Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 4 2017

Kosolola liboso mpe kolobela makambo polele ezali na ntina

Ntango moto oyo tolingaka azali na maladi oyo akobika na yango te

Ntango moto oyo tolingaka azali na maladi oyo akobika na yango te

DOREEN ayokaki motema mpasi ntango minganga bayebisaki bango ete mobali na ye Wesley, oyo azalaki na mbula 54 mpamba, azali na kansɛr ya bɔɔngɔ. * Minganga balobaki ete akokufa nsima ya mwa basanza. Doreen alobi boye: “Ntango bayebisaki ngai likambo yango, nandimaki te. Nasalaki bapɔsɔ mingi, nazalaki koyeba te nasala nini. Nazalaki komona lokola ete likambo yango ekómeli nde bato mosusu, kasi biso te. Nakanisaki te ete likambo ya boye ekokómela ngai.”

Kasi, likambo oyo ekómelaki Doreen, ekómelaka bato mingi. Koyeba ete moto moko ya libota azali na maladi oyo akobika na yango te ekoki kotungisa moto nyonso, ata na ntango nini. Likambo ya esengo, bato mingi bandimaka mokumba ya kobatela moto oyo balingaka, oyo azali na maladi oyo akobika na yango te. Atako bongo, kobatela moto ya maladi ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Bato ya libota bakoki kosala nini mpo na kobɔndisa mpe kobatela ndeko na bango oyo azali na maladi oyo akobika na yango te? Ndenge nini moto oyo azali kosalisa moto ya maladi akoki kokanga motema na mitungisi mpe mayoki oyo ekoki koyela ye ntango azali kobatela moto ya maladi? Makambo nini emonanaka epai ya moto ya maladi ntango akómi pene na liwa? Kasi liboso, tótalela naino mpo na nini kobatela moto oyo azali na maladi oyo akobika na yango te ezali mokakatano monene lelo oyo.

MOKAKATANO YA MIKOLO NA BISO

Lokola mayele ya monganga ekoli mingi, bato mingi bakufaka nde na lopitalo mpe malɛmbɛmalɛmbɛ. Eleki sikoyo mbula soki 100, ata na mikili ya bozwi, bato bazalaki koumela mingi te na bomoi. Bato bazalaki kokufa noki mpo na maladi to makama. Bato mingi bazalaki te na likoki ya kozwa lisalisi na lopitalo, mpe mbala mingi, bato ya libota nde bazalaki kosalisa moto ya maladi mpe bato bazalaki kokufa na ndako.

 Lelo oyo, lokola mayele ya monganga ekoli mingi, minganga bazali na likoki ya kobundisa maladi mpo na koluka kosalisa moto atikala lisusu na bomoi mwa mikolo. Bakoki kosala ete moto oyo azali na maladi oyo ezalaki koboma nokinoki na ntango ya kala, aumela lisusu na bomoi bambula mingi. Atako bongo, yango elimboli te ete moto yango abiki libela. Mbala mingi, bato yango ya maladi batikalaka na mikakatano ya nzoto oyo esɛngaka kaka bato mosusu básalisa bango. Kosalisa bato ya maladi oyo bakómi ndenge wana ezali se kokóma mpasi mpe kosɛnga makambo mingi.

Yango wana, na mikolo na biso, bato mingi bakufaka lisusu na ndako te; bakufaka nde na lopitalo. Lelo oyo, bato mingi bayebi te makambo oyo esalemaka liboso moto akufa, mpe kaka bato moke nde bamoná ndenge moto akufaka. Na yango, lokola bato mingi bayebi te ndenge makambo yango esalemaka, moto akoki koboya to kotika kosala milende mpo na kosalisa moto ya libota oyo azali kobɛla. Nini ekoki kosalisa?

BONGISÁ MAKAMBO LIBOSO

Ndenge ndakisa ya Doreen emonisi yango, bato mingi babulunganaka na makanisi soki bayebi ete moto oyo balingaka azali na maladi moko oyo akobika na yango te. Na ntango wana ya mitungisi, ya kobanga, mpe ya mawa, nini ekoki kosalisa yo omibongisa liboso? Mosaleli moko ya sembo ya Nzambe abondelaki boye: “Lakisá biso ndenge ya kotánga mikolo na biso mpo tókóma na motema ya bwanya.” (Nzembo 90:12) Na yango, bondelá Yehova Nzambe na molende mpo asalisa yo oyeba ‘kotánga mikolo na yo’ na bwanya, elingi koloba osalela mikolo oyo etikali na ndenge ya malamu elongo na moto oyo olingaka.

Mpo na kosala bongo, esɛngaka komibongisa malamu. Soki moto oyo azali kobɛla azali na likoki ya koloba mpe andimi bólobela likambo yango, ekoki kozala malamu kotuna ye nani asengeli kozwa bikateli na esika na ye ntango akokoka lisusu koloba te. Kosolola polele mpo na koyeba soki akondima ete minganga básala nyonso mpo na kobatela ye na bomoi, soki akondima kokɔta lopitalo, to akondima lolenge mosusu ya lisalisi ya monganga, ekoki kosala ete bato ya libota bábendana te mpe bámiyoka te ete bamemi ngambo mpo bazwi ekateli na esika ya moto ya maladi oyo azali kokoka koloba te. Kosolola liboso mpe kolobela makambo polele ekosalisa bato ya libota bátya likebi mingi nde na kosalisa moto ya maladi. Biblia elobi: “Myango elongaka te esika lisolo ya nkuku ezali te.”​—Masese 15:22.

