Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 4 2017

Elias Hutter mpe Babiblia na ye ya Ebre oyo etiká nsango

Elias Hutter mpe Babiblia na ye ya Ebre oyo etiká nsango

OYEBI kotánga Ebre oyo bakomaki na yango Biblia? Ntango mosusu oyebi te. Mbala mosusu omoná naino te Biblia ya monɔkɔ ya Ebre. Atako bongo, koyeba makambo oyo etali Elias Hutter, moto moko ya mayele na siɛklɛ ya 16, mpe Babiblia mibale ya Ebre oyo abimisaki, ekoki kosalisa yo osepela lisusu mingi na Biblia oyo ozali na yango.

Elias Hutter abotamaki na 1553 na Görlitz, engumba moko ya moke oyo ezali pene na ndelo ya Allemagne ná Pologne mpe République tchèque. Hutter ayekolaki monɔkɔ ya Ebre, ya Aramɛyɛ, mpe minɔkɔ mosusu na iniversite Luthérien, na engumba Iéna. Ntango azalaki na mbula 24, akómaki profesɛrɛ ya Ebre na engumba Leipzig. Lokola azalaki na mposa ya kobongola ndenge ya koteya bato minɔkɔ, nsukansuka afungolaki eteyelo moko na engumba Nuremberg, epai bana-kelasi bakokaki koyekola Ebre, Grɛki, Latin, mpe Allemand na boumeli ya mbula minei. Na ntango wana, eteyelo to iniversite mosusu te ekokaki kosala bongo.

‘BIBLIA YANGO EZALI KITOKO MPENZA’

Lokasa ya ebandeli ya Biblia ya Ebre ya Hutter oyo ebimaki na 1587

Na 1587, Hutter abimisaki Biblia Testama ya Kala na monɔkɔ ya Ebre. Biblia yango ezalaki na nkombo Derekh ha-Kodesh, oyo euti na Yisaya 35:8 mpe elimboli “Nzela ya Bosantu.” Lokola ekomeli na yango ezalaki kitoko, yango etindaki bato báloba ete “Biblia yango mobimba ezali komonisa ete ezali kitoko mpenza.” Kasi eloko mosusu oyo esalaki ete Biblia yango ezala kitoko ezalaki ete bana-kelasi bakokaki kosalela yango malamu ntango bazali koyekola Ebre.

Mpo na koyeba ndenge oyo Biblia ya Ebre ya Hutter esalisaki mingi, tótalela mikakatano mibale oyo moyekoli akokaki kokutana na yango ntango azali koluka kotánga Biblia na Ebre. Ya liboso, alfabɛ ya Ebre ekeseni na ba alfabɛ mosusu; ya mibale, maloba oyo babakisaka liboso to nsima ya liloba moko ekoki kosala ete ezala mpasi mpo na koyeba esika liloba yango eutá. Na ndakisa, tótalela liloba ya Ebre נפשׁ (oyo etángamaka nèphèsh), mpe elimboli “molimo.” Na Ezekiele 18:4, liloba ה (ha) ebakisami liboso ya liloba nèphèsh, yango wana ekómi הנפשׁ (hannèphèsh). Moto oyo amesani te akoki komona lokola ete הנפשׁ (hannèphèsh) ekeseni mpenza na liloba נפשׁ (nèphèsh).

Mpo na kosalisa bana-kelasi na ye, Hutter asalelaki ekomeli ya sika na mikanda oyo azalaki kobimisa: ekomeli ya balɛtrɛ ya Ebre na makomi ya moindo makasi mpe ekomeli ya langi mingi te. Na mikanda yango, maloba ya Ebre oyo ebimisá maloba mosusu ekomamaki na moindo makasi. Mpo na maloba oyo  babakisaka liboso mpe nsima ya liloba moko, asalelaki balɛtrɛ oyo ezali na langi mingi te. Mayele wana ezalaki kosalisa bana-kelasi bázala na mokakatano te mpo na komona maloba ya Ebre oyo ebimisá maloba mosusu, mpe esalisaki bango mingi ntango bazali koyekola. Biblia Traduction du monde nouveau​avec notes et références esaleli mpe mayele yango na maloba na nse ya lokasa. * Liloba oyo ebimisá liloba mosusu ekomami na moindo makasi, kasi liloba oyo babakisi liboso to na nsima ezali moindo makasi te. Esika oyo ezali komonana mwa mpɛmbɛ na elilingi oyo ezali awa elakisi ekomeli oyo Biblia ya Hutter esaleli na Ezekiele 18:4 mpe oyo Biblia Traduction du monde nouveau (avec notes et références) esaleli na maloba na nse ya lokasa na vɛrsɛ yango.

