Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 6 2017

 LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | LIKABO NINI ELEKI MAKABO NYONSO?

Bato bazali koluka likabo eleki malamu ya kopesa basusu

Bato bazali koluka likabo eleki malamu ya kopesa basusu

Kopesa moto likabo oyo ebongi mpenza mpo na ye, ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Mpo na koloba solo, moto oyo azwi likabo nde amonaka valɛrɛ na yango ya solosolo. Longola yango, likabo oyo moto moko amoni malamu, moto mosusu akoki komona yango malamu te.

Na ndakisa, soki opesi elenge aparɛyi moko oyo ebimi sika, akomona ete yango ezali likabo oyo eleki malamu. Nzokande, mokóló akoki kosepela mingi nde soki opesi ye likabo moko oyo ekokundwela ye makambo ya kala, na ndakisa eloko moko oyo bankɔkɔ na bino batiká. Na mimeseno ya bikólo mingi, ezala bilenge to mikóló basepelaka mingi soki moto akebeli bango mbongo, mpo yango ekosalisa bango básala na yango likambo nyonso oyo balingi.

Atako yango ezali pɛtɛɛ te, bato mingi bazali kokoba kokanisa malamu mpo na kozwa likabo eleki malamu ya kopesa basusu. Atako kozwa likabo ya ndenge wana ekoki kozala ntango nyonso pɛtɛɛ te, yebá ete ezali na makambo mosusu oyo ekoki kosalisa moto azwa likabo ya malamu. Tótalela makambo minei oyo ekoki kosala ete moto asepela na likabo oyo topesi ye.

Bamposa ya moto oyo okopesa likabo. Mobali moko na engumba Belfast, na ekólo Irlande du Nord, alobaki ete likabo oyo eleki malamu na makabo nyonso oyo azwá, ezali velo oyo bakabelaki ye ntango azalaki na mbula 10 to 11. Mpo na nini? Alobi: “Mpo nazalaki mpenza na mposa na yango.” Maloba wana emonisi ete mpo moto asepela na likabo moko, esengeli ekokisa mposa oyo azali na yango. Na yango, kanisá mpo na koyeba bamposa ya moto oyo olingi kopesa likabo. Luká koyeba eloko nini ekoki kozala na motuya mingi mpo na ye, mpo mbala mingi moto azwaka na motuya eloko oyo ekokisi bamposa na ye. Na ndakisa, mbala mingi bankɔkɔ bazwaka na motuya mingi ntango oyo balekisa na bato ya libota na bango. Bakoki kozala na mposa ya komona bana na bango mpe bankɔkɔ na bango mbala na mbala. Kolekisa konje elongo na bankɔkɔ ekoki kosepelisa bango mingi koleka makabo mosusu oyo tokoki kopesa bango.

 Mpo na koyeba bamposa ya moto, esɛngaka koyoka ye malamu. Biblia elindisi biso ete tosengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te.” (Yakobo 1:19) Mokolo na mokolo, ntango ozali kosolola na baninga to bandeko na yo ya libota, yokáká na likebi mpo na koyeba makambo oyo balingaka to oyo balingaka te. Yango ekosalisa yo oyeba likabo nini ekosepelisa bango.

Bosɛnga ya moto oyo okopesa likabo. Moto akoki kosepela ata na likabo ya moke oyo opesi ye soki ezali eloko oyo asengeli na yango. Kasi, ndenge nini okoki koyeba eloko oyo moto asengeli na yango?

Ekoki komonana ete mpo na koyeba mbala moko eloko oyo moto asengeli na yango to oyo alingi, ebongi kotuna ye. Kasi, mpo na bato mingi oyo bakabelaka basusu, kosala bongo esilisaka esengo ya kopesa, mpo balingaka ete moto oyo bakokabela azwa likabo oyo ebongi na ye, kozanga ete ayeba yango liboso. Longola yango, atako bato mosusu balobaka polele oyo balingaka mpe oyo balingaka te, mbala mingi bayebisaka te makambo oyo basengeli na yango.

Na yango, saleláká miso mpe matoi mpo na koyeba makambo ya bomoi ya moto na moto. Azali elenge to mokoló, azali monzemba to abalá, abomá libala to molongani na ye akufá, asalaka to azwa pansiɔ na mosala? Na nsima, kanisá makabo nini ekoki kokokisa bamposa ya moto yango.

