Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2017

Makolo na motole moko ezali kobatela yo

Makolo na motole moko ezali kobatela yo

“Ekosalema mpenza bongo​—soki bokoyoka mongongo ya Yehova Nzambe na bino.”​—ZEKARIA 6:15.

NZEMBO: 17, 136

1, 2. Na nsuka ya emonaneli ya nsambo oyo Zekaria amonaki, Bayuda bazalaki ndenge nini na Yerusaleme?

NSIMA ya emonaneli ya nsambo, Zekaria azalaki na makambo ebele ya kokanisa. Na ntembe te, azwaki makasi ndenge Yehova alakaki ete akopesa etumbu na bato oyo basalaka makambo ya kozanga bosembo. Kasi, bato basalaki mpenza mbongwana te. Mingi bazalaki kaka kosala mabe mpe makambo ya kozanga bosembo, mpe mosala ya kotonga lisusu tempelo ya Yerusaleme esilaki naino te. Mpo na nini Bayuda basundolaki nokinoki mosala oyo Yehova apesaki bango? Bazongaki na Yerusaleme kaka mpo na kobongisa bomoi na bango moko?

2 Zekaria ayebaki ete Bayuda oyo bazongaki na Yerusaleme bazalaki basambeli ya Yehova. Bazalaki bato oyo “elimo ya Nzambe ya solo elamwisaki” mpo bátika bandako mpe mimbongo na bango na Babilone. (Ezera 1:2, 3, 5) Batikaki esika oyo bayebaki malamu mpe bakendaki na mokili oyo mingi kati na bango bamonaki naino te. Lokola kotonga lisusu tempelo ya Yehova ezalaki na ntina mingi, Bayuda  yango bandimaki kosala mobembo ya mpasi ya kilomɛtrɛ soki 1 600 na mokili ekauká.

3, 4. Mikakatano nini Bayuda oyo bazongaki na Yerusaleme bakutanaki na yango?

3 Kanisá ndenge mobembo ezalaki molai kolongwa Babilone tii Yerusaleme. Bato balekisaki bangonga ebele mpo na kokanisa mpe kolobela mboka na bango ya sika. Mikóló oyo bazalaká kuna bayebisaki bango ndenge Yerusaleme ná tempelo ezalaki kitoko. (Ezera 3:12) Soki ozalaki kosala mobembo elongo na bango, olingaki koyoka ndenge nini mbala ya liboso oyo omoni Yerusaleme? Na ntembe te, olingaki koyoka mawa komona ndenge matiti mabe eboti esika bandako ezalaki, bifelo ekweá mpe madusu minene esika baporte mpe bandako milai ezalaki! Okokaki kokokanisa yango na bifelo minene mpe milai ya Babilone. Kasi, Bayuda balɛmbaki nzoto te. Mpo na nini? Mpo Yehova asalisaki bango mpe abatelaki bango na mobembo na bango ya molai. Ntango kaka bakómaki na Yerusaleme, batongaki etumbelo esika tempelo ezalaki kala mpe babandaki kopesa Yehova mbeka mikolo nyonso. (Ezera 3:1, 2) Bazalaki na molende mpe babongamaki mpo na mosala. Emonanaki lokola eloko te ekoki kolɛmbisa bango nzoto.

4 Longola kotonga lisusu tempelo, Bayuda basengelaki mpe kotonga lisusu bingumba mpe bandako na bango. Basengelaki kosala bilanga mpo na koleisa mabota na bango. (Ezera 2:70) Emonanaki ete bazalaki na mosala monene mpenza. Kasi eumelaki te, banguna bayaki mpe batɛmɛlaki mosala na bango. Lokola botɛmɛli yango eumelaki mbula 15, mokemoke Bayuda babandaki kolɛmba nzoto. (Ezera 4:1-4) Mokakatano mosusu eyaki na mobu 522 L.T.B., ntango mokonzi ya Perse apekisaki mosala nyonso ya kotonga na Yerusaleme. Emonanaki lokola ete engumba yango ekotongama lisusu te.​—Ezera 4:21-24.

5. Ndenge nini Yehova asalisaki bato na ye?

5 Yehova ayebaki ete bato na ye bazalaki na mposa ya kozwa makasi mpe mpiko. Na yango, alakisaki Zekaria emonaneli moko ya nsuka mpo na komonisa bato na ye ete alingaka bango mpe asepelaki na milende na bango mpo na kosalela ye. Alakaki ete akobatela bango soki bazongeli mosala oyo apesaki bango. Mpo na mosala ya kotonga lisusu tempelo, Yehova alobaki: “Ekosalema mpenza bongo​—soki bokoyoka mongongo ya Yehova Nzambe na bino.”​—Zekaria 6:15.

