Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2017

Okimaka epai ya Yehova?

Okimaka epai ya Yehova?

“Yehova asikolaka molimo ya basaleli na ye; mpe moko te kati na baoyo bazali kokima epai na ye akomema ngambo.”​—NZEMBO 34:22.

NZEMBO: 8, 54

1. Lisumu etindaka basaleli mingi ya Nzambe bámiyoka ndenge nini?

NTOMA Paulo akomaki boye: “Ngai moto ya mawa!” (Baroma 7:24) Lelo mpe, bakristo mingi ya sembo balɛmbaka nzoto mpe bamitungisaka kaka lokola Paulo. Mpo na nini? Mpo ata soki tolingaka kosepelisa Yehova, biso nyonso tosangolá lisumu mpe tozali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, tokoki koyoka mabe ntango tosepelisi Yehova te. Bakristo mosusu oyo basalaki lisumu moko ya monene bamonaki kutu lokola ete Yehova akoki kolimbisa bango ata mokolo moko te.

2. (a) Ndenge nini Nzembo 34:22 emonisi ete ezali na ntina te basaleli ya Nzambe báyokaka ete bamemá ngambo? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo? (Talá mpe etanda “ Mateya to ndimbola ya elilingi?”)

2 Biblia emonisi ete soki tokimi epai ya Yehova, ezali na ntina te tómiyokaka ete tomemá ngambo. (Tángá Nzembo 34:22.) Kasi, kokima epai ya Yehova elimboli nini? Tosengeli kosala nini mpo Yehova ayokela biso mawa mpe alimbisa biso? Tokozwa biyano na mituna wana soki totaleli ebongiseli ya bingumba ya ekimelo oyo ezalaki na Yisraele. Ebongiseli yango ezalaki na ntango ya kondimana ya Mibeko, oyo elongwaki na Pantekote ya mobu 33. Kasi kobosana te ete Mibeko yango eutaki epai ya Yehova. Na yango, soki totaleli ebongiseli ya bingumba ya ekimelo, tokoyeba ndenge  Yehova atalelaka lisumu, mosumuki, mpe moto oyo abongoli motema. Liboso, tótala naino ntina ya bingumba ya ekimelo mpe ndenge makambo ezalaki koleka kuna.

“BÓPONA BINGUMBA YA EKIMELO”

3. Bayisraele basengelaki kosala nini na moto oyo abomi moto?

3 Koboma moto ezalaki likambo ya lisɛki te na miso ya Yehova. Soki Moyisraele abomi moto, ndeko mobali ya moto oyo babomi, oyo bazalaki kobenga “mozongisi mabe mpo na makila,” asengelaki koboma mobomi yango. (Mitángo 35:19) Yango ezalaki mpo na kofuta bomoi ya moto oyo abomamaki, atako asalaki likambo te. Soki mobomi yango abomami noki te, Mokili ya Ndaka ekokaki kokóma mbindo, elingaki kozala lisusu mosantu te. Yehova alobaki: “Bosengeli te kobebisa mokili epai bozali; mpamba te ezali makila [ya moto oyo abomami] nde ebebisaka mokili.”​—Mitángo 35:33, 34.

4. Nini ezalaki kosalema soki Moyisraele abomi moto kozanga ete akana yango?

4 Kasi, nini ezalaki kosalema soki Moyisraele abomi moto kozanga akana yango? Ata soki asalaki yango na nko te, ezalaki kaka ngambo mpo abomaki moto oyo asali likambo te. (Ebandeli 9:5) Kasi na likambo yango, Yehova atyaki ebongiseli moko oyo emonisaki motema mawa. Moto oyo abomaki kozanga ete akana yango akokaki kokima mozongisi mabe mpo na makila mpe kokende na moko ya bingumba motoba ya ekimelo. Soki bandimi ye afanda na engumba yango, wana abatelami. Kasi asengelaki kotikala kuna tii na liwa ya nganga-nzambe monene.​—Mitángo 35:15, 28.

5. Mpo na nini ebongiseli ya bingumba ya ekimelo ekoki kosalisa biso tóyeba Yehova malamumalamu?

5 Likanisi ya kotya bingumba ya ekimelo eutaki epai ya moto te. Eutaki epai ya Yehova. Ayebisaki Yosua ete: “Lobá na bana ya Yisraele boye: ‘Bópona bingumba ya ekimelo.’” Bingumba yango ‘esantisamaki.’ (Yosua 20:1, 2, 7, 8) Yehova alobaki ete bingumba yango esengeli kotyama pembeni. Na yango, ebongiseli ya bingumba ya ekimeli ekoki koteya biso makambo mingi mpo na Yehova. Na ndakisa, esalisaka biso tómona malamumalamu motema mawa ya Yehova. Mpe ezali koteya biso ndenge oyo tokoki kokima epai ya Yehova lelo.

ASENGELI ‘KOYEBISA LIKAMBO NA YE’ EPAI YA MIKÓLÓ

6, 7. (a) Lobelá mokumba ya mikóló na oyo etali kosambisa moto oyo abomaki kozanga ete akana yango. (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mpo na nini ezalaki malamu mobomi asolola na mikóló?

6 Soki Moyisraele abomi moto kozanga ete akana yango, asengelaki kokima na engumba ya ekimelo mpe ‘koyebisa likambo na ye’ epai ya mikóló na porte ya engumba. Mikóló yango basengelaki koyamba ye. (Yosua 20:4) Nsima ya mwa ntango, basengelaki kozongisa ye akende kosamba liboso ya mikóló na engumba epai abomaki moto. (Tángá Mitángo 35:24, 25.) Soki mikóló yango bamoni ete ya solo abomaki moto kozanga ete akana yango, basengelaki kozongisa ye na engumba ya ekimelo.

7 Mpo na nini esengelaki ete mobomi ayebisa likambo na ye epai ya mikóló? Mpo mikóló báyeba soki ekoló ezali kaka pɛto mpe básalisa moto oyo abomaki kozanga ete akana yango azwa litomba na motema mawa ya Yehova. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia akomaki ete soki mobomi akei epai ya mikóló te, ndeko ya moto oyo abomaki akokaki koboma mpe ye. Wana alingaki kozala na ngambo ya makila na ye moko mpo asali te likambo oyo Nzambe asɛngaki. Moto oyo abomi na nko te asengelaki kosɛnga mpe kondima lisalisi mpo atikala na bomoi. Soki aboyi kokende na engumba ya ekimelo, ndeko ya moto oyo abomaki azalaki na lotomo ya koboma ye.

8, 9. Mpo na nini mokristo oyo asali lisumu ya monene asengeli kosolola na bankulutu?

 8 Lelo oyo, mpo na kozongela boyokani malamu na Yehova, mokristo oyo asali lisumu ya monene asengeli kokende epai ya bankulutu mpo básalisa ye. Mpo na nini ezali na ntina mingi? Ya liboso, Yehova nde abongisá ete bankulutu básambisa bato oyo basali masumu ya minene. (Yakobo 5:14-16) Ya mibale, bankulutu bakoki kosalisa moto oyo abongoli motema azongisa boninga na Nzambe mpe azongela lisusu te lisumu oyo asalaki. (Bagalatia 6:1; Baebre 12:11) Ya misato, bankulutu bazali na mokumba ya kosalisa mosumuki oyo abongoli motema azwa kimya mpe atika koyoka ete amemi ngambo, mpe bateyamaka mpo na kosala yango. Yehova abengi bankulutu yango “esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi.” (Yisaya 32:1, 2) Ebongiseli yango ezali moko ya makambo oyo emonisaka motema mawa ya Nzambe.

9 Basaleli mingi ya Nzambe bayokaki motema ekiti nsima ya kosolola na bankulutu mpe kozwa lisalisi na bango. Na ndakisa, ndeko mobali moko na nkombo Daniel asalaki lisumu ya monene, kasi nsima ya basanza ebele asololaki na bankulutu te. Alobi boye: “Lokola ntango elekaki mingi, nakanisaki ete bankulutu bakokaki lisusu kosala eloko te mpo na ngai.” Kasi azalaki ntango nyonso kobanga ete moto ayeba lisumu asalaki, mpe azalaki komona ete asengeli kobanda libondeli nyonso na kosɛnga Yehova bolimbisi. Nsukansuka, alukaki lisalisi ya bankulutu. Nsima ya bambula alobi boye: “Nazalaki kobanga kosolola na bango. Kasi na nsima, nayokaki lokola balongoli ngai mokumba ya kilo na mapeka.” Daniel azongelaki kobondela Yehova kozanga kokakatana. Lelo, azali na lisosoli ya pɛto, mpe auti kokóma mosaleli na misala.

“AKOKIMA NA MOKO YA BINGUMBA YANGO”

10. Moto oyo abomi kozanga ete akana yango asengelaki kosala nini mpo Nzambe alimbisa ye?

10 Moto oyo abomi kozanga ete akana yango, asengelaki kokima nokinoki na engumba ya ekimelo oyo ezali pembeni mpo Nzambe alimbisa ye. (Tángá Yosua 20:4.) Mpo  báboma ye te, asengelaki kokɔta na engumba yango mpe kotikala kuna tii nganga-nzambe monene akokufa. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Asengelaki kotika mosala, ndako na ye, mpe bonsomi ya kosala mibembo. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Mitángo 35:25) Kasi ebongaki asala yango. Soki alongwe na engumba yango na ndenge na ye, akokaki komonisa ete mpo na ye koboma moto ezali likambo te, mpe akokaki kotya bomoi na ye na likama.

11. Ndenge nini mokristo oyo abongoli motema akomonisa ete azali na botɔndi mpo na motema mawa ya Nzambe?

11 Lelo mpe, mosumuki oyo abongoli motema asengeli kosala mwa makambo mpo Nzambe alimbisa ye. Asengeli kotika banzela ya mabe. Yango elimboli kokima likambo nyonso oyo ekoki komema na masumu ya minene. Ntoma Paulo alobelaki makambo oyo bakristo ya Korinti oyo babongolaki motema basalaki. Akomaki boye: “Mawa oyo boyokaki eyokani na mokano ya Nzambe: eboteli bino etingya makasi mpenza, ɛɛ, komipɛtola, ɛɛ, nkanda, ɛɛ, kobanga, ɛɛ, mposa makasi, ɛɛ, molende, ɛɛ, kobongisama ya mbeba!” (2 Bakorinti 7:10, 11) Soki tosali nyonso oyo tokoki mpo na kotika masumu, tokomonisa Yehova ete toyoki mpasi mpo na mabe oyo tosalaki mpe ete tozali kokanisa te ete asengeli kaka koyokela biso mawa.

12. Makambo nini mokristo asengeli kotika mpo Yehova akoba koyokela ye mawa?

12 Makambo nini mokristo akoki kotika mpo Yehova akoba koyokela ye mawa? Asengeli kondima kotika ata makambo oyo asepelaka na yango soki ekoki kotinda ye asala lisumu. (Matai 18:8, 9) Na ndakisa, soki baninga na yo batindaka yo osala makambo oyo esepelisaka Yehova te, okokabwana na bango te? Soki okokaka te koyeba kɔpɔ to milangi boni ya masanga osengeli komɛla, okoboya te makambo oyo ekoki komema yo na komɛla mingi? Soki obundaka mpo na kopekisa bamposa ya mabe ya kosangisa nzoto, okoboya te bafilme, basite, mpe makambo mosusu oyo ekoki kokómisa makanisi na yo mbindo? Kobosana te ete ebongi tósala nyonso mpo na kotosa mibeko ya Yehova. Koyoka ete Yehova asundoli biso ezali likambo oyo eleki mabe. Mpe komona “motema boboto” ya Yehova ezali likambo oyo eleki malamu.​—Yisaya 54:7, 8.

“ESENGELI KOZALA ESIKA YA KOKIMA”

13. Mpo na nini mobomi akokaki kozala na kimya mpe bomoi ya esengo na engumba ya ekimelo?

13 Ntango mobomi akɔti na engumba ya ekimelo, azalaki lisusu na likama te. Yehova alobaki ete bingumba yango “esengeli kozala esika ya kokima.” (Yosua 20:2, 3) Yehova asɛngaki te ete mobomi asambisama lisusu mpo na likambo moko. Longola yango, mozongisi mabe mpo na makila azalaki na ndingisa te ya kokɔta na engumba yango mpo na koboma ye. Na kati ya engumba ya ekimelo, mobomi azalaki na libateli ya Yehova. Azalaki na bolɔkɔ te. Akokaki kosala mosala, kosalisa basusu, mpe kosalela Yehova na kimya. Akokaki kozala na bomoi ya esengo!

Okoki kondima ete Yehova alimbisi yo (Talá paragrafe 14-16)

14. Mokristo oyo abongoli motema asengeli koyeba likambo nini?

14 Basaleli mosusu ya Nzambe oyo basalá masumu ya minene bayokaka kaka ete bamemá ngambo atako babongolá motema. Basusu kutu bamonaka ete Yehova akoki mpenza te kobosana makambo oyo basalá. Soki yo mpe oyokaka bongo, kitisá motema: yebá ete soki Yehova alimbisi yo, alimbisaka mpenza. Ezali na ntina te oyokaka kaka ete omemi ngambo. Yango nde ekómelaki Daniel, oyo tolobelaki. Ntango bankulutu basembolaki ye mpe basalisaki ye akóma lisusu na lisosoli ya pɛto, ayokaki motema ekiti  mpenza. Alobi boye: “Natikaki koyoka lokola namemi ngambo. Soki lisumu elongwe, elongwe. Kaka ndenge Yehova alobi, azwaka kilo na biso mpe abwakaka yango mosika na biso. Okoki komona yango lisusu te.” Nsima ya kokɔta na kati ya engumba ya ekimelo, mobomi azalaki lisusu kobanga te ete mozongisi mabe mpo na makila akoya koboma ye. Ndenge moko mpe, soki Yehova alimbisi masumu na biso, ezali na ntina te tóbanga ete akolobela yango lisusu to akopesa biso etumbu mpo na yango.​—Tángá Nzembo 103:8-12.

15, 16. Ndenge nini lisiko ya Yesu mpe mokumba na ye ya Nganga-nzambe Monene etindaka yo ondima mpenza ete Nzambe akoki koyokela yo mawa?

15 Kutu, biso tozali na ntina mosusu ya monene ya kondima ete Yehova akoki koyokela biso mawa. Nsima ya koloba ete azali “moto ya mawa” mpo akokaki te kotosa Yehova na ndenge ya kokoka, ntoma Paulo abakisaki: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!” (Baroma 7:21-25) Alingaki koloba nini? Atako ntoma Paulo azalaki kobunda na bamposa na ye ya kosala masumu mpe asalaki masumu na kala, abongolaki motema. Yango wana, azalaki kondima ete Yehova alimbisá ye na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Lokola Yesu apesaki lisiko, tokoki kozala na lisosoli ya pɛto mpe kimya ya motema. (Baebre 9:13, 14) Lokola azali Nganga-nzambe Monene na biso, Yesu “akoki mpe kobikisa mpenza bato oyo bazali kopusana epai ya Nzambe na nzela na ye, mpo azali ntango nyonso na bomoi mpo na kolobela bango.” (Baebre 7:24, 25) Na ntango ya kala, nganga-nzambe monene azalaki kosalisa Bayisraele bándima ete Yehova akolimbisa masumu na bango. Lokola Yesu azali Nganga-nzambe Monene na biso, tozali na ntina mosusu ya kondima ete Yehova akoki ‘koyokela biso mawa mpe komonisela biso boboto monene ntango tozali na mposa ya lisalisi.’​—Baebre 4:15, 16.

16 Na yango, mpo na kokima epai ya Yehova, tosengeli kondimela mbeka ya Yesu. Komona kaka te ete mbeka ya lisiko epesamaki mpo na bato. Ndimá ete epesamaki mpe mpo na yo. (Bagalatia 2:20, 21) Zalá na kondima ete Yehova akoki kosalela mbeka ya lisiko mpo na kolimbisa masumu na yo. Mpe ndimá ete lisiko epesi yo elikya ya kozala na bomoi ya seko. Mbeka ya Yesu ezali likabo oyo Yehova apesi yo!

17. Mpo na nini tosengeli kokima epai ya Yehova?

17 Bingumba ya ekimelo esalisi biso tómona motema mawa ya Yehova. Ebongiseli yango oyo Nzambe atyaki eteyi biso ete bomoi ezali mosantu. Emonisi mpe ndenge bankulutu bakoki kosalisa biso, ndenge ya komonisa kobongola motema ya solosolo, mpe ntina oyo tokoki kondima mpenza ete Yehova alimbisaka biso. Okimaka epai ya Yehova? Esika mosusu koleka wana ezali te! (Nzembo 91:1, 2) Na lisolo elandi, tokomona ndenge ebongiseli bingumba ya ekimelo ekoki kosalisa biso tómekola Yehova, ndakisa eleki monene ya bosembo mpe ya motema mawa.

^ par. 10 Na kolanda bato ya mayele ya Bayuda, emonani ete libota ya mobomi ezalaki kokende na engumba ya ekimelo mpo na kofanda na ye.