“TESTAMA YA SIKA” NA MONƆKƆ YA EBRE

Hutter abimisaki mpe Biblia Testama ya Sika, na minɔkɔ 12. Biblia yango ebimaki na engumba Nuremberg na 1599 mpe mbala mingi bazalaki kobenga yango Polyglotte de Nuremberg. Hutter alingaki ete libongoli moko ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na Ebre ezala. Kasi alobaki ete ata soki alingi “kobimisa mbongo mingi” mpo na libongoli yango ya Ebre, bolukiluki yango ekozala na ntina te. * Na yango, azwaki ekateli ya kobongola Testama ya Sika ya Grɛki na monɔkɔ ya Ebre. Lokola atikaki kosala makambo mosusu nyonso, Hutter asilisaki libongoli yango nyonso kaka na mbula moko!

Nini esalaki ete libongoli ya Ebre oyo Hutter asalaki ya Makomami ya Grɛki ya Bokristo ezala malamu? Franz Delitzsch, moto moko ya mayele na siɛklɛ ya 19 oyo ayekolaki monɔkɔ ya Ebre alobi: “Libongoli na ye ya Ebre emonisi ete ayebaki malamu monɔkɔ yango, likambo oyo ezalaki komonana mingi te epai ya Bakristo; bato bazali kaka kosalela yango, mpe mbala na mbala aponaki maloba oyo ebongi.”

ESILAKA NGALA TE

Hutter akómaki mozwi te mpo na mosala na ye ya mobongoli; emonani ete Biblia na ye etɛkamaki mpenza te. Kasi, mosala oyo asalaki ezali na ntina mpe esilá ngala te. Na ndakisa, na 1661, William Robertson abongisaki lisusu libongoli ya Hutter ya Ebre ya Testama ya Sika mpe abimisaki yango; na 1798, Richard Caddick abongisaki yango mpe abimisaki yango lisusu. Ntango Hutter azalaki kobongola Biblia ya Grɛki na monɔkɔ ya Ebre, atyaki nkombo “Yehova” (יהוה, JHVH) na bisika oyo ebongi, elingi koloba na bisika oyo ezalaki na batitre Kurios (Nkolo) mpe Théos (Nzambe), na bavɛrsɛ oyo Makomami ya Grɛki ezongelaki maloba ya Makomami ya Ebre to na bisika oyo amonaki ete balobeli Yehova. Yango ebendi likebi na biso, mpo atako mabongoli mingi ya Testama ya Sika esaleli nkombo ya Nzambe te, libongoli ya Hutter esaleli yango; na ndenge yango amonisi polele ete esengelaki kozongisa nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo.

Mbala ya nsima oyo okomona nkombo ya Nzambe, Yehova, na Makomami ya Grɛki ya bokristo to okotala maloba na nse ya lokasa na Biblia Traduction du monde nouveau (avec notes et références), kanisá mosala oyo Elias Hutter asalaki mpe Babiblia na ye ya Ebre oyo etiká nsango.

^ par. 7 Talá ndimbola ya mibale na maloba na nse ya lokasa ya Ezekiele 18:4 mpe Apɛndisi 3B na Biblia Traduction du monde nouveau (avec notes et références).

^ par. 9 Emonani ete, liboso bato ya mayele babongolaki mpe Testama ya Sika na monɔkɔ ya Ebre. Moko na bango ezalaki Simon Atoumanos, sango moko ya mboka Byzance, na mobu soki 1360. Mosusu ezalaki Oswald Schreckenfuchs, moto moko ya mayele ya Allemagne, na mobu soki 1565. Mabongoli wana ebimisamá te mpe lelo oyo ebungá.