Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2017

Solo ememaka “kimya te, kasi mopanga”

Solo ememaka “kimya te, kasi mopanga”

“Bókanisa te ete nayaki kotya kimya na mabele; nayaki kotya kimya te, kasi mopanga.”​—MATAI 10:34.

NZEMBO: 125, 135

1, 2. (a) Kimya nini tozali na yango lelo? (b) Mpo na nini tokoki kozala na kimya ya libela te lelo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

BISO nyonso tolingaka kozala na bomoi ya kimya, mpe toboyaka mitungisi. Yango wana, tozali na botɔndi mingi ndenge Yehova apesaka biso “kimya ya Nzambe.” Kimya yango ekitisaka motema mpo na kobatela biso na makanisi mpe mayoki oyo ebulunganisaka. (Bafilipi 4:6, 7) Lokola tomipesá na Yehova, tozali mpe na “kimya elongo na Nzambe.” Elingi koloba tozali na boyokani malamu na ye.​—Baroma 5:1.

2 Kasi, ntango ekoki naino te mpo Nzambe atya kimya ya libela na mabele. Lokola tozali na mikolo ya nsuka, makambo ebele ekoki kotungisa biso. Bato ya mobulu bazali bisika nyonso. (2 Timote 3:1-4) Lisusu, biso bakristo tobundisaka Satana mpe mateya na ye ya lokuta. (2 Bakorinti 10:4, 5) Kasi, likambo oyo ekoki kotungisa mingi mpenza ezali botɛmɛli oyo ezali kouta epai ya bandeko na biso ya libota oyo basalelaka Yehova te. Basusu bakoki kotyola bindimeli na biso, to kokosela biso makambo ete tozali kokabola libota. Bamosusu bakoki ata koloba na biso ete soki totiki kosalela Yehova te tokolongwa  na libota. Boye, ndenge nini tokoki kotalela botɛmɛli oyo ezali kouta na libota? Ndenge nini tokoki kobatela kimya soki bandeko ya libota bazali kotɛmɛla biso?

NDENGE YA KOTALELA BOTƐMƐLI OYO EUTI NA LIBOTA

3, 4. (a) Mateya ya Yesu ekoki kosala nini? (b) Mingimingi na ntango nini kolanda Yesu ezalaka pɛtɛɛ te?

3 Yesu ayebaki ete moto nyonso te nde akondima mateya na ye. Ayebaki mpe ete bayekoli na ye bakozala na mposa ya mpiko mpo bato mosusu bakotɛmɛla bango. Botɛmɛli yango ekokaki kobebisa kimya ya mabota na bango. Yesu alobaki: “Bókanisa te ete nayaki kotya kimya na mabele; nayaki kotya kimya te, kasi mopanga. Mpo nayaki kokabola: moto akotombokela tata na ye, mpe mwana mwasi akotombokela mama na ye, mpe elenge mwasi ya libala akotombokela bokilo na ye ya mwasi. Ya solo, banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.”​—Matai 10:34-36.

4 Mpo na nini Yesu alobaki “Bókanisa te ete nayaki kotya kimya”? Mpo alingaki bato báyeba ete soki bakómi bayekoli na ye ekoki komemela bango mindɔndɔ. Ya solo, Yesu ayaki mpo na koteya bato solo ya Nzambe, kasi te mpo na kokabola mabota. (Yoane 18:37) Kasi, bayekoli na ye basengelaki koyeba ete kolanda ye ekozala ntango nyonso pɛtɛɛ te, mingimingi soki baninga na bango to bandeko ya mabota na bango bandimi solo te.

5. Makambo nini bayekoli ya Yesu bakutanaka na yango?

5 Yesu alobaki ete botɛmɛli oyo euti na libota ezali moko ya makambo oyo bayekoli na ye basengeli kondima koyikela mpiko. (Matai 10:38) Mpo na kosepelisa Yesu, bayekoli na ye bakangaka motema ntango bandeko ya mabota na bango bazali kotyola bango, to ata soki basundoli bango. Kasi, eloko oyo bazwaka eleki mosika oyo babungisaki.​—Tángá Marko 10:29, 30.

6. Likambo nini tosengeli kobosana te soki bandeko ya libota batɛmɛli biso?

6 Ata soki bandeko na biso batɛmɛli biso mpo tozali kosambela Yehova, tosengeli kaka kolinga bango. Kasi, tóbosana te ete bolingo mpo na Nzambe mpe Kristo esengeli kozala makasi koleka. (Matai 10:37) Tosengeli mpe koyeba ete Satana akoki kosalela bolingo na biso ya libota mpo na kotinda biso tózanga bosembo epai ya Yehova. Tólobela mikakatano misato mpe ndenge oyo tokoki koyikela yango mpiko.

