Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2017

Bimonaneli oyo Zekaria amonaki etali yo na nini?

Bimonaneli oyo Zekaria amonaki etali yo na nini?

“Bózongela ngai, . . . mpe ngai nakozongela bino.”​—ZEKARIA 1:3.

NZEMBO: 120, 117

1-3. (a) Ntango Zekaria akómaki mosakoli makambo ezalaki ndenge nini mpo na basaleli ya Yehova? (b) Mpo na nini Yehova asɛngaki basaleli na ye bázongela ye?

MOSAKOLI Zekaria amonaki makambo ya kokamwa na bimonaneli na ye. Amonaki rulo moko ezali kopumbwa, mwasi moko na kati ya nzungu, mpe basi mibale bazali kopɛpa mapapu na bango oyo ezalaki lokola mapapu ya nkɔngi (cigogne). (Zekaria 5:1, 7-9) Mpo na nini Yehova amonisaki mosakoli na ye makambo yango ya kokamwa? Na ntango wana makambo ezalaki ndenge nini na Yisraele? Mpe ndenge nini bimonaneli yango ekoki kosalisa biso lelo?

2 Na mobu 537 L.T.B., basaleli ya Yehova bazalaki na esengo makasi. Bautaki kobima na boombo na Babilone epai basalaki mbula 70! Bazalaki na esengo ya kozonga na Yerusaleme mpo na kotonga lisusu tempelo mpe kosambela Yehova kuna. Mbula moko na nsima, Bayisraele batyaki moboko ya tempelo. Bato basepelaki mingi mpe bazalaki “koganga na koganga  moko makasi, mpe makɛlɛlɛ ezalaki koyokana mosika mpenza.” (Ezera 3:10-13) Kasi banguna batɛmɛlaki bango makasi mpo bátika mosala ya kotonga. Bayisraele balɛmbaki nzoto mingi mpe batikaki kotonga tempelo. Bamipesaki na kotonga bandako na bango moko mpe kosala bilanga na bango. Mbula 16 elekaki, kasi basilisaki kaka kotonga tempelo ya Yehova te. Esengelaki koyebisa lisusu bato ete bázongela Yehova mpe bátika koluka bolamu na bango moko. Yehova alingaki ete básambela ye na molende mpe na mpiko.

3 Yango wana na mobu 520, Yehova atindaki mosakoli Zekaria asalisa bato bákanisa lisusu ntina oyo alongolaki bango na boombo na Babilone. Likambo ya kokamwa, nkombo Zekaria elimboli “Yehova abosani te.” Atako Bayisraele babosanaki makambo oyo Yehova asalaki mpo na bango, Yehova abosanaki bango te. (Tángá Zekaria 1:3, 4.) Yehova alakaki ete akosalisa bango mpo na kozongisa losambo ya pɛto. Kasi akebisaki bango mpe ete akondima losambo na bango kaka soki bapesi ye oyo eleki malamu. Tólobela emonaneli ya motoba mpe ya nsambo oyo Zekaria amonaki. Tokoyeba ndenge Yehova alendisaki Bayisraele mpe ndenge bimonaneli yango mibale ekoki kosalisa biso lelo.

ETUMBU YA NZAMBE MPO NA BATO OYO BAYIBAKA

4. (a) Zekaria amonaki nini na emonaneli ya motoba? (b) Mpe mpo na nini bakomaki makambo na ngámbo nyonso mibale ya rulo yango? (Talá elilingi ya ebandeli 1.)

4 Zekaria mokapo 5 ebandi na emonaneli moko ya kokamwa. (Tángá Zekaria 5:1, 2.) Zekaria amonaki rulo moko ezali kopumbwa na likoló. Rulo yango ezalaki mɛtrɛ 9 na molai mpe mɛtrɛ 4 ná ndambo na monene. Ezalaki ya kofungwama, bakomá nsango moko na kati. (Zekaria 5:3) Ezalaki nsango ya lisambisi moko monene. Na ntango ya kala, mbala mingi bato bazalaki kokoma kaka na ngámbo moko ya rulo. Kasi, nsango wana ezalaki na ntina mingi yango wana ekomamaki na ngámbo nyonso mibale ya rulo.

