Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 6 2016

Lefèvre d’Étaples—Alingaki ete bato mpamba báyeba Liloba ya Nzambe

Lefèvre d’Étaples—Alingaki ete bato mpamba báyeba Liloba ya Nzambe

MOKOLO moko ya lomingo na ntɔngɔ na mobu 1520, bato ya engumba Meaux oyo ezalaka pene na Paris, bakamwaki na makambo oyo bayokaki na eglize. Bayokaki ndenge batángelaki bango Baevanzile na Français monɔkɔ ya mboka na bango, na esika ya Latin!

Jacques Lefèvre d’Étaples (na Latin, Jacobus Faber Stapulensis) moto oyo abongolaki Biblia yango, akomelaki moninga na ye moko na nsima boye: “Okokamwa soki omoni ndenge Nzambe azali kosalisa bato mingi báyeba Liloba na ye.”

Na ntango wana, eglize Katolike ná bato ya teoloji na Paris bapekisaki bato bábongola Biblia na minɔkɔ oyo bato ebele bayebi. Kasi nini etindaki Lefèvre abongola Biblia na Français? Mpe asalaki nini mpo na kosalisa bato mpamba báyeba Liloba ya Nzambe?

ALUKAKI NDIMBOLA YA SOLOSOLO YA MAKOMAMI

Liboso akóma mobongoli ya Biblia, Lefèvre amipesaki na kozongisa ndimbola ya ebandeli na babuku ya kala ya filozofi mpe ya teoloji. Amonaki ete na boumeli ya basiɛklɛ baoyo babongolaki makomi ya kala bakɔtisaki makambo mosusu mpe mabunga. Ntango azalaki koluka ndimbola ya solosolo ya makomi ya kala, akómaki koyekola malamumalamu Vulgate ya Latin, Biblia ya eglize Katolike.

Boyekoli yango ya Makomami etindaki ye amona ete “koyekola kaka solo ya Nzambe epesaka . . . esengo makasi.” Yango wana, Lefèvre atikaki koyekola filozofi mpe amipesaki mobimba na kobongola Biblia.

Na 1509, Lefèvre abimisaki bolukiluki oyo asalaki na mabongoli mitano ya mokanda ya Nzembo * na Latin, ata mpe libongoli ya Vulgate oyo ye abongisaki. Na kokesana na bato ya teoloji ya ntango na ye, alukaki “ndimbola mpenza” ya mikapo ya Biblia. Mayele ya kolimbola Makomami oyo asalelaki, esalisaki mpenza bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia mpe baprotesta.—Talá etanda “ Martin Luther asalelaki mayele ya Lefèvre.”

Tablo ya batitre oyo babengaka na yango Nzambe na Nzembo, ndenge ezali na buku Fivefold Psalter, oyo ebimaki na 1513

Atako akolá na libota oyo bazalaki bandimi ya Katolike, Lefèvre azalaki na kondima ete mbongwana ekoki kokɔta na eglize soki bateyi bato mpamba Biblia na ndenge oyo ebongi. Kasi ndenge nini bato mpamba bakokaki kozwela yango litomba lokola Biblia ezalaki kaka na Latin?

LIBONGOLI YA BIBLIA MPO NA MOTO NYONSO

Maloba ya ebandeli ya Baevanzile emonisaki mposa ya Lefèvre ya kosala ete bato nyonso bázwa Biblia na minɔkɔ ya mboka na bango

Bolingo makasi oyo Lefèvre azalaki na yango mpo na Liloba ya Nzambe etindaki ye asala ete bato mingi bázwa Biblia. Mpo na kokokisa mokano yango, na sanza ya 06/1523, abimisaki volimi mibale ya mike ya Baevanzile na Français. Lokola ntalo ya Biblia yango ya moke ezalaki katikati ya ntalo ya Biblia oyo bazalaki kosalela—ezalaki  mpasi te mpo bato oyo bazali na mbongo mingi te básomba yango.

Bato basepelaki mpe basombaki yango. Ezala mibali to basi basepelaki kotánga maloba ya Yesu na monɔkɔ ya mboka na bango, yango wana bakopi 1 200 oyo babimisaki liboso etɛkamaki nyonso kaka nsima ya mwa basanza.

AMONISAKI MPIKO MPO NA BIBLIA

Na maloba ya ebandeli ya Baevanzile, Lefèvre alobaki ete abongolaki yango na Français mpo “bandimi mpamba” ya eglize báyeba mpenza solo ya Baevanzile “ndenge moko na bato oyo bazali na yango na Latin.” Kasi mpo na nini Lefèvre alingaki kosalisa bato mpamba báyeba oyo Biblia eteyaka?