MOLONGANI OYO AZALI MONDIMI TE

7. Ndenge nini osengeli kotalela libala na yo soki molongani na yo asalelaka Yehova te?

7 Biblia elobi polele ete bato nyonso oyo babali “bakozwa bolɔzi,” to mikakatano. (1 Bakorinti 7:28) Soki ozali na molongani oyo asalelaka Yehova te, mikakatano mpe mitungisi ekoki kozala lisusu mingi na libala. Kasi, ezali na ntina otalela likambo na yo ndenge Yehova atalelaka yango. Alobi ete okoki te kokabwana na molongani na yo to koboma libala kaka mpo asalelaka Yehova te. (1 Bakorinti 7:12-16) Ata soki mobali na yo azali mosaleli ya Yehova te mpe akambaka libota te na makambo ya elimo, osengeli kaka komemya ye mpo azali mokonzi ya libota. Ndenge moko mpe, soki mwasi na yo asalelaka Yehova te, osengeli kaka kolinga ye mpe komonisela ye boboto.​—Baefese 5:22, 23, 28, 29.

8. Mituna nini okoki komituna soki molongani na yo atyeli yo mwa bandelo na losambo na yo?

8 Osengeli kosala nini soki molongani na yo aluki kopekisa yo makambo mosusu ya losambo na biso? Ndeko mwasi moko, mobali na ye akatelaki ye mikolo oyo asengeli kobima na mosala ya kosakola. Soki likambo ya bongo ekómeli mpe yo, omituna boye: ‘Molongani na ngai asɛngi ngai nde natika mpenza kosambela Yehova? Soki te, nakoki te kosala makambo oyo asɛngi?’ Soki ozali makambo makasimakasi te, okozala  na mikakatano mingi te na libala na yo.​—Bafilipi 4:5.

9. Ndenge nini bakristo bakoki koteya bana na bango bátosa moboti oyo azali mondimi te?

9 Ekoki kozala mpasi mingi koteya bana soki molongani na yo asalelaka Yehova te. Na ndakisa, osengeli koteya bana na yo bátosa etinda ya Biblia oyo elobi: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.” (Baefese 6:1-3) Kasi, osengeli kosala nini soki molongani na yo atosaka mibeko ya Biblia te? Soki ozali kaka kopesa ye lokumu, okozala ndakisa malamu mpo na bana na yo. Kanisá bizaleli ya malamu ya molongani na yo, mpe yebisá ye ete ozali na botɔndi mpo na makambo nyonso ya malamu oyo asalaka. Kolobaka mabe te mpo na molongani na yo na miso ya bana. Kasi, yebisáká bango ete moto na moto asengeli kopona soki akosalela Yehova to te. Soki oteyi bana na yo bátosaka moboti na bango oyo azali mondimi te, ndakisa na bango ekoki kosala ete molongani na yo andima koyekola makambo ya Yehova.

Teyáká bana na yo mateya ya Biblia ntango nyonso oyo ozwi libaku (Talá paragrafe 10))

10. Ndenge nini moboti oyo azali mokristo akoki koteya bana na ye bálinga Yehova?

10 Molongani oyo azali mondimi te akoki kolinga ete bana na ye básala bafɛti ya bapakano to báyekola mateya ya lokuta. Mobali mosusu akoki kopekisa mwasi na ye oyo azali Motatoli ateya bana makambo ya Biblia. Kasi, ata soki ezali bongo, mwasi asengeli kosala nyonso oyo akoki mpo na koteya bana na ye solo. (Misala 16:1; 2 Timote 3:14, 15) Na ndakisa, tata oyo azali mondimi te akoki koboya mwasi na ye ayekola Biblia na bana to amema bango na makita. Mwasi akotosa ye, kasi akoki koyebisaka bana makambo ya Yehova ntango nyonso oyo azwi libaku. Na ndenge yango, bakoki koyekola koyeba Yehova mpe mibeko na ye na oyo etali mabe ná malamu.  (Misala 4:19, 20) Kasi nsukansuka, bana bango moko nde bakopona soki bakosalela Yehova to te. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)​—Kolimbola Mibeko 30:19, 20.

