Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2017

“Tólingaka . . . na misala mpe na solo”

“Tólingaka . . . na misala mpe na solo”

“Tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.”​—1 YOANE 3:18.

NZEMBO: 72, 124

1. Bolingo nini eleki bolingo nyonso, mpe ndenge nini okoki komonisa yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

BOLINGO euti epai ya Yehova. (1 Yoane 4:7) Bolingo oyo eleki bolingo nyonso esimbami na mitinda ya ntina mingi. Mpo na kolobela bolingo yango, Biblia esaleli liloba ya Greki agapê. Bolingo yango esɛngaka kosepela makasi na moto, kasi esuki kaka wana te. Esɛngaka mpe kosalela moto makambo mpo na bolamu na ye. Bolingo yango etindaka biso tósalela basusu makambo ya malamu. Esalisaka biso tózala na esengo mpe tómona ete bomoi ezali na ntina.

2, 3. Ndenge nini Yehova amonisaki ete alingaka mpenza bato?

2 Yehova amonisaki ete alingaka bato liboso kutu akela Adama ná Eva. Ntango asalaki mabele, atyaki nyonso oyo esengeli mpo bato bázala na bomoi. Mpe abongisaki yango malamu mpo tósepela mpenza na bomoi. Yehova asalaki nyonso wana mpo na bolamu na ye te. Asalaki yango mpo na biso. Nsima ya kobongisa mabele malamumalamu, akelaki bato mpe apesaki bango elikya ya kofanda libela na libela na Paradiso.

3 Na nsima, Yehova asalaki likambo moko oyo eleki monene mpo na komonisa ete alingaka mpenza bato. Atako Adama ná  Eva batombokelaki ye, Yehova ayebaki ete bakitani na bango mosusu bakolinga ye; na yango azwaki bibongiseli ya kopesa Mwana na ye lokola mbeka ya lisiko mpo na kobikisa bato. (Ebandeli 3:15; 1 Yoane 4:10) Kutu, ntango kaka Yehova alakaki ete lisiko ekopesama, azalaki komona lokola ete mbeka yango esili kopesama. Na yango, mbula 4000 na nsima, Yehova akabaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo na kobikisa bato. (Yoane 3:16) Tozali na botɔndi mingi mpo na bolingo ya Yehova!

4. Ndenge nini toyebi ete bato ya kozanga kokoka bakoki komonisa bolingo ya solo?

4 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, biso mpe tokoki komonisa bolingo ya solosolo? Ɛɛ, mpo Yehova akelá biso na elilingi na ye, elingi koloba apesá biso likoki ya komekola ye. Ezalaka pɛtɛɛ te komonisa bolingo ya solosolo, kasi tokoki kosala yango. Abele amonisaki ete alingaki mpenza Nzambe na ndenge apesaki ye biloko eleki malamu oyo azalaki na yango. (Ebandeli 4:3, 4) Noa amonisaki bolingo ya solosolo na ndenge akobaki kosakola nsango ya Nzambe bambula ebele, atako bato bazalaki koyoka ye te. (2 Petro 2:5) Mpe Abrahama amonisaki ete alingaki mpenza Nzambe koleka eloko mosusu nyonso na ndenge andimaki kopesa Yisaka, mwana na ye lokola mbeka. (Yakobo 2:21) Ndenge moko na mibali wana ya sembo, biso mpe tómonisaka bolingo, ata na ntango oyo ezali mpasi kosala yango.

BOLINGO YA SOLOSOLO EZALI NINI?

5. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo ya solosolo?

5 Biblia emonisi ete tosengeli kolinga kaka “na maloba mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.” (1 Yoane 3:18) Boye, ebongi te tóyebisaka bato ete tolingaka bango? Te, eza bongo te. (1 Batesaloniki 4:18) Kasi, na bantango mosusu, koloba kaka na moto ete “nalingaka yo” ekoki te. Tosengeli komonisa yango na misala. Na ndakisa, soki ndeko azangi bilei to elamba ya kolata, tósuka kaka te na koloba maloba ya malamu. (Yakobo 2:15, 16) Ndenge moko mpe, lokola tolingaka Yehova mpe bazalani na biso, tosengeli kosuka kaka te na kobondela Nzambe ete atinda basali na mosala ya kosakola, kasi biso moko tosengeli komipesa na mosala yango.​—Matai 9:38.