Lefèvre ayebaki malamu ete makanisi ya bato mpe filozofi ebebisaki eglize Katolike. (Marko 7:7; Bakolose 2:8) Mpe amonaki mpenza ete ntango ekokaki mpo Baevanzile “esakolama na mokili mobimba mpo bato bábunga lisusu nzela te mpo na mateya ya lokuta.”

Lefèvre alukaki komonisa ete makambo bato oyo baboyaki Biblia ebongolama na Français balobaki, ezalaki lokuta. Amonisaki bokosi na bango, alobaki boye: “Ndenge nini bakoki koteya [bato] bátosa makambo nyonso oyo Yesu Kristo apesaki mitindo, soki balingi te ete bato mpamba bámona mpe bátánga evanzile ya Nzambe na monɔkɔ ya mboka na bango?”Baroma 10:14.

 Tokoki kokamwa te soki bato ya teoloji na iniversite ya Sorbonne, na Paris balukaki kokangisa Lefèvre monɔkɔ. Na sanza ya 08/1523, batɛmɛlaki libongoli ya Biblia na monɔkɔ ya mboka mpe bakomantɛrɛ na yango, balobaki ezali “likama mpo na eglize.” Soki Mokonzi François I ya France akɔtelaka Lefèvre te, mbɛlɛ babengaki ye mopengwi.

MOBONGOLI WANA OYO “AFANDAKI NYƐƐ” ASILISAKI MOSALA NA YE

Lefèvre atikaki te ete kowelana wana epekisa ye kobongola Biblia. Na 1524, ntango asilisaki kobongola Makomami ya Grɛki ya Bokristo (ebengamaka mpe Testama ya Sika), abimisaki mpe libongoli ya mokanda ya Nzembo na Français mpo bandimi bábondelaka “na motema mobimba.”

Bato ya teoloji na Sorbonne balandelaki mosala ya Lefèvre malamumalamu. Eumelaki te bapesaki mitindo ete bátumba yango na miso ya bato nyonso mpe balobaki ete makomi mosusu ezalaki kotinda bato “bálanda lipɛngwi ya Martin Luther.” Ntango bato ya teoloji basɛngaki ye alimbola makanisi na ye, Lefèvre amonaki malamu “afanda nyɛɛ” mpe akimaki na engumba Strasbourg. Kuna, akobaki kobongola Biblia na kobombana. Atako bato mosusu bamonaki ete azangaki mpiko ndenge afandaki nyɛɛ, kasi ye amonaki ete ezalaki lolenge eleki malamu ya koyanola bato oyo bazalaki kosepela te na solo ya Biblia oyo ezali lokola “mayaka” kitoko.Matai 7:6.

Mbula pene na moko nsima ya kokima, mokonzi François I atyaki Lefèvre molakisi ya mwana na ye ya mobali Charles, oyo azalaki na mbula minei. Mokumba yango epesaki Lefèvre ntango mingi ya kosilisa kobongola Biblia. Na 1530, libongoli na ye ya Biblia enyatamaki (imprimer) nde na engumba Anvers, na ndingisa ya amperɛrɛ Charles V. *

ELIKYA OYO EKOKISAMAKI TE

Bomoi na ye mobimba, Lefèvre azalaki na elikya ete eglize ekotika mimeseno ya bato mpe ekozongela boyebi ya solosolo ya Biblia. Andimaki mpenza ete “mokristo mokomoko azali na lotomo mpe mokumba ya kotánga mpe koyekola Biblia ye moko.” Yango wana asalaki nyonso mpo moto nyonso azwa Biblia. Atako mposa na ye ya komona ndenge eglize ekozongela boyebi ya Biblia ekokisamaki te, Lefèvre atiká eloko moko ya motuya oyo eyebani malamu—asalisaki bato mpamba báyeba Liloba ya Nzambe.

^ par. 8 Buku yango Fivefold Psalter etye mabongoli mitano ya mokanda ya Nzembo na milɔngɔ ekeseni ata mpe tablo ya batitre oyo babengaka na yango Nzambe ná Tetragrami to balɛtrɛ minei ya Ebre oyo emonisi nkombo ya Nzambe.

^ par. 21 Mbula mitano na nsima, na mobu 1535, Olivétan mobongoli moko ya ekólo France abimisaki mpe libongoli na ye ya Biblia oyo abongolaki yango uta na Ebre mpe Grɛki. Alandaki mayele oyo Lefèvre asalelaki mpo na kobongola Makomami ya Grɛki.

Makambo mosusu

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo?

Soki Biblia eutá na Nzambe, esengeli kokesana na buku mosusu nyonso oyo ekomamá.