Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 6 2017

Mpo na nini mabongoli ebele ya Biblia?

Mpo na nini mabongoli ebele ya Biblia?

Mpo na nini mabongoli ya Biblia ezali ebele lelo oyo? Omonaka ete mabongoli yango ya sika ezali kosalisa bato báyeba Biblia to ezali nde kopekisa bango báyeba mateya ya Biblia? Koyeba ndenge oyo mabongoli yango ebandaki ekoki kosalisa yo osalela yango malamu.

Kasi liboso, banani bakomaki Biblia mpe ntango nini bakomaki yango?

BIBLIA YA EBANDELI

Biblia ekabolami na biteni mibale. Eteni ya liboso ezali na mikanda 39 oyo ezali na “maloba mosantu ya Nzambe.” (Baroma 3:2) Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, mibali ya sembo bakomaki mikanda yango na boumeli ya eleko moko molai, ya mbula soki 1 100, kobanda na mobu 1513 tii na mobu 443 liboso ya ntango na biso. Bakomaki mikanda yango mingimingi na monɔkɔ ya Ebre; yango wana eteni yango ebengami Makomami ya Ebre; babengaka yango mpe Testama ya Kala.

Eteni ya mibale ezali na mikanda 27 oyo ezali mpe “liloba ya Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:13) Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, bayekoli ya sembo ya Yesu bakomaki mikanda yango na boumeli ya eleko moko mokuse ya mbula 60, kobanda mobu 41 tii na mobu 98 ya ntango na biso. Bakomaki yango mingimingi na monɔkɔ ya Grɛki; yango wana eteni yango ebengami Makomami ya Grɛki ya bokristo; babengaka yango mpe Testama ya Sika.

Mikanda yango nyonso 66 oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe esali Biblia mobimba: nsango oyo Nzambe atindelá bato. Kasi, mpo na nini esɛngaki kobongola Biblia na minɔkɔ mosusu? Ezalaki mpo na bantina oyo misato ya minene:

  • Mpo na kosalisa bato bátánga Biblia na minɔkɔ ya mboka na bango.

  • Mpo na kolongola mabunga oyo bato oyo basalaki bakopi bakɔtisaki mpe kozongisa maloba oyo ezalaki na Biblia ya ebandeli.

  • Mpo na kolongola elobeli ya kala mpe kokoma yango na elobeli ya sika.

 Tótala ndenge oyo babongoli balandaki makambo wana misato ntango basalaki mabongoli mibale ya liboso.

LIBONGOLI YA GRƐKI OYO BABENGI SEPTANTE

Mbula soki 300 liboso ya Yesu, Bayuda oyo bazalaki bato ya mayele na makambo ya Biblia babandaki kobongola Makomami ya Ebre na monɔkɔ ya Grɛki. Na nsima, libongoli yango ya Grɛki ekómaki kobengama libongoli ya Septante. Mpo na nini babongolaki Biblia na Grɛki? Ezalaki mpo na kosalisa ebele ya Bayuda oyo na ntango wana bayebaki lisusu Ebre te kasi bakómaki nde koloba Grɛki, bábosana te “makomi mosantu.”​—2 Timote 3:15.

Libongoli ya Septante esalisaki mpe bamilio ya bato oyo bazalaki Bayuda te, oyo bazalaki koloba Grɛki, báyeba mateya ya Biblia. Na ndenge nini? Profesɛrɛ Wilbert Howard alobi boye: “Kobanda na katikati ya siɛklɛ ya liboso, lingomba ya bokristo ekómaki kosalela libongoli yango mingi mpe bamisionɛrɛ na yango bazalaki kokende na basinagoga mpo na ‘kopesa bilembeteli na makomi ete Masiya nde Yesu.’” (Misala 17:3, 4; 20:20) Frederick Bruce alobi ete yango ezalaki moko ya bantina oyo esalaki ete nsima ya ntango moke Bayuda mingi ‘básepela lisusu te na libongoli ya Septante.’