6, 7. (a) “Bolingo oyo ezangi bokosi” ezali nini? (b) Pesá mwa bandakisa oyo emonisi bolingo ya monyato?

6 Ntoma Yoane alobaki ete tosengeli kolinga “na misala mpe na solo.” Na yango, bolingo na biso esengeli ‘kozala na bokosi te,’ tosengeli komonisa “bolingo oyo ezangi bokosi.” (Baroma 12:9; 2 Bakorinti 6:6) Moto mosusu akoki komonisa lokola alingaka basusu. Kasi, bolingo ya ndenge wana ezali mpenza ya solo? Nini etindaka ye asala bongo? Bolingo oyo ezali na bokosi ezali bolingo ya monyato, kasi ya solo te.

7 Tótalela mwa bandakisa oyo emonisi bolingo ya monyato. Ntango Satana asololaki na Eva na elanga ya Edene, makambo oyo alobaki emonisaki lokola azali koluka bolamu ya Eva. Kasi misala na ye emonisaki ete azalaki kokosa. (Ebandeli 3:4, 5) Ntango Davidi azalaki mokonzi, azalaki na moninga moko na nkombo Ahitofele. Kasi, Ahitofele alukaki bolamu na ye moko mpe abalukelaki Davidi. Misala na ye emonisaki ete azalaki moninga ya solo te. (2 Samwele 15:31) Lelo oyo, bapɛngwi ná bato mosusu oyo batyaka bokabwani na lisangá basalelaka “maloba sukali mpe maloba ya kokumisakumisa.” (Baroma 16:17, 18) Bakoki komonisa lokola bazali koluka bolamu ya basusu, nzokande balukaka nde bolamu na bango moko.

8. Motuna nini tosengeli komituna?

8 Ezali nsɔni mingi komonisa bolingo ya  monyato mpo kosala bongo ezalaka mpo na kokosa basusu. Tokoki kokosa bato, kasi tokoki te kokosa Yehova. Yesu alobaki ete bato oyo basalaka makambo na bokosi bakozwa “etumbu ya makasi mpenza.” (Matai 24:51) Lokola tozali basaleli ya Yehova, tolingaka ata moke te kosala makambo na bokosi. Kasi, tosengeli komituna boye: ‘Bolingo oyo namonisaka ezalaka ya solo, to ntango mosusu nalukaka bolamu na ngai moko mpe nabubaka basusu?’ Tólobela lolenge libwa ya komonisa bolingo “oyo ezangi bokosi.”

NDENGE YA KOLINGA “NA MISALA MPE NA SOLO”

9. Bolingo ya solosolo ekotinda biso tósala nini?

9 Saláká na esengo ata soki moto te azali komona yo. Tosengeli kosalela bandeko na biso makambo ya malamu ata soki bato mosusu bakoyeba yango te. (Tángá Matai 6:1-4.) Ananiasi ná Safira basalaki ndenge wana te ntango bapesaki likabo. Ntango bapesaki likabo, balingaki bato nyonso báyeba yango, bakosaki ete bapesaki mbongo ebele, yango wana bakufaki mpo na bokosi na bango. (Misala 5:1-10) Kasi, soki tolingaka mpenza bandeko na biso, tokosalela bango makambo ya malamu kozanga koluka ete basusu báyeba oyo tosali. Tokoki komekola bandeko oyo basalisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi na kobongisa bilei ya elimo. Basalaka yango kozanga komikumisa, mpe balingaka te bato báyeba makambo oyo basali.

10. Ndenge nini tokoki kopesa basusu lokumu?

10 Pesáká basusu lokumu. (Tángá Baroma 12:10.) Yesu apesaki bantoma na ye lokumu na ndenge asukolaki makolo na bango. (Yoane 13:3-5, 12-15) Tosengeli kosala makasi tókóma na komikitisa lokola oyo ya Yesu mpe tósalelaka basusu. Bantoma bakangaki malamu ntina ya likambo oyo Yesu asalaki kaka na nsima, ntango bazwaki elimo santu. (Yoane 13:7) Tokopesa basusu lokumu soki tozali kokanisa te ete toleki basusu mpo totángá kelasi mingi, tozali na bozwi mingi, to tozali na mikumba minene na lisangá. (Baroma 12:3) Toyokaka zuwa te soki bapesi baninga longonya, kasi tosepelaka na bango ata soki tozali komona ete esengelaki bápesa mpe biso longonya.

