Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2016

Kobá kozala makasi na elimo ntango okei na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya

Kobá kozala makasi na elimo ntango okei na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya

“Nabombi liloba na yo malamu mpenza na motema na ngai.NZEMBO 119:11.

NZEMBO: 142, 92

1-3. (a) Eloko nini tosengeli kotya na esika ya liboso? (b) Mikakatano nini bandeko oyo bayekolaka monɔkɔ ya sika bazalaka na yango, mpe yango ebimisi mituna nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

LELO oyo, Batatoli ya Yehova mingi bazali na mosala mingi mpo esakweli oyo etali kopesa litatoli na bato ya “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso” ekokisama. (Emoniseli 14:6) Ozali na kati ya bandeko oyo bazali koyekola monɔkɔ mosusu? Bandeko mosusu bazali bamisionɛrɛ to bakendá kosakola na mboka mosusu esika mposa ezali mingi. Basusu bazali koyangana na makita na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya kaka na mboka na bango.

2 Basaleli nyonso ya Nzambe basengeli libosoliboso koluka ete bango moko mpe bato ya mabota na bango bázala makasi na elimo. (Matai 5:3) Kasi, ntango mosusu tokoki kozala na makambo mingi ya kosala mpe kozanga ntango ya koyekola biso moko na ndenge oyo esengeli. Kasi, bandeko oyo bazali na masangá ya minɔkɔ ya bapaya bazali na mikakatano mosusu.

3 Bandeko oyo bakendá kopesa mabɔkɔ na masangá ya minɔkɔ ya bapaya basengeli koyekola monɔkɔ ya sika, kasi basengeli mpe kosala makasi báyekolaka mbala na mbala makambo mozindo ya  Nzambe. (1 Bakorinti 2:10) Ndenge nini bakoki kosala yango soki bazali koyoka malamu te makambo oyo ezali kolobama na makita? Mpe mpo na nini baboti oyo bazali kopesa mabɔkɔ na masangá ya minɔkɔ ya bapaya basengeli kondimisama ete solo ezali kosimba mitema ya bana na bango?

BOYOKANI NA BISO NA YEHOVA EKOKI KOKÓMA NA LIKAMA

4. Nini ekoki kotya boyokani na biso ná Yehova na likama? Pesá ndakisa.

4 Soki tozali te kokanga ntina ya mateya ya Biblia na monɔkɔ ya bapaya, yango ekoki kozala likama monene mpo na boyokani na biso ná Yehova. Ntango Nehemia azongaki na Yerusaleme, amonaki ete bana mosusu kuna bayebaki te koloba monɔkɔ ya Ebre. (Tángá Nehemia 13:23, 24.) Lokola bana yango bazalaki te kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe, boyokani na bango ná Yehova ezalaki makasi te.Nehemia 8:2, 8.

5, 6. (a) Baboti oyo bazali kopesa mabɔkɔ na masangá ya minɔkɔ ya bapaya bamoni nini? (b) Mokakatano ezali nini?

5 Baboti mosusu oyo bazali kopesa mabɔkɔ na masangá ya minɔkɔ ya bapaya bamonaki ete boyokani ya bana na bango ná Yehova ezali lisusu makasi te. Lokola bana na bango bakangaka mpenza te ntina ya makambo oyo elobamaka na makita, makambo yango etindaka bango te básala oyo esengeli. Ndeko Pedro, oyo alongwaki ná libota na ye na Australie mpe bakendaki kofanda na Amerika ya Sudi, alobi: “Ntango tozali kolobela makambo ya elimo, esɛngaka ete makambo yango esimba motema mpe mayoki.” [1]Luka 24:32.

