Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 6 2017

Yesu azalaki mpenza ndenge nini?

Yesu azalaki mpenza ndenge nini?

Moto moko te azali na fɔtɔ ya Yesu. Asalisá ata elilingi to liyemi na ye te. Atako bongo, banda basiɛklɛ mingi, bato mingi oyo basalaka mayemi balakisaka elilingi na ye.

Kasi, bato oyo basalaka mayemi bayebi te ndenge oyo Yesu azalaki mpenza. Mbala mingi, bato oyo basalaka mayemi ya Yesu balandaka nde mimeseno ya bikóló, bindimeli ya mangomba, mpe bamposa ya bato oyo basalisi liyemi yango. Nzokande, ndenge oyo basali liyemi yango ekoki kobongola to kobebisa makanisi oyo bato bazalaka na yango mpo na Yesu mpe mateya na ye.

Bato mosusu bayemaka Yesu lokola moto oyo alɛmbálɛmbá, azali na nsuki milai mpe mandɛfu milai to na elongi ya mawa. Na mayemi mosusu, bamonisaka Yesu lokola anzelu moko, batyaka ye sɛrklɛ ya pole likoló ya motó (auréole), to bamonisaka ete azalaki malilimalili. Mayemi wana nyonso emonisaka mpenza ndenge Yesu azalaki? Ndenge nini tokoki koyeba yango? Lolenge moko ya koyeba yango ezali ya kotatela makambo oyo Biblia elobi, oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge Yesu azalaki. Yango ekoki mpe kosalisa biso tótalela ye na ndenge ya malamu.

“OBONGISELAKI NGAI NZOTO”

Emonani lokola ete Yesu alobaki maloba wana na libondeli moko oyo asalaki na ntango ya batisimo na ye. (Baebre 10:5; Matai 3:13-17) Nzoto yango ezalaki ndenge nini? Mbula soki 30 liboso, anzelu Gabriele ayebisaki Maria ete: “Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali, . . . Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:31, 35) Na yango, Yesu azalaki moto ya kokoka, kaka ndenge Adama azalaki ntango akelamaki. (Luka 3:38; 1 Bakorinti 15:45) Emonani ete Yesu azalaki engambe mobali, mpe mbala mosusu akokanaki na mama na ye Maria, oyo azalaki Moyuda.

Na kokesana na Baroma, Yesu azalaki na mandɛfu, ndenge mimeseno ya Bayuda ezalaki kosɛnga. Kozala na mandɛfu ndenge wana ezalaki likambo ya lokumu mpe ezalaki kotinda bato bápesa moto limemya; mandɛfu na ye ezalaki milai te mpe ekatamaki malamu. Na ntembe te, Yesu azalaki kobongisa mandɛfu na ye to kokata yango malamu mpe nsuki na ye ekatamaki malamu. Kaka bato oyo batyamaki pembeni mpo na mosala ya Nzambe lokola Banaziri, na ndakisa Samsone, nde bazalaki kokata nsuki te.​—Mitángo 6:5; Basambisi 13:5.

Banda bolenge na ye tii ntango akómaki na mbula 30, Yesu azalaki mosali ya mabaya, azalaki kosala mosala yango kozanga bisaleli ya lelo. (Marko 6:3) Na yango, asengelaki kozala na makasi ya nzoto. Ntango abandaki mosala na ye ya kosakola, kozanga lisalisi ya moto mosusu, “abenganaki na tempelo bato nyonso wana ná bampate ná bangɔmbɛ na bango, mpe asopaki mbongo ya bibende ya bato oyo basenzaka mbongo mpe abalolaki bamesa na bango.” (Yoane 2:14-17) Esɛngaki kozala mobali ya makasi mpe ya nguya mpo na kosala likambo ya kokamwa ndenge wana. Yesu asalelaki nzoto oyo Nzambe abongiselaki ye mpo na kosala mosala oyo Nzambe apesaki ye, yango wana alobaki: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Esɛngaki kozala na makasi ya nzoto mpo na kotambola makolo na Palestine mobimba mpo na kosakola nsango malamu.

