“Zalá na mpiko mpe na makasi mpe salá. Kobanga te, koyoka nsɔmɔ mpe te, mpo Yehova . . . azali na yo.”​—1 NTANGO 28:20.

NZEMBO: 60, 29

1, 2. (a) Mokumba nini ya monene Salomo azwaki? (b) Mpo na nini Davidi amitungisaki mpo na Salomo?

SALOMO azwaki mokumba moko ya monene. Yehova aponaki ye atambwisa moko ya misala minene ya kotonga oyo esalemá na mokili; kotonga tempelo na Yerusaleme! Tempelo yango esengelaki kozala “eloko oyo eleki na nkembo mpe na kitoko” na mokili mobimba. Lisusu, ekozala “ndako ya Yehova Nzambe ya solo.”​—1 Ntango 22:1, 5, 9-11.

2 Mokonzi Davidi azalaki na elikya ete Nzambe akosunga Salomo. Kasi, Salomo azalaki naino “elenge.” Akozala na mpiko ya kondima mokumba ya kotonga tempelo yango? To bolenge na ye ekopekisa ye asala yango? Mpo na kolonga, Salomo asengelaki kozala na mpiko mpe kosala mosala.

3. Mpo na nini tokoki koloba ete ndakisa ya Davidi ekokaki koteya Salomo ndenge ya kozala na mpiko?

3 Na ntembe te, Salomo ayekolaki ndenge ya kozala na mpiko epai ya Tata na ye, Davidi. Ntango Davidi azalaki naino elenge, abundaki na banyama ya zamba oyo elingaki kolya bampate ya tata na ye. (1 Samwele 17:34, 35) Amonisaki mpe mpiko mingi ntango  abundaki na soda moko ya nsɔmɔ, engambe Goliate. Na lisalisi ya Nzambe, Davidi alongaki Goliate kaka na mwa libanga moko.​—1 Samwele 17:45, 49, 50.

4. Mpo na nini Salomo asengelaki kozala na mpiko?

4 Yango wana ebongaki mpenza ete Davidi nde alendisa Salomo azala na mpiko mpe atonga tempelo. (Tángá 1 Ntango 28:20.) Soki Salomo amonisaki mpiko te, kobanga ekokaki kokɔtela ye, mpe kopekisa ye abanda mosala yango. Yango elingaki kozala mabe koleka kutu soki asalaki ata mosala yango malamu te.

5. Mpo na nini tosengeli komonisa mpiko?

5 Ndenge moko na Salomo, tozali na mposa Yehova asalisa biso tózala na mpiko mpe tósala mosala oyo apesi biso. Na yango, tótalela mwa bandakisa ya bato oyo bamonisaki mpiko na ntango ya kala. Na nsima, tokomona ndenge tokoki komonisa mpiko mpe kokokisa mosala na biso.

BATO OYO BAMONISAKI MPIKO

6. Mpo na nini mpiko ya Yozefe ekamwisaka yo?

6 Yozefe amonisaki mpiko ntango mwasi ya Potifare alukaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Na ntembe te, Yozefe ayebaki ete bomoi na ye ekozala na likama soki aboyi. Kasi amitikaki te; amonisaki mpiko mpe akimaki mwasi yango.​—Ebandeli 39:10, 12.

7. Ndenge nini Rahaba amonisaki mpiko? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Rahaba mpe amonisaki mpiko. Ntango banɔngi ya Yisraele bakendaki kotala engumba Yeriko esika Rahaba azalaki kofanda, Rahaba akokaki kobanga mpe koboya kosalisa bato yango. Kasi lokola atyelaki Yehova motema, Rahaba abombaki mibali yango mibale mpe asalisaki bango bákima na kimya. (Yosua 2:4, 5, 9, 12-16) Rahaba andimaki ete Yehova azali Nzambe ya solo, mpe atyaki motema ete ata na ndenge nini, akopesa Bayisraele mokili yango. Atikaki te ete kobanga bato ekɔtela ye, abangaki te mokonzi ya Yeriko ná bato na ye. Amonisaki nde mpiko na ndenge abikisaki bomoi na ye mpe ya libota na ye.​—Yosua 6:22, 23.