6 Ntango tozali kotánga na monɔkɔ ya bapaya, makambo yango esimbaka mpenza mayoki na biso te lokola ntango tozali kotánga na monɔkɔ na biso ya mboka. Longolá yango, lokola ezalaka kilo kosolola na bato na monɔkɔ mosusu, yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto mpe kosala ete tósambela lisusu Yehova te na ndenge oyo esengeli. Na yango, atako tosengeli kokoba kobatela mposa na biso ya kopesa mabɔkɔ na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya, tosengeli mpe kobatela boyokani na biso ná Yehova.Matai 4:4.

BABATELAKI BOYOKANI NA BANGO NÁ YEHOVA

7. Ndenge nini bato ya Babilone balukaki kotinda Danyele andima mimeseno mpe losambo na bango?

7 Ntango Danyele ná baninga na ye bazalaki na boombo na Babilone, bato ya Babilone balukaki kotinda bango na makasi bándima mimeseno mpe losambo na bango. Ndenge nini? Bateyaki bango “monɔkɔ ya Bakaladea” mpe bapesaki bango bankombo ya bato ya Babilone. (Danyele 1:3-7) Nkombo oyo bapesaki Danyele eutaki na Bele, nzambe ya libosoliboso ya Babilone. Na yango, ekoki kozala ete mokonzi Nebukadenezare alingaki kotinda Danyele andima ete nzambe ya Babilone aleki Yehova, Nzambe ya Danyele, na nguya.Danyele 4:8.

8. Ndenge nini Danyele akobaki kozala na boyokani malamu ná Yehova?

8 Na Babilone, bazalaki kopesa Danyele bilei kitoko ya mokonzi. Kasi Danyele “akanaki na motema na ye” ete akobuka mobeko ya Nzambe te. (Danyele 1:8) Lokola akobaki koyekola makomami mosantu, oyo ezalaki na monɔkɔ ya Ebre, akobaki kozala na boyokani malamu ná Yehova, atako azalaki na mboka mopaya. (Danyele 9:2) Kutu, ata nsima ya kosala mbula soki 70 na Babilone, ayebanaki kaka na nkombo na ye ya Ebre, Danyele.Danyele 5:13.

9. Ndenge nini mokomi ya Nzembo 119 azalaki kotalela Liloba ya Nzambe?

9 Mokomi ya Nzembo 119 asengelaki koyika mpiko ntango bato oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi bazalaki koloba mabe mpo na ye. Kasi, azwaki makasi na nzela ya Liloba ya Nzambe, mpe yango esalisaki ye akesana na bato mosusu. (Nzembo 119:23, 61) Atikaki ete Liloba ya Nzambe esimba mpenza motema na ye.Tángá Nzembo 119:11, 46.

 KOBÁ KOKÓMISA MAKASI BOYOKANI NA YO NÁ YEHOVA

10, 11. (a) Mokano na biso esengeli kozala nini ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe? (b) Ndenge nini tokoki kokokisa mokano yango? Pesá ndakisa.

10 Ata soki tozali na makambo mingi ya kosala mpo na mikumba na biso na lisangá mpe na mosala, biso nyonso tosengeli kosomba ntango mpo na koyekolaka biso moko mpe kosalaka losambo na kati ya libota. (Baefese 5:15, 16) Mokano na biso esengeli kozala kaka te ya kotánga mikapo ebele to kobongisa biyano mpo na makita. Mokano na biso esengeli kozala nde ya kotika Liloba ya Nzambe esimba motema na biso mpe ekómisa kondima na biso makasi.

11 Mpo na kokokisa mokano yango, tosengeli kozala na bokatikati. Ntango tozali koyekola, tosengeli te kokanisa kaka bamposa ya basusu; tosengeli mpe kokanisa bamposa na biso moko. (Bafilipi 1:9, 10) Tosengeli koyeba ete ntango tozali komibongisa mpo na mosala ya kosakola, makita, to diskur, ntango mosusu tokoki te kosalela makambo oyo tozali kotánga mpo na biso moko. Na ndakisa, atako molambi bilei na restora asengeli komeka bilei oyo alambi liboso ya kopesa bato bilei yango, mpo azala na bomoi, akosuka kaka te na bilei wana ya komeka. Soki alingi kozala nzoto makasi, asengeli kolambaka bilei oyo etongaka nzoto mpo na ye moko. Ndenge moko mpe, soki tolingi kokómisa boyokani na biso ná Yehova makasi, tosengeli koyekola Biblia mbala na mbala. Koyekola na mozindo ndenge wana ekokokisa bamposa na biso moko.

