Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 4 2016

Mobulu ekosila mokolo mosusu?

Mobulu ekosila mokolo mosusu?

Bato ya mobulu basalá yo to bandeko ya libota na yo mabe? Osengeli mpenza kobanga ete bakosala yo mabe? Balobaka ete mobulu ezali lokola “maladi oyo epanzanaka mokili mobimba.” Tótalela mwa bandakisa oyo.

MOBULU NA LIBOTA MPE KOSANGISA NZOTO NA MAKASI: Lapolo moko ya ONU elobi boye: “Na basi misato moko así abɛtamá to basangisá na ye nzoto na makasi epai ya mobali na ye.” Kasi likambo ya mawa, lapolo yango elobi lisusu ete “emonani ete na mokili mobimba, na basi mitano, moko na bango bakosangisa to bakoluka kosangisa na ye nzoto na makasi.”

MOBULU NA NZELA: Lapolo moko emonisi ete États-Unis ezali na bituluku ya bato koleka 30 000 oyo basalaka mobulu mpe babomaka bato. Na Amérique Latini, soki otuni bato misato, moko na bango akoloba ete bato ya mobulu basalá ye mabe.

KOBOMA BATO: Na mbula eleki, bato soki 500 000 babomamaki, motángo yango eleki oyo ya bato oyo bakufaki na bitumba. Motángo ya bato oyo babomamaka mpo na mobulu na sudi ya Afrika mpe na Amerika ya ntei eleki mbala minei motángo ya mikili mosusu. Na mbula moko mpamba, bato soki 100 000 babomamaki na Amerika ya ntei; bato soki 50 000 kaka na Brésil. Esɛngi nini mpo mobulu esila mpo na libela?

MOBULU EKOSILA MPENZA?

Mpo na nini mobulu ekómi mingi boye? Bantina ezali mingi, na ndakisa: nkanda ya bato ezali komata mpo bosembo ezali te na makambo ya nkita, basusu bazali kokóma babola basusu bazwi, bazali kozwa bomoi ya basusu na valɛrɛ te, kolangwa masanga mpe kosalela drɔgɛ, bana mike bazali komona ndenge mikóló mosusu bazali kosala mobulu mpe bato bazali kosala mobulu kozanga ete bázwa etumbu.

Toboyi te, na bisika mosusu milende oyo bato basali esali ete mobulu ekita. Na mbula zomi oyo euti koleka motángo ya bato oyo babomamaka ekitaki mpenza (20 %) na São Paulo, engumba ya Brésil oyo bato bazalaka mingi. Ata bongo, mobulu ya ndenge nyonso ezali mingi na engumba yango, na bato 100 000, bato soki 10 bazali kokufa na mabɔkɔ ya bato ya mobulu. Kasi, ekosɛnga nini mpo mobulu esila mpo na libela?

Na ntembe te mpo mobulu esila libela, esengeli makanisi mpe bizaleli ya bato ebonga. Mpo bato ya mobulu bábongwana, basengeli kotika bizaleli lokola lolendo, lokoso mpe moyimi mpe kokóma na bolingo, limemya mpe koluka bolamu ya basusu.

Nini ekoki kotinda moto abongisa bizaleli ndenge wana? Talá oyo Biblia eteyaka:

  • “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye.”1 Yoane 5:3.

  • “Kobanga Yehova elakisi koyina mabe.” *Masese 8:13.

 Kolinga Nzambe mpe koluka kosepelisa ye ekoki kotinda bato ya mobulu bábongwana—kaka likolólikoló te, kasi bomoto na bango mobimba ebongwana. Yango ekoki mpenza kosalema?

Tózwa ndakisa ya Alex, * oyo alekisaki mbula 19 na bolɔkɔ na Brésil mpo na makambo mingi ya mobulu oyo asalaki. Nsima ya koyekola Biblia, akómaki Motatoli ya Yehova na mobu 2000. Atikaki mpenza mobulu? Ɛɛ, Alex ayokaka mpenza mawa mpo na makambo nyonso ya mabe oyo asalá. Alobi boye: “Nakómá kolinga Nzambe ndenge namonaka ete alimbisá ngai mpenza. Botɔndi mpe kolinga Yehova esalisá ngai nabongisa bizaleli na ngai.”

César, kaka na Brésil azalaki angwalima mpe kosalela mindoki mpo na koyiba. Yango nde mosala azalaki kosala na boumeli ya mbula soki 15. Nini etindaki ye abongwana? Ntango azalaki na bolɔkɔ, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe ayekolaki Biblia. Alobi boye: “Mpo na mbala ya liboso, namonaki ntina ya bomoi. Nayekolaki kolinga Nzambe. Nayekolaki mpe kobanga ye, kobanga ete nazongela lisusu mabe mpe nayokisa Yehova mawa. Nalingaki te ete nazanga botɔndi mpo na boboto na ye. Bolingo yango mpe kobanga ye etindaki ngai nabongwana.”

Luká koyeba ndenge ya kosala mpo na kofanda na mokili oyo mobulu ekozala te

Bandakisa wana eteyi biso nini? Eteyi biso ete Biblia ezali na nguya ya kobongola mpenza bomoi ya bato mpo esalisaka bango bábongola ndenge na bango ya kokanisa. (Baefese 4:23) Alex, oyo tolobeli liboso, abakisi boye: “Makambo oyo nayekolaki na Biblia ezalaki lokola mai ya pɛto oyo basopeli ngai, ezalaki kolongola ngai mokemoke makanisi ya mabe mpe kopɛtola ngai. Ezalaki na makambo oyo nandimaki te ete nakokoka kotika yango.” Ya solo, soki totondisi makanisi na biso na mateya ya pɛto ya Biblia, ekoki kosukola to kolongola bizaleli ya mabe. Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kopɛtola. (Baefese 5:26) Yango ekoki kosala ete bato mabe mpe ya moyimi bábongwana mpe bákóma bato ya boboto mpe ya kimya. (Baroma 12:18) Kosalela batoli ya Biblia esalaka ete bázala na kimya na bomoi na bango.Yisaya 48:18.

Batatoli ya Yehova koleka milio 8 na mikili 240, bamoni ndenge ya kosala mpo mobulu esila. Mindɛlɛ, baindo, babola, bazwi, baoyo batángá mingi to te, basali libota moko, balinganaka mpe bazali na kimya mpo bayekoli kolinga Nzambe mpe kobanga ye. (1 Petro 4:8) Bomoi na bango emonisaka ete mobulu ekoki kosila na mokili.

MOSIKA TE MOBULU EKOSILA!

Biblia elobi ete mosika te Nzambe akolongola mobulu na mabele. Mokili ya lelo oyo etondi na mobulu ezali kozela ‘mokolo oyo Nzambe akosambisa mpe akobebisa bato oyo batyolaka ye.’ (2 Petro 3:5-7) Bato bakonyokwama lisusu te mpo na mobulu. Nini ekoki kondimisa biso ete Nzambe alingi kozwa makambo na mabɔkɔ mpe kosilisa mobulu?

Biblia elobi ete Nzambe ‘ayinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.’ (Nzembo 11:5) Nzambe oyo akelá biso alingaka kimya mpe bosembo. (Nzembo 33:5; 37:28) Yango wana akotika te ete bato ya mobulu bázala mpo na libela.

Ɛɛ, mokili ya sika ya kimya ekómi pene. (Nzembo 37:11; 72:14) Mpo na nini te oluka koyeba nini okoki kosala mpo okɔta na mokili wana oyo mobulu ekozala te?

^ par. 14 Bankombo mosusu ezali ya bango te.