Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2017

Ndenge ya komesana na lisangá ya sika

Ndenge ya komesana na lisangá ya sika

NDEKO moko na nkombo Allen * alobi boye: “Likanisi ya koya awa etungisaki ngai, nayebaki te soki nakozwa baninga to bakondima ngai.” Allen azali komesana na lisangá moko ya sika oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 1 400, longwa esika azalaki.

Soki yo mpe okendá na lisangá ya sika mbala mosusu ozali komitungisa. Nini ekoki kosalisa yo omesana? Okosala nini soki ozali komesana noki te ndenge okanisaki? Ata soki okendá na lisangá mosusu te, okoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo bayei sika bámesana noki?

OYO OKOKI KOSALA NINI MPO OMESANA MALAMU

Tozwá ndakisa: Ntango balongoli nzete mpo na kolona yango esika mosusu, enyokwamaka. Soki balongoli nzete moko na mabele, bakataka misisa na yango mosusu mpo bázwa likoki ya komema yango. Nsima ya kolona yango esika mosusu, nzete esengeli mbala moko kobota misisa ya sika. Ndenge moko mpe, kokende na lisangá mosusu ekoki kotungisa yo. Na lisangá ya kala, olonaki “misisa” na ndenge ozwaki baninga mpe omesanaki na programɛ moko boye ya makambo ya elimo. Sikoyo osengeli kobota misisa ya sika mpo omesana na esika ya sika. Kosalela mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo. Tótala mwa mitinda yango mosusu.

Moto oyo atángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo azali “lokola nzete oyo elonami pene na mikɛli ya mai, oyo epesaka mbuma na yango na eleko na yango mpe oyo nkasa na yango ekaukaka te, mpe nyonso oyo azali kosala ekolonga.”​Nzembo 1:1-3.

Ndenge kaka nzete ezalaka na mposa ya mai mpo ekola malamu, mokristo mpe azali na mposa ya Liloba ya Nzambe mpo azala ntango nyonso makasi na elimo. Yango wana, kobá kotánga Biblia mokolo na mokolo, mpe yanganáká na makita nyonso. Batelá momeseno ya kosala losambo na kati ya libota mpe boyekoli na yo moko. Makambo oyo ozalaki kosala na lisangá ya kala mpo ozala makasi na elimo, kobá kosala yango mpe na lisangá ya sika.

“Moto oyo amwangiselaka bato mosusu mai mingi, ye mpe bakomwangisela ye mai mingi.”​Masese 11:25.

Okozwa makasi mpe okomesana noki soki ozali kobima mingi na mosala ya kosakola. Nkulutu moko na nkombo Kevin alobi: “Kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi mwa moke nsima ya kokóma na lisangá ya sika esalisaki ngai mingi ná mwasi na ngai. Toumelaki te mpo na koyeba bandeko, babongisi-nzela, mpe teritware yango.” Roger, oyo alongwaki esika azalaki liboso mpe akendaki kofanda na esika oyo ezali na kilomɛtrɛ koleka 1 600, alobi: “Mpo omesana malamu mpenza na lisangá ya sika esengeli kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola. Lisusu, yebisá bankulutu ete okoki kosalisa na likambo nyonso, na ndakisa na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi, kosala masolo, to kosalisa mpo na komema moto na makita. Ntango bandeko bakomona ete ozali na elimo ya komipimela, bakosepela na yo mingi.”

“Bófungwama.”​2 Bakorinti 6:13.

Fungwamá na bolingo ya bondeko. Ntango Melissa ná libota na ye bakendaki na lisangá ya sika, basalaki makasi bázwa baninga ya sika. Alobi boye: “Tozalaki kolekisa ntango elongo na bandeko  liboso mpe nsima ya makita, yango ezalaki kosala ete tósolola mingi na bango na esika ya kosuka kaka na mbote.” Yango esalisaki mpe libota na ye báyeba bankombo ya bandeko noki. Lisusu, bafungwamaki na ndenge bazalaki koyamba bandeko epai na bango mpe ekómisaki boninga makasi. Abakisi boye: “Topesanaki banimero ya telefone; na yango bakokaki kobenga biso mpo na makambo ya lisangá to bibongiseli mosusu.”

Soki kokutana na bato ya sika etungisaka yo, okoki kobanda na makambo ya mikemike. Na ndakisa, sɛká ata soki ozalaki na mposa ya kosala yango te, mpo yango ekotinda bato bápusana epai na yo. Kutu, “kongɛnga ya miso esepelisaka motema.” (Masese 15:30) Rachel oyo akendaki kofanda mosika alobi: “Nazalaka moto ya nsɔninsɔni. Ntango mosusu nazalaki kosala makasi mpo nasolola na bandeko na lisangá ya sika. Nazalaki koluka kofanda na moto oyo afandi ye moko, azali kosolola na bato te. Nazalaki komona ete moto yango azali nsɔninsɔni lokola ngai.” Mpo na nini te komityela mokano ya kosolola na moto ya sika liboso to nsima ya makita?

Na mwa bapɔsɔ ya ebandeli, okozala mpe na esengo ya kokutana na bato oyo oyebi sika. Kasi nsima ya mikolo bakozala lisusu bato ya sika te. Na ntango wana, ebongi kosala milende mpo okoba kozwa baninga ya sika.