12, 13. Mpo na nini bandeko mingi bamonaka ete ezali na ntina mingi koyekola Biblia na minɔkɔ na bango?

12 Bandeko mingi oyo bapesaka mabɔkɔ na masangá ya minɔkɔ ya bapaya bamonaka ete ezali na ntina mingi moto ayekolaka Biblia mbala na mbala na ‘monɔkɔ na ye mpenza oyo abotamá na yango.’ (Misala 2:8) Ata bamisionɛrɛ bayebi ete mpo bákoba kozala makasi na mosala na bango na mboka mopaya, basengeli  te kotya motema kaka na makambo oyo bayokaka na makita.

13 Ndeko Alain, oyo ayekolaka monɔkɔ ya Perse banda mbula soki 8, alobi: “Ntango nazali kobongisa makita na monɔkɔ ya Perse, natyaka makanisi na ngai mingimingi na monɔkɔ yango. Lokola motó na ngai nde ezali kosala mosala, makambo ya elimo oyo nazali kotánga esimbaka mpenza motema na ngai te. Yango wana, mbala na mbala nazwaka ntango ya koyekola Biblia mpe mikanda mosusu na monɔkɔ na biso ya mboka.”

SIMBÁ MITEMA YA BANA NA YO

14. Likambo nini baboti basengeli koluka koyeba, mpe mpo na nini?

14 Baboti basengeli koluka koyeba soki mateya ya solo ezali mpenza kosimba makanisi mpe mitema ya bana na bango. Tótalela ndakisa ya ndeko Serge ná mwasi na ye, Muriel, oyo bapesaki mabɔkɔ na lisangá moko ya monɔkɔ ya bapaya na boumeli ya mbula koleka misato. Bayaki komona ete mwana na bango ya mobali, oyo azalaki na mbula 17, azalaki mpenza te kosepela na mosala ya kosakola to na makita. Ndeko Muriel alobi: “Azalaki kobaye kosakola na monɔkɔ mosusu, nzokande liboso azalaki kosepela na mosala ya kosakola ntango azalaki kosakola na Lifalanse, oyo ezali monɔkɔ ya mboka na ye.” Ndeko Serge alobi: “Ntango tomonaki ete likambo yango ezalaki kopekisa mwana na biso akola na elimo, tozwaki ekateli ya kozonga na lisangá na biso ya kala.”

Luká koyeba soki solo ezali kosimba mitema ya bana na yo (Talá paragrafe 14, 15)

15. (a) Nini ekoki kosalisa baboti bázwa ekateli ya kokende na lisangá mosusu? (b) Malako nini Kolimbola Mibeko 6:5-7 epesi baboti?

15 Nini ekoki kosalisa baboti bázwa ekateli ya kozonga to te na lisangá ya monɔkɔ oyo bana na bango bayebi malamu? Ya liboso, basengeli komituna soki bazali na ntango mpe makasi mingi mpo na koteya bana na bango bálinga Yehova mpe koteya bango monɔkɔ ya bapaya. Ya mibale, bakoki komona ete bana na bango balingi te kosakola, kokende na makita, to ata kopesa mabɔkɔ na teritware ya monɔkɔ ya bapaya. Mpo na bantina wana, baboti bakoki kozwa ekateli ya kozonga na lisangá ya monɔkɔ oyo bana na bango bayebi malamu. Na nsima, soki bana yango bakómisi boyokani na bango ná Yehova makasi, baboti bakoki kozwa ekateli ya kozonga lisusu na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya.Tángá Kolimbola Mibeko 6:5-7.