Bakristo basengeli koboya moyibi (Talá paragrafe 5-7)

5, 6. Ndenge nini Yehova atalelaka lolenge nyonso ya moyibi?

5 Tángá Zekaria 5:3, 4. Bato nyonso bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na misala na bango. Ezali bongo mingimingi mpo na basaleli ya solo ya Yehova, mpo bazali komema nkombo na ye. Balingaka ye mpe bayebi ete koyiba efingisaka nkombo na ye. (Masese 30:8, 9) Bato mosusu bakoki kokanisa ete koyiba ezali mabe te soki esengeli kosala yango. Nzokande, ata soki tokanisi ete esengeli kosala yango, moto oyo ayibi amonisi ete mposa na ye ya lokoso ezali na ntina mingi koleka Yehova, nkombo na ye, mpe mibeko na ye.

6 Zekaria 5:3, 4 elobi ete elakeli mabe “ekokɔta mpenza na ndako ya moyibi,” mpe “ekofanda mpenza na kati ya ndako na ye mpe ekosilisa yango nyɛɛ.” Na yango, Yehova akoki kobimisa polele mpe kosambisa likambo nyonso ya mabe oyo ezali kosalema kati ya basaleli na ye. Ata soki moto ayibi mpe likambo yango eyebani te epai ya bakonzi ya Leta, bakonzi ya mosala na ye, bankulutu, to mpe baboti, Yehova ayebi. Akosala ete lolenge nyonso ya moyibi ebima polele. (Baebre 4:13) Ezali esengo mpenza kozala na lisangá ya bandeko oyo basalaka makasi ya kozala sembo “na makambo nyonso”!​—Baebre 13:18.

7. Tokoki kosala nini mpo na kokima elakeli mabe ya rulo oyo ezalaki kopumbwa?

7 Lolenge nyonso ya moyibi esalaka Yehova mabe. Ezali lokumu monene ndenge toyebi mitinda ya Yehova na oyo etali mabe ná malamu mpe ndenge tozali na bomoi  oyo efingisaka nkombo na ye te. Soki tozali kosala bongo, tokozwa te etumbu oyo Yehova akopesa bato oyo babukaka mibeko na ye.

KOKISÁKÁ MALOBA NA YO “MOKOLO NA MOKOLO”

8-10. (a) Kolapa ndai elimboli nini? (b) Ndai nini Mokonzi Zidikiya akokisaki te?

8 Rulo oyo ezalaki kopumbwa ezalaki mpe na nsango ya likebisi mpo na baoyo balapaka ‘ndai ya lokuta na nkombo ya Nzambe.’ (Zekaria 5:4) Kolapa ndai elimboli kondima ete likambo moko ezali solo, to kolaka ete tokosala to tokosala te likambo moko boye.

9 Kolapa ndai na nkombo ya Yehova ezali likambo ya kozwa na lisɛki ata moke te. Makambo oyo ekómelaki Zidikiya, mokonzi ya nsuka oyo ayangelaki na Yerusaleme, emonisi yango. Zidikiya alapaki ndai na nkombo ya Yehova ete akomitika epai ya mokonzi ya Babilone. Kasi, Zidikiya akokisaki maloba na ye te. Na yango, Yehova alobaki: “Na mboka ya mokonzi oyo atyaki mokonzi moto oyo atyolaki ndai na ye mpe oyo abukaki kondimana na ye, na mboka na ye, na kati ya Babilone, nde akokufa.”​—Ezekiele 17:16.

10 Mokonzi Zidikiya alapaki ndai na nkombo ya Nzambe, mpe Yehova azelaki ete akokisa yango. (2 Ntango 36:13) Kasi, Zidikiya atosaki elaka na ye te mpe asɛngaki Ezipito esalisa ye mpo alongwa na boombo ya Babilone. Kasi, Ezipito ekokaki kosalisa ye te.​—Ezekiele 17:11-15, 17, 18.

