Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2017

Yozefe ya Arimatea amonisaki mpiko

Yozefe ya Arimatea amonisaki mpiko

YOZEFE YA ARIMATEA andimaki te ete akozwa mpiko ya kosolola na Ponsi Pilate, guvɛrnɛrɛ ya Roma. Pilate azalaki makambo makasi mpenza. Kasi, mpo na kokunda Yesu na ndenge ya lokumu, esɛngaki moto moko asolola na Pilate mpo na kosɛnga ebembe ya Yesu. Emonanaki ete kosolola na Pilate ezalaki mpasi mpenza te ndenge Yozefe akokaki kokanisa. Nsima ya kozwa nsango epai ya mokonzi moko ya basoda ete Yesu akufi, Pilate andimaki kopesa Yozefe ebembe ya Yesu. Atako Yozefe azalaki naino na mawa makasi, azongaki mbangu esika babomaki Yesu.​—Marko 15:42-45.

  • Yozefe ya Arimatea azalaki nani?

  • Boyokani nini azalaki na yango na Yesu?

  • Mpo na nini tosengeli kotya likebi na lisolo na ye?

 MOKO YA BASAMBISI YA SANEDRINA

Evanzile ya Marko ebengi Yozefe “moko ya basambisi ya lokumu mingi ya Sanedrina.” Sanedrina ezalaki tribinale monene ya Bayuda, oyo ezalaki na bokonzi ya kotambwisa makambo ya mboka mpe lingomba. (Marko 15:1, 43) Na yango, lokola Yozefe azalaki moko ya bakambi ya ekólo, akokaki kosɛnga kokutana na guvɛrnɛrɛ ya Roma. Tokoki kokamwa te ndenge Yozefe azalaki mpe mozwi.​—Matai 27:57.

Ozalaka na mpiko ya kondima Yesu lokola Mokonzi na yo?

Kasi, basangani ya Sanedrina bazalaki kolinga Yesu te. Basalaki likita mpo na koboma ye. Kasi, Biblia ebengi Yozefe, “moto malamu mpe moyengebene.” (Luka 23:50) Na bokeseni na basangani mingi ya Sanedrina, Yozefe azalaki sembo, azalaki na bomoi ya pɛto mpe azalaki kosala oyo akoki mpo na kotosa mibeko ya Nzambe. Azalaki mpe “kozela bokonzi ya Nzambe,” mbala mosusu yango nde etindaki ye akóma moyekoli ya Yesu. (Marko 15:43; Matai 27:57) Na ntembe te, mateya ya Yesu ebendaki ye mpo azalaki na mposa ya solo mpe ya boyengebene.

MOYEKOLI NA KOBOMBANA

Yoane 19:38 elobi ete Yozefe “azalaki moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda.” Yozefe azalaki kobanga nini? Ayebaki ete Bayuda bazalaki koyina Yesu mpe bazalaki na ekateli ya kobengana na sinagoga moto nyonso oyo alobi polele ete andimeli ye. (Yoane 7:45-49; 9:22) Soki babengani moto na sinagoga, Bayuda bazalaki kotyola ye, bazalaki kokima ye, mpe kotalela ye lokola Moyuda te. Yango wana, Yozefe azalaki kokakatana mpo na koloba polele ete andimeli Yesu. Soki asali yango, akobungisa mosala mpe esika na ye ya lokumu.

Bato mosusu mpe bazalaki na mokakatano oyo Yozefe azalaki na yango. Yoane 12:42 elobi ete “bankumu mingi bandimelaki [Yesu] mpenza, kasi mpo na Bafarisai, bazalaki kondima ye polele te, noki bábengana bango na sinagoga.” Moko ya bato yango ezalaki Nikodeme, oyo azalaki mpe mosangani ya Sanedrina.​—Yoane 3:1-10; 7:50-52.

Kasi, atako Yozefe azalaki moyekoli, azangaki mpiko ya kobimisa yango polele. Ezalaki likama monene, mingimingi na kotalela maloba ya Yesu oyo: “Moto nyonso oyo alobi polele liboso ya bato ete ngai ná ye tozali na bomoko, ngai mpe nakoloba polele liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló ete ngai ná ye tozali na bomoko; kasi moto nyonso oyo awangani ngai liboso ya bato, ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 10:32, 33) Ya solo, Yozefe awanganaki Yesu mpenza te, kasi azalaki mpe na mpiko te ya kondimela ye polele. Bongo yo?

Yozefe asalaki likambo moko ya malamu; Biblia elobi ete andimaki te likanisi ya Sanedrina ya koboma Yesu. (Luka 23:51)  Ntango mosusu, ndenge bato mosusu balobaka, Yozefe azalaki wana te ntango basambisaki Yesu. Ezala bongo to te, na ntembe te Yozefe asepelaki ata moke te na likambo wana ya kozanga mpenza bosembo​—kasi akokaki kosala eloko te mpo na kopekisa yango!