11. Mpo na nini longonya oyo topesi esengeli kouta na motema?

11 Pesáká longonya oyo euti na motema. Lukáká mabaku ya kopesa basusu longonya mpo biso nyonso toyebi ete kosala bongo ‘etongaka,’ mpe elendisaka. (Baefese 4:29) Kasi, longonya yango esengeli kouta na motema mpe kozala ya solo. Tosengeli te koloba likambo oyo ezali solo te to mpe kokima mokumba na biso ya kopesa toli oyo ebongi. (Masese 29:5) Soki topesi moto longonya mpe tobandi koloba mabe na ye ntango apesi mokɔngɔ, ekomonisa ete tozali na bokosi. Bolingo oyo ntoma Paulo amonisaki ezalaki ya solo. Ntango akomelaki bakristo ya Korinti, apesaki bango longonya mpo na makambo ya malamu oyo bazalaki kosala. (1 Bakorinti 11:2) Kasi, ntango esɛngaki kopesa bango toli, amonisaki ntina ya toli yango polele mpe na boboto.​—1 Bakorinti 11:20-22.

Kokabela bandeko oyo bazali na bosɛnga ezali lolenge ya komonisa bolingo mpe elimo ya koyamba bapaya (Talá paragrafe 12)

12. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo ya solo na oyo etali koyamba bapaya?

12 Yambáká bapaya. Yehova asɛngi biso tókabelaka bandeko na biso. (Tángá 1 Yoane 3:17.) Kasi, tosengeli kozala na makanisi ya malamu ntango tozali koyamba bapaya. Tokoki komituna boye: ‘Na ndako na ngai, nabengisaka kaka baninga na ngai, to baoyo namonaka ete bazali na ntina na lisangá? Nabengisaka kaka bato oyo nakanisi ete bakoki mpe kosalisa ngai na ndenge moko boye? To nakabelaka ata bandeko oyo nayebi malamu te to oyo bakoki kozongisela ngai eloko te?’ (Luka 14:12-14) Kanisá ete ndeko  moko akómi na bosɛnga mpo azwaki ekateli ya mabe, to tobengisaki moto moko na ndako kasi apesá biso longonya te! Na ntango yango, Yehova alobi na biso: “Bóyambanaka na koimaima te.” (1 Petro 4:9) Tokozala na esengo soki tokabeli basusu na makanisi ya malamu.​—Misala 20:35.

13. (a) Ntango nini ekoki kosɛnga tómonisa motema molai mingi? (b) Tokoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo bazali na bolɛmbu?

13 Salisá baoyo bazali na bolɛmbu. Ndenge Biblia esɛngi biso ‘tósalisa bato ya bolɛmbu, mpe tózala na motema molai epai ya bato nyonso’ ekoki komonisa soki bolingo na biso ezalaka ya solo. (1 Batesaloniki 5:14) Bandeko mingi oyo bazalaki na bolɛmbu, na nsima bakómaki na kondima makasi. Kasi basusu, esɛngaka komonisela bango motema molai mpe kosalisa bango malɛmbɛmalɛmbɛ. Ndenge nini tokoki kosala yango? Tokoki kosalela Biblia mpo na kolendisa bango, kosɛnga bango tóbima na mosala ya kosakola elongo, to kaka koyoka bango. Lisusu, tosengeli kokanisa te ete ndeko boye azali “makasi” to oyo kuna azali na “bolɛmbu.” Tosengeli nde koyeba ete biso nyonso tozalaka na makambo oyo tosalaka malamu mpe tozalaka mpe na bolɛmbu. Ata ntoma Paulo andimaki ete azalaki na bolɛmbu. (2 Bakorinti 12:9, 10) Biso nyonso tozalaka na mposa basusu básalisa biso mpe bálendisa biso.