8. Ndenge nini mpiko oyo Yesu amonisaki esalisaki bantoma na ye?

8 Bantoma ya Yesu mpe bamonisaki mpiko mpenza. Bamonaki ndenge Yesu azalaki na mpiko, mpe esalisaki bango bámekola ye. (Matai 8:28-32; Yoane 2:13-17; 18:3-5) Ntango Basadukai bamekaki kopekisa bango koteya makambo ya Yesu, bantoma baboyaki kotosa.​—Misala 5:17, 18, 27-29.

9. Ndenge nini 2 Timote 1:7 ezali kosalisa biso tóyeba esika mpiko eutaka?

9 Yozefe, Rahaba, Yesu, mpe bantoma bazalaki na ekateli ya kosala oyo ezali malamu. Soki bamonisaki mpiko, ezali te mpo bamityelaki motema, ezali nde mpo batyelaki Yehova motema. Biso mpe soki tokutani na makambo oyo esɛngi tómonisa mpiko, tosengeli komityela motema te, tótyela nde Yehova motema. (Tángá 2 Timote 1:7.) Tólobela bisika mibale oyo esɛngaka tómonisa mpiko: na libota mpe na lisangá.

MAKAMBO OYO ESƐNGAKA MPIKO

10. Mpo na nini bilenge bakristo basengeli komonisa mpiko?

10 Ezali na makambo mingi oyo esɛngaka bilenge bakristo bámonisa mpiko mpo na kosalela Yehova. Bakoki koyekola mpe kolanda ndakisa ya Salomo, oyo amonisaki mpiko ntango azwaki ekateli malamu ya kosilisa kotonga tempelo. Atako bilenge basengeli kolanda litambwisi ya baboti na bango, bango moko basengeli kozwa bikateli mosusu ya ntina. (Masese 27:11) Basengeli kozala na mpiko mpo na kozwa bikateli ya malamu na oyo etali baninga oyo bakopona, kominanola oyo ebongi, oyo bakosala mpo bábatela bizaleli ya pɛto, mpe ntango nini bakozwa batisimo. Makambo yango esɛngi mpiko mpenza mpo ekeseni na mokano ya Satana, oyo atumolaka Nzambe.

11, 12. (a) Ndenge nini Moize amonisaki mpiko? (b) Ndenge nini bilenge bakoki komekola Moize?

 11 Ekateli moko ya ntina mingi oyo bilenge bakristo basengeli kozwa etali mikano oyo bakomityela. Na bikólo mosusu, bato batyaka bilenge mbamba bátánga bakelasi ya milaimilai mpe bázwa mosala ya mbongo mingi. Na mikili mosusu, mbongo ezali mpasi mingi, mpe bilenge bakoki komona ete basengeli libosoliboso kozwa mosala mpo na kosalisa mabota na bango. Soki moko ya makambo yango etali yo, kanisá ndakisa ya Moize. Mwana mwasi ya Farao nde abɔkɔlaki ye; na yango akokaki komityela mokano ya kokóma na mbongo to na lokumu mingi. Kanisá mbamba oyo azwaki na libota na ye na Ezipito, na balakisi na ye, mpe na bapesi-toli! Kasi, Moize amonisaki mpiko mpenza mpe aponaki kozala elongo na basaleli ya Nzambe. Ntango Moize atikaki Ezipito mpe bomɛngo na yango, atyelaki Yehova motema na ye mobimba. (Baebre 11:24-26) Na yango, Yehova apambolaki ye mingi, mpe akopambola ye mingi koleka na mikolo ezali koya.

12 Soki bilenge bamonisi mpiko mpe bamityeli mikano na mosala ya Yehova mpe batye Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango, Yehova akopambola bango. Akosalisa bango bákokisa mposa ya mabota na bango. Na siɛklɛ ya liboso, elenge Timote amipesaki na mosala ya Nzambe, yo mpe okoki kosala yango. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)​—Tángá Bafilipi 2:19-22.

Ozali na ekateli ya komonisa mpiko na makambo nyonso ya bomoi? (Talá paragrafe 13-17)

13. Ndenge nini mpiko esalisaki ndeko mwasi moko ya elenge akokisa mikano na ye?

13 Ndeko mwasi moko na etúká ya Alabama, na États-Unis, asengelaki komonisa mpiko mpo amityela mikano na mosala ya Nzambe. Akomi boye: “Na bomwana, nazalaki nsɔninsɔni mpenza. Nazalaki kokoka kosolisa bato te na Ndako ya Bokonzi, mpe na mosala ya kosakola ezalaki mpasi mpenza nabɛta na porte ya bato oyo nayebi te.” Baboti na ye mpe bandeko mosusu ya lisangá basalisaki elenge mwasi yango, mpe akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Alobi boye: “Mokili ya Satana elendisaka bato bámityela mikano ya kotánga bakelasi ya milai, báluka lokumu, mbongo, mpe biloko ebele ya mokili. Bato mingi bakokisaka mikano yango te mpe ememaka kaka mitungisi mpe mpasi na motema. Kasi, kosalela Yehova epesi ngai esengo mingi mpe motema kimya.”

