Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2016

“Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya”

“Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya”

“Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya.”BAEBRE 13:2.

NZEMBO: 124, 79

1, 2. (a) Mikakatano nini bapaya mingi bakutanaka na yango lelo oyo? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Likambo nini ntoma Paulo akundweli biso, mpe mituna nini tokotalela?

ESALI sikoyo mbula koleka 30, Osei, oyo azalaki naino Motatoli ya Yehova te, atikaki ekólo na ye Ghana mpo na kokende kofanda na Mpoto. [1] (Talá maloba na nse ya lokasa.) Alobi boye: “Eumelaki te, namonaki ete bato mingi bazalaki kokipe ngai te. Nazalaki mpe kokoka malili ata moke te. Ntango totikaki libándá ya mpɛpɔ mpe nayokaki malili oyo nayoká naino te banda nabotamá, nabandaki kolela.” Lokola ezalaki mpasi mpo Osei ayekola monɔkɔ ya ekólo yango, ayaki kozwa mosala ya malamu kaka nsima ya mbula moko na ndambo. Lisusu, lokola azalaki mosika na ekólo na ye, azalaki koyoka mposa ya libota na ye mpe azalaki komiyoka ete azali ye moko.

2 Kanisá naino: Olingaki kosepela ete básalela yo makambo ndenge nini soki ozalaki na esika na ye? Na ntembe te, okozala na botɔndi mingi soki bandeko oyo balingaka yo bayambi yo na esengo  na Ndako ya Bokonzi kozanga kotalela ekólo na yo to mposo na yo. Kutu, Biblia eyebisi bakristo ya solo ete ‘bábosana te ezaleli ya koyamba bapaya.’ (Baebre 13:2) Yango wana, tótalela mituna oyo: Ndenge nini Yehova atalelaka bapaya? Tosengeli nde kobongola ndenge na biso ya kotalela bapaya? Mpe ndenge nini tokoki kosala ete moto oyo auti na ekólo mosusu amiyoka ete ayambami malamu na lisangá na biso?

NDENGE OYO YEHOVA ATALELAKA BAPAYA

3, 4. Na kotalela Kobima 23:9, Nzambe alingaki ete Bayisraele básalela bapaya makambo ndenge nini, mpe mpo na nini?

3 Ntango Yehova asikolaki basaleli na ye na boombo na Ezipito, apesaki bango mibeko oyo eteyaki bango bámonisela bapaya oyo balandaki bango boboto. (Kobima 12:38, 49; 22:21) Lokola bomoi ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na bapaya, Yehova azalaki kotyela bango likebi. Na ndakisa, bakokaki kolɔkɔta mbuma oyo babuki-mbuma bazalaki kotika na bilanga.Balevi 19:9, 10.

4 Na esika ete Yehova asuka kaka na kosɛnga Bayisraele bámemya bapaya, alingaki ete bámikundola ndenge oyo mopaya amiyokaka. (Tángá Kobima 23:9.) Ata liboso ete Bayisraele bákóma baombo na Ezipito, bato ya Ezipito bazalaki kolinga bango te mpo bakesanaki na bango. (Ebandeli 43:32; 46:34; Kobima 1:11-14) Bayisraele bazalaki na bomoi ya mpasi ntango bazalaki bapaya. Yehova alingaki ete bámikundola likambo yango mpe bámonisa boboto epai ya bapaya oyo bazalaki elongo na bango.Balevi 19:33, 34.

5. Nini ekosalisa biso tómonisela bapaya boboto ndenge Yehova amoniselaka bango?

5 Yehova abongwani te. Na yango, ntango bapaya bayei na lisangá na biso, tosengeli te kobosana ete Yehova akobaka kaka komonisela bato ya ndenge wana boboto. (Kolimbola Mibeko 10:17-19; Malaki 3:5, 6) Meká kokanisa mikakatano oyo bapaya bakoki kokutana na yango. Na ndakisa, bakoki koyeba te monɔkɔ ya mboka oyo bayei mpe bato bakoki kosalela bango makambo oyo ezali sembo te. Tósala makasi mpo na kosalisa bango mpe komonisela bango boboto.1 Petro 3:8.