Mpo na kososola mpe koyeba eloko nini moto asengeli na yango mpenza, sololá na bato oyo bakutaná na makambo ndenge moko na oyo ya moto yango. Bato yango bakoki koyebisa yo polele makambo nini basengeli na yango, oyo basusu bayebi te. Koyeba yango ekosalisa yo opesa moto likabo oyo asengeli na yango mpenza, oyo bato mosusu bakanisaki te.

Ntango ya kopesa likabo. Biblia elobi: “Liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi!” (Masese 15:23) Maloba ya vɛrsɛ wana emonisi ete kopona ntango ya koloba ekoki kobongola makambo. Ezali mpe bongo mpo na makambo oyo tosalaka. Kaka ndenge maloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ekoki mpenza kosepelisa moto oyo azali koyoka yango, likabo oyo epesami na ntango oyo ebongi ekoki kosepelisa moto oyo azwi yango.

Tózwa ndakisa: Moninga moko alingi kobala. Elenge moko alingi kosilisa kelasi. Mwasi moko oyo abalá azali na zemi. Wana ezali mwa mabaku oyo bato bakabelaka basusu biloko. Bato mosusu bamonaka malamu kosala liste ya makambo ya ntina ndenge wana oyo ekosalema na mbula ezali koya. Kosala bongo esalisaka bango bábongisa liboso likabo oyo ebongi na libaku mokomoko. *

Ya solo, esengeli te kokabela moto eloko kaka na mabaku ya ntina mingi. Okoki kokabela moto eloko ntango nyonso. Atako bongo, esengeli mpe kokeba ntango olingi kokabela moto eloko. Na ndakisa, soki mobali moko alingi kokabela mwasi moko eloko kaka mpamba boye, mwasi yango akoki kokanisa ete mobali yango apesi ye likabo yango mpo azali kosepela na ye mpe alingi báyebana malamu. Soki ntina oyo okabeli moto eloko eyebani malamu te to ebongaki te ete okabela ye eloko, yango ekoki kotinda moto akanisela yo mabe to ekoki kobimisa mindɔndɔ. Mpo na yango, tótalela likambo mosusu ya ntina: Eloko oyo etindi moto apesa likabo.

Eloko oyo etindi moto apesa likabo. Ndenge ndakisa oyo touti kopesa emonisi yango, ezali malamu koluka koyeba soki moto oyo tolingi kokabela eloko akokanisela biso mabe. Longola yango, mopesi asengeli koluka koyeba nini etindi ye apesa likabo yango. Atako bato mingi bakanisaka ete bakabaka na makanisi malamu, mingi na bango bapesaka bakado na bileko mosusu ya mbula mpo basusu batyaka bango mbamba ya kosala bongo. Longola yango, basusu bapesaka mpo bato mosusu bápesa bango lokumu to bákabela mpe bango.

Okoki kosala nini mpo na koyeba soki likabo na yo epesami na makanisi malamu? Biblia elobi: “Makambo na bino nyonso esalema na bolingo.” (1 Bakorinti 16:14) Soki bolingo mpe likebi oyo ozali kotyela basusu nde etindi yo opesa moto likabo, moto yango akosepela na likabo yango, mpe okoyoka mpenza esengo ya kopesa. Soki opesi likabo na motema mobimba, okosepelisa mpe Tata na biso ya likoló. Ntoma Paulo apesaki bakristo ya Korinti longonya mpo basalisaki mpe bapesaki mabɔkɔ na esengo na mosala ya kosunga bandeko na bango bakristo na Yudea. Paulo alobaki na bango ete:  “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakorinti 9:7.

Kobatela na makanisi makambo oyo touti kolobela ekoki mpenza kosalisa yo okabela basusu biloko oyo ekosepelisa bango. Makambo wana mpe makambo mosusu esalisi mingi na ebongiseli oyo Nzambe azwá mpo na kopesa bato likabo oyo eleki makabo mosusu nyonso. Tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi mpo na koyeba likabo yango oyo eleki monene.

^ par. 13 Bato mingi bakabelaka mpe basusu biloko na bafɛti ya kokanisa mokolo ya mbotama to bafɛti mosusu. Nzokande, mbala mingi na bafɛti ya ndenge wana bato mingi basalaka makambo oyo eyokani te na oyo Biblia eteyaka. Talá lisolo “Mituna ya batángi​—Bakristo basengeli kosala fɛti ya Noele?” na zulunalo oyo.