“Moto moko te azangisa bino libonza.”​—BAKOLOSE 2:18.

NZEMBO: 122, 139

1, 2. (a) Libonza nini basaleli ya Nzambe bazali kozela? (b) Nini esalisaka biso tótya miso na biso na libonza? (Talá elilingi ya ebandeli.)

BAKRISTO oyo batyami mafuta na elimo bazali na elikya kitoko ya kokende kofanda na likoló. Ntoma Paulo abengaki elikya yango “libonza ya kokende na likoló ndenge Nzambe abengi.” (Bafilipi 3:14) Kuna, bakoyangela elongo na Yesu Kristo na Bokonzi na ye mpe bakosala elongo na ye mpo na kosalisa bato bákóma bato ya kokoka. (Emoniseli 20:6) Ezali mpenza elikya kitoko! Bampate mosusu bakozwa libonza ya ndenge mosusu. Bakofanda libela na libela na Paradiso awa na mabele, mpe elikya yango epesaka bango esengo mpenza!​—2 Petro 3:13.

2 Ntoma Paulo alingaki kosalisa baninga na ye bakristo oyo batyami mafuta na elimo bátikala sembo mpe bázwa libonza. Ayebisaki bango: “Bókoba kotya makanisi na bino na makambo ya likoló.” (Bakolose 3:2) Basengelaki kotya makanisi na elikya  na bango kitoko ya kokende likoló. (Bakolose 1:4, 5) Kokanisa mapamboli ya Yehova esalisaka basaleli nyonso ya Nzambe bátya miso na libonza na bango, ezala ya likoló to ya mabele.​—1 Bakorinti 9:24.

3. Ntoma Paulo akebisaki bakristo na makambo nini?

3 Ntoma Paulo akebisaki mpe bakristo na makama oyo ekokaki kozangisa bango libonza. Na ndakisa, na mokanda na ye epai ya Bakolose, alobelaki bakristo ya lokuta oyo bazalaki koluka kosepelisa Nzambe na nzela ya kolanda Mibeko ya Moize na esika ya kondimela Kristo. (Bakolose 2:16-18) Paulo alobelaki mpe makama oyo ezali komonana tii lelo, oyo ekoki mpe kopekisa biso tózwa libonza. Amonisaki ndenge ya kotɛmɛla bamposa ya mbindo mpe oyo tosengeli kosala ntango tozwani matata na bandeko ya libota to ya lisangá. Toli ya Paulo ekoki mpe kosalisa biso. Na yango, tótalela makebisi oyo ezali na mokanda na ye epai ya Bakolose.

BOMÁ BAMPOSA YA MBINDO

4. Mpo na nini bamposa ya mbindo ekoki kozangisa biso libonza?

4 Nsima ya kokundwela bandeko na ye elikya kitoko oyo bazalaki na yango, ntoma Paulo akomaki: “Na yango, bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa [makasi] ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela.” (Bakolose 3:5) Bamposa ya mbindo ekoki kozala makasi mpenza mpe kosala ete tóbebisa boyokani na biso na Yehova mpe tóbungisa elikya. Ndeko moko oyo akweaki mpo na bamposa na ye ya mbindo, mpe na nsima azongisamaki na lisangá alobi ete bamposa yango ekómaki makasi mpe “akokaki lisusu kokanga motema te tii asalaki lisumu.”

5. Ndenge nini tokoki kokima makama?

5 Tosengeli kokeba mingimingi soki tozali na likambo oyo ekoki komema biso tóbuka mibeko ya Yehova. Na ndakisa, ezali likambo ya bwanya mwasi ná mobali oyo balingani mpo na kobalana bámityela bandelo banda na ebandeli mpo na makambo lokola kosimbana, kopesana bizi, mpe kozala kaka bango mibale. (Masese 22:3) Makama mosusu ekoki kobima ntango okei mobembo ya mosala to soki ozali kosala elongo na moto oyo azali molongani na yo te. (Masese 2:10-12, 16) Okoki kosala nini mpo na komibatela? Monisá ete ozali Motatoli ya Yehova. Zalá na bizaleli malamu, mpe kobosana ata mokolo moko te ete kolulana na moto oyo azali molongani na yo te ememaka na likama. Tosengeli mpe kokeba soki tozali mawamawa to tozali komiyoka ete tozali kaka biso moko. Tokoki kozala na mposa moto moko atyela biso likebi. Tokoki koyoka lokola tosuki tii tokoki kondima kaka moto nyonso. Yango ezali likama. Soki ekómi ete oyoka bongo, kosala likambo moko te oyo ekopekisa yo ozwa libonza. Luká lisalisi epai ya Yehova mpe bandeko.​—Tángá Nzembo 34:18; Masese 13:20.

6. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopona kominanola?