16, 17. Nini esalisaki baboti mosusu báteya bana na bango makambo ya Yehova?

16 Baboti mosusu bazwaki likoki ya koteya bana na bango makambo ya Yehova na monɔkɔ ya mboka na bango ntango bazali koyangana na makita na lisangá to na etuluku moko ya monɔkɔ ya bapaya. Ndeko Charles azali tata ya bana basi misato oyo bazali na mbula kobanda 9 tii 13. Bayanganaka na etuluku moko ya monɔkɔ ya Lingala. Alobi: “Tozwaki ekateli ya koyekola na bana na biso mpe kosala losambo na kati ya libota na monɔkɔ ya mboka na biso. Kasi, tosalaka bilakiseli mpe masano na Lingala mpo báyekola monɔkɔ yango ntango bazali kosakana.”

Salá makasi oyekola monɔkɔ ya mboka oyo ozali mpe pesáká biyano na makita (Talá paragrafe 16, 17)

17 Ndeko Kevin azali tata ya bana basi mibale oyo bazali na mbula 5 mpe 8. Asalaka makasi mpo na koteya bana yango solo mpo bazali naino mpenza te kokanga ntina ya makita na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya oyo libota na bango ekɔtaka. Alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai toyekolaka na mwana mokomoko na Lifalanse, oyo ezali monɔkɔ na bango ya mboka. Tomityelá mpe mokano ya koyangana na makita na lisangá ya Lifalanse mbala moko na sanza, mpe ntango tozwaka konje, tosalaka makasi tókɔta na mayangani na monɔkɔ na biso ya mboka.”

18. (a) Ndenge nini Baroma 15:1, 2 ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya malamu na oyo etali kosalisa bana na yo? (b) Makanisi nini baboti mosusu bapesaki? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

18 Libota mokomoko esengeli kopona oyo eleki malamu mpo na bana na bango mpe mpo na boyokani na bango ná Yehova. [2] (Bagalatia 6:5) Ndeko Muriel alobi ete atako ye ná mobali na ye bazalaki  mpenza na mposa ya kokoba kopesa mabɔkɔ na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya, bazwaki ekateli ya kotika lisangá yango mpo na kosalisa mwana na bango ya mobali alinga Yehova lisusu mingi. (Tángá Baroma 15:1, 2.) Lelo oyo, ndeko Serge amonaka ete bazwaki ekateli ya malamu. Alobi: “Ntango kaka tozongaki na lisangá ya Lifalanse, mwana na biso ya mobali akolaki na elimo mpe azwaki batisimo. Sikoyo, azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kutu, azali kokana kozonga na etuluku moko ya monɔkɔ ya bapaya!”

TIKÁ LILOBA YA NZAMBE ESIMBA MOTEMA NA YO

19, 20. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Liloba ya Nzambe?

19 Yehova alingaka bato nyonso. Asalaki ete Biblia ebongolama na minɔkɔ mingi mpo “bato ya ndenge nyonso” bázwa boyebi ya sikisiki ya solo. (1 Timote 2:4) Ayebi ete boyokani na biso ná ye ekokóma makasi soki tozali kotánga Biblia na monɔkɔ oyo toyebi malamu.

20 Biso nyonso tosengeli kosala makasi mpo tókoba kozala na boyokani malamu ná Yehova. Tokoki kosala yango soki tozali koyekola Biblia mbala na mbala na monɔkɔ oyo toyebi malamu. Tokozala mpe na likoki ya kosalisa libota na biso ekoba kozala makasi na elimo, mpe tokomonisa ete tolingaka mpenza Liloba ya Nzambe.Nzembo 119:11.

^ [1] (paragrafe 5) Topesi bango bankombo mosusu.

^ [2] (paragrafe 18) Mpo na koyeba mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa libota na yo, talá lisolo “Kobɔkɔla bana na mboka mopaya mikakatano mpe mbano na yango,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2002.