Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 4 2017

Praslin, Seychelles, esika oyo Gordon, mokonzi ya basoda, amonaki elanga oyo abengaki Edene na 1881

Paradiso na mabele​—Ndɔtɔ mpamba to likambo ya solo?

Paradiso na mabele​—Ndɔtɔ mpamba to likambo ya solo?

Paradiso! Mikanda oyo ezalaka na bafɔtɔ ya bisika kitoko ya bamboka mosusu epesaka biso mposa ya kokende na bamboka yango oyo emonanaka lokola “paradiso” mpo tómiyoka malamu mpe tóbosana mitungisi mpe bampasi ya bomoi. Kasi ndenge toyebi yango, ntango tozongaka na mboka na biso, tokutaka makambo ezali kaka ndenge totikaki yango.

Atako bongo, likambo etali paradiso ebendaka mpenza likebi ya bato mingi. Kasi, tokoki komituna boye: ‘“Paradiso” ezali kaka ndɔtɔ mpamba? Soki bongo, mpo na nini ebendaka likebi ya bato? Mokolo mosusu ekokóma likambo ya solo?’

BANDA KALA PARADISO EBENDAKA LIKEBI YA BATO

Banda basiɛklɛ mingi, bato balingaka koyeba makambo mingi etali paradiso. Eloko ebendaki likebi ya bato mingi ezali ‘elanga ya Edene,’ oyo Biblia elobi ete ezalaki na “ɛsti.” Nini esalaki ete elanga yango ebenda likebi ya bato? Biblia elobi boye: “Yehova Nzambe akolisaki na mabele nzete nyonso ya kitoko na kotala mpe malamu na kolya.” Elanga yango ezalaki esika moko kitoko mpe malamu. Eloko mosusu oyo ebendaki mpenza likebi koleka, ezali ‘nzete ya bomoi oyo ezalaki na katikati ya elanga’ yango.​—Ebandeli 2:8, 9.

Longola yango, mokanda ya Ebandeli elobeli bibale minei oyo ezalaki kobima na elanga yango. Na bibale yango minei, mibale, elingi koloba Tigre (to Hidekele) ná Efrate, eyebani tii lelo oyo. (Ebandeli 2:10-14) Bibale yango mibale oyo ebimaka na Golfe persique, ezali na Irak, oyo kala ezalaki na kati ya Perse.

Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge likanisi ya paradiso awa na mabele ekɔtá mpenza na mimeseno ya bonkɔkɔ ya bato ya Perse. Na ndakisa, karte moko ya Perse ya siɛklɛ ya 16, oyo ezali na Musée d’art na engumba Philadelphie, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, emonisi elanga moko oyo ezingami na bifelo mpe ezalaki na banzete mpe bafololo. Maloba ya Perse oyo ebongolami na “elanga oyo ezingami na bifelo” elimboli “paradiso,” mpe bililingi oyo ezali na karte yango emonisi makambo oyo Biblia elobeli mpo na elanga kitoko ya Edene.

Kutu, masolo oyo etali paradiso ebɛtamaka na minɔkɔ mingi mpe ekɔtá na mimeseno ya bato mingi na mokili. Lokola bato bazalaki kokende kofanda na bamboka mosusu, bamemaki mpe masolo wana ya ebandeli, oyo nsima ya bankama ya bambula, esanganaki na bindimeli mpe masapo ya bamboka yango. Ata lelo oyo, soki bato bamoni esika moko ya kitoko, babengaka yango mbala moko paradiso.

BATO BALUKAKA PARADISO

Bato mosusu oyo bazalaki kosala mibembo ya mosika mpo na koyeba mokili balobaki ete bamonaki esika oyo paradiso ezalaki. Na ndakisa, ntango Charles Gordon, mokonzi moko ya basoda ya Angleterre, akendaki kotala bisanga Seychelles na 1881, akamwaki ntango amonaki esika moko kitoko oyo babengi Vallée de Mai, oyo lelo batyá yango na molɔngɔ ya biloko ya motuya na mokili, mpe alobaki ete esika yango ezali elanga ya Edene. Na siɛklɛ ya 15, Christophe Colomb, moto moko ya Italie, oyo azalaki kosala mibembo na bibale ya minene, amitunaki soki akómi pene na elanga ya Edene ntango akómaki na esanga ya Hispaniola, oyo lelo ezali République Dominicaine mpe Haïti.