14. Na makambo nini ekoki kosɛnga ete baboti bakristo bámonisa mpiko?

14 Baboti bakristo mpe basengeli komonisa mpiko. Na ndakisa, patrɔ akoki mbala na mbala kosɛnga yo osala tii nsima ya ngonga ya mosala na mikolo oyo ebongisamá mpo na losambo na kati ya libota, mpo na mosala ya kosakola, to mpo na makita ya lisangá. Osengeli kozala na mpiko mpo oyebisa patrɔ ete ekosimba te; na ndenge yango okopesa bana na yo ndakisa ya malamu. Ekoki mpe kozala ete baboti mosusu na lisangá batikaka bana na bango básala makambo oyo yo okolinga te bana na yo básala. Baboti yango bakoki kotuna yo ntina oyo oboyaka bana na yo básala makambo yango. Okozala na mpiko mpe okoyebisa ntina yango na limemya?

15. Ndenge nini Nzembo 37:25 mpe Baebre 13:5 ekoki kosalisa baboti?

15 Osengeli mpe komonisa mpiko mpo na kosalisa bana na yo bámityela mikano mpo na mosala ya Nzambe mpe bákokisa yango. Na ndakisa, baboti mosusu bakoki kobanga kolendisa bana na bango bámipesa na mosala ya mobongisi-nzela, bákende kosakola esika mposa ezali monene, básala na Betele, to bámipesa na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani. Mbala mosusu babangaka ete bana na bango  bakokoka te kosalisa bango soki bakómi mibange. Kasi, baboti ya bwanya bamonisaka mpiko mpe bazalaka na kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye. (Tángá Nzembo 37:25; Baebre 13:5.) Baboti oyo bamonisaka mpiko ndenge wana mpe batyelaka Yehova motema basalisaka bana na bango básala mpe bongo.​—1 Samwele 1:27, 28; 2 Timote 3:14, 15.

16. Ndenge nini baboti mosusu basalisi bana na bango bámityela mikano ya elimo, mpe ndenge nini yango esalisi bana yango?

16 Ndeko moko na États-Unis ná mwasi na ye basalisaki bana na bango bámipesa na mosala ya Yehova. Tata alobi boye: “Liboso kutu bana na biso bátambola mpe bábanda koloba, tozalaki koyebisa bango esengo ya mosala ya mobongisi-nzela mpe ya kosalela lisangá. Lelo, bango mpe bamityeli mokano ya kosala bongo. Komityela mpe kokokisa mikano ya elimo esalisi bana na biso bátɛmɛla mbamba ya mokili ya Satana mpe bátya makanisi nyonso na mosala ya Yehova.” Ndeko mobali moko oyo azali na bana mibale akomaki boye: “Baboti mingi babomaka nzoto mpo na kosalisa bana na bango bálonga na makambo lokola masano, kominanola, mpe kotánga kelasi. Eleki malamu nde koboma nzoto mpo na kosalisa bana bákokisa mikano oyo ekosalisa bango bábatela boyokani ya malamu na Yehova. Esengo na biso ezali kaka te mpo bana na biso bakokisi mikano na bango ya elimo, ezali mpe mpo tosalisaki bango básala yango.” Yebá ete Nzambe apambolaka baboti oyo basalisaka bana na bango bámityela mikano ya elimo mpe bákokisa yango.

KOMONISA MPIKO NA LISANGÁ

17. Tángá mwa makambo oyo esɛngaka mpiko na lisangá.

17 Tosengeli mpe komonisa mpiko na lisangá. Na ndakisa, bankulutu basengeli kozala na mpiko ntango bazali kotalela makambo ya ndeko oyo asali lisumu ya monene, to ntango bazali kosalisa ndeko oyo bomoi na ye ezali na likama mpo na maladi. Bankulutu mosusu bakendaka na babolɔkɔ mpo na kotala bato oyo basepelaki na solo to mpo na kosala makita. Bongo bandeko basi oyo bazali minzemba? Bazali na mabaku mingi ya komonisa mpiko mpo na  kosalela Yehova. Bakoki kokóma babongisi-nzela, kokende esika mposa ezali monene, kosala na departema ya kosala baplan mpe kotonga na ekólo, to mpe kotondisa formilɛrɛ mpo na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Bamosusu kutu bakɔtaka Eteyelo ya Gileade.