Nzete oyo bamemi na esika mosusu enyokwamaka, kasi nsima ya kolona yango esika mosusu, ebotaka misisa ya sika

KOMESANA EZWAKA NTANGO

Nzete mosusu ezwaka ntango mpo epika misisa na esika oyo baloni yango lisusu. Ndenge moko mpe, bato mosusu bamesanaka noki, bamosusu bamesanaka noki te na lisangá ya sika. Soki eleki mikolo kobanda okendá lisangá ya sika mpe ozali kaka komesana te, kosalela mitinda oyo ya Biblia ekoki kosalisa yo:

“Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.”​Bagalatia 6:9.

Zwá ntango mingi mpo omesana. Na ndakisa, bamisionɛrɛ mingi oyo bautaka Gileade batikalaka bambula ebele na bamboka oyo batindi bango liboso bázonga na bamboka na bango kotala bandeko ya libota. Kosala bongo esalisaka bango básala boninga na bandeko ya mboka wana mpe bámesana na mimeseno mosusu.

Alejandro, oyo afandá bisika ndenge na ndenge, ayebi ete komesana esalemaka mbangumbangu te. Alobi boye: “Mbala ya nsuka oyo tokendaki esika mosusu, mwasi na ngai alobaki, ‘baninga na ngai nyonso batikali na lisangá oyo touti!’” Akundwelaki ye ete alobaki kaka bongo eleki mbula mibale, ntango bakendaki esika mosusu. Kasi na ntango yango, atyelaki bandeko likebi mpe bakómaki baninga ya motema.

“Koloba te ete: ‘Mpo na nini mikolo ya liboso elekaki mikolo oyo na malamu?’ Ezali bwanya te nde etindi yo otuna ndenge wana.”​Mosakoli 7:10.

Kokokanisaka lisangá ya sika na oyo ya kala te. Na ndakisa, mbala mosusu bandeko ya lisangá ya sika balobaka mingi te to balobaka mingi koleka bandeko ya lisangá oyo outi. Tyá likebi na makambo ya malamu, ndenge kaka olingi básala mpe mpo na yo. Kokende na esika ya sika etindaki bandeko mosusu bámituna: ‘Nalingaka mpenza “lisangá mobimba ya bandeko”?’​—1 Petro 2:17.

“Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino.”​Luka 11:9.

 Kobá kobondela mpo na kosɛnga lisalisi. David oyo azali nkulutu alobi boye: “Koluka komema mokumba yo moko te. Na lisalisi ya Yehova, tokoki kosala makambo mingi. Bondelá mpo na yango!” Rachel, oyo tolobelaki liboso, andimi likambo yango; alobi: “Soki ngai ná mobali na ngai tomoni ete tobandi kokóma mwa mosika na bandeko, toyebisaka Yehova na libondeli ete ‘Salisá biso tóyeba soki tozali kosala makambo oyo ezali kosala ete bandeko bápusana pene na biso te.’ Na nsima tosalaka makasi tólekisaka ntango mingi elongo na bandeko.”

Baboti, soki bana na bino bazali komesana noki te, bózwaka ntango ya kobondela elongo na bango mpo na yango. Bózwaka bibongiseli ya kolekisa ntango elongo na bandeko mpo na kosalisa bango bázwa baninga ya sika.

SALISÁ BANDEKO OYO BAYEI SIKA

Makambo nini osengeli kosala mpo na kosalisa bandeko oyo bayei sika na lisangá na bino? Zalá moninga ya solo banda na ebandeli. Mpo na kosala bongo, meká kokanisa makambo oyo okosepela básalela yo soki yo nde oyaki sika, mpe salá yango mpo na basusu. (Matai 7:12) Okoki kobengisa bandeko oyo bayei sika mpo bósala losambo na kati ya libota, to bótala elongo emisyo ya sanza ya TV JW? Okoki kosɛnga bango bóbima elongo na mosala ya kosakola? Soki obengisi bango mpo na kolya mwa eloko elongo, bakobosana te ezaleli na yo ya bokabi. Makambo nini mosusu okoki kosala mpo na kosalisa moto oyo ayei sika?

Carlos alobi: “Ntango nayaki na lisangá sika, ndeko mwasi moko apesaki ngai nkombo ya bisika oyo nakoki kosomba biloko na ntalo malamu mpe yango esalisaki ngai mingi.” Baoyo bakendaka bisika oyo klima ekeseni na esika bauti bakosepela koyeba molato oyo ebongi mpo na eleko ya malili, molunge, to ya mbula. Tokoki mpe kosalisa bango básakola malamu soki toyebisi bango ndenge makambo esalemaka esika tofandi to bindimeli ya bato ya teritware na biso.

EBONGI MPENZA OSALA MILENDE MPO OMESANA

Allen oyo tolobelaki na ebandeli aumeli na lisangá na ye ya sika koleka mbula moko. Akomi: “Na ebandeli, nasengelaki kosala milende mpo na koyeba bandeko. Kasi lelo tokómá mpenza libota, mpe nazali na esengo.” Allen amoni ete ndenge akendá na lisangá mosusu, abungisaki ata moninga moko te. Kutu, azwá baninga oyo mbala mosusu bakotikala baninga na ye mpo na libela.

^ par. 2 Bankombo mosusu ezali ya bango te.