ALONGOLI KOBANGA

Ntango Yesu akufaki, emonanaki ete Yozefe alongolaki kobanga mpe azwaki ekateli ya kopesa bayekoli ya Yesu mabɔkɔ. Marko 15:43 elobi ete: “Azwaki mpiko ya kokende liboso ya Pilate mpe asɛngaki nzoto ya Yesu.”

Emonani ete Yozefe azalaki wana ntango Yesu akufaki. Kutu, liboso Pilate ayeba ete Yesu akufi, ye ayebaki yango. Na yango, ntango Yozefe asɛngaki ebembe ya Yesu, guvɛrnɛrɛ Pilate “amitunaki soki [Yesu] asilaki mpenza kokufa.” (Marko 15:44) Soki Yozefe amonaki ndenge Yesu anyokwamaki na nzete ya mpasi, mbala mosusu lisosoli na ye etungisamaki mpe nsukansuka amonaki ete asengeli kozwa ekateli ya kondimela Yesu polele. Ata ndenge nini, Yozefe azwaki sikoyo ekateli ya kozala lisusu moyekoli na kobombana te.

YOZEFE AKUNDI YESU

Mibeko ya Bayuda elobaki ete bato oyo bakatelaki bango etumbu ya liwa basengeli kokundama liboso moi elala. (Kolimbola Mibeko 21:22, 23) Kasi, na mibeko ya Baroma, bibembe ya basali-mabe ezalaki kotikala na nzete tii ekopɔla, to mpe bazalaki kokunda yango na libulu ya bato ebele. Kasi, Yozefe alingaki esalema bongo te mpo na  Yesu. Pene na esika oyo babomaki Yesu, Yozefe azalaki na lilita moko ya sika oyo batimolá na kati ya mabanga. Lokola basalelaki naino lilita yango te emonisaki ete Yozefe autaki kolongwa na Arimatea * mpe ayaki kofanda na Yerusaleme, mpe alingaki kosalela lilita yango mpo na kokundaka bato ya libota na ye. (Luka 23:53; Yoane 19:41) Yozefe amonisaki bokabi mpenza ndenge apesaki lilita na ye mpo na kokunda Yesu, mpe yango ekokisaki esakweli oyo elobaki ete Masiya akokundama “esika moko na bazwi.”​—Yisaya 53:5, 8, 9.

Ezali nde na eloko moko oyo nazwaka na motuya koleka boyokani na ngai na Yehova?

Baevanzile nyonso minei emonisi ete ntango balongolaki nzoto ya Yesu na nzete, Yozefe azingaki yango na lini ya kitoko mpe alalisaki yango na lilita na ye. (Matai 27:59-61; Marko 15:46, 47; Luka 23:53, 55; Yoane 19:38-40) Moto kaka moko oyo Biblia elobi ete asalisaki Yozefe ezalaki Nikodeme, amemaki matiti ya nsolo kitoko mpo na kokunda Yesu. Lokola bato yango mibale bazalaki bato ya lokumu, mbala mosusu bango te nde bamemaki nzoto ya Yesu. Mbala mosusu basɛngaki basali bámema yango mpe bákende kokunda yango. Atako bongo, mosala oyo mibali yango mibale basalaki ezalaki lisɛki te. Moto nyonso oyo asimbi ebembe azalaki mbindo mikolo nsambo, mpe eloko nyonso oyo asimbi ezalaki kokóma mbindo. (Mitángo 19:11; Hagai 2:13) Na yango, bakokaki kozala pene na bato te na pɔsɔ ya fɛti ya Elekeli mpe kosangana te na milulu na yango nyonso. (Mitángo 9:6) Lisusu, ndenge Yozefe abongisaki kokundama ya Yesu, baninga na ye bakokaki kotyola ye. Kasi, na ntango yango, andimaki mpasi nyonso oyo ekokaki koyela ye mpo na kokunda Yesu na ndenge ya lokumu mpe mpo na ndenge andimaki polele ete azali moyekoli ya Kristo.

NSUKA YA LISOLO YA YOZEFE

Nsima ya lisolo ya Baevanzile oyo elobeli ndenge Yesu akundamaki, Biblia etángi lisusu Yozefe ya Arimatea te, mpe yango ebimisi motuna oyo: Nini ekómelaki ye? Mpo na koloba solo, toyebi te. Kasi, na kotalela makambo oyo tolobeli, tokoki mpenza kokanisa ete akómaki mokristo. Mpamba te na ntango wana ya komekama mpe ya yikiyiki, kondima mpe mpiko na ye ekitaki te, kasi ebakisamaki. Ezalaki elembo ya malamu.

Lisolo oyo ebimisi motuna moko oyo biso nyonso tosengeli komituna: Ezali nde na eloko moko lokola esika ya lokumu, mosala, bozwi, libota, to ata bonsomi na biso, oyo tozwaka na motuya koleka boyokani na biso na Yehova?

^ par. 18 Na ntembe te Arimatea ezali nde Rama, oyo ezalaki esika ezali lelo Rentis (Rantis). Ezalaki mboka ya mosakoli Samwele, na kilomɛtrɛ soki 35 na nɔrdi-wɛsti ya Yerusaleme.​—1 Samwele 1:19, 20.