Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 5 2017

Elongo na mwasi na ngai, Tabitha, na mosala ya kosakola

 BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nazalaki kondima te ete Nzambe azali

Nazalaki kondima te ete Nzambe azali
  • ABOTAMAKI NA: 1974

  • EKÓLO: ALLEMAGNE YA ƐSTI

  • BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI KONDIMA TE ETE NZAMBE AZALI

NDENGE NAZALAKI

Nabotamá na mboka moko na etúká ya Saxe, oyo na ntango wana ezalaki na ekólo ya Allemagne ya ɛsti. Nakolaki na libota oyo tozalaki kolingana mingi, mpe baboti na biso bateyaki ngai bizaleli malamu. Allemagne ya ɛsti ezalaki ekólo oyo Bakoministe bazalaki koyangela; yango wana bato mingi na etúká ya Saxe bazalaki kokipe makambo ya losambo te. Ata ngai mpe nazalaki kondima te ete Nzambe azali. Banda bomwana tii ntango nakokisaki mbula 18, nazalaki kondima te ete Nzambe azali mpe nazalaki kondima likanisi ya Bakoministe.

Mpo na nini nazalaki kondima likanisi ya Bakoministe? Ezali mpo nazalaki kosepela na likanisi na bango oyo elobaka ete bato nyonso basengeli kozala ndenge moko. Longola yango, mposa na ngai ezalaki ete bato nyonso bázala na bozwi ndenge moko, mpo yango ekokaki kosala ete basusu bázala na bozwi mingi te mpe basusu bázala babola mingi te. Yango wana, namipesaki mingi na ebongiseli moko ya bilenge oyo bazalaki Bakoministe. Ntango nazalaki na mbula 14, nazalaki kolekisa ntango mingi na mosala ya kokɔngɔla bapapye ya kala mpo na kosala na yango biloko mosusu. Bakonzi ya engumba ya Aue bazalaki na botɔndi mingi mpo na misala oyo nazalaki kosala, yango wana bapesaki ngai mbano. Atako nazalaki naino elenge, nayebanaki na bakonzi mosusu ya politiki. Nazalaki kokanisa ete nazali na mikano ya malamu mpe bomoi na ngai ekozala malamu na mikolo ezali koya.

Kasi, makambo ebongwanaki na mbalakaka. Na 1989, efelo ya Berlin ekweaki mpe boyangeli ya Bakoministe na Mpoto ya ɛsti mobimba ekweaki. Mpasi moko ememaki bampasi mosusu. Eumelaki te, namonaki ete kozanga bosembo ekómaki mingi na Allemagne ya ɛsti. Na ndakisa, bato oyo bazalaki te kopesa mabɔkɔ na boyangeli ya Bakoministe bazalaki kotalelama lokola bato mpamba. Mpo na nini bongo? Biso Bakoministe tozalaki te koloba ete bato nyonso bazali ndenge moko? Likanisi yango ezalaki kaka ndɔtɔ mpamba? Likambo yango etungisaki ngai mingi.

Yango wana, nabongolaki mikano na ngai mpe nakómaki nde komipesa na miziki mpe na kosala mayemi. Lokola nazwaki libaku ya kotánga na eteyelo moko monene ya miziki, mpe nazalaki na likoki ya kokɔta na iniversite, nakómaki na mposa makasi ya kokóma alangá-nzembo monene mpe mosali monene ya mayemi. Longola yango, nabungisaki bizaleli malamu nyonso oyo baboti na ngai bateyaki ngai na bomwana. Sikoyo, eloko oyo elekaki ntina mpo na ngai ezalaki bomoi ya bisengo, na ndakisa kozala na bamakango ebele. Kasi miziki, mayemi, mpe bomoi ya loyenge  esilisaki mitungisi na ngai te. Ata mayemi oyo nazalaki kosala ezalaki komonisa kobanga. Nazalaki komituna boye: Nini ekosalema na mikolo ezali koya? Ntina ya bomoi ezali nini?

Nsukansuka, ntango nazwaki biyano oyo nazalaki koluka, nakamwaki mpenza. Mokolo moko na mpokwa, na eteyelo oyo nazalaki kotánga, nafandaki elongo na baninga ya kelasi mpo na kolobela makambo etali mikolo ezali ekoya. Mandy * azalaki moninga moko ya kelasi mpe Motatoli ya Yehova. Na mpokwa wana, apesaki ngai toli ya malamu. Alobaki boye: “Andreas, soki olingi kozwa biyano na mituna oyo etali bomoi mpe mikolo ezali koya, luká yango na Biblia.”

