Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 4 2017

 LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BIBLIA ELOBI NINI MPO NA BOMOI MPE LIWA?

Oyo Biblia elobi mpo na bomoi mpe liwa

Oyo Biblia elobi mpo na bomoi mpe liwa

Soki totángi lisolo ya bozalisi oyo ezali na Biblia, na mokanda ya Ebandeli, tokomona ete Nzambe ayebisaki Adama, mobali ya liboso boye: “Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Ebandeli 2:16, 17) Maloba wana ya polele emonisi ete soki Adama atosaki mobeko ya Nzambe, alingaki kokufa te; alingaki nde kokoba kozala na bomoi na elanga ya Edene.

Likambo ya mawa, na esika ete Adama atosa mpo atikala na bomoi libela na libela, aponaki nde kobuka mobeko ya Nzambe, mpe alyaki mbuma oyo Nzambe apekisaki, ntango mwasi na ye Eva apesaki ye yango. (Ebandeli 3:1-6) Tii lelo, tozali kokoba konyokwama mpo na kozanga botosi na ye. Ntoma Paulo alimbolaki likambo yango na maloba oyo: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Baroma 5:12) “Moto moko” yango ezalaki nde Adama. Kasi lisumu yango ezalaki nini, mpe mpo na nini ememaki na liwa?

Likambo oyo Adama asalaki ezali lisumu, elingi koloba kobuka mobeko ya Nzambe na nko. (1 Yoane 3:4) Mpe kaka ndenge Nzambe ayebisaki Adama, etumbu ya lisumu ezali liwa. Soki Adama mpe bana oyo alingaki kobota bátosaka mobeko ya Nzambe, balingaki kosala lisumu te mpe  balingaki kokufa soki moke te. Nzambe asalaki bato te mpo bákufa, kasi mpo bázala na bomoi, ata libela na libela.

Ntembe ezali te ete liwa “epalangani epai ya bato nyonso,” ndenge Biblia elobi. Kasi, ezali nde na eteni moko ya nzoto na biso oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa? Bato mingi bakoki koloba ete ezalaka na eloko moko na kati ya nzoto na biso, oyo babengi molimo, mpe yango ekufaka te. Kasi, koloba bongo ekoki komonisa lokola ete Nzambe akosaki Adama. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo soki eteni moko ya nzoto na biso ekobaka kozala na bomoi na mokili ya bilimo nsima ya liwa, boye liwa ekozala lisusu etumbu ya lisumu te, ndenge Nzambe alobaki. Nzokande, Biblia elobi: “Nzambe akoki kobuka lokuta ata moke te.” (Baebre 6:18) Satana nde akosaki Eva, ntango alobaki: “Bokokufa soki moke te.”​—Ebandeli 3:4.

Yango ebimisi motuna oyo: Soki liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali lokuta, bongo moto akendaka wapi soki akufi?

BIBLIA EPESI EYANO YA POLELE

Lisolo ya bozalisi oyo ezali na Biblia, na mokanda ya Ebandeli, elobi boye: “Yehova Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele mpe apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.” Maloba “molimo ya bomoi” euti na liloba ya Ebre nèphèsh, * oyo elimboli “ekelamu oyo ezali kopema.”​—Ebandeli 2:7.

Na yango, Biblia emonisi polele ete Nzambe akelaki moto te molimo oyo ekufaka te. Kasi moto azali nde “molimo ya bomoi.” Yango wana, ata soki otángi Biblia banda ebandeli tii nsuka, ezali ata na vɛrsɛ moko te oyo elobi ete “molimo ekufaka te.”

Soki liteya oyo elobaka ete moto azalaka na molimo oyo ekufaka te ezali na Biblia te, mpo na nini mangomba mingi eteyaka yango? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tózonga naino na Ezipito ya kala.

 LITEYA YA BAPAKANO EPALANGANI

Herodote, Mogrɛki moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala na siɛklɛ ya 5 liboso ya ntango na biso, alobaki ete bato ya Ezipito bazalaki “bato ya liboso oyo bazalaki kopalanganisa liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te.” Bato ya Babilone ya kala bazalaki mpe kosala masano oyo ezalaki komonisa ete molimo ekufaka te. Ntango mokonzi Alezandre Monene azwaki Moyen-Orient na mobu 332 liboso ya ntango na biso, bafilozofe ya Bagrɛki bapalanganisaki liteya yango, mpe eumelaki te, liteya yango epalanganaki na ampire mobimba ya Grɛsi.

Ezali ata na vɛrsɛ moko te ya Biblia oyo elobi ete “molimo ekufaka te”

Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, mwa mangomba mibale ya Bayuda oyo eyebanaki mingi, elingi koloba Ba-Essene mpe Bafarisai, ezalaki koteya ete molimo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa ya nzoto. Buku moko (The Jewish Encyclopedia) elobi: “Bayuda bakómaki kondima liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te mpo bazwaki makanisi ya Bagrɛki, oyo eutaki libosoliboso na filozofi ya Platon.” Ndenge moko mpe, Josèphe, moto moko ya istware na siɛklɛ ya liboso, alobaki ete liteya yango euti na Makomami Mosantu te, kasi euti nde na “bindimeli ya bato ya Grɛsi,” oyo ye azalaki kotalela lokola masapo.

Lokola mimeseno ya Bagrɛki ezalaki se kopalangana, mangomba ya bokristo ekómaki mpe kondima liteya wana ya bapakano. Jona Lendering, moto moko ya istware alobi boye: “Liteya ya Platon oyo elobaka ete molimo ezalaki liboso na esika ya malamu koleka mpe sikoyo eyei na mokili moko ya mabe epesaki nzela ete mateya ya lingomba ya Bokristo esangana na filozofi ya Platon.” Na ndenge yango, liteya ya bapakano oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki na lingomba ya  “Bokristo” mpe ekómaki liteya moko ya ntina mingi na bindimeli na yango.

“SOLO EKOPESA BINO BONSOMI”

Na siɛklɛ ya liboso, ntoma Paulo akebisaki bakristo na maloba oyo: “Elimo ya Nzambe elobi polele ete na bileko oyo ekoya bato mosusu bakotika kondima, bakotya likebi na maloba ya bokosi ya bilimo mabe mpe na mateya ya bademo.” (1 Timote 4:1) Maloba yango ezali mpenza solo! Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali mpenza moko ya “mateya ya bademo.” Biblia eteyaka yango te; eutá nde na mangomba ya kala ya bapakano mpe na bafilozofi ya bato.

Likambo ya esengo mpo na biso ezali ete Yesu alobaki boye: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Soki toyebi solo oyo ezali na Biblia, tokolongwa na boombo ya mateya mpe bizaleli oyo etyolaka Nzambe, oyo mangomba mingi ya mokili ezali koteya. Lisusu, solo oyo euti na Liloba ya Nzambe elongoli biso na boombo ya mimeseno mpe mateya ya lokuta na likambo etali liwa.​—Talá etanda “ Bato oyo bakufá bazali wapi?

Mozalisi na biso akelaki bato te kaka mpo bázala na bomoi mbula 70 to 80 awa na mabele, na nsima bákende kofanda libela na libela na mokili ya bilimo. Mokano na ye ezalaki ete bato bázala na bomoi ya libela na libela awa na mabele mpe bázala bana na ye ya botosi. Mokano yango emonisi ete Nzambe alingaka bato, mpe moto moko te akopekisa mokano yango. (Malaki 3:6) Yango wana, mokomi ya Nzembo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ete: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

 

^ par. 9 Mabongoli mosusu ya Biblia, na ndakisa Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli yango na “moto akómi na bomoi.”