LIMPINGA YA MAKALO YA BAANZELU

6. (a) Ndenge nini emonaneli ya mwambe ebandaki? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mpo na nini bampunda ezalaki ya langi ndenge moko te?

6 Ekoki kozala ete emonaneli ya mwambe, ya nsuka, oyo Zekaria amonaki nde elendisaki makasi koleka. (Tángá Zekaria 6:1-3.) Meká komona makambo Zekaria amonaki: “Na katikati ya bangomba mibale,” oyo esalemá na motako, amonaki bampunda ezali kobenda makalo minei. Bampunda yango ezalaki ya langi ndenge moko te, mpe yango esalisaki na kokesenisa batambwisi na yango. Zekaria atunaki: “Wana nini?” (Zekaria 6:4) Biso mpe tozali na mposa ya kozwa eyano, mpo emonaneli yango etali mpe biso.

Yehova asalelaka baanzelu mpo na kobatela mpe kolendisa basaleli na ye

7, 8. (a) Bangomba mibale ezali komonisa nini? (b) Mpo na nini bangomba yango esalemaki na motako?

7 Na Biblia, bangomba emonisaka makonzi, to baguvɛrnema. Bangomba oyo Zekaria amonaki ekokani na bangomba mibale oyo esakweli ya Danyele elobeli. Ngomba moko ezali komonisa boyangeli ya seko ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe ngomba mosusu ezali komonisa Bokonzi ya Masiya oyo Mokonzi na yango ezali Yesu. (Danyele 2:35, 45) Banda ntango Yesu akómaki Mokonzi na sanza ya 10 na 1914, bangomba nyonso mibale ezalaka mpe ezali na ntina  mingi na kokokisama ya mokano ya Nzambe na mabele.

8 Mpo na nini bangomba yango esalemaki na motako? Motako ezali ebende ya ntalo mpe engɛngaka. Kutu, Yehova ayebisaki Bayisraele básalela motako mpo na kotonga tabernakle mpe na nsima tempelo ya Yerusaleme. (Kobima 27:1-3; 1 Bakonzi 7:13-16) Na yango, lokola bangomba wana esalemaki na motako emonisi ete boyangeli ya Yehova mpe Bokonzi ya Masiya ezali malamu mpenza, oyo ekosala ete bato bázala na likambo ya kobanga te mpe ekomemela bato mapamboli ebele.

9. Batambwisi-makalo ezali banani, mpe bazali na mokumba nini?

9 Bongo makalo ná batambwisi na yango ezali komonisa nini? Batambwisi ezali baanzelu, mbala mosusu bituluku ndenge na ndenge ya baanzelu. (Tángá Zekaria 6:5-8.) Bautaki kozwa mokumba moko monene “liboso ya Nkolo ya mabele mobimba.” Baanzelu yango batindami na bisika ya sikisiki mpo na kobatela basaleli ya Nzambe, mingimingi mpo na Babilone, “mokili ya nɔrdi.” Na nzela ya emonaneli yango, Yehova asalisi bato na ye báyeba ete bakozonga lisusu na boombo na Babilone te. Kanisá ndenge likambo yango ebɔndisaki bato oyo bazalaki kotonga tempelo na mikolo ya Zekaria! Bayebaki ete banguna na bango bakokaki kopekisa mosala na bango te.

10. Ndenge nini esakweli ya Zekaria ya makalo mpe batambwisi na yango ekoki kosalisa biso lelo?

10 Lelo oyo mpe, Yehova asalelaka baanzelu mpo na kobatela mpe kolendisa basaleli na ye. (Malaki 3:6; Baebre 1:7, 14) Banda 1919, ntango basaleli ya Yehova balongwaki na boombo ya elimo na Babilone monene, banguna bazali kosala nyonso mpo na kopekisa losambo ya solo ekende liboso mpe epalangana. (Emoniseli 18:4) Kasi bazali kolonga te kosala yango. Lokola baanzelu bazali kobatela ebongiseli ya Yehova, tozali na ntina te ya kobanga ete basaleli ya Yehova bázonga lisusu na boombo ya mangomba ya lokuta. (Nzembo 34:7) Kasi, tokokoba kozala na esengo mpe na mingi ya kosala na losambo ya Yehova. Esakweli ya Zekaria esalisi biso tóyeba ete tozali na likambo ya kobanga te mpe tobatelami na bangomba mibale.