18. Ndenge nini bandeko basi ya mikóló bakoki komonisa mpiko?

18 Tolingaka bandeko na biso ya basi oyo bakómi mikóló, mpe tosepelaka kozala na bango na lisangá! Ata soki bamosusu bakoki kosala lisusu mingi te ndenge bazalaki kosala liboso, na bantango mosusu ekoki kosɛnga bámonisa mpiko mpe básala. (Tángá Tito 2:3-5.) Na ndakisa, ndeko mwasi oyo akoli asengeli komonisa mpiko soki basɛngi ye asolola na ndeko mwasi moko ya elenge oyo alataka malamu te. Akogangela elenge yango te mpo na molato na ye, kasi na boboto, akosalisa ye akanisa ndenge molato na ye ekoki kobɛtisa basusu libaku. (1 Timote 2:9, 10) Ntango bandeko basi ya mikóló bazali komonisa bolingo ndenge wana, lisangá ekokende liboso.

19. (a) Ndenge nini bandeko mibali oyo bazwá batisimo bakoki komonisa mpiko? (b) Ndenge nini Bafilipi 2:13 mpe Bafilipi 4:13 ekoki kosalisa bandeko mibali bákóma na mpiko?

19 Bandeko mibali oyo bazwá batisimo mpe basengeli kozala na mpiko mpe kosala. Soki bazali kondima kokóma basaleli na misala to bankulutu, bakosalisa lisangá mingi mpenza. (1 Timote 3:1) Kasi, bamosusu bakakatanaka mpo na kondima mikumba wana. Ekoki kozala ete ndeko mobali moko asaláká mabunga, mpe sikoyo azali komona ete abongi te kozala mosaleli na misala to nkulutu. Ndeko mobali mosusu akoki komona ete akokoka te komema mokumba yango. Soki oyokaka ndenge wana, Yehova akoki kosalisa yo okóma na mpiko. (Tángá Bafilipi 2:13; 4:13.) Kanisá ndakisa ya Moize. Ye mpe amonaki ete akokoka te kosala makambo oyo Yehova asɛngaki ye. (Kobima 3:11) Kasi, Yehova asalisaki ye akóma na mpiko mpe asala oyo esengelaki. Ndenge nini ndeko mobali oyo azwá batisimo akoki kokóma na mpiko ndenge wana? Akoki kobondela Yehova asalisa ye mpe kotángaka Biblia mokolo na mokolo. Akoki komanyola bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli, oyo bamonisaki mpiko. Na komikitisa nyonso, akoki mpe kosɛnga bankulutu bálakisa ye makambo mpe koyebisa bango ete soki mwa mosala ezali, akondima kosalisa. Tosɛngi bandeko mibali nyonso oyo bazwá batisimo bázala na mpiko mpe básala mosala makasi na lisangá!

“YEHOVA . . . AZALI NA YO”

20, 21. (a) Davidi ayebisaki Salomo nini? (b) Likambo nini tosengeli koyeba?

20 Mokonzi Davidi ayebisaki Salomo ete Yehova akozala elongo na ye tii akosilisa kotonga tempelo. (1 Ntango 28:20) Na ntembe te, Salomo amanyolaki maloba yango, mpe atikaki te ete bolenge na ye epekisa ye asala mosala. Kasi, amonisaki mpiko, mpe na lisalisi ya Yehova, asilisaki kotonga tempelo kitoko nsima ya mbula nsambo ná ndambo.

21 Ndenge kaka Yehova asalisaki Salomo, akoki mpe kosalisa biso tózala na mpiko mpe tósala mosala, ezala na libota na biso to na lisangá. (Yisaya 41:10, 13) Soki tomonisi mpiko na mosala ya Yehova, tóyeba ete akopambola biso lelo, mpe na mikolo ezali koya. Yango wana, “zalá na mpiko . . . mpe salá.”

^ par. 12 Okoki kozwa mwa makanisi mpo na mikano oyo okoki komityela na mosala ya Nzambe na lisolo “Zalá na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2004.