11, 12. (a) Elaka nini ya ntina mingi oyo tokoki kosala? (b) Na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, ndenge nini tokoki komonisa ete tomipesá na Nzambe?

11 Likambo oyo ekómelaki Zidikiya ezali koteya biso ete Yehova ayokaka bilaka oyo tosalaka. Mpo na kosepelisa ye, tosengeli kokokisaka bilaka na biso. (Nzembo 76:11)  Elaka ya ntina koleka oyo tokoki kosala ezali komipesa na biso epai ya Yehova. Ntango tomipesaki na Nzambe, tolakaki ye ete tokosalela ye ata soki likambo nini ekómeli biso na bomoi.

12 Ndenge nini tokoki kokokisa elaka na biso epai ya Yehova? Tosengeli kokokisa yango “mokolo na mokolo,” ezala na komekama ya minene to ya mike. Ndenge oyo tosalaka soki tomekami nde emonisaka soki boyokani na biso na Yehova ezali mpenza makasi. (Nzembo 61:8) Na ndakisa, okosala nini soki moto moko na mosala to na kelasi abandi kolula yo? Okoboya atyela yo likebi ndenge wana mpo omonisa ete olingi kotosa Yehova? (Masese 23:26) Soki na libota na bino kaka yo moko nde osambelaka Yehova, osɛngaka ye asalisa yo okoba kosala makambo lokola mokristo? Ata soki okutani na likambo nini, obondelaka Yehova mikolo nyonso mpo na kopesa ye matɔndi ndenge alingaka biso mpe atambwisaka biso? Otángaka Biblia mokolo na mokolo? Ntango tomipesaki na Yehova, tolakaki ye ete tokobanda kosala makambo yango. Ntango totosaka Yehova mpe topesaka ye oyo eleki malamu, tomonisaka ye ete tolingaka ye mpe ete tozali bato na ye. Soki tozali na bomoi ezali mpo tósambela Yehova. Mpe lokola tozali sembo epai ya Yehova, alaki biso bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.​—Kolimbola Mibeko 10:12, 13.

13. Emonaneli ya motoba oyo Zekaria amonaki eteyi biso nini?

13 Emonaneli ya motoba oyo Zekaria amonaki esalisi biso tóyeba ete soki tolingaka Yehova tosengeli koyiba te mpe tosengeli kokokisa bilaka oyo topesaki. Tomoni mpe ete atako Bayisraele basalaki mabunga mingi, Yehova akokisaki elaka na ye mpe asundolaki bango te. Ayebaki ete bazalaki na mokakatano monene mpo banguna bazingaki bango. Ndakisa ya Yehova eteyi biso ete tosengeli kokokisaka bilaka oyo topesi. Mpe tótya motema ete akosalisa biso tókokisa yango. Mpo na kosalisa biso, apesi biso elikya mpo na mikolo ezali koya. Mosika te, akolongola mabe nyonso na mabele. Emonaneli oyo Zekaria amonaki na nsima emonisi elikya yango.

YEHOVA AKOLONGOLA MABE

14, 15. (a) Zekaria amonaki nini na emonaneli ya nsambo? (Talá elilingi ya ebandeli 2.) (b) Mwasi oyo azalaki na kati ya nzungu azali elilingi ya nini, mpe mpo na nini anzelu azipaki nzungu yango?

14 Ntango Zekaria amonaki rulo oyo ezalaki kopumbwa, na nsima anzelu ayebisaki ye: “Tombolá miso.” Na emonaneli yango ya nsambo, Zekaria amonaki nzungu moko oyo bazalaki kobenga “efa.” (Tángá Zekaria 5:5-8.) Nzungu yango ezalaki na ezipeli ya zolongano ya mondɔlu. Ntango ezipeli yango efungwamaki, Zekaria amonaki “mwasi moko boye afandi na kati.” Anzelu ayebisaki Zekaria ete mwasi yango ezali “Mabe.” Kanisá nsɔmɔ oyo Zekaria ayokaki ntango mwasi yango alingaki kobima na nzungu! Kasi, anzelu azongisaki mwasi yango nokinoki na kati mpe akangaki nzungu yango na ezipeli na yango ya kilo. Emonaneli yango elimboli nini?