11. Mpo na nini tosengeli kobanga te ntango bakonzi ya mokili bakobundisa basaleli ya Nzambe

11 Etikali moke mpenza, bakonzi ya politiki ya mokili ya Satana bakosangana mpo na koluka kobundisa basaleli ya Nzambe. (Ezekiele 38:2, 10-12; Danyele 11:40, 44, 45; Emoniseli 19:19) Esakweli ya Ezekiele emonisi bakonzi yango bazipi mabele lokola mapata. Bazali kotambwisa bampunda mpe bazali koya na nkanda mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe. (Ezekiele 38:15, 16) * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Tosengeli nde kobanga bango? Te! Limpinga ya baanzelu ya Yehova ezali pene na biso. Na bolɔzi monene, baanzelu ya Yehova bakobatela basaleli na ye mpe bakobebisa moto nyonso oyo atɛmɛlaka boyangeli ya Yehova. (2 Batesaloniki 1:7, 8) Ekozala mpenza likambo! Kasi, nani akokamba limpinga ya baanzelu yango?

YEHOVA ALATISI MOTOLE NA MOKONZI MPE NGANGA-NZAMBE OYO APONI

12, 13. (a) Likambo nini Yehova asɛngaki Zekaria asala na nsima? (b) Ndenge nini toyebi ete moto oyo abengami mwa nzete ya sika ezali Yesu?

12 Zekaria amonaki bimonaneli mwambe kaka ye moko. Sikoyo, akosala likambo oyo bato mosusu mpe bakomona, mpe yango ekolendisa  baoyo bazalaki kotonga lisusu tempelo ya Nzambe. (Tángá Zekaria 6:9-12.) Ezalaki na mibali misato, Heledai, Tobiya, mpe Yedaya, oyo bautaki na Babilone. Yehova ayebisaki Zekaria azwa palata ná wolo epai ya mibali yango mpe asala na yango “motole moko ya kitoko.” (Zekaria 6:11) Motole yango ezalaki mpo na Guvɛrnɛrɛ Zorobabele, oyo azalaki na libota ya Yuda mpe mokitani ya Davidi? Te. Yehova ayebisaki Zekaria atya motole yango na motó ya Yosua, nganga-nzambe monene. Na ntembe te bato oyo bamonaki ye ntango azalaki kosala yango bakamwaki mpenza.

13 Yosua, nganga-nzambe monene akómaki nde mokonzi lokola balatisaki ye motole? Te. Lokola Yosua azalaki mokitani ya Davidi te, akokaki kozala mokonzi te. Kolatisa ye motole ezalaki elilingi ya likambo oyo esengelaki kosalema na nsima: kotyama ya mokonzi mpe nganga-nzambe ya seko, oyo abengami Mwa nzete ya sika. Biblia emonisi ete mwa nzete ya sika yango nde Yesu Kristo.​—Yisaya 11:1; Matai 2:23.

14. Yesu, Mokonzi mpe Nganga-nzambe monene azali kosala nini?

14 Yesu azali Mokonzi mpe Nganga-nzambe monene. Azali kokamba limpinga ya baanzelu ya Yehova mpe azali kosala nyonso mpo basaleli ya Nzambe báyoka ete babatelami na mokili oyo etondi na mobulu. (Yirimia 23:5, 6) Mosika te, Kristo akolonga bikólo mpo na kopesa boyangeli ya Nzambe mabɔkɔ mpe kobatela basaleli ya Yehova. (Emoniseli 17:12-14; 19:11, 14, 15) Kasi liboso mokolo wana ekoka, Yesu, elingi koloba mwa nzete ya sika, azali na mosala monene.

AKOTONGA TEMPELO

15, 16. (a) Lelo oyo, ndenge nini basaleli ya Nzambe babongisami mpe bapɛtolami, mpe nani asalaki yango? (b) Mabele ekozala ndenge nini na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo?

15 Atako Yesu azali Mokonzi mpe Nganga-nzambe monene, bapesaki ye mokumba ya “kotonga tempelo ya Yehova.” (Tángá Zekaria 6:13.) Na 1919, asalaki mosala yango ya kotonga na ndenge alongolaki basaleli ya Nzambe na boombo ya mangomba ya lokuta, Babilone Monene. Yesu azongisaki lisangá mpe atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Etuluku ya bandeko mibali yango oyo batyami mafuta na elimo bazali kotambwisa mosala monene awa na mabele, eteni ya tempelo monene ya elimo. (Matai 24:45) Yesu apɛtolaki mpe basaleli ya Nzambe, asalisaki bango mpo losambo na bango ezala pɛto na makambo nyonso.​—Malaki 3:1-3.