Nandimelaki ye mpenza te, kasi nazalaki mpe na mposa ya koyeba. Mandy ayebisaki ngai natánga Danyele mokapo 2, mpe makambo oyo natángaki ekamwisaki ngai. Esakweli yango elobeli ndenge oyo bikólo oyo eleki na nguya esengelaki kolandana, mpe baguvɛrnema oyo ekozala na nguya mingi tii na mikolo na biso. Mandy alakisaki ngai bisakweli mosusu ya Biblia oyo etali bomoi na biso na mikolo ezali koya. Nsukansuka, nazwaki biyano na mituna na ngai! Kasi nani akomaki bisakweli yango, mpe nani akoki koyebisa mpenza makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya? Nzambe azali mpenza?

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

Mandy alakisaki ngai Horst ná mwasi na ye Angelika, oyo bazalaki Batatoli ya Yehova; basalisaki ngai nayeba Liloba ya Nzambe malamumalamu. Mbala moko namonaki ete ezali kaka lingomba ya Batatoli ya Yehova nde esalelaka nkombo ya Nzambe, Yehova, mpe esalisaka bato báyeba nkombo yango. (Nzembo 83:18; Matai 6:9) Nayekolaki ete Yehova Nzambe apesi bato likoki ya kozala na bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Nzembo 37:9 elobi: “Bato oyo balikyaka na Yehova nde bakozwa mabele.” Nasepelaki mingi koyeba ete Nzambe apesi likoki wana na moto nyonso oyo atosaka mibeko na ye oyo etali bizaleli malamu, ndenge Biblia emonisi yango.

Kasi, nasalaki makasi mpo nakóma na bomoi oyo eyokani na makambo oyo Biblia esɛngi. Lokola mosala ya miziki mpe ya kosala mayemi esalaki ete nayebana mingi, nakómaki na lolendo; yango wana, esengelaki nayekola komikitisa. Longola yango, ezalaki pɛtɛɛ te natika etamboli ya mbindo. Napesaka Yehova matɔndi mpo amoniseli ngai motema molai, boboto mpe amityaka na esika ya bato oyo bazali kosala makasi mpo na kosalela makambo oyo Biblia eteyaka!

Banda bomwana tii ntango nakómaki na mbula 18, nazalaki kondima likanisi ya Bakoministe mpe liteya oyo elobaka ete Nzambe azali te; kasi kobanda ntango wana, Biblia ezali kobongola bomoi na ngai. Makambo oyo nayekolaki esalisaki ngai natika komitungisa mpo na mikolo ezali koya mpe namona ete bomoi na ngai ezali na ntina. Na 1993, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova, mpe na 2000 nabalaki Tabitha, mokristo moko ya molende. Tolekisaka ntango na biso mingi na kosalisa bato mosusu báyeba Biblia malamu. Bato mingi oyo tokutanaka na bango bazali na bomoi lokola oyo nazalaki na yango: bandimaka likanisi ya Bakoministe mpe liteya oyo elobaka ete Nzambe azali te. Nasepelaka mingi ntango nasalisaka bango báyeba Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI

Ntango nabandaki koyekola ná Batatoli ya Yehova, baboti na ngai babangaki. Kasi, na nsima, bango moko bamonaki matomba oyo koyekola ná Batatoli ya Yehova ememelaki ngai. Sikoyo, nazali na esengo mpo bakómá kotánga Biblia mpe koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova.

Ngai ná Tabitha tozali na esengo na libala na biso mpo tozali kosala makasi tótosa mitinda ya Biblia oyo etali babalani. Na ndakisa, kotosa toli oyo etali kozala sembo na kati ya libala ezali se kokómisa libala na biso makasi.​—Baebre 13:4.

Sikoyo, nabangaka lisusu te makambo ya bomoi mpe namitungisaka lisusu te mpo na mikolo ezali koya. Namonaka ete nazali na libota ya bandeko na mokili mobimba oyo ezali na kimya mpe na bomoko. Na kati ya libota yango, bato nyonso bamimonaka ete bazali ndenge moko. Na bomoi na ngai mobimba, yango ezali likambo oyo nazalaki kolinga mpe koluka ete ekokisama.

^ par. 12 Topesi ye nkombo mosusu.

Makambo mosusu

LAMUKÁ!

Nzambe azalaka? Koyeba yango ezali mpenza na ntina?

Eyano na motuna oyo bato mingi bamonaka ete ezangi eyano to ebongi te ezali mpenza na ntina?

LAMUKÁ!

Bomoi ebandaki ndenge nini?

Mpo na nini bato mingi ya siansi bazalaka na mokakatano ya kondima ete bomoi eutá na evolisyo?

LAMUKÁ!

“Nandimi mpenza ete Mozalisi azali”

Frédéric Dumoulin ayinaki makambo ya mangomba mpe akómaki kondima te ete Nzambe azalaka. Ndenge nini boyekoli ya Biblia mpe ndenge oyo bikelamu ya bomoi esalemá endimisaki ye ete Mozalisi azali?