Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2017

Mekolá bosembo mpe motema mawa ya Yehova

Mekolá bosembo mpe motema mawa ya Yehova

“Bósambisaka na bosembo ya solosolo; mpe bómoniselanaka motema boboto mpe motema mawa.”​—ZEKARIA 7:9.

NZEMBO: 125, 88

1, 2. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kotalela Mibeko ya Nzambe? (b) Na ndenge nini bakomeli ná Bafarisai basalelaki Mibeko na ndenge ya mabe?

YESU azalaki kolinga Mibeko ya Moize. Ezali likambo ya kokamwa te mpo Mibeko yango eutaki epai ya Tata na ye, Yehova, Moto oyo aleki ntina na bomoi ya Yesu. Nzembo 40:8 esakolaki ete Yesu akolinga mpenza Mibeko ya Nzambe; elobaki: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.” Na maloba mpe na misala na ye, Yesu amonisaki ete Mibeko ya Nzambe ezali ya kokoka, epesaka litomba mpe nyonso ekokisamaka.​—Matai 5:17-19.

2 Na ntembe te, Yesu ayokaki mawa ntango amonaki ndenge bakomeli ná Bafarisai bazalaki kosalela Mibeko ya Tata na ye na ndenge ya mabe, mpe kobimisa yango lokola ezali mindɔndɔ. Alobaki na bango: “Bopesaka moko ya bandambo zomi ya manti mpe ya aneti, mpe ya kumini”; alingaki koloba ete bazalaki kotya likebi mingi na kotosa makambo ya mikemike ya Mibeko. Mabe ezalaki wapi? Yesu abakisaki: “Kasi botyoli makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo ná motema mawa ná kondima.” (Matai 23:23) Bafarisai bakangaki ntina ya Mibeko te, mpe bazalaki kokanisa ete baleki basusu.  Kasi Yesu akangaki ntina ya Mibeko, ayebaki ete etinda na yango mokomoko emonisaki bizaleli kitoko ya Yehova.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Biso bakristo tosɛngisami kotosa Mibeko ya Moize te. (Baroma 7:6) Kasi mpo na nini Yehova akomisaki Mibeko yango na Liloba na ye, Biblia? Mpo alingi tóyeba mpe tósalela “makambo ya mibeko oyo ezali na ntina mingi,” elingi koloba mitinda oyo esimbi Mibeko. Na ndakisa, mpo na nini atyaki ebongiseli ya bingumba ya ekimelo? Na lisolo oyo eleki, tozwaki mateya na makambo oyo mobomi asengelaki kosala. Na lisolo oyo, tokoyekola makambo oyo bingumba ya ekimelo ezali koteya biso mpo na Yehova mpe ndenge oyo tokoki komekola bizaleli na ye. Tokopesa biyano na mituna misato: Ndenge nini bingumba ya ekimelo emonisi motema mawa ya Yehova? Ezali koteya biso nini mpo na ndenge oyo Nzambe atalelaka bomoi? Mpe ndenge nini emonisi bosembo na ye ya kokoka? Na likambo mokomoko, meká komona ndenge okoki komekola Tata na biso ya likoló.​—Tángá Baefese 5:1.

BISIKA BINGUMBA YA EKIMELO EZALAKI EMONISAKI MOTEMA MAWA YA NZAMBE

4, 5. (a) Makambo nini ebongisamaki mpo mobomi akóma nokinoki na engumba ya ekimelo, mpe mpo na nini? (b) Yango ezali koteya biso nini mpo na Yehova?