TOSENGELI NDE KOBONGOLA NDENGE NA BISO YA KOTALELA BAPAYA?

6, 7. Nini emonisaki ete bakristo Bayuda ya siɛklɛ ya liboso balongaki ezaleli ya kokanisela basusu mabe?

6 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso balongaki ezaleli ya kokanisela basusu mabe oyo epalanganaki mingi epai ya Bayuda. Na Pantekote ya mobu 33, bakristo Bayuda oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme bayambaki bato ya sika oyo bautaki na bikólo mosusu mpe batyelaki bango likebi. (Misala 2:5, 44-47) Yango emonisaki ete bakristo Bayuda bayebaki ndimbola ya “ezaleli ya koyamba bapaya,” elingi koloba “komonisela bapaya boboto.”

7 Kasi na ntango wana, likambo moko esalemaki. Bayuda ya monɔkɔ ya Grɛki bazalaki komilelalela mpo bazalaki kosalela basi na bango oyo mibali bakufá makambo na bosembo te. (Misala 6:1) Mpo na kosilisa mokakatano yango, bantoma baponaki mibali nsambo bákende mpo bándimisama ete bazali kosalela moto nyonso makambo na bosembo. Bantoma baponaki mibali oyo bazalaki na bankombo ya Bagrɛki, mbala mosusu mpo basi yango bámitungisa lisusu te.Misala 6:2-6.

8, 9. (a) Mituna nini ekosalisa biso tóyeba soki tokaniselaka basusu mabe? (b) Ezaleli nini tosengeli kolongola? (1 Petro 1:22)

8 Tólinga, tólinga te, biso nyonso tosalaka makambo na kolanda mimeseno ya mboka na biso. (Baroma 12:2) Tokoki mpe koyoka baninga na biso ya kartye, ya mosala, to ya kelasi bazali koloba mabe mpo na bato ya mimeseno, ekólo, to mposo mosusu. Totikaka ete makanisi wana ya mabe ezwa esika na motema na biso? To tosalaka nini soki moto moko akómi kosɛka ekólo na biso to mimeseno mosusu ya ekólo na biso?

 9 Na ntango moko boye, ntoma Petro azalaki kokanisela bato oyo bazalaki Bayuda te mabe. Kasi akómaki kolongola mokemoke makanisi wana ya mabe. (Misala 10:28, 34, 35; Bagalatia 2:11-14) Ndenge moko mpe, soki tomoni ete tobandi kokanisela bato mabe to komona ete loposo na biso eleki ya basusu, tosengeli kosala makasi tólongola makanisi yango. (Tángá 1 Petro 1:22.) Nini ekoki kosalisa biso tósala yango? Tóbosana te ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, ezala toutá na ekólo nini, mpe moko na biso te abongi na lobiko. (Baroma 3:9, 10, 21-24) Yango wana, tozali na ntina te ya kokanisa ete tozali malamu koleka bato mosusu! (1 Bakorinti 4:7) Tosengeli komiyoka lokola ntoma Paulo. Ayebisaki bandeko na ye bakristo ete bazali “lisusu bapaya te” kasi bazali nde “bato ya ndako ya Nzambe.” (Baefese 2:19) Biso nyonso tosengeli kosala makasi tólongola ezaleli ya kokanisela basusu mabe mpo tólata bomoto ya sika.Bakolose 3:10, 11.

NDENGE YA KOMONISELA BAPAYA BOBOTO

10, 11. Ndenge nini Boaze amekolaki ndenge oyo Yehova atalelaka bapaya?