16 Yesu ná bato 144 000 oyo bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe bakoyangela mbula nkóto. Na ntango yango, bakosalisa bato ya sembo bákóma bato ya kokoka. Ntango bakonzi mpe banganga-nzambe yango bakosilisa mosala wana, kaka basambeli ya solo ya Yehova nde bakotikala na mabele. Nsukansuka losambo ya solo ekozonga mpenza ndenge esengeli!

PESÁ MABƆKƆ NA MOSALA YA KOTONGA

17. Elikya nini Yehova apesaki Bayuda na nsima, mpe ndenge nini nsango na ye esalisaki bango?

17 Ndenge nini nsango ya Zekaria esalisaki Bayuda na ntango wana? Yehova alakaki ete akosalisa bango mpe akobatela bango mpo básilisa kotonga tempelo. Elaka yango epesaki bango elikya. Kasi, mbala mosusu bazalaki kaka komituna ndenge oyo bato moke bakokaki kosala mosala monene ndenge wana. Na yango, Zekaria ayebisaki bango likambo moko oyo elongolaki bango kobanga mpe ntembe. Longola mibali lokola Heledai, Tobiya, mpe Yedaya, oyo bayaki mpo na kosalisa, Yehova alobaki ete bato mosusu mingi “bakoya mpe bakotonga mpenza na kati ya tempelo ya Yehova.” (Tángá Zekaria 6:15.) Bayuda bamonaki  ete Yehova azalaki elongo na bango na mosala yango. Bazwaki mpiko mpe bazongelaki kotonga lisusu tempelo, atako mokonzi ya Perse apekisaki mosala yango. Epekiseli wana ezalaki lokola ngomba monene na nzela na bango, kasi eumelaki te Yehova alongolaki yango. Nsukansuka, basilisaki kotonga tempelo na mobu 515 L.T.B. (Ezera 6:22; Zekaria 4:6, 7) Kasi, maloba yango ya Yehova emonisi likambo ya monene koleka oyo ezali kosalema na mikolo na biso.

Yehova akobosana ata mokolo moko te bolingo oyo olingaka ye! (Talá paragrafe 18, 19)

18. Ndenge nini Zekaria 6:15 ezali kokokisama lelo?

18 Lelo oyo, bamilio ya bato bazali kosambela Yehova. Bazali na esengo ya kopesa ye ‘biloko na bango ya motuya,’ na ndakisa ntango, makasi, mpe bozwi na bango. Na ndenge yango, bazali kopesa mabɔkɔ na tempelo monene ya elimo. (Masese 3:9) Tokoki kondima ete Yehova asepelaka mingi ndenge topesaka mabɔkɔ na tempelo na ye ya elimo. Kobosana te ete ntango Heledai, Tobiya, mpe Yedaya bamemaki palata mpe wolo Zekaria asalelaki yango motole. Motole yango ezalaki “ekaniseli” oyo ezalaki kokundwela bato likabo oyo bapesaki na losambo ya solo. (Zekaria 6:14) Yehova akobosana ata mokolo moko te mosala oyo tosalelaka ye mpe bolingo oyo tolingaka ye.​—Baebre 6:10.

19. Bimonaneli ya Zekaria ezali kotinda biso tósala nini?

19 Mosala monene oyo basaleli ya Yehova bazali kosala emonisi polele ete azali kopambola bango mpe Kristo azali kokamba bango. Tozali na esengo ndenge tozali na kati ya ebongiseli oyo epikami makasi, oyo ezali na kimya mpe ekoumela libela na libela; mpe toyebi ete mokano ya Yehova mpo na losambo ya pɛto ekokokisama. Yango wana, sepelá na esika na yo na lisangá ya Yehova, mpe ‘yoká mongongo ya Yehova Nzambe na yo.’ Na bongo, Mokonzi mpe Nganga-nzambe monene na biso ná baanzelu bakobatela yo. Salá nyonso oyo okoki mpo na kopesa mabɔkɔ na losambo ya solo. Yehova akobatela yo na ntango oyo mokili oyo ezali naino, mpe libela na libela!

^ par. 11 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2015, nkasa 27-28.