4 Yehova alingaki ete moto amona mpasi te mpo na kokóma na bingumba motoba ya ekimelo. Ayebisaki Bayisraele bápona bingumba misato na ngámbo moko ya Ebale Yordani, misato na ngámbo mosusu. Mpo na nini? Mpo mobomi akóma na moko ya bingumba yango nokinoki mpe na pɛtɛɛ nyonso. (Mitángo 35:11-14) Banzela oyo ezalaki komema na bingumba yango ezalaki ntango nyonso malamu. (Kolimbola Mibeko 19:3) Na kolanda masolo ya kala ya Bayuda, ezalaki na bilembo nzelanzela mpo na kosalisa babomi bámona bingumba yango. Lokola bingumba ya ekimelo ezalaki na Yisraele, Moyisraele oyo abomi moto kozanga ete akana yango azalaki na ntina te ya koluka libateli na mboka mopaya, epai akokaki kokɔta na losambo ya banzambe ya lokuta.

5 Kanisá naino: Yehova apesaki mobeko ete báboma moto oyo abomi moto. Kasi soki moto abomi na nko te, apesaki ye libaku ya komona motema mawa ya Nzambe mpe ya kozwa libateli. Moto moko oyo alimbolaka makambo ya Biblia alobaki: “Basalaki ete makambo nyonso ezala polele, pɛtɛɛ, mpe mindɔndɔ te.” Yehova azali te mosambisi moko ya motema mabe oyo alukaka kaka ndenge ya kopesa basaleli na ye etumbu. Kasi, “atondi mpenza na motema mawa.”​—Baefese 2:4.

6. Bafarisai bazalaki komekola motema mawa ya Yehova? Limbolá.

6 Nzokande Bafarisai bazalaki kolinga koyokela basusu mawa te. Na ndakisa, na kolanda bonkɔkɔ ya Bayuda, Bafarisai bazalaki koboya kolimbisa moto oyo azongeli libunga moko mbala koleka  misato. Mpo na komonisa ete ezaleli na bango ezalaki mabe, Yesu apesaki ndakisa ya Mofarisai moko oyo azalaki kobondela pembeni ya mokɔngɔli-mpako moko. Mofarisai alobaki: “Ee Nzambe, natɔndi yo mpo nazali lokola bato mosusu te, babɔtɔli, bato bazangi boyengebene, bato ya ekobo, to mpe lokola mokɔngɔli-mpako oyo.” Liteya nini Yesu alingaki kopesa? Bafarisai “bazalaki kotalela bato mosusu ete bazali mpamba,” mpe bazalaki komona ete ezali na ntina te báyokela bango mawa.​—Luka 18:9-14.

Bato bakakatanaka te kosɛnga yo bolimbisi? Zalá na komitikisa mpo bato bábanga te kosolola na yo (Talá paragrafe 4-8)

7, 8. (a) Ndenge nini okoki komekola motema mawa ya Yehova? (b) Mpo nini tosengeli kozala na komitikisa mpo na kolimbisa basusu?

7 Mekolá Yehova, kasi Bafarisai te. Zalá na boboto mpe monisáká motema mawa. (Tángá Bakolose 3:13.) Salá ete bato bákakatanaka te mpo na kosɛnga yo bolimbisi. (Luka 17:3, 4) Omituna boye: ‘Nalimbisaka basusu kozanga mindɔndɔ, ata soki bapesi ngai mpasi mbala ebele? Nalukaka mpenza kozongisa kimya na moto oyo asalaki ngai mabe to apesaki ngai mpasi?’

8 Mpo na kolimbisa basusu, tosengeli kozala na komitikisa. Bafarisai bazalaki kokanisa ete baleki basusu, yango wana bazalaki kolinga kolimbisa te. Kasi biso bakristo tosengeli ‘komona bamosusu ete baleki’ biso mpe kolimbisa bango na motema moko. (Bafilipi 2:3) Tómituna boye: ‘Namekolaka Yehova mpe nazalaka na komikitisa?’ Soki tozali na komikitisa, ekozala mpasi te mpo basusu básɛnga biso bolimbisi mpe tokolimbisa bango kozanga kokakatana. Monisáká motema mawa nokinoki mpe kosilikaka mpambampamba te.​—Mosakoli 7:8, 9.