SOKI BANDEKO YA LIBOTA BATƐMƐLI LOSAMBO YA SOLO

11. Nini ekoki kobimisa mikakatano kati na biso ná bandeko na biso ya libota oyo basalelaka Yehova te?

11 Ekoki kozala ete ntango tobandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, toyebisaki libota na biso te. Kasi, ntango kondima na biso ekolaki, tomonaki ete tosengeli koyebisa bango mposa na biso ya kosalela Yehova. (Marko 8:38) Mbala mosusu bosembo na yo epai ya Nzambe ebimisi mikakatano kati na yo ná libota na yo. Soki ezali bongo, tólobela mwa makambo oyo okoki kosala mpo na kobatela kimya, mpe kotikala sembo epai ya Yehova.

12. Nini ekoki kotinda bandeko na biso bátɛmɛla biso, kasi ndenge nini tokomonisa ete tomitye na esika na bango?

12 Meká komitya na esika ya bandeko na yo ya libota. Tosepelaka mingi ndenge toyebi solo ya Biblia. Kasi, bandeko na biso bakoki kokanisa ete tokosami to ete tokɔti na mwa lingomba moko boye. Bakoki kokanisa ete tolingi bango lisusu te mpo toboyi kosangana na bango na bafɛti mosusu. Bakoki kutu kobanga ete likambo ya mabe ekómela biso soki tokufi. Tosengeli koluka koyeba ndenge oyo bazali komiyoka mpe koyoka na likebi makambo oyo bazali koloba mpo tóyeba ntina oyo bazali komitungisa mpo na biso. (Masese 20:5) Ntoma Paulo ayebaki makanisi ya “bato ya lolenge nyonso” mpo akoka koteya bango nsango malamu. Soki yo mpe oluki koyeba makanisi ya bato ya libota na yo, yango ekoki kutu kosalisa yo oyeba ndenge ya koteya bango solo.​—1 Bakorinti 9:19-23.

13. Ndenge nini tosengeli koloba na bandeko na biso oyo bazali bandimi te?

13 Lobá na boboto. Biblia elobi: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko.” (Bakolose 4:6) Kolobela bandeko na biso ya libota na boboto ekoki kozala mpasi. Kasi tokoki kosɛnga Yehova apesa biso elimo santu na ye mpo esalisa biso. Tosengeli te koluka kobendana na bango mpo na mateya na bango ya lokuta. Soki balobi to basali likambo moko oyo epesi biso mpasi, tokoki komekola bantoma. Ntoma Paulo alobaki: “Ntango bazali kofinga biso, topambolaka; ntango bazali konyokola biso, tokangaka motema; ntango bazali kobebisa lokumu na biso, tobondelaka,” elingi koloba tolobaka na boboto.​—1 Bakorinti 4:12, 13.

14. Etamboli ya malamu ebimisaka matomba nini?

14 Zalá na etamboli ya malamu. Mpo na nini ezali na ntina? Ata soki maloba na biso ya boboto ekoki kosalisa biso tózala na kimya na bandeko na biso ya libota, etamboli na biso ya malamu ekoki kosalisa mingi koleka. (Tángá 1 Petro 3:1, 2, 16.) Salá ete ndakisa na yo etinda bandeko na yo ya libota bámona ete Batatoli ya Yehova bazali na mabala ya esengo, babatelaka bana na bango malamu, batosaka mitinda ya Biblia mpe bazali na bomoi ya ntina. Ata soki bandeko na biso bandimi solo te, tokoki kozala na esengo mpo etamboli na biso ya malamu esepelisaka Yehova.

15. Ndenge nini tokoki komibongisa liboso mpo na koboya kobendana na bandeko na biso?

15 Omibongisa liboso. Kanisá liboso makambo oyo ekoki kobimisa kowelana kati na yo ná bandeko na yo. Na nsima, bongisá oyo okosala. (Masese 12:16, 23) Yango nde ndeko mwasi moko na Australie asalaki. Tata-bokilo na ye azalaki kolinga solo ata moke te mpe ntango mosusu azalaki kosilikela ye. Na yango, soki balingi kosolola na ye, ndeko yango ná mobali na ye bazalaki kosɛnga Yehova asalisa bango bápesa ye  eyano na nkanda te. Bazalaki kokanisa makambo ya esengo oyo bakoki koyebisa ye. Bazalaki mpe koboya masolo ya milai, oyo mbala mingi ememaka na kolobela makambo ya lingomba; na yango, bazalaki koumisa masolo te.