10 Boaze, mobali moko ya sembo, amekolaki ndenge oyo Yehova atalelaka bapaya. Ndenge nini? Ntango Boaze akendaki kotala bilanga na ye na eleko ya kobuka mbuma, amonaki Ruta, mwasi moko mopaya, ya mokili ya Moabe. Ruta azalaki kosala mosala makasi ya kobuka mbuma na elanga yango. Na nse ya Mibeko ya Moize, Ruta azalaki na lotomo ya kolɔkɔta mbuma oyo etikali na elanga. Kasi ntango Boaze ayokaki ete Ruta asɛngaki ndingisa mpo na kolɔkɔta mbuma na elanga na ye, Boaze akamwaki mingi mpe atikaki ye alɔkɔta mbuma ata mpe ndambo ya maboke ya mitó ya mbuma.Tángá Ruta 2:5-7, 15, 16.

11 Makambo oyo esalemaki na nsima emonisi polele ete Boaze azalaki komitungisa mpo na Ruta mpe mikakatano oyo azalaki na yango mpo azalaki mopaya. Asɛngaki Ruta atikala elongo na bilenge basi oyo bazalaki kosala na elanga na ye mpo mibali oyo bazalaki kosala na elanga yango bátungisa ye te. Alukaki mpe koyeba soki Ruta azali na bilei mingi mpe mai mingi, ndenge moko na basali na ye. Boaze azalaki na limemya mpo na mwasi mobola wana oyo azalaki mopaya mpe alendisaki ye.Ruta 2:8-10, 13, 14.

12. Boboto oyo tomoniselaka bapaya ekoki kosala bango nini?

12 Soki Boaze amoniselaki Ruta boboto, ezalaki kaka te mpo Ruta amoniselaki Naomi, mama-bokilo na ye bolingo ya sembo, kasi mpe mpo Ruta abandaki kosalela Yehova mpe alukaki libateli epai na ye. Ntango Boaze amoniselaki ye boboto, azalaki nde komekola bolingo ya sembo ya Yehova. (Ruta 2:12, 20; Masese 19:17) Lelo oyo mpe, soki tozali na boboto, tokoki kozala na likoki ya kosalisa “bato ya ndenge nyonso” báyeba solo mpe bámona ete Yehova alingaka bango mingi.1 Timote 2:3, 4.

Topesaka bapaya mbote na esengo ntango bayei na Ndako ya Bokonzi? (Talá paragrafe 13, 14)

13, 14. (a) Mpo na nini tosengeli kopesa bapaya mbote na Ndako ya Bokonzi? (b) Nini ekoki kosalisa yo okakatana te mpo na kosolola na moto oyo azali na momeseno mosusu?

13 Tokoki komonisela bapaya boboto ntango tozali kopesa bango mbote na esengo na Ndako ya Bokonzi. Bapaya oyo bayei sika na ekólo moko bakoki mbala mosusu kozala mwa nsɔninsɔni mpe kozala kaka bango moko. Mpo na mimeseno ya ekólo na bango to mpo bazali babola, bakoki komimona ete bato ya mposo mosusu to ya ekólo mosusu baleki bango. Yango wana, tosengeli liboso kopesa bango mbote, komonisela bango boboto mpe kotyela bango likebi. Soki programɛ JW Language ezali na monɔkɔ na bino, ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya kopesa mbote na monɔkɔ na bango.Tángá Bafilipi 2:3, 4.

14 Okoki kokakatana mpo na kosolola na moto oyo azali na momeseno mosusu. Mpo na kolonga mokakatano yango, okoki koyebisa ye mwa makambo oyo etali yo moko. Na nsima,  okoki komona ete yo ná ye bozali na makambo mingi oyo ekokani. Kobosana te ete momeseno nyonso ezali na makambo ya malamu mpe ya mabe.

SALÁ ETE MOTO NYONSO AMONA ETE AYAMBAMI MALAMU

15. Nini ekosalisa biso tómitya na esika ya bato oyo bazali kosala makasi bámesana na mimeseno ya ekólo oyo bayei?

15 Mpo na kosalisa basusu bámiyoka ete bayambami malamu na lisangá, osengeli komituna boye: ‘Soki nazalaki na mboka mopaya, nakolinga ete básalela ngai makambo ndenge nini?’ (Matai 7:12) Zalá na motema molai epai ya bato oyo bazali kosala makasi bámesana na mimeseno ya ekólo oyo bayei. Na ebandeli, tokoki ntango mosusu te koyeba malamu ndenge na bango ya kokanisa to ya kosala makambo. Kasi na esika ya kosɛnga bango bákanisa mpe básala makambo lokola biso, mpo na nini te kondima bango kaka ndenge bazali?Tángá Baroma 15:7.