ZWÁ BOMOI NA MOTUYA, MPE ‘NGAMBO YA MAKILA ATA MOKO TE EKOKWELA YO’

9. Ndenge nini Yehova asalisaki Bayisraele bámona ete bomoi ezali mosantu?

9 Moko ya bantina ya libosoliboso ya bingumba ya ekimelo ezalaki ya kobatela Bayisraele mpo bázala te na ngambo ya makila ya moto oyo azali na likambo te. (Kolimbola Mibeko 19:10) Yehova alingaka bomoi, mpe ayinaka koboma moto. (Masese 6:16, 17) Lokola azali Nzambe mosantu mpe ya sembo, ata soki moto abomi na nko te, akokaki kolekisa yango kaka boye te. Ya solo, bakokaki koyokela moto oyo abomi na nko te mawa. Kasi asengelaki liboso koyebisa mikóló ndenge makambo elekaki. Soki mikóló bamoni ete abomaki na nko te, mobomi yango asengelaki kotikala na engumba ya ekimelo tii nganga-nzambe monene akokufa. Yango ekokaki kolimbola ete akolekisa bomoi na ye mobimba kuna. Ebongiseli yango ezalaki komonisa Bayisraele nyonso ete bomoi ezali mosantu. Mpo na kokumisa Mopesi-bomoi, basengelaki kosala nyonso oyo bakoki mpo bátya bomoi ya basusu na likama te.

10. Ndenge nini Yesu amonisaki ete bakomeli ná Bafarisai bazalaki kozwa bomoi ya basusu na motuya te?

10 Kasi, bakomeli ná Bafarisai bamonisaki ete bazwaka bomoi ya basusu na motuya te. Yesu alobaki na bango: “Bolongoli fungola ya boyebi; bino moko bokɔtaki te, mpe baoyo bazalaki kokɔta bokangelaki bango nzela!” (Luka 11:52) Yesu alingaki koloba nini? Bakomeli mpe Bafarisai bazalaki na mokumba ya kolimbwela bato Liloba ya Nzambe mpe kosalisa bango bázwa bomoi ya seko.  Kasi bango balukaki nde kopekisa bato bálanda Yesu, “Kapita ya bomoi.” (Misala 3:15) Na ndenge yango, bazalaki komema bato na libebi. Bakomeli mpe Bafarisai bazalaki bato ya lolendo mpe bazalaki koluka kaka matomba na bango moko; bazalaki na ntina ya bomoi ya basusu te. Bazalaki mpenza mitema mabe!

11. (a) Ndenge nini Paulo amonisaki ete atalelaka bomoi ndenge Yehova atalelaka yango? (b) Nini ekosalisa biso tómekola molende ya ntoma Paulo na mosala ya kosakola?

11 Ndenge nini tokoki komekola Yehova mpe koboya kokóma lokola bakomeli ná Bafarisai? Tosengeli komemya bomoi mpe kozwa yango na motuya. Ntoma Paulo asalaki yango na ndenge alukaki kosakwela bato ebele mpenza nsango malamu ya Bokonzi. Yango wana alobaki: “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso.” (Tángá Misala 20:26, 27.) Kasi ntoma Paulo azalaki kosakola kaka mpo na kokima ngambo ya makila to mpo Yehova asɛngaki asala yango? Te. Azalaki kolinga bato. Azalaki kozwa bomoi na bango na motuya, mpe alingaki ete bázwa bomoi ya seko. (1 Bakorinti 9:19-23) Biso mpe tosengeli kotalela bomoi ndenge Yehova atalelaka yango. Alingi bato nyonso bábongola motema mpo bábika. (2 Petro 3:9) Mpo na komekola Yehova, tosengeli kolinga bato. Motema mawa ekotinda biso tósakolaka na molende mpe yango ekopesa biso esengo.