15 Emonaneli yango ezali kotinda biso tóndima ete Yehova akotika te mabe ezala na kati ya basaleli na ye. Soki Yehova amoni likambo moko ya mabe, akosala nokinoki mpo na kolongola yango. (1 Bakorinti 5:13) Anzelu amonisaki yango ntango akangaki nzungu wana mbala moko na ezipeli ya kilo.

Yehova alakaki ete akobatela losambo na ye pɛto (Talá paragrafe 16-18)

16. (a) Nini ekómelaki nzungu yango? (Talá elilingi ya ebandeli 3.) (b) Epai wapi basi oyo bazalaki na mapapu bamemaki nzungu?

16 Na nsima, Zekaria amonaki basi mibale oyo bazalaki na mapapu minene lokola mapapu ya nkɔngi. (Tángá Zekaria 5:9-11.) Basi yango bakokanaki ata moke te na mwasi  mabe oyo azalaki na kati ya nzungu. Na mapapu na bango ya minene, batombolaki nzungu ná “Mabe” na kati mpe bapumbwaki na yango. Bamemaki yango wapi? Bamemaki Mabe na “mokili ya Shinare,” elingi koloba Babilone. Mpo na nini bamemaki yango kuna?

17, 18. (a) Mpo na nini Babilone nde esika ebongaki mpenza mpo na “Mabe”? (b) Ozali na ekateli ya kosala nini?

17 Bayisraele ya mikolo ya Zekaria bayebaki ntina oyo ebongaki bámema “Mabe” na Babilone. Bayebaki ete engumba yango ya mabe etondaki na pite mpe losambo ya lokuta. Zekaria ná Bayuda mosusu oyo bafandaki kuna bazalaki kobunda mpenza mokolo na mokolo mpo bákwea na losambo ya lokuta te. Na yango, eteni wana ya emonaneli emonisaki ete Yehova akobatela losambo na ye pɛto.

18 Emonaneli yango ekundwelaki mpe Bayuda ete bango mpe bazalaki na mokumba ya kobatela losambo na bango pɛto. Mabe ekoki kozala na esika te mpe ekozala na esika te na kati ya basaleli ya Nzambe. Lelo oyo, Yehova atye biso na ebongiseli na ye ya pɛto, esika tomonaka bolingo na ye mpe libateli na ye. Mokomoko na biso azali na mokumba ya kobatela yango pɛto. Mabe esengeli kozala te na kati ya basaleli ya Yehova.

BATO YA PƐTO BAZALI KOKUMISA YEHOVA

19. Bimonaneli ya kokamwa oyo Zekaria azwaki elimboli nini mpo na biso lelo?

19 Emonaneli ya motoba mpe ya nsambo oyo Zekaria amonaki ezali likebisi monene mpo na bato oyo basalaka makambo ya mabe. Yehova akotika te mabe ekoba. Lokola tozali basaleli na ye, tosengeli koyina oyo ezali mabe. Bimonaneli yango emonisi mpe ete soki tozali kosala makasi mpo tósepelisa Tata na biso ya bolingo, akolakela biso mabe te, kasi akobatela biso mpe akopambola biso. Ata soki ezali mpasi kotikala pɛto na mokili oyo ya mabe, Yehova akoki kosalisa biso tólonga! Kasi, ndenge nini toyebi ete losambo ya solo ekotikala libela na libela? Awa tozali kopusana na bolɔzi monene, nini ezali kondimisa biso ete Yehova akobatela ebongiseli na ye? Tokolobela mituna yango na lisolo elandi.