 “BÓYA EPAI NA NGAI, . . . MPE NGAI NAKOPEMISA BINO”

Na ntembe te, elongi ya Yesu oyo ezalaki komonisa ete azali moto ya boboto mpe moto malamu ebendaki likebi ya bato oyo bazalaki “komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba.” (Matai 11:28-30) Boboto na ye etindaki bato bándima elaka oyo apesaki ete ‘bóya epai ngai mpe ngai nakopemisa bino.’ Ata bana mike bazalaki kobanga te kopusana pene na Yesu, mpo Biblia elobi: “Akamataki bana na mabɔkɔ na ye.”​—Marko 10:13-16.

Atako Yesu anyokwamaki mingi liboso ete akufa, azalaki moto ya mawamawa te. Na ndakisa, abakisaki esengo ya bato na fɛti moko ya libala na mboka Kana, na ndenge abongolaki mai vinyo. (Yoane 2:1-11) Ntango bato bazalaki kobengisa ye mpo na kolya elongo na bango, azalaki koteya bango makambo oyo bakokaki kobosana te.​—Matai 9:9-13; Yoane 12:1-8.

Likambo ya ntina koleka, nsango oyo Yesu azalaki kosakola ezalaki kopesa bato elikya ya bomoi ya seko, oyo epesaka esengo. (Yoane 11:25, 26; 17:3) Ntango bayekoli na ye 70 bayebisaki ye makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola, “atondaki na esengo” mpe alobaki: “Bósepela nde mpo bankombo na bino ekomami na likoló.”​—Luka 10:20, 21.

“NZOKANDE BINO BOSENGELI KOZALA BONGO TE”

Bakonzi ya mangomba na ntango ya Yesu bazalaki kosala nyonso mpo bato bámona bango mpe bazalaki kobenda likebi na bokonzi oyo bazalaki na yango. (Mitángo 15:38-40; Matai 23:5-7) Yesu ateyaki bantoma na ye bázala lokola bango te, elingi koloba ‘bálakisaka bato bokonzi na bango’ te. (Luka 22:25, 26) Kutu, Yesu akebisaki bango boye: “Bókeba na bakomeli, bango bato balingaka kolekaleka na bazambala mpe balingaka bambote na bazando.”​—Marko 12:38.

Nzokande, mokolo moko, ntango Yesu azalaki na kati ya bato ebele, bato bayebaki te kokesenisa ye ná bato mosusu. (Yoane 7:10, 11) Ata ntango azalaki elongo na bantoma na ye ya sembo 11, bokeseni ezalaki komonana te. Kutu, mpo Yudasi Mokeriota asalisa bato oyo ayaki na bango mpo na kokanga Yesu báyeba ye, apwɛpwaki ye.​—Marko 14:44, 45.

Na yango, atako Biblia elobeli te makambo mosusu ya mikemike, emonani ete Yesu azalaki te ndenge oyo mayemi mingi emonisaka ye. Kasi, ndenge oyo tozali kotalela Yesu lelo ezali na ntina mingi koleka ndenge oyo azalaki mpenza.

“ETIKALI MOKE MPE MOKILI EKOMONA NGAI LISUSU TE”

Mokolo oyo Yesu alobaki maloba wana, akufaki mpe bakundaki ye. (Yoane 14:19) Apesaki bomoi na ye “lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Nsima ya mikolo misato, Nzambe asekwisaki ye “na elimo” mpe “apesaki ye likoki ya komonana” na bayekoli na ye mosusu. (1 Petro 3:18; Misala 10:40) Yesu azalaki na nzoto ya ndenge nini ntango azalaki kobimela bayekoli na ye? Emonani ete azalaki lisusu te na nzoto oyo azalaki na yango liboso, mpo ata bayekoli na ye bazalaki koyeba ye mbala moko te. Na ndakisa, Maria Magadalena akanisaki ete azali mobateli ya elanga; mpe bayekoli mibale oyo abimelaki na nzela ya Emause bakanisaki ete azali mopaya.​—Luka 24:13-18; Yoane 20:1, 14, 15.

Ndenge nini tosengeli kotalela Yesu lelo oyo? Mbula koleka 60 nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Yoane amonaki Yesu na nzela ya bimonaneli. Na bimonaneli yango, Yoane amonaki te moto oyo akufi likoló ya ekulusu. Amonaki ye nde “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo,” Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, oyo mosika te akoboma banguna ya Nzambe, ezala bademo to bato, mpe akomemela bato mapamboli ya seko.​—Emoniseli 19:16; 21:3, 4.