Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2017

Bwaká makanisi ya mokili

Bwaká makanisi ya mokili

“Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba . . . ya mokili.”​—BAKOLOSE 2:8.

NZEMBO: 38, 31

1. Makambo nini ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Kolose? (Talá elilingi ya ebandeli.)

NTOMA Paulo akomelaki bakristo ya Kolose ntango azalaki na bolɔkɔ na Roma na mobu soki 60 to 61. Amonisaki ntina oyo basengelaki kozala na “bososoli ya elimo,” elingi koloba likoki ya kotalela makambo lokola Yehova. (Bakolose 1:9) Ntoma Paulo alobaki: “Nazali koloba yango mpo moto moko te akosa bino na maloba ya kondimisa. Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.” (Bakolose 2:4, 8) Na nsima Paulo amonisaki ntina oyo makanisi mosusu ya bato ezali mabe kasi bato mingi balingaka yango. Na ndakisa, makanisi yango mosusu ekoki kotinda bato bámona ete bazali na mayele to bazali malamu koleka basusu. Yango wana, Paulo akomaki mokanda na ye mpo na kosalisa bandeko báboya makanisi ya mokili mpe makambo ya mabe.​—Bakolose 2:16, 17, 23.

2. Mpo na nini tokolobela bandakisa ya makanisi ya mokili?

 2 Bato oyo bazalaka na makanisi ya mokili balandaka mitinda ya Yehova te, mpe soki tokebi te, makanisi na bango ekoki mokemoke kotinda biso tótyela lisusu bwanya ya Nzambe motema te. Makanisi ya mokili ekoki kokɔtela biso nyonso, na nzela ya televizyo, Internet, na mosala, to na kelasi. Tokoki kosala nini mpo makanisi yango ekɔtela biso te? Na lisolo oyo tokolobela bandakisa mitano ya makanisi ya mokili, mpe tokomona ndenge ya kobwaka yango.

TOSENGELI KONDIMELA NZAMBE?

3. Likanisi nini bato mingi balingaka, mpe mpo na nini?

3 “Nakoki kozala moto malamu ata soki nandimelaka Nzambe te.” Lelo oyo na mikili mingi, bato bandimaka likanisi yango. Ntango mosusu bato oyo bazali koloba bongo bakanisá na mozindo te mpo na koyeba soki Nzambe azalaka, kasi basepelaka kaka ndenge bamiyokaka ete bazali na bonsomi ya kosala oyo balingi. (Tángá Nzembo 10:4.) Basusu bakanisaka ete bakomonana bato ya mayele soki balobi: “Nakoki kozala na bizaleli malamu ata soki nandimelaka Nzambe te.”

4. Tokoki koloba nini mpo na kosalisa moto oyo andimaka te ete Mozalisi azalaka?

4 Ebongi mpenza kondima ete Mozalisi azalaka te? Bato mosusu babulunganaka soki baluki eyano na siansi. Nzokande eyano ya solo ezali mpasi te. Ndako ekoki kobima kaka yango moko? Ata moke te! Moto nde asengeli kotonga yango. Nzokande, bikelamu ya bomoi ekamwisaka mingi koleka ata ndako ya ndenge nini. Ata mwa selile ya moke ekoki kobimisa baselile mosusu kaka ya ndenge wana, kasi ndako moko ekoki kobimisa bandako mosusu te. Yango emonisi ete baselile ekoki kobomba bansango mpe kolekisa yango na baselile mosusu ya sika mpo baselile mosusu ebima. Nani akelá baselile na likoki ya kosala bongo? Biblia eyanoli: “Ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.”​—Baebre 3:4.

5. Tokoki koloba nini mpo na likanisi oyo elobaka ete tokoki koyeba oyo ezali malamu kozanga ete tóndimela Nzambe?

5 Tokoki koloba nini mpo na likanisi oyo elobaka ete tokoki koyeba oyo ezali malamu kozanga ete tóndimela Nzambe? Biblia emonisi ete ata bato oyo bandimelaka Nzambe te bakoki kozala na bizaleli ya malamu. (Baroma 2:14, 15) Na ndakisa, moto akoki komemya mpe kolinga baboti na ye. Kasi, soki atosaka mibeko ya Nzambe te, akoki kozwa bikateli ya mabe mpenza. (Yisaya 33:22) Lelo oyo, bato mingi ya bososoli bandimi ete esengeli Nzambe asalisa biso mpo na kosilisa mikakatano minene oyo ezali na mokili. (Tángá Yirimia 10:23.) Yango wana, tókanisa ata moke te ete tokoki koyeba oyo ezali malamu kozanga ete tóndimela Nzambe mpe kozanga ete tótosa mibeko na ye.​—Nzembo 146:3.