6 Mpo na koboma bamposa ya mbindo, tosengeli koboya kominanola ya mbindo. Lelo oyo, kominanola mingi ezali kokundwela biso ndenge makambo ezalaki na Sodoma mpe Gomora. (Yuda 7) Bato oyo basalaka bafilme balingaka ete pite emonana lokola ezali mabe te mpe ezangi likama. Yango wana, tosengeli ntango nyonso kokeba. Tokoki te kondima kominanola nyonso oyo mokili ezali kobimisa. Tosengeli kopona kominanola oyo ekopekisa biso te kozwa libonza ya bomoi.​—Masese 4:23.

 ‘LATÁ’ BOLINGO MPE BOBOTO

7. Mikakatano nini ekoki kobima na lisangá?

7 Tozalaka na esengo ya kozala na kati ya lisangá ya bokristo. Toyekolaka Liloba ya Nzambe na makita, tolinganaka mpe tosalisanaka. Yango esalisaka biso tókoba kotya miso na libonza. Kasi na bantango mosusu, kozanga koyokana ekoki kobimisa mikakatano na kati ya bandeko. Soki tosilisi matata yango te, tokoki kobomba nkanda na motema.​—Tángá 1 Petro 3:8, 9.

8, 9. (a) Bizaleli nini ekosalisa biso tózwa libonza? (b) Soki ndeko moko apesi biso nkanda, nini ekoki kosalisa biso tóbatela kimya?

8 Tótika te ete nkanda ezangisa biso libonza. Ntoma Paulo alimbolaki oyo bakristo basengeli kosala; akomaki boye: “Lokola bato oyo Nzambe aponi, basantu mpe bandeko ya bolingo, bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai. Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Bakolose 3:12-14.

9 Bolingo mpe boboto ekoki kosalisa biso tólimbisaka basusu. Soki tomoni ete basali to balobi na biso likambo moko ya mabe, tókanisa ntango oyo biso mpe tolobaki to tosalaki basusu likambo oyo ebongaki te, kasi balimbisaki biso. Na ntembe te, tosepelaki mingi na bolingo mpe boboto oyo bamoniselaki biso! (Tángá Mosakoli 7:21, 22.) Tozali na botɔndi ndenge Kristo azali kosangisa basambeli ya solo na bomoko. (Bakolose 3:15) Biso nyonso tolingaka Nzambe moko, tosakolaka nsango moko, mpe mikakatano na biso mingi ezali kaka ndenge moko. Soki tozali na boboto, bolingo, mpe tozali kolimbisana, lisangá ekozala na bomoko mingi mpe tokotya makanisi na biso na libonza.

10, 11. (a) Mpo na nini zuwa ezali likama? (b) Tokoki kosala nini mpo zuwa ezangisa biso libonza te?

10 Zuwa mpe ekoki kozangisa biso libonza. Bandakisa ya Biblia emonisi ete zuwa ezali likama mpenza. Na ndakisa, Kaina ayokelaki Abele zuwa mpe abomaki ye. Kora, Datane, mpe Abirame bayokelaki Moize zuwa mpe batombokelaki ye. Mokonzi Saulo ayokelaki Davidi zuwa mpe alukaki koboma ye. Liloba ya Nzambe elobi solo ete: “Epai zuwa mpe kowelana ezali, mobulu ná makambo nyonso ya mabe mpe ezali wana.”​—Yakobo 3:16.

11 Soki tosali nyonso mpo na komonisa bolingo mpe boboto, ekozala mpasi tóyokela basusu zuwa. Liloba ya Nzambe elobi: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te.” (1 Bakorinti 13:4) Mpo zuwa ekóma te moko ya bizaleli na biso, tosengeli kosala nyonso tótalelaka makambo lokola Yehova. Tosengeli komona bandeko na biso lokola binama ya nzoto kaka moko, elingi koloba lisangá. Biblia elobi: “Soki enama moko ekumisami, binama mosusu nyonso mpe esepelaka elongo na yango.” (1 Bakorinti 12:16-18, 26) Na yango, soki likambo moko ya malamu ekómeli ndeko na biso, tósepela, tóyokela ye zuwa te. Kanisá ndakisa ya Yonatane, mwana ya Mokonzi Saulo. Yonatane ayokaki zuwa te ntango Davidi nde aponamaki mpo na kozala mokonzi. Kasi, alendisaki ye mpe apesaki ye mabɔkɔ. (1 Samwele 23:16-18) Yo mpe okoki komonisa boboto mpe bolingo lokola Yonatane?

 BÓZWA LIBONZA LIBOTA MOBIMBA

12. Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa libota ezwa libonza?

12 Soki moto nyonso na libota azali kosalela mitinda ya Biblia, libota ekozala na kimya, esengo mpe ekozwa libonza. Ntoma Paulo apesaki toli ya bwanya mpo na mabota, alobaki: “Bino basi, bómikitisa liboso ya mibali na bino, mpo ebongi bongo na kati ya Nkolo. Bino mibali, bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasi te. Bino bana, bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo yango ezali malamu mingi na kati ya Nkolo. Bino batata, bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.” (Bakolose 3:18-21) Na ntembe te, toli yango ekoki kosalisa mingi ata lelo!