Buku moko ya istware (Mapping Paradise) ezali na bililingi ya kala koleka 190, mingi kati na yango ezali komonisa Adama ná Eva na Edene. Ezalaki mpe na elilingi moko ya siɛklɛ ya 13, oyo bazwaki na kopi ya mokanda ya Beatus de Liébana. Eteni ya likoló ya mokanda yango ezalaki na esika moko oyo ezalaki na liyemi ya paradiso. Liyemi yango ezalaki komonisa bibale minei oyo ezalaki na paradiso: “Tigre,” “Efrate,” “Pishone,” mpe “Gihone.” Bibale yango ezalaki kobima mokomoko na esika na yango. Yango ezalaki elilingi oyo emonisi ndenge oyo lisangá ya bokristo epalanganaki na mabele mobimba. Mayemi ya ndenge wana emonisi ete atako esika oyo Paradiso ezalaki koyebana lisusu te, tii lelo bato mingi bayebi ete ezalaki awa na mabele mpe lisolo yango ebendaka likebi na bango.

 John Milton, moto moko ya Angleterre oyo azalaki powɛti na siɛklɛ ya 17, akendá nsango mpo na poɛmi na ye Paradise Lost (Paradiso oyo ebungá), oyo eutaki na lisolo ya Ebandeli oyo elobeli lisumu ya Adama mpe ndenge oyo Nzambe abimisaki ye na elanga ya Edene. Na buku yango, alobelaki elaka ya kozongisa bomoi ya seko awa na mabele mpo na bato, mpe alobaki: “Na ntango wana, mabele mobimba ekozala paradiso.” Longola yango, Milton akomaki mpe buku mosusu oyo ezalaki na motó ya likambo Paradise Regained (Paradiso ezongisami).

BABONGOLI NDENGE YA KOTALELA LIKAMBO YANGO

Tomoni polele ete banda kala, bato mingi bazalaki kondima likanisi oyo elobaka ete paradiso oyo elimwá ezalaki awa na mabele. Kasi, mpo na nini lelo oyo bato mingi bandimaka yango lisusu te? Ndenge buku moko (Mapping Paradise) emonisi yango, ezali mingimingi mpo “bato ya teoloji . . . baboyaka kondima ete paradiso ezalaki awa na mabele.”

Mangomba mingi eteyaka bandimi na yango ete nsukansuka, bango nyonso bakokende na lola, kasi bakofanda na paradiso awa na mabele te. Nzokande, na Nzembo 37:29, Biblia elobi: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” Lokola lelo oyo mabele ezali paradiso te, nini ekoki kondimisa biso ete elaka yango ekokokisama? *

PARADISO NA MABELE MOBIMBA EZALI LIKAMBO YA SOLO

Yehova Nzambe, oyo asalaki Paradiso ya liboso oyo elimwá, alaki ete akozongisa yango. Na ndenge nini? Kanisá libondeli oyo Yesu ateyaki biso: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya mokili mobimba oyo epesami na mabɔkɔ ya Yesu Kristo mpe ekozwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya bato. (Danyele 2:44) Ntango Bokonzi yango ekoyangela, mokano ya Nzambe mpo na paradiso na mabele ‘ekosalema.’

Longola yango, na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mosakoli Yisaya amonisaki bomoi oyo bato bakozala na yango na Paradiso, esika oyo mikakatano mpe bampasi nyonso oyo bato bazali na yango lelo ekosila. (Yisaya 11:6-9; 35:5-7; 65:21-23) Tolendisi yo ozwa mwa miniti mpo na kotánga bavɛrsɛ yango na Biblia na yo moko. Soki osali bongo, okozala na ntembe ata moke te mpo na makambo oyo Nzambe alaki bato ya botosi. Bato yango bakofanda na paradiso mpe bakozala na boyokani malamu na Nzambe, mapamboli oyo Adama abungisaki.​—Emoniseli 21:3.

Mpo na nini tokoki kondima ete elikya ya Paradiso na mabele ezali ndɔtɔ mpamba te, kasi likambo ya solo? Mpo Biblia eyebisi biso: “Likoló ezali ya Yehova, kasi mabele, apesá yango bana ya bato.” Elikya ya Paradiso na mabele euti epai ya “Nzambe, oyo akoki kobuka lokuta te, alaká banda kalakala mpenza.” (Nzembo 115:16; Tito 1:2) Ya solo, Paradiso ya libela na libela, oyo Biblia elaki, ezali mpenza elikya kitoko!

^ par. 15 Likambo mosusu oyo ekoki kobenda likebi ezali ete na Koran, na Surate 21, vɛrsɛ 105, Al-Anbiya’ [Basakoli] elobi: “Bato ya sembo na kati ya basaleli na Ngai bakozwa mabele.”

Makambo mosusu

Biblia eteyaka mpenza nini?

Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?