12. Mpo na nini komibatela na makama ezali na ntina mpo na basaleli ya Nzambe?

12 Mpo tótalela bomoi ndenge Yehova atalelaka yango, tosengeli mpe kozala na makanisi ebongi na oyo etali komibatela na makama. Tosengeli kotambwisa motuka mpe kosala mosala na bokɛngi, ata ntango tozali kotonga, kobongisa, to kokende na esika na biso ya losambo. Tóbosana te ete bato, komibatela na makama, mpe bomoi ezali na ntina koleka mbongo to ntango. Nzambe na biso asalaka ntango nyonso oyo ezali malamu; ebongi tómekola ye. Mingimingi bankulutu basengeli kokanisa ndenge ya komibatela na makama mpe kobatela basusu. (Masese 22:3) Soki nkulutu moko akundweli yo mobeko moko oyo etali komibatela na makama, yokelá ye. (Bagalatia 6:1) Soki ozali kotalela bomoi lokola Yehova, ‘ngambo ya makila ata moko te ekokwela yo.’

BÓSAMBISA “ENGEBENE BIKATELI OYO WANA”

13, 14. Ndenge nini mikóló na Yisraele bakokaki komekola bosembo ya Yehova?

13 Yehova asɛngaki mikóló ya Yisraele bámekola bosembo na ye. Ya liboso, mikóló basengelaki koluka koyeba ndenge makambo nyonso elekaki. Na nsima, basengelaki kotalela malamumalamu mposa ya motema ya mobomi yango, makanisi na ye, mpe makambo asalá kala mpo báyeba soki esengeli komonisa motema mawa to te. Mikóló basengelaki mpe koluka koyeba soki mobomi azalaki koyina moto yango, yango wana abomaki ye. (Tángá Mitángo 35:20-24.) Soki batatoli bazalaki, esengelaki ata mibale báloba liboso bákatela mobomi etumbu.​—Mitángo 35:30.

14 Nsima ya koyeba mpenza ndenge makambo elekaki, mikóló basengelaki mpe kotalela moto ye moko, kaka likambo asalaki te. Basengelaki kozala na bososoli mpo bátalela likambo na bozindo mpe bámona mpo na nini likambo yango esalemaki. Oyo eleki ntina, basengelaki kozala na elimo santu ya Yehova mpo esalisa bango bámekola bososoli, motema mawa, mpe bosembo na ye.​—Kobima 34:6, 7.

15. Na ndenge nini Yesu akesenaki na Bafarisai na ndenge ya kotalela basumuki?

15 Bafarisai bazalaki na motema mawa te ntango bazalaki kosambisa. Bazalaki kotalela kaka likambo oyo mosumuki asali, kasi te bomoto na ye. Ntango Bafarisai mosusu bamonaki Yesu azali kolya na ndako ya Matai, batunaki bayekoli na ye: “Mpo na nini moteyi na bino azali kolya elongo na bakɔngɔli-mpako ná basumuki?” Yesu ayanolaki: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla. Boye bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’  Mpo nayaki kobenga bayengebene te, kasi basumuki.” (Matai 9:9-13) Yesu azalaki nde kokɔtela basumuki? Te. Alingaki bábongola motema. Yango nde likambo ya ntina na nsango oyo azalaki kosakola. (Matai 4:17) Yesu amonaki ete mwa “bakɔngɔli-mpako mpe basumuki” mosusu bazalaki na mposa ya kobongwana. Bayaki na ndako ya Matai kaka mpo na kolya te. Bazalaki wana mpo balandaki Yesu. (Marko 2:15) Likambo ya mawa, Bafarisai mingi bazalaki kotalela bato ndenge moko na Yesu te. Bazalaki kondima te ete bato bakoki kobongwana, bazalaki komona bango lokola basumuki oyo bazangi elikya. Nzokande, Yehova azalaka bongo te, amonisaka motema mawa mpe bosembo!