16, 17. (a) Tokoki kosala nini mpo na komesana na bato oyo bazali na mimeseno mosusu? (b) Lisalisi nini ebongi tokoki kopesa bapaya oyo bayei na lisangá na biso?

16 Soki tozwi ntango ya koyekola mimeseno mpe makambo ya ekólo ya bapaya, ekozala mpasi te tóyeba bango malamu. Na losambo na kati ya libota, tokoki kosala bolukiluki mpo na koluka koyeba mimeseno ya bapaya oyo bazali na lisangá na biso to na teritware na biso. Lolenge mosusu ya komesana na bapaya ezali kobengisa bango na ndako na biso mpo na kolya mwa eloko. Yehova “afungolelaki bikólo porte ya kondima,” yango wana, tosengeli komekola ye mpe kofungola porte ya ndako na biso epai ya bapaya oyo “bazali bandeko na biso na kati ya kondima.”Misala 14:27; Bagalatia 6:10; Yobo 31:32.

Tozali komonisela bato ya sika oyo bauti na mikili mosusu ezaleli ya koyamba bapaya? (Talá paragrafe 16, 17)

17 Soki tozali kolekisa ntango elongo na libota oyo eutá na ekólo mosusu, yango ekosalisa biso tóyeba mpe tózwa na valɛrɛ milende oyo basali mpo bámesana na mimeseno na biso. Tokoki komona ete bazali na mposa tósalisa  bango mpo báyekola monɔkɔ na biso. Tokoki mpe kolakisa bango bibongiseli oyo ekoki kosalisa bango bázwa ndako ya malamu to mosala. Kosalisa bandeko na makambo ya ndenge wana ekoki kotinda bango bábongola makanisi na bango.Masese 3:27.

18. Na likambo etali komonisa limemya mpe botɔndi, bapaya bakoki komekola ndakisa ya nani?

18 Kasi, bapaya basengeli mpe kosala makasi bámesana na mimeseno ya ekólo ya sika. Ruta apesaki ndakisa malamu na likambo yango. Ya liboso, amonisaki limemya mpo na mimeseno ya ekólo ya sika na ndenge asɛngaki ndingisa mpo na kolɔkɔta mbuma. (Ruta 2:7) Amonaki te ete lotomo yango ezalaki eloko mpamba, akanisaki mpe te ete basusu basengelaki kopesa ye eloko. Ya mibale, kozanga koumela, ayebisaki basusu ete azalaki na botɔndi mpo na boboto oyo bamoniselaki ye. (Ruta 2:13) Ndenge moko mpe, soki bapaya bamonisi makanisi malamu ndenge wana, bandeko mpe bato ya teritware bakomemya bango lisusu mingi.

19. Mpo na nini tosengeli koyamba bapaya mpo bámiyoka ete bayambami malamu?

19 Tozali na esengo mingi ndenge Yehova amoniseli biso boboto monene mpe atiki nzela ete bato ya bikólo nyonso báyoka nsango malamu. Bato mosusu bazwaki te libaku ya koyekola Biblia to kokende na makita ya Batatoli ya Yehova ntango bazalaki na mboka na bango. Sikoyo lokola bazwi libaku ya koyangana na biso, tosengeli kosalisa bango mpo bámimona bapaya te. Ata soki tozali na mbongo mingi te to tozali te na likoki ya kosalisa bango, kasi soki tozali komonisela bapaya boboto, tozali nde komekola bolingo oyo Yehova amoniselaka bango. Lokola tozali “bamekoli ya Nzambe,” tósala nyonso oyo tokoki mpo na koyamba bapaya oyo bayei na mboka na biso!Baefese 5:1, 2.

^ [1] (paragrafe 1) Topesi bango bankombo mosusu.