NDENGE YA KOSALISA

Mbala mingi, mokumba ya libosoliboso ya moto oyo azali kobatela moto ya maladi ezali ya kobɔndisa ye. Moto oyo akómi pene na liwa azalaka na mposa bámonisa ete balingaka ye mpe basundoli ye te. Ndenge nini okoki kosala yango? Tángeláká moto ya maladi mpe yembeláká ye; poná mikanda mpe  banzembo oyo ekolendisa ye mpe ekosepelisa ye. Bato mingi babɔndisamaka ntango moto moko ya libota asimbi bango na lobɔkɔ mpe alobi na bango na boboto.

Mbala mingi, ezalaka malamu koyebisaka ye mopaya nyonso oyo ayei kotala ye. Lapolo moko elobi: “Matoi ya moto ekobaka koyoka ata soki biteni mosusu ya nzoto etiki kosala. [Moto ya maladi] akoki kokoba koyoka ata soki emonani ete alali, yango wana koloba te likambo moko oyo okokoka te koyebisa ye yango soki alamuki.”

Soki likoki ezali, bondelá elongo na ye. Biblia emonisi ete mokolo moko ntoma Paulo ná baninga na ye ya mosala bamitungisaki mingi mpe bazalaki mpenza kobanga ata mpo na bomoi na bango. Epai wapi balukaki lisalisi? Ntoma Paulo asɛngaki baninga na ye boye: “Bino mpe bokoki kopesa oyo ya bino lisalisi na nzela ya malɔmbɔ na bino mpo na biso.” (2 Bakorinti 1:8-11) Na ntango ya mitungisi makasi mpe maladi makasi, libondeli oyo euti mpenza na motema ekoki mpenza kosalisa.

ESENGELI KOYEBA ETE BAKIMAKA LIWA TE

Mbala mingi, koyeba ete moto oyo tolingaka akómi pene na liwa esalaka mpasi mingi. Ezali bongo, mpo moto asalemá te mpo akufa. Yango wana, moto andimaka kokufa te. (Baroma 5:12) Kutu, Liloba ya Nzambe ebengi liwa “monguna.” (1 Bakorinti 15:26) Yango wana, tokoki kokamwa te soki moto aboyi kondima ete moto oyo ye alingaka akokufa.

Atako bongo, komibongisa liboso mpo na makambo oyo ekoki kosalema ekoki kosalisa bato ya libota bábanga mingi te mpe bátya makanisi na kosala makambo oyo ekosala ete moto ya maladi amiyoka mwa malamu. Makambo mosusu oyo ekoki komonana ezali na etanda “ Mikolo ya nsuka ya bomoi ya moto.” Ya solo, makambo wana nyonso te nde emonanaka epai ya moto nyonso ya maladi to mpe elandanaka kaka bongo. Atako bongo, mbongwana wana emonanaka epai ya bato mingi ya maladi.

Nsima ya liwa ya moto oyo tolingaka, ekozala malamu kosolola na moninga moko ya motema oyo azalaki kosalisa biso liboso. Esengeli kosalisa bato oyo bazalaki kobatela moto ya maladi mpe bato ya libota na ye báyeba ete mpasi ya ndeko na bango esili mpe azali konyokwama lisusu te. Mozalisi ya bato alobi ete “bakufi bayebi ata eloko moko te.”​—Mosakoli 9:5.

MOSUNGI YA SOLOSOLO

Tokoki koyekola kondima lisalisi ya moto nyonso

Ntango moto moko ya libota azali na maladi oyo akobika na yango te, to na ntango ya mawa makasi oyo eyaka nsima ya liwa, ezali na ntina mingi kotyela Nzambe motema. Akoki kosunga yo na nzela ya maloba mpe misala ya basusu. Doreen alobi boye: “Nayekolá kondima lisalisi ya moto nyonso. Kutu, lisalisi oyo basusu bazalaki kopesa elekelaki ngai. Ngai ná mobali na ngai tozalaki komona ete Yehova nde azalaki koloba na biso: ‘Nazali pene na bino mpo na kosalisa bino na likambo oyo.’ Nakobosana yango te.”

Yehova Nzambe azali mosungi ya solosolo. Lokola ye nde akelá biso, ayebi mpasi mpe mawa na biso. Akoki kopesa biso lisalisi oyo tosengeli na yango mpo tólonga mpe azali na mposa ya kosala yango. Likambo ya malamu koleka, alaki ete akolongola liwa mpo na libela mpe akosekwisa ebele ya bato oyo bakufá, oyo bazali na makanisi na ye. (Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:3, 4) Na ntango wana, maloba oyo ya ntoma Paulo ekokokisama: “Liwa, wapi bolongi na yo? Liwa, wapi etubeli na yo?”​—1 Bakorinti 15:55.

^ par. 2 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Mpo na nini makambo mabe ekómelaka bato malamu?

Biblia emonisi makambo misato oyo esalaka ete bato bányokwama.