16. Nini ekosalisa yo oyoka mabe te mpo osepelisi bandeko na yo te?

16 Ya solo, okoki te kokima kowelana nyonso na bandeko na yo oyo bazali bandimi te. Na yango, soki kowelana ebimi, okoyoka mabe mpo olingaka bandeko na yo mpe olingi kosepelisa bango. Kasi kobosana te, bosembo na yo epai ya Yehova esengeli koleka bolingo oyo olingaka libota na yo. Soki bandeko na yo bakangi ntina ya likambo yango, bakoki koyeba ete kosalela Yehova ezali na ntina mingi. Okoki kotinda moto na makasi te andima solo. Kasi, okoki kosalisa bato bámona ete kolanda banzela ya Yehova esalisi yo. Kutu, Yehova apesi mpe bango libaku oyo apesá biso, kopona kosalela ye.​—Yisaya 48:17, 18.

SOKI NDEKO MOKO YA LIBOTA ATIKI YEHOVA

17, 18. Nini ekoki kosalisa yo soki ndeko moko ya libota atiki Yehova?

17 Soki ndeko moko ya libota alongolami na lisangá to amilongoli na lisangá, ekosala mpasi makasi. Okoki koyoka mpasi lokola nde batɔbɔli yo na mopanga. Nini ekoki kosalisa yo oyika mpiko?

18 Kobá kotya makanisi na mosala ya Yehova. Soki oyoki mpasi ya ndenge wana, osengeli kokómisa kondima na yo makasi. Tángáká Biblia mokolo na mokolo, bongisáká mpe yanganáká na makita, kotika kosakola te, mpe bondeláká Yehova apesa yo makasi ya koyika mpiko. (Yuda 20, 21) Bongo soki osali nyonso wana kasi mpasi ezali kosila kaka te? Kotika te! Kobá kotya makanisi na mosala ya Yehova. Nsima ya mikolo, yango ekosalisa yo opekisa makanisi mpe mayoki na yo. Yango nde esalemaki epai ya mokomi ya Nzembo 73. Na eleko moko, akómaki na makanisi mpe mayoki oyo ebongi te. Kasi losambo ya Yehova esalisaki ye atalela lisusu makambo na ndenge oyo ebongi. (Nzembo 73:16, 17) Ekoki mpe kosalisa yo.

19. Ndenge nini okoki komonisa limemya mpo na disiplini oyo Yehova apesaka bato na ye?

19 Zalá na limemya mpo na disiplini ya Yehova. Nzambe ayebi ete disiplini na ye ekoki kosalisa moto nyonso oyo azwi yango, ata moto oyo alongolami na lisangá. Ata soki ezalaka mpasi mingi soki moto oyo tolingaka azwi disiplini, ekoki kosalisa ye azongela lisusu Yehova na nsima. (Tángá Baebre 12:11.) Kasi, tosengeli naino kotosa malako ya Yehova mpe ‘kotika kosangana’ na baoyo balongolami na lisangá. (1 Bakorinti 5:11-13) Ata soki ezali pɛtɛɛ te, tosengeli koboya kosolola ntango nyonso na bango na telefone, na bamesaje, na mikanda, to na Internet.

20. Tosengeli kokoba kolikya likambo nini?

20 Kobungisa elikya te! Bolingo “elikyaka makambo nyonso”; yango wana, tózala kaka na elikya ete bandeko na biso bakozongela Yehova. (1 Bakorinti 13:7) Soki omoni ete ndeko na yo ya libota abandi kozongela makanisi malamu, okoki kobondela mpo na ye mpo azwa makasi na nzela ya Biblia mpe andima libyangi ya Yehova ete: “Zongelá ngai.”​—Yisaya 44:22.

21. Osengeli kosala nini soki libota na yo etɛmɛlaka yo mpo ozali kolanda Yesu?

21 Yesu alobaki ete tosengeli kolinga ye koleka moto mosusu nyonso. Mpe Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bakozala na mpiko mpo na kotikala sembo epai na ye ata soki bandeko ya mabota na bango batɛmɛli bango. Yango wana, soki libota na yo etɛmɛlaka yo mpo ozali kolanda Yesu, tyelá Yehova motema. Sɛngá ye asalisa yo okoka koyika mpiko. (Yisaya 41:10, 13) Zalá na esengo mpo Yehova ná Yesu bazali kosepela na yo mpe ete bakopesa yo mbano mpo na bosembo na yo.

^ par. 10 Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali koteya bana soki molongani moko asalelaka Yehova te, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2002.