Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  No 2 2017

Yesu akendaki kotala mama-bokilo ya Petro mpe abikisaki ye.—Matai 8:14, 15; Marko 1:29-31

Bakambi ya lingomba ya bokristo basengeli kotikala minzemba?

Bakambi ya lingomba ya bokristo basengeli kotikala minzemba?

NA MOKILI mobimba, mangomba mingi na ndakisa Katolike, Ɔrtɔdɔkse, Buda mpe mangomba mosusu esɛngaka bakambi na yango bátikala minzemba. Kasi, bato mingi bamoni ete yango nde esali ete bakambi ya mangomba ndenge na ndenge bákóma kosangisa nzoto na ndenge ya mabe ndenge euti kosalema mikolo oyo.

Yango wana ebongi mpenza tómituna soki Biblia esɛngi bakambi ya mangomba bátikala minzemba. Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tiká tótalela esika likambo yango eutá mpe ndenge oyo ekolaki mpe tóyeba likanisi ya Nzambe na likambo yango.

ISTWARE YA MANGOMBA EMONISI NINI?

Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete bonzemba elakisi “koboya kobala mpe koboya kosangisa nzoto, mingimingi na boyokani na mokumba oyo mokonzi moko ya lingomba azali na yango.” Na diskur moko oyo asalaki na 2006, na likita moko na Roma, Pápa Benoit XVI alobaki ete kotikala monzemba eyokani na “momeseno ya kala oyo ezalaki mwa moke nsima ya eleko ya bantoma.”

Kasi bonzemba ezalaki te momeseno oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na yango. Kutu, ntoma Paulo, oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya liboso akebisaki bandimi mpo na mibali oyo bakoya na “maloba ya bokosi” mpe ‘bakopekisa bato kobala.’1 Timote 4:1-3.

Na siɛklɛ ya mibale nde likambo ya kotikala monzemba ebandaki na Mpoto na baeglize ya bokristo. Buku moko (Celibacy and Religious Traditions) emonisi ete likambo yango “eyokanaki na makanisi moko ya sika oyo ebimaki na ampire ya Roma, ya kopekisa bato básangisaka nzoto.”

 Na basiɛklɛ oyo elandaki, makita ya lingomba mpe baoyo babengamaka Batata ya Lingomba nde balingaki ete bakonzi ya mangomba bátikala minzemba. Bakanisaki ete kosangisa nzoto ezalaki kokómisa bango mbindo mpe eyokanaki te na misala ya kokamba lingomba. Kasi, buku moko (Encyclopædia Britannica) emonisi ete na nsuka ya siɛklɛ ya zomi, basango mingi mpe baepiskɔpɔ mosusu bazalaki na basi.

Makita ya 1123 mpe 1139, oyo esalemaki na Latran na Roma nde ebɛtaki mpenza nsɛtɛ na likambo ya kotikala monzemba na mangomba mpe yango esalá ete etikala mobeko na lingomba ya Katolike tii lelo. Ekateli wana nde esalaki ete eglize ebatela bokonzi mpe mbongo oyo ezalaki kobima mpo basango oyo babalá bazalaki kotikela yango bana na bango.

NDENGE NZAMBE ATALELAKA BONZEMBA

Biblia emonisi polele likanisi ya Nzambe mpo na bonzemba; ezali na maloba ya Yesu mpo na baoyo baponi kotikala minzemba lokola ye “mpo na bokonzi ya likoló.” (Matai 19:12) Ntoma Paulo mpe alobelaki bakristo oyo baponaki kotikala monzemba lokola ye “mpo na nsango malamu.”1 Bakorinti 7:37, 38; 9:23.

Ezala Yesu to Paulo, moko te apesaki mobeko ya kotikala monzemba. Yesu alobaki ete bonzemba ezali “likabo” oyo epesamelá bayekoli na ye nyonso te. Ntango Paulo akomaki mpo na baoyo babalá te, alobaki boye: “Nazali na mitindo ya kopesa te oyo euti na Nkolo, kasi nazali nde kopesa likanisi na ngai.”Matai 19:11; 1 Bakorinti 7:25.

Longola yango, Biblia emonisi ete bakambi mingi ya lingomba ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso, ata mpe ntoma Petro babalaki. (Matai 8:14; Marko 1:29-31; 1 Bakorinti 9:5) Kutu, lokola bato mingi bazalaki kosangisa nzoto na ndenge ya mabe na ntango wana, Paulo akomaki ete soki mokristo oyo azali mokambi ya lisangá abalá, asengeli kozala “mobali ya mwasi moko” mpe na “bana oyo bazali na botosi.”1 Timote 3:2, 4.

Yango elingi koloba te koboya kosangisa nzoto na libala mpo Biblia elobi ete ‘mobali asengeli kopesa mwasi na ye eloko oyo asengeli na yango’ mpe mwasi ná mobali oyo babalaná basengeli te ‘kopimelanaka’ nzoto. (1 Bakorinti 7:3-5) Ezali polele ete Nzambe atyá te mobeko ya kotikala monzemba, ezali mpe mobeko te mpo na bakambi ya mangomba.

MPO NA NSANGO MALAMU

Soki kotikala monzemba ezali mobeko te, mpo na nini Yesu ná Paulo balobaki malamu mpo na yango? Mpo yango ekoki kopesa moto mabaku mingi ya kosakola nsango malamu. Minzemba bakoki kosala mingi, mpo bakutanaka te na mitungisi oyo bato babalá bakutanaka na yango.1 Bakorinti 7:32-35.

Tózwa ndakisa ya David, oyo andimaki kotika mosala oyo ezalaki kofuta ye mbongo ebele na engumba Mexico mpo na kokende na mwa mboka moko ya Costa Rica koteya basusu Biblia. David amonaki ete kozala monzemba esalisaki ye; alobi boye: “Na ntembe te, ezalaki mpenza mokakatano mpo namesana na makambo mpe bomoi ya sika, kasi lokola nazalaki kaka ngai moko, ezalaki mpasi te mpo namesana.”

Claudia, mokristo oyo azali monzemba oyo akendaki kosakola na bisika oyo mposa ya basakoli ezalaki mingi, alobi boye: “Nasepelaka na mosala ya Nzambe. Kondima mpe boninga na ngai na Nzambe ekómaka makasi soki namoni ndenge akokisaka bamposa na ngai.”

“Ekipaka na yango te, ezala ozali monzemba to obalá, okozala na esengo soki ozali kosalela Yehova Nzambe na motema na yo mobimba.”Claudia

Bonzemba esengeli te kozala lokola kilo moko boye. Claudia abakisi boye: “Ekipaka na yango te, ezala ozali monzemba to obalá, okozala na esengo soki ozali kosalela Yehova Nzambe na motema na yo mobimba.”Nzembo 119:1, 2.

Makambo mosusu

MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI

Batatoli ya Yehova bapekisaka bato kolulana?

Kozala na fianse ezali kaka lokola kominanola to eleko mosusu?