Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2017

Mekolá motema mawa ya Yehova

Mekolá motema mawa ya Yehova

“Yehova, Yehova, Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu.”​—KOBIMA 34:6.

NZEMBO: 142, 12

1. Ndenge nini Yehova amimonisaki epai ya Moize, mpe mpo na nini ezali na ntina?

MOKOLO moko, Nzambe amimonisaki epai ya Moize, ayebisaki ye nkombo na Ye mpe bizaleli na Ye mosusu. Yehova akokaki kolobela nguya to bwanya na ye, kasi alobelaki liboso nde motema mawa mpe ngɔlu na ye. (Tángá Kobima 34:5-7.) Lokola Moize azalaki na mposa ya koyeba soki Nzambe akosunga ye, Yehova alobelaki bizaleli oyo ekomonisa ete alingaka mpenza kosalisa basaleli na ye. (Kobima 33:13) Koyeba ete Yehova alingaka biso mingi ekitisaka mpenza motema! Lisolo oyo ekolobela motema mawa to ngɔlu, oyo elimboli komitya na esika ya bato oyo bazali konyokwama mpe koluka kosalisa bango.

2, 3. (a) Mpo na nini bato bakoki komonisa motema mawa? (b) Mpo na nini tosengeli kotya likebi na makambo oyo Biblia elobi mpo na motema mawa?

2 Yehova azali na motema mawa mpe bato bakelamá na elilingi na ye. Yango wana, bato nyonso, ezala ata baoyo bayebi ye te, bayokelaka basusu mawa mpe mbala mingi batyelaka bango likebi. (Ebandeli 1:27) Biblia ezali na masolo ebele ya bato oyo bamonisaki motema mawa. Na ndakisa, mokolo moko basi mibale ya  ndumba bazalaki kowela mwana mpe bayaki epai ya Salomo akata likambo yango. Mpo na komeka bango, Salomo asɛngaki bákata mwana yango na biteni mibale. Mama ya mwana ayokaki mawa makasi mpe asɛngaki mokonzi aboma mwana te kasi apesa ye ata epai ya mwasi wana mosusu. (1 Bakonzi 3:23-27) Ndakisa mosusu ya motema mawa ezali ya mwana mwasi ya Farao. Ntango amonaki Moize na mai, ayebaki ete azali Moebre mpe esengeli abomama. Kasi “ayokelaki ye mawa,” mpe amonaki malamu abɔkɔla ye lokola mwana na ye moko.​—Kobima 2:5, 6.

3 Mpo na nini osengeli kotya likebi na ezaleli ya motema mawa? Mpo Biblia esɛngi biso tómekola Yehova. (Baefese 5:1) Ata soki tokelamaki na likoki ya komonisa motema mawa, kozanga kokoka etindaka biso tóluka liboso matomba na biso moko. Na bantango mosusu toyebaka te soki tósalisa basusu to tósala liboso makambo na biso moko. Nini ekoki kosalisa biso tótyelaka basusu likebi mpenza? Liboso, tokolobela ndenge Yehova mpe bato mosusu bamonisaki motema mawa. Ya mibale, tokomona ndenge tokoki komekola motema mawa ya Nzambe mpe ntina oyo kosala bongo ezali malamu.

YEHOVA AZALI NDAKISA YA KOKOKA YA MOTEMA MAWA

4. (a) Mpo na nini Yehova atindaki baanzelu na Sodoma? (b) Likambo oyo ekómelaki libota ya Lota ezali koteya biso nini?

4 Biblia ezali na masolo ebele oyo emonisi motema mawa ya Yehova. Kanisá likambo oyo asalelaki Lota. Lota azalaki moyengebene mpe “atungisamaki makasi” mpo na bizaleli ya mbindo ya bato ya Sodoma ná Gomora. Bato yango bazalaki kotosa Nzambe te, mpe Yehova amonaki ete babongi na liwa. (2 Petro 2:7, 8) Yehova atindaki baanzelu bákende koyebisa Lota ete Sodoma ná Gomora ekobebisama mpe ete ye ná libota na ye basengeli kolongwa na bingumba yango. Biblia elobi: “Lokola [Lota] azalaki koumela, mpo na motema mawa oyo Yehova amoniselaki ye, [baanzelu] yango basimbaki lobɔkɔ na ye mpe lobɔkɔ ya mwasi na ye mpe mabɔkɔ ya bana na ye mibale ya basi mpe babimisaki ye mpe batyaki ye na libándá ya engumba.” (Ebandeli 19:16) Ndenge kaka Yehova ayebaki malamu mokakatano ya Lota, tokoki komindimisa ete ayebi mpe mpasi nyonso oyo tokoki kozala na yango.​—Yisaya 63:7-9; Yakobo 5:11; 2 Petro 2:9.

5. Ndenge nini Liloba ya Nzambe eteyaka biso komonisa motema mawa?

5 Yehova ateyaki mpe basaleli na ye bámonisa motema mawa. Tózwa ndakisa ya moko ya mibeko oyo apesaki na Yisraele; alobaki ete soki moto adefi mbongo, nkolo-mbongo akokaki kokanga elamba ya modefi lokola ndanga oyo emonisi ete akofuta mbongo yango. (Tángá Kobima 22:26, 27.) Kasi modefisi asengelaki kozongisa elamba ya moto yango ntango moi ekolala mpo moto yango azanga eloko ya komizipa te na butu. Moto ya motema makasi akokaki koboya kozongisa elamba yango, kasi Yehova ateyaki bato na ye bámonisaka motema mawa. Mobeko yango ezali koteya biso nini? Tótyelaka bamposa ya bandeko na biso bakristo likebi. Soki tozali na likoki ya kosalisa ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azali na mpasi, tósala yango.​—Bakolose 3:12; Yakobo 2:15, 16; tángá 1 Yoane 3:17.

6. Ndenge oyo Yehova amoniselaki Bayisraele motema mawa atako masumu na bango ekoki koteya biso nini?

6 Yehova azalaki koyokela Bayisraele mawa ata ntango bazalaki kosalela ye masumu. Biblia elobi: “Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango azalaki se kotindela bango  makebisi na nzela ya bamemi-nsango na ye, azalaki kotinda yango mbala na mbala, mpo azalaki koyokela bato na ye mpe esika na ye ya kofanda mawa.” (2 Ntango 36:15) Ndenge moko mpe, tosengeli koyoka mawa mpo na baoyo bayebi naino Yehova te mpo bakoki kobongola motema mpe kokóma baninga na ye. Yehova alingi ata moto moko te abomama na ntango ya lisambisi oyo ezali koya. (2 Petro 3:9) Yango wana, liboso Nzambe aboma mokili oyo mabe, tókoba koyebisa bato nyonso nsango na ye ya likebisi, oyo emonisaka motema mawa na ye.

7, 8. Mpo na nini libota moko emonaki ete Yehova