14. Tosengeli kondima kosala nini mpo na kobatela kimya elongo na bandeko na biso?

14 Batelá kimya. Kozala na kimya na bandeko na biso ezali na motuya mingi. Ata soki tomoni lokola moto moko amitye na esika na biso te to mpe basali biso makambo ya kozanga bosembo, tosengeli kosala nyonso mpo na kobatela kimya. (Tángá Baroma 12:17, 18.) Soki tozokisi ndeko moko, ezali malamu tósɛnga bolimbisi. Kasi, esengeli kouta na motema. Na ndakisa, na esika tóloba, “nayoki mawa ndenge oyoki mpasi,” ekozala malamu tóndima libunga na biso mpe tóloba “nayoki mawa mpo maloba na ngai esali yo mpasi.” Kimya ezali na ntina mingi na kati ya libala. Ekozala malamu te mwasi ná mobali bámonisaka na miso ya bato ete balinganaka, nzokande na ndako balobanaka te, bafinganaka, to kutu babundaka.

15. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolimbisi na motema moko?

15 Limbisáká na motema moko. Soki moto moko apesi biso mpasi, tosengeli kolimbisa ye mpe kobosana. Tosengeli kosala bongo ata soki ayebi te ete apesaki biso mpasi. Tolimbisaka ntango ‘tokangaka motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo, mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya.’ (Baefese 4:2, 3) Mpo na kolimbisa na motema moko, tosengeli kotika kokanisa likambo oyo basalaki biso. Bolingo “ebombaka mabe na motema te.” (1 Bakorinti 13:4, 5) Kutu, soki tobombi nkanda na motema, tokoki kobebisa boyokani na biso na ndeko na biso  mpe na Yehova. (Matai 6:14, 15) Tokomonisa ete tolimbisi na motema moko soki tobondeli mpo na moto oyo apesaki biso mpasi.​—Luka 6:27, 28.

16. Ndenge nini tosengeli komiyoka soki bapesi biso mokumba na mosala ya Yehova?

16 Lukáká liboso bolamu ya basusu. Soki bapesi biso mokumba moko na mosala ya Yehova, tokomonisa ete bolingo na biso ezali ya solo soki tozali koluka ‘litomba na biso moko te, kasi oyo ya moto mosusu.’ (1 Bakorinti 10:24) Na ndakisa, na mayangani ya mike to ya minene, bandeko oyo bazali na mosala ya koyamba bato bakɔtaka liboso ya basusu mpe bakoki koluka kokanga bisika oyo eleki malamu mpo na bango moko mpe mabota na bango. Kasi, mingi kati na bango baponaka bisika mosusu, pembeni ya esika oyo batyaki bango básala. Na ndenge yango, bamonisaka bolingo oyo elukaka bolamu ya basusu. Ndenge nini tokoki komekola ndakisa na bango?

17. Soki mokristo asali lisumu ya monene, bolingo ya solo ekotinda ye asala nini?

17 Yambolá masumu mpe tiká kosala masumu na kobombana. Ezali na bakristo mosusu oyo basalá lisumu ya monene mpe balukaka kobomba yango. Mbala mosusu bayokaka nsɔni to balingi te kopesa basusu mpasi. (Masese 28:13) Kasi, kobomba lisumu ezali kozanga bolingo mpo enyokolaka mosumuki mpe epesaka basusu mpasi. Na ndenge nini? Yehova akoki kotika kopesa elimo santu na ye na lisangá mpe lisangá ekozala na kimya te. (Baefese 4:30) Soki mokristo asali lisumu ya monene, bolingo ya solo ekotinda ye asolola na bankulutu mpe azwa lisalisi oyo esengeli.​—Yakobo 5:14, 15.

18. Bolingo ya solo ezali na ntina nini?

18 Bolingo eleki bizaleli mosusu nyonso. (1 Bakorinti 13:13) Esalisaka bato báyeba soki banani bazali bayekoli ya solo ya Yesu mpe banani bamekolaka mpenza Yehova, epai bolingo euti. (Baefese 5:1, 2) Ntoma Paulo alobaki ete soki azangi bolingo, azali mpamba. (1 Bakorinti 13:2) Tiká ete mokomoko na biso akoba komonisa bolingo, kaka “na maloba” te kasi mpe “na misala mpe na solo.”