16. Bankulutu oyo bazali kosambisa basengeli koluka koyeba nini?

16 Lelo, bankulutu basengeli komekola Yehova, Nzambe oyo “alingaka bosembo.” (Nzembo 37:28) Ya liboso, basengeli koluka malamumalamu mpo na koyeba soki lisumu esalemaki mpenza. Soki esalemaki, bakolanda malako ya Biblia mpo na koyeba oyo bakosala. (Kolimbola Mibeko 13:12-14) Ntango bazali kosambisa, basengeli kozala ekɛngɛ mpo na koyeba soki moto oyo asali lisumu abongoli motema to te. Koyeba yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kobongola motema eyebanaka na ndenge oyo mosumuki azali kotalela likambo oyo asalaki mpe oyo ezali na motema na ye. (Emoniseli 3:3) Mosumuki asengeli kobongola motema mpo amona motema mawa ya Nzambe. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

17, 18. Ndenge nini bankulutu bakoki koyeba soki moto abongoli mpenza motema? (Talá elilingi ya ebandeli.)

17 Yehova ná Yesu bayebaka makanisi ya moto mpe mayoki na ye mpo bakoki kotánga mitema. Kasi bankulutu bakoki kotánga mitema te. Na yango, soki ozali nkulutu, ndenge nini okoki koyeba soki moto abongoli mpenza motema? Ya liboso, sɛngá Yehova bwanya mpe bososoli. (1 Bakonzi 3:9) Ya mibale, salelá Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya moombo ya sembo mpo esalisa yo oyeba bokeseni kati na “mawa ya mokili” mpe “mawa oyo eyokani na mokano ya Nzambe,” elingi koloba kobongola motema ya solosolo. (2 Bakorinti 7:10, 11) Talá ndenge Biblia elobeli baoyo babongolaki motema mpe baoyo babongolaki motema te, mpe talelá ndenge oyo bamiyokaki, makanisi na bango, mpe ndenge oyo basalaki.

18 Ya misato, talelá bomoto ya moto oyo asali lisumu, kaka te mabe oyo asali. Mpo na nini akómi bongo? Mpo na nini azwaki ekateli moko boye? Mikakatano nini ekómeli ye mpe esika nini makoki na ye esuki? Biblia esakolaki ete Yesu, Mokonzi ya lisangá, “akosambisa te na kolanda kaka oyo ekomonana na miso na ye, mpe akopamela te na kolanda kaka likambo oyo matoi na ye eyoki. Mpe akosambisa na boyengebene mpenza bato oyo bazangá, mpe akopamela na kolongobana mpo na bolamu ya bato ya komikitisa oyo bazali na mabele.” (Yisaya 11:3, 4) Bankulutu, Yesu atye bino mpo bóbatela lisangá na ye mpe akosalisa bino bósambisa na bosembo mpe na motema mawa. (Matai 18:18-20) Tozali mpenza na botɔndi ndenge tozali na bankulutu oyo babatelaka biso! Basalisaka mpe biso tómonisa bosembo mpe motema mawa.

19. Likambo nini oyo etali bingumba ya ekimelo okani kosalela?

19 Mibeko ya Moize ezali na “makambo ya ebandeli ya boyebi mpe ya solo.” Eteyaka biso makambo etali Yehova mpe mitinda na ye. (Baroma 2:20) Na ndakisa, bingumba ya ekimelo eteyi bankulutu ndenge ya ‘kosambisa na bosembo ya solosolo’ mpe eteyi biso nyonso tómoniselanaka “motema boboto mpe motema mawa.” (Zekaria 7:9) Ata soki tosɛngisami te kolanda Mibeko ya Moize, tóyeba ete Yehova abongwani te. Bosembo mpe motema mawa ezali na ntina mingi na miso na ye. Ezali mpenza libaku malamu kosambela Nzambe ya boye. Na yango mekolá bizaleli na ye mpe okozwa libateli na ye!

^ par. 16 Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/2006 lokasa 30.