola Mikaya mpe Yirimia batyolamaki mpe bakangamaki na bolɔkɔ. Basusu, lokola Eliya, “bazalaki kotelengana na bisobe mpe na bangomba mpe na mibenga mpe na mabulu ya mabele.” Bango nyonso bayikaki mpiko na mikakatano mpe batikalaki sembo epai ya Nzambe mpo bazalaki ‘kozela na motema mobimba biloko oyo bazalaki kolikya kozwa.’Baebre 11:1, 36-38; 1 Bakonzi 18:13; 22:24-27; Yirimia 20:1, 2; 28:10, 11; 32:2.

12. (a) Nani azali ndakisa oyo eleki malamu tosengeli komekola? (b) Nini esalisaki ye ayikela mikakatano mpiko?

12 Yesu ayikaki mpiko na mokakatano oyo eleki mpasi mpe atikalaki sembo epai ya Yehova. Nini esalisaki ye ayika mpiko? Ntoma Paulo alobaki: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko, atyolaki nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.” (Baebre 12:2) Na nsima,  ntoma Paulo alendisaki bakristo ‘bátya likebi mpenza’ na ndakisa ya Yesu. (Tángá Baebre 12:3.) Ndenge moko na Yesu, bakristo mingi ya siɛklɛ ya liboso bakufaki mpo bazalaki sembo epai ya Yehova. Moko na bango ezalaki Antipasi. (Emoniseli 2:13) Bakristo wana basilá kozwa mbano na bango, na kokesana na basaleli mosusu ya Nzambe oyo bazalaki liboso ya eleko na bango, oyo bazalaki kolikya bomoi ya seko awa na mabele. (Baebre 11:35) Ntango Yesu akómaki Mokonzi na 1914, mwa moke na nsima, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakufá basekwaki mpo na bomoi oyo ezangi kufa na likoló, mpe bakoyangela mabele mobimba elongo na ye.Emoniseli 20:4.

BASALELI YA NZAMBE YA MIKOLO NA BISO OYO BAZALI NA KONDIMA MAKASI

13, 14. Mikakatano nini ndeko Rudolf Graichen ayikelaki mpiko, mpe nini esalisaki ye atikala sembo epai ya Nzambe?

13 Bamilio ya basaleli ya Yehova balandaka ndakisa ya Yesu. Bamanyolaka na bilaka ya Nzambe mpe batikalaka sembo epai na ye na ntango ya mikakatano. Tózwa ndakisa ya ndeko Rudolf Graichen, oyo abotamaki na Allemagne na 1925. Ntango azalaki naino elenge, baboti na ye batyaki bililingi ya makambo oyo elobelami na Biblia na bifelo ya ndako na bango. Alobaki boye: “Elilingi moko ezalaki komonisa mbwa  ya zamba elongo na mwana-mpate, nkoi ná mwana-ntaba, mwana-ngɔmbɛ ná nkɔsi, yango nyonso efandi esika moko na kimya mpe mwana moke ya mobali azali kokamba yango.” (Yisaya 11:6-9) Yango esalisaki ndeko Rudolf akanisa mingi mpo na paradiso na mabele mpe ekómisaki kondima na ye makasi. Yango esalaki ete atikala sembo epai ya Yehova atako basoda ya Gestapo (basoda ya Nazi) mpe na nsima na bakoministe na ɛsti ya Allemagne, banyokolaki ye makasi bambula ebele.

14 Ndeko Rudolf ayikelaki mikakatano mosusu mingi mpiko. Mama na ye akufaki na maladi ya typhus na kaa ya Ravensbrück. Tata na ye atyaki sinyatire na mokanda moko oyo emonisaki ete azali lisusu Motatoli ya Yehova te. Kasi ndeko Rudolf abatelaki kondima na ye makasi. Ntango abimaki na bolɔkɔ, asalaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga. Na nsima, akɔtaki na Eteyelo ya Gileade mpe batindaki ye na Chili, epai akómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Kuna, abalanaki na ndeko mwasi Patsy oyo azalaki misionɛrɛ. Kasi, mbula moko na nsima, mwana na bango ya mwasi oyo azalaki naino bebe, akufaki. Mwa moke na nsima, ndeko Patsy mpe akufaki. Azalaki na mbula 43 mpamba. Atako ndeko Rudolf akutanaki na mikakatano nyonso wana, akobaki kosalela Yehova. Ata ntango akómaki mobange mpe nzoto ekómaki kotungisa ye, azalaki kaka mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe nkulutu. Tokoki kotánga lisolo ya bomoi na ye na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/1997, nkasa 20 tii 25. [1]

15. Pesá bandakisa ya bandeko ya mikolo na biso oyo bazali kosalela Yehova na esengo atako bazali konyokwama.

15 Lelo oyo, ebele ya bandeko na biso bazali kosalela Yehova na esengo atako bazali konyokwama makasi. Mingi na bango bazali na bolɔkɔ na Érythrée, Singapour, mpe na Corée du Sud mpo baboyi ‘kosalela mopanga.’ (Matai 26:52) Na ndakisa, ndeko Isaac, ndeko Negede, mpe ndeko Paulos bazali na bolɔkɔ na Érythrée esali sikoyo mbula koleka 20! Kuna, bazali konyokola bango makasi. Bambula wana nyonso, bazali na likoki ya kobala te, to kosalisa baboti na bango. Atako bongo, bazali sembo epai ya Yehova mpe kondima na bango ezali makasi. Ata bakɛngɛli ya bolɔkɔ bazali sikoyo kopesa bango limemya. Fɔtɔ ya bandeko yango ezali na site na biso jw.org. Bazali kosɛka, atako bazali konyokwama.

Ndenge nini bandeko ya lisangá na bino bakómisaki kondima na bango makasi? (Talá paragrafe 15, 16)

16. Kondima makasi ekoki kotinda yo osala nini?

16 Lelo oyo, basaleli mingi ya Yehova bazali na bolɔkɔ te to bazali konyokwama makasi te lokola bandeko oyo touti kolobela. Kasi, mingi na bango bazali kokutana na mikakatano lokola bobola, makama oyo ebimaka na mai, mopɛpɛ, to bitumba ya bana mboka. Basusu bazali kolanda ndakisa ya Abrahama, Yisaka, Yakobo, mpe Moize, na ndenge bandimi kotika lokumu to bozwi mpo na kosalela Yehova na motema mobimba. Nini esalisaka bandeko na biso bákoba kosalela Yehova na esengo? Ezali bolingo oyo balingaka ye mpe kondima makasi oyo bazali na yango na bilaka na ye. Bayebi ete akopesa basaleli na ye ya sembo bomoi ya seko na mokili ya sika, epai kozanga bosembo ekozala te.Tángá Nzembo 37:5, 7, 9, 29.

17. Ndenge nini okoki kokómisa kondima na yo makasi, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Na lisolo oyo, tomoni ndenge kondima ezali “ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa.” Mpo na kozala na kondima ya ndenge wana, tosengeli kobondela Yehova mpe kokoba komanyola na bilaka na ye. Na nsima, tokozala na likoki ya koyikela mikakatano nyonso mpiko. Na lisolo oyo elandi, tokolobela mingi ndimbola ya kozala na kondima.

^ [1] (paragrafe 14) Talá mpe lisolo ya bomoi ya Andrej Hanák na Slovaquie oyo elobi Les épreuves n’ont pas terni mon espérance,” na Lamuká! ya 22/04/2002, na Lifalanse.