Ntango bayekoli ya Yesu bazalaki mokemoke kozwa mikanda ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, basangisaki yango na libongoli ya Septante, mpe yango esalaki Biblia mobimba oyo tozali na yango lelo.

LIBONGOLI YA LATIN OYO BABENGI VULGATE

Mbula soki 300 nsima ya ntango oyo Biblia esilaki kokomama, Jérôme, moto ya mayele na makambo ya mangomba, abongolaki Biblia na monɔkɔ ya Latin; nsukansuka, libongoli yango ekómaki kobengama Vulgate. Na ntango wana, mabongoli mosusu ya Biblia na monɔkɔ ya Latin esilaki kobimisama; kasi mpo na nini esengelaki kobimisa libongoli mosusu ya sika? Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi ete: “Jérôme alingaki kobongisa bisika oyo ebongolamaki malamu te, kolongola mabunga mpe makambo mikemike oyo babakisaki to balongolaki.”

Jérôme alongolaki mabunga mingi ya ndenge wana. Kasi na nsima, bakonzi ya mangomba bazwaki ekateli moko, oyo ezalaki libunga moko monene. Balobaki ete libongoli ya Vulgate na Latin ezali libongoli ya Biblia kaka moko oyo endimami mpe bakobaki kotalela yango bongo na boumeli ya basiɛklɛ mingi! Kasi, na esika ete Vulgate esalisa bato oyo batángá kelasi mingi te báyeba Biblia, libongoli yango epekisaki nde bato báyeba  Biblia mpo nsukansuka bato mingi bayebaki lisusu monɔkɔ ya Latin te.

MABONGOLI YA SIKA EKÓMI EBELE

Kaka na ntango yango, bato mosusu bakobaki kobimisa mabongoli mosusu ya Biblia, na ndakisa Peshitta, Biblia na monɔkɔ ya Syriaque, oyo ebimaki soki na siɛklɛ ya 5 ya ntango na biso. Kasi, na siɛklɛ ya 14, milende esalemaki lisusu mpo na kosalisa bato oyo batángá kelasi mingi te bázwa Biblia na minɔkɔ na bango ya mboka.

Na ndakisa, na Angleterre, pene na nsuka ya siɛklɛ ya 14, John Wycliffe abandaki mosala monene ya kobongola Biblia na Lingelesi, monɔkɔ oyo bato ya mboka na ye bayebaki malamu. Mwa moke na nsima, Johannes Gutenberg abimisaki masini ya konyata mikanda; yango esalisaki bato ya mayele na makambo ya Biblia bábimisa mpe bákabola mabongoli ya sika ya Biblia na minɔkɔ ebele ya bikólo mingi na Mpoto.

Ntango mabongoli ya Biblia na Lingelesi ekómaki mingi, batɛmɛli bazalaki lisusu te kolinga ete mabongoli mosusu ebimisama kaka na monɔkɔ yango. John Lewis, mokonzi moko ya lingomba na siɛklɛ ya 18 akomaki boye: “Minɔkɔ ebongwanaka nsima ya bambula; yango wana ezali na ntina kobongisa lisusu mabongoli ya kala mpo eyokana na elobeli ya mikolo oyo, mpo bato bángaka ntina na yango.”

Lelo oyo, bato ya mayele na makambo ya Biblia bazali na nyonso oyo esengeli mpo na kobongisa lisusu mabongoli ya kala. Sikoyo, bayebi malamu koleka minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli, mpe bazali na bamaniskri mingi ya kala ya Biblia oyo ezwamaki kala mingi te. Nyonso wana ezali kosalisa bango báyeba maloba nini ezalaki na makomi ya ebandeli ya Biblia.

Yango wana, kozala na mabongoli ya sika ya Biblia, ezali na ntina mingi. Toboyi te, esengeli kaka kozala ekɛngɛ mpo na mabongoli mosusu. * Kasi soki bolingo oyo balingaka Nzambe nde etindi babongoli bábimisa libongoli ya sika ya Biblia, libongoli oyo babimisi ekosalisa biso mingi.

 

^ par. 24 Talá lisolo “Ndenge ya kopona libongoli malamu ya Biblia” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2008.