13. Ndenge nini ndeko mwasi akoki kosalisa mobali na ye oyo azali Motatoli te abanda kosambela Yehova?

13 Mbala mosusu ozali na mobali oyo azali Motatoli te. Okosala nini soki omoni ete azali kosalela yo makambo ndenge esengeli te? Okoki kosilika mpe koswanisa ye, kasi yango ekobongisa nde makambo? Ata soki olongi na maloba, yango nde ekopesa ye mposa ya kosambela Yehova? Mbala mosusu te. Kasi, soki ozali komemya ye mpo azali mokonzi ya libota, okoki kosalisa libota na yo ezala na kimya mpe okopesa Yehova lokumu. Ndakisa na yo ya malamu ekoki ata kosala ete mobali na yo abanda kosambela Yehova, mpe bino mibale bokoki kozwa libonza.​—Tángá 1 Petro 3:1, 2.

14. Ndeko oyo mwasi na ye azali Motatoli te asengeli kosala nini soki mwasi yango amemyaka ye te?

 14 Mbala mosusu ozali na mwasi oyo asambelaka Yehova te. Okoki kosala nini soki omoni ete atosaka yo te? Soki oluki komonisa ye ete ozali mokonzi mpe ozali kogangela ye, okanisi ete akobanda komemya yo? Soki moke te! Nzambe alingi ete olingaka mwasi na yo, ndenge Yesu alingaka lisangá. (Baefese 5:23) Yesu, mokonzi ya lisangá, azalaka ntango nyonso na motema molai mpe na bolingo. (Luka 9:46-48) Soki omekoli Yesu, nsima ya mikolo, mwasi na yo akoki kobanda mpe kosalela Yehova.

15. Ndenge nini mobali akoki komonisa ete alingaka mwasi na ye?

15 Yehova ayebisi mibali ete: “Bino mibali, bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasi te.” (Bakolose 3:19) Mobali oyo alingaka mwasi na ye apesaka ye lokumu. Ndenge nini? Ayokaka makanisi na ye mpe amonisaka ye ete makanisi oyo apesi ezali na ntina. (1 Petro 3:7) Ata soki akoki te kosala ntango nyonso oyo mwasi asɛngi, koyokela mwasi na ye ekoki kosalisa ye azwa bikateli ya malamu koleka. (Masese 15:22) Mobali oyo alingaka mwasi na ye asɛngaka limemya na makasi te. Alingaka ete makambo oyo asalaka nde etinda mwasi amemya ye. Ntango mobali azali kolinga mwasi na ye mpe bana, bakozala na esengo ya kosalela Yehova mpe bakozwa libonza ya bomoi.

Tokoki kosala nini mpo mikakatano ya libota ezangisa biso libonza te? (Talá paragrafe 13-15)

BILENGE, BÓTIKA ELOKO TE EZANGISA BINO LIBONZA!

16, 17. Soki ozali elenge, nini ekoki kosalisa yo otombokela baboti na yo te?

16 Mbala mosusu ozali elenge mpe ozali komona ete baboti bamityaka na esika na yo te mpe bazali makambo makasi. Mbala mosusu epesaka yo nkanda makasi mpe ozali komituna soki osengeli kutu kosalela Yehova. Kasi soki otiki Yehova, okomona ete moto moko te na mokili alingaka yo koleka baboti na yo oyo bazali bakristo mpe baninga na yo na lisangá.

17 Kanisá naino: Soki baboti na yo basembolaka yo te, okomituna te soki balingaka yo mpenza? (Baebre 12:8) Ezali solo ete bazali bato ya kokoka te, yango wana ndenge bapesaka yo disiplini ekoki kosilikisa yo. Kotyela yango likebi te. Kasi, lukáká koyeba ntina oyo balobi na yo to basali yo likambo moko. Fandá kimya, mpe salá makasi otomboka te. Biblia elobi: “Moto nyonso oyo apekisaka maloba na ye azali na boyebi, mpe moto ya bososoli azali na elimo ya kimya.” (Masese 17:27) Mityelá mokano ya kokóma moto oyo akɔmɛli, oyo andimaka toli mpe azwelaka yango liteya ata soki epesami ndenge nini. (Masese 1:8) Kobosana ata moke te ete kozala na baboti oyo balingaka Yehova ezali likabo ya motuya. Balingi kosalisa yo mpo ozwa bomoi ya seko.

18. Mpo na nini ozali na ekateli ya kotya miso na libonza?

18 Ezala tozali na elikya ya kokende na likoló to ya kofanda na paradiso awa na mabele, biso nyonso tozali na elikya ya malamu na mikolo ezali koya. Elikya na biso ezali ya solo. Euti na elaka ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, oyo alobi: “Mabele ekotonda na boyebi ya Yehova.” (Yisaya 11:9) Mosika te moto nyonso akoteyama na Nzambe. Ebongi tósala nyonso mpo na kozwa libonza yango. Na yango, kanisáká ntango nyonso oyo Yehova alaki yo, mpe kotika eloko te ezangisa yo libonza yango!