Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 3 2017

Etanda ya cunéiforme oyo ezali na nkombo “Tattannu,” oyo ekomami na nsuka

Likambo mosusu oyo endimisi ete Biblia elobaka solo

Likambo mosusu oyo endimisi ete Biblia elobaka solo

Ezali nde na makambo ya arkeoloji oyo endimisi ete Biblia elobaka solo? Na 2014, lisolo moko ya zulunalo Biblical Archaeology Review etunaki motuna oyo: “Bato boni na eteni ya Biblia ya Makomami ya Ebre oyo arkeoloji endimi?” Epesaki eyano oyo: “Bato soki 50!” Mobali moko oyo nkombo na ye ezangaki na liste yango ezali Tatenai. Azalaki nani? Tiká tólobela na mokuse mokumba na ye oyo Biblia elobeli.

Yerusaleme ezalaki na nse ya bokonzi ya ampire monene ya Perse. Engumba yango ezalaki na esika oyo Baperse bazalaki kobenga ngámbo ya Ebale, elingi koloba na wɛsti ya Efrate. Nsima ya kolonga Babilone, Baperse bapesaki Bayuda bonsomi mpe ndingisa ya kotonga lisusu tempelo ya Yehova na Yerusaleme. (Ezera 1:1-4) Kasi banguna ya Bayuda batɛmɛlaki mosala yango mpe bafundaki Bayuda ete bazali kotombokela Baperse. (Ezera 4:4-16) Na boyangeli ya Dariuse I (kobanda 522-486 liboso ya ntango na biso), Tatenai mokonzi moko ya Leta ya Perse asalaki ankɛtɛ na likambo yango. Biblia ebengi ye “guvɛrnɛrɛ ya ngámbo mosusu ya Ebale.”Ezera 5:3-7.

Bamonaki mwa bitanda ya cunéiforme, oyo ezali na nkombo ya Tatenai; ebatelamaki na kati ya biloko ya kala oyo babombá, oyo ekoki kozala ya libota moko boye. Etanda oyo etángi nkombo ya moto moko ya libota yango oyo ayebanaki mpe na moto moko oyo Biblia elobeli, ezali kɔntra moko oyo esalemaki na 502 liboso ya ntango na biso, na mbula ya 20 ya boyangeli ya Dariuse I. Emonisi ete Tɛmwɛ oyo azalaki ntango kɔntra yango esalemaki, azalaki mosaleli ya “Tattannu, guvɛrnɛrɛ ya ngámbo ya Ebale”, ye nde Tatenai oyo mokanda ya Ezera elobeli.

Mokumba ya moto yango ezalaki nini? Na 535 liboso ya ntango na biso, Sirise Monene akabolaki boyangeli na ye na bitúká, moko na yango ebengamaki “Babilone mpe ngámbo ya Ebale.” Na nsima bakabolaki etúká yango na mibale, oyo moko ekómaki kobengama ngámbo ya Ebale. Esangisaki bamboka lokola Cœlésyrie, Fenisia, Samaria mpe Yuda mpe ekoki kozala ete Damasi nde ezalaki koyangela yango. Tatenai ayangelaki etúká yango kobanda 520 tii 502 liboso ya ntango na biso.

Nsima ya kokende na Yerusaleme mpo na kosala ankɛtɛ ya bifundeli oyo bafundaki Bayuda, Tatenai asalelaki Dariuse lapolo ete Bayuda balobaki ete Sirise nde apesaki bango ndingisa ya kotonga lisusu tempelo ya Yehova. Baankɛtɛ oyo basalaki na mikanda ya kala ya bakonzi endimisaki likambo yango. (Ezera 5:6, 7, 11-13; 6:1-3) Yango wana bapesaki Tatenai mitindo akɔta na likambo yango te mpe atosaki.Ezera 6:6, 7, 13.

Mpo na koloba solo, “Tatenai, guvɛrnɛrɛ ya ngámbo mosusu ya Ebale” asalaki ata likambo moko te oyo istware ekoki kolobela. Kasi simbá ete Biblia elobeli to epesi ye titre oyo azalaki na yango mpenza. Likambo yango endimisi lisusu ete arkeoloji emonisaka mbala na mbala ete Biblia elobaka solo.

Makambo mosusu

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo?

Soki Biblia eutá na Nzambe, esengeli kokesana na buku mosusu nyonso oyo ekomamá.

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Lisolo moko ya ntina mingi

Ezali na buku mosusu te oyo mateya na yango esalisá bato mingi na boumeli ebele ya bambula. Kasi tokoki mpenza kotyela Biblia motema?