TOZALI NA MPOSA YA LINGOMBA?

6. Likanisi nini bato bazalaka na yango mpo na mangomba?

6 “Moto akoki kozala na esengo ata soki mangomba ezali te.” Bato mingi bamonaka ete mangomba ezali motungisi mpe ezali na ntina te. Lisusu, mangomba ebele eteyaka lifelo ya mɔtɔ, esɛngaka bato mbongo na makasi, to mpe epesaka bato ya politiki mabɔkɔ. Ezali likambo ya kokamwa te soki bato mingi bazali koloba ete bakoki kozala na esengo soki mangomba ezali te! Bamosusu bakoki koloba, “Nalingaka Nzambe, kasi nalingaka kozala na lingomba moko te.”

7. Ndenge nini losambo ya solo ekoki kopesa yo esengo?

 7 Moto akoki mpenza kozala na esengo soki lingomba ezali te? Ya solo, moto akoki kozala na esengo soki mangomba ya lokuta ezali te. Kasi moto moko te akoki mpenza kozala na esengo kozanga ete azala moninga ya Yehova, “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Makambo nyonso oyo Yehova asalaka esalisaka basusu. Biso basaleli na ye tozali na esengo mpo tolukaka mpe kosalisa basusu. (Misala 20:35) Na ndakisa, kanisá ndenge losambo ya solo ekoki kosalisa libota ezala na esengo. Elakisaka biso ndenge ya kozala sembo epai ya molongani mpe komemya ye, kobɔkɔla bana bázala na botosi, mpe ndenge ya kolinga bato ya libota na biso. Na yango, losambo ya solo esalisaka basaleli ya Yehova básala elongo na kimya na kati ya lisangá mpe bázala na bolingo kati na bango.​—Tángá Yisaya 65:13, 14.

8. Ndenge nini Matai 5:3 ekoki kosalisa biso tóyeba nini mpenza epesaka esengo?

8 Sikoyo, moto akoki mpenza kozala na esengo soki asalelaka Nzambe te? Nini epesaka bato esengo? Bato mosusu basepelaka na mosala na bango, masano to na kominanola. Basusu bayokaka esengo soki bazali kosalisa libota mpe baninga na bango. Atako makambo wana esepelisaka, ezali na likambo oyo epesaka esengo koleka. Biso bato tokeseni na banyama mpo tozali na likoki ya koyeba Nzambe mpe kosambela ye. Asalá biso mpo tózala na esengo ntango tozali kosambela ye. (Tángá Matai 5:3.) Na ndakisa, toyokaka esengo mpe tolendisamaka ntango tokutani na bandeko na biso mpo na kosambela Yehova. (Nzembo 133:1) Toyokaka mpe esengo ndenge tozali na lisangá ya bandeko na mokili mobimba, tozali na bomoi ya pɛto, mpe elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya.

TOZALI NA MPOSA YA MIBEKO?

9. (a) Ndenge nini bato mingi batalelaka kosangisa nzoto? (b) Mpo na nini Liloba ya Nzambe epekisi kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te?

9 “Kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te ezali mabe na nini?” Bato bakoki koloba na biso: “Mpo na nini makambo makasi boye? Sepelisá nzoto.” Kasi, Liloba ya Nzambe epekisi pite. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Tángá 1 Batesaloniki 4:3-8.) Yehova azali na lotomo ya kotyela biso mibeko mpo ye nde akelá biso. Alobi ete kaka mobali ná mwasi oyo babalaná nde bapesami nzela ya kosangisa nzoto. Yehova apesaka biso mibeko mpo alingaka biso. Ayebi ete soki totosi yango, tokozala na bomoi ya malamu. Bato ya libota oyo batosaka mibeko ya Nzambe balinganaka mingi, bapesanaka limemya mpe bazalaka na kimya. Kasi Nzambe akopesa etumbu na baoyo bayebi mobeko na ye kasi baboyaka kotosa yango.​—Baebre 13:4.

10. Ndenge nini mokristo akoki kokima pite?

10 Biblia eteyaka biso ndenge ya kokima pite. Tosengeli kokeba na makambo oyo totalaka. Yesu alobaki: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema. Soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.” (Matai 5:28, 29) Na yango, tosengeli koboya pornografi mpe miziki ya mbindo. Ntoma Paulo akomaki: “Bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite.” (Bakolose 3:5) Tosengeli mpe kokeba  na makambo oyo tokanisaka mpe tolobaka.​—Baefese 5:3-5.

TOSENGELI KOMIPESA NA MOSALA YA MBONGO MINGI NA MOKILI?

11. Mpo na nini bato mosusu balingaka komipesa na mosala ya mbongo mingi?

11 “Mosala ya mbongo mingi epesaka moto esengo.” Bato bakoki koyebisa biso tópesa ntango mpe makasi na biso na mosala ya mbongo, mingimingi mosala oyo ekoki kopesa biso lokumu, bokonzi mpe mbongo mingi. Lokola bato mingi bakanisaka ete mosala ya mbongo mingi nde epesaka esengo, biso mpe tokoki kobanda kokanisa bongo.

12. Mosala ya mbongo mingi epesaka mpenza esengo?

12 Ezali solo ete mosala oyo epesaka lokumu mpe bokonzi ekopesa yo mpe esengo? Te. Kanisá likambo oyo: Satana alingaki kokóma na nguya mpe lokumu. Tokoki koloba ete azwá yango. Nzokande, azalaka nkandankanda, azali na esengo te. (Matai 4:8, 9; Emoniseli 12:12) Kasi, kanisá ndenge tozalaka na esengo ntango tosalisi basusu báyeba Nzambe mpe makambo kitoko oyo alaki. Mosala moko te na mokili oyo ekoki kopesa esengo ya ndenge wana. Lisusu, mpo bázwa mosala ya mbongo mingi, bato bawelanaka, basalanaka mabe, to mpe bayokelaka basusu zuwa. Kasi bazalaka na esengo te. Biblia elobi ete ‘balandaka mopɛpɛ.’​—Mosakoli 4:4.

13. (a) Ndenge nini tosengeli kotalela mosala na biso? (b) Nini epesaki ntoma Paulo esengo mpenza?

13 Toboyi te, tosengeli kosala mpo na kozwa eloko ya kobikela, mpe ezali mabe te kozwa mosala oyo tolingi. Kasi mosala na biso esengeli te kozala eloko eleki ntina na bomoi na biso. Yesu alobaki: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” (Matai 6:24) Kosalela Yehova mpe koteya basusu Biblia ekopesa biso esengo mingi. Ntoma Paulo amonaki yango. Ntango azalaki elenge, amipesaki na koluka mosala ya lokumu mingi. Na nsima, akómaki na esengo mpenza ntango amonaki ndenge bato bazalaki kondima nsango ya Nzambe mpe ndenge ebongolaki bomoi na bango. (Tángá 1 Batesaloniki 2:13, 19, 20.) Ezali ata na mosala moko te oyo  ekoki kopesa biso esengo koleka kosalela Yehova mpe koteya basusu makambo na ye.

Tozalaka na esengo ntango tosalisaka bato báyeba Nzambe (Talá paragrafe 12, 13)

TOKOKOKA KOSILISA MIKAKATANO YA MOKILI?

14. Mpo na nini bato mingi basepelaka na likanisi oyo elobi ete bato bakoki kosilisa mikakatano bango moko?

14 “Bato bakoki kosilisa mikakatano bango moko.” Mpo na nini bato mingi basepelaka na likanisi yango? Soki ezalaki solo, boye, tokozala na mposa ya litambwisi ya Nzambe te mpe tokoki kosala nyonso tolingi. Mbala mosusu osilá koyoka bato bazali koloba ete bitumba, mobulu, maladi mpe bobola ekómi kosila. Lapolo moko elobaki boye: “Bomoi ya bato ezali kokóma malamu mpo bato balingi kokómisa mokili esika moko ya malamu koleka.” Ezali solo? Bato bayebi sikoyo ndenge ya kosilisa mikakatano ya mokili? Tótalela makambo yango.

15. Mpo na nini tokoki koloba ete mikakatano ezali makasi mpenza na mokili?

15 Bato basilisi bitumba? Na etumba ya liboso mpe ya mibale ya mokili mobimba, bato koleka milio 60 bakufaki. Na 2015 mpamba, bato milio 12 ná ndambo batikaki bandako na bango mpo na bitumba to minyoko. Na yango, motángo ya bato oyo bakimá bamboka na bango ekómi soki milio 65. Bongo mobulu? Ezali na bisika oyo makambo mosusu ya mobulu ekiti. Nzokande, mobulu ya ndenge mosusu, na ndakisa koyiba na nzela ya Internet, bitumba na kati ya libota, misala ya terorisme, mpe kanyaka ezali se komata. Bongo maladi? Ezali ya solo ete bato bazwi nkisi mpo na bamaladi mosusu. Kasi na 2013, lapolo moko elobaki ete mbula na mbula, bato milio 9 oyo bakokisi naino mbula 60 te bazali kokufa na maladi ya motema, ya bɔɔngɔ, ya kanser, maladi ya mpema mpe diabɛti. Bongo bobola? Banque mondiale elobaki ete na Afrika mpamba, motángo ya bato oyo bazali na bobola makasi oyo ezalaki milio 280 na 1990, na 2012 ekómaki milio 330.

16. (a) Mpo na nini kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosilisa mikakatano ya mokili? (b) Yisaya ná mokomi ya nzembo balobaki ete Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

16 Makambo yango ekamwisaka biso te. Lelo, bato ya moimi nde bazali kotambwisa bibongiseli ya nkita mpe ya politiki. Bato yango bakoki te kosilisa bitumba, mobulu, maladi mpe bobola. Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosilisa yango. Kanisá makambo oyo Yehova akosalela bato. Bokonzi na ye ekolongola makambo nyonso oyo ebimisaka bitumba, lokola moimi, kanyaka, bolingo ya ekólo, mangomba ya lokuta mpe Satana ye moko. (Nzembo 46:8, 9) Bokonzi ya Nzambe ekolongola mobulu. Ata lelo, Bokonzi ezali koteya bamilio ya bato ndenge ya kolingana mpe kotyelana motema. Guvɛrnema moko te ekoki kosala yango. (Yisaya 11:9) Mosika te, Yehova akosilisa maladi mpe akokómisa bato nyonso bato ya kokoka. (Yisaya 35:5, 6) Akosilisa bobola mpe akosala ete bato nyonso bázala na esengo mpe na boyokani malamu na ye. Yango ezali na motuya koleka ata motángo boni ya mbongo.​—Nzembo 72:12, 13.

‘YEBÁ NDENGE OYO OSENGELI KOPESA EYANO’

17. Ndenge nini okoki kobwaka makanisi ya mokili?

17 Soki omoni lokola likanisi moko ya mokili ezali komeka kondima na yo, luká koyeba oyo Biblia elobi na likambo yango. Sololá yango na ndeko moko oyo akɔmɛli. Kanisá ntina oyo bato balingaka likanisi yango, mpo na nini ezali mabe, mpe ndenge okoki kobwaka yango. Tokoki komibatela na makanisi ya mokili soki tosali ndenge Paulo alobaki: ‘Bókoba kotambola na bwanya liboso ya bato ya libándá . . . Bóyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.’​—Bakolose 4:5, 6.

^ par. 9 Mabongoli mosusu ya Biblia etyaka bavɛrsɛ oyo na Yoane 7:53–8:11, kasi yango ezalaki te na makomi ya ebandeli ya Biblia. Bato mosusu batángaki bavɛrsɛ yango mpe balobaki ete kaka moto oyo azangi lisumu nde akoki kosambisa moto oyo asali ekobo. Kasi mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele elobaki: “Soki bakuti mobali azali kolala na mwasi oyo azali na nkolo na ye, bango mibale basengeli kokufa elongo.”​—Kolimbola Mibeko 22:22.