Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 2 2017

Mombongo ya kotɛka baombo kati na Afrika mpe Amerika ezalaki na benefisi mingi

Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo

Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo

Blessing * ayaki na Mpoto mpo balakaki ye ete akozwa mosala ya kosala bato nsuki. Kasi andimaki kosala kindumba mpo babɛtaki ye na boumeli ya mikolo zomi mpe bakebisaki ye ete soki aboyi, bakosala bato ya libota na ye mabe na mboka oyo autaki.

Elilingi ya baombo oyo bakangaki bango na Ezipito

Patrɔ ayebisaki Blessing apesaka ye mbongo 200 to 300 euro na butu moko mpo na nyongo ya mbongo koleka 40 000 euro oyo akatelaki ye. * Blessing alobi boye: “Mbala mingi mposa ya kokima ezalaki koyela ngai, kasi nazalaki kobanga makambo bakosala libota na ngai. Nakangamaki na motambo.” Ndenge lisolo ya Blessing emonisi yango, na mokili mobimba bakómisá bato soki milio minei baombo ya kosangisaka nzoto.

Eleki sikoyo mbula soki 4 000, bandeko ya elenge mobali moko na nkombo Yozefe batɛkaki ye. Akómaki mwana-mosala na ndako ya mokonzi moko ya Ezipito. Kasi na ebandeli banyokolaki Yozefe te ndenge basalaki Blessing. Kasi ntango aboyaki kosangisa nzoto na mwasi ya patrɔ na ye, mwasi yango akoselaki Yozefe makambo ete alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Babwakaki ye na bolɔkɔ mpe bakangaki ye bashɛni.Ebandeli 39:1-20; Nzembo 105:17, 18.

Yozefe azalaki moombo na ntango ya kala. Kasi Blessing azali moombo ya ntango na biso. Bango nyonso mibale bakutanaki na likambo oyo ebandá kala, likambo ya kotɛka bato lokola biloko kaka mpo na mbongo.

BITUMBA ESALAKA ETE KOTƐKA BAOMBO EKÓMA MOMBONGO MONENE

Bitumba nde esalaka ete bikólo ezwa baombo na pɛtɛɛ nyonso. Balobaka ete mokonzi Thoutmosis III ya Ezipito amemaki bato 90 000 oyo akangaki nsima ya bitumba oyo babundaki na Kanana. Baezipito bakómisaki bango baombo mpe  basalisaki bango misala ya kotimola mabanga ya ntalo, kotonga batempelo mpe kosala banzela.

Na Ampire ya Roma, bitumba esalaki ete bato mingi bákóma baombo mpe na bantango mosusu mposa ya kozala na baombo nde ezalaki kobimisa bitumba. Balobaka ete na siɛklɛ ya liboso, bato mingi ya Roma (50%) bazalaki baombo. Bazalaki kosalisa baombo mingi ya Ezipito mpe ya Roma misala ya makasi. Na ndakisa na Roma, baombo oyo bazalaki kotimola mabanga ya ntalo, bazalaki koumela na mokili kaka mbula soki 30.

Ntango bambula ezalaki koleka, boombo ekómaki lisusu mabe koleka. Kobanda siɛklɛ ya 16 tii ya 19, kotɛka mpe kosomba baombo kati na Afrika mpe Amerika nde ezalaki mombongo oyo ezalaki na benefisi mingi koleka mimbongo nyonso. Lapolo moko ya UNESCO elobi boye: ‘Bakangaki mpe batɛkaki mibali, basi mpe bana milio soki 25 tii 30.’ Balobaka ete mingi na bango bakufaki ntango bazalaki kokatisa Mbu Atlantike. Olaudah Equiano, moombo oyo abikaki na mobembo yango, alobaki boye: “Ndenge basi bazalaki kolela mpe ndenge baoyo bakómaki pene ya kokata motema bazalaki koganga, esalaki nsɔmɔ moko ya kosakana te.”

Likambo ya mawa, boombo ezali kaka te likambo ya kala. Ebongiseli oyo etalelaka makambo ya mosala na mokili mobimba elobi ete tii lelo bato soki milio 21; basi, mibali mpe bana, basalaka kaka lokola baombo, bafutaka bango mbongo moke to mpe te. Baombo ya mikolo oyo basalaka mpe misala ya kotimola mabanga ya ntalo, basalaka na bamagazini ya babɔmbɔ, na baizini ya babriki, na baotɛlɛ mpe na bandako ya bato. Atako mibeko ya Leta epekisi yango, emonani ete boombo ya ndenge wana ezali se kobakisama.

Tii lelo bamilio ya bato basalaka lokola baombo

KOLUKA BONSOMI

Monyoko etindaki baombo mingi báluka bonsomi. Na siɛklɛ ya liboso, liboso ya ntango na biso, Spartacus elombe moko ya bitumba mpe baombo soki 100 000 batombokelaki Roma, kasi balongaki te. Na siɛklɛ ya 18, baombo ya esanga Caraïbe ya Hispaniola batɛmɛlaki bankolo na bango. Mpasi oyo bamonisaki bango na mosala ya bilanga ya sukali ebimisaki bitumba ya bana mboka oyo eumelaki mbula 13, mpe nsukansuka esalaki ete Haïti ezwa lipanda na 1804.

Kasi, kobima ya Bayisraele na Ezipito nde ezalaki kolongwa na boombo oyo esimbaki mpenza. Bato soki milio misato; elingi koloba ekólo mobimba balongwaki na boombo na Ezipito. Ebongaki mpenza bázwa bonsomi yango. Biblia emonisi ete bomoi na bango na Ezipito ezalaki mpasi mpenza  mpo banyokolaki bango makasi. (Kobima 1:11-14) Kutu, Farao moko asalaki kampanye ya koboma babebe nyonso mpo Bayisraele bákóma mingi te.Kobima 1:8-22.

Kolongwa ya Bayisraele na boombo na Ezipito ezalaki ndenge mosusu mpo Nzambe nde asalisaki bango. Nzambe ayebisaki Moize boye: “Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona. Nazali kokita mpo na kobikisa bango.” (Kobima 3:7, 8) Tii lelo, Bayuda na bisika nyonso basalaka Pasika mbula na mbula mpo na kokanisa ndenge babimaki na Ezipito.Kobima 12:14.

NTANGO BOOMBO EKOSILA MPO NA LIBELA

Biblia elobi boye: ‘Epai ya Yehova Nzambe na biso, kozanga boyengene ezalaka te,’ mpe endimisi biso ete abongwani te. (2 Ntango 19:7; Malaki 3:6) Nzambe atindaki Yesu ‘asakwela baoyo bakangami kosikolama . . . , mpo atika bato oyo batutamá bákende na bonsomi.’ (Luka 4:18) Yango elingi nde koloba kosikola bato na boombo oyo tolobeli? Te. Nzambe atindaki Yesu alongola bato na boombo ya lisumu mpe liwa. Yesu alobaki boye: “Solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Ata lelo, solo oyo Yesu ateyaki epesaka bato bonsomi na makambo mingi.—Talá etanda “ Kolongwa na boombo ya ndenge na ndenge.”

Ndenge Nzambe asalisaki Yozefe alongwa na boombo ekeseni na ndenge asalisaki Blessing. Na Biblia, okokuta lisolo ya Yozefe na mokanda ya Ebandeli, mokapo 39 tii 41. Milende oyo Blessing asalaki mpo azwa bonsomi, ezali mpe kokamwisa.

Ntango babenganaki Blessing na mboka oyo azalaki, akendaki na Espagne. Kuna, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe akómaki koyekola Biblia. Lokola azwaki ekateli ya kobongisa bomoi na ye, azwaki mosala mpe abondelaki patrɔ na ye ya kala akitisa nyongo oyo azalaki kofuta ye sanza nyonso. Mokolo moko, patrɔ yango abengaki Blessing na telefone, ayebisaki ye afuta lisusu nyongo yango te mpe asɛngaki Blessing bolimbisi. Nini etindaki mwasi yango asala bongo? Mpo Batatoli ya Yehova bakómaki mpe koyekola na ye Biblia! Blessing alobi boye: “Solo esikolaka moto na ndenge ya kokamwa mpenza.”

Yehova Nzambe ayokaki mawa ndenge bazalaki konyokola Bayisraele na Ezipito; na ntembe te, ayokaka mpe mawa na makambo ya ndenge wana lelo oyo. Mpo boombo ya ndenge nyonso esila, ekosɛnga mbongwana moko monene ekɔta na mokili. Yango nde Nzambe alaki. Biblia elobi: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.”2 Petro 3:13.

^ par. 2 Topesi ye nkombo mosusu.

^ par. 3 Na ntango wana euro ná dolare ezalaki na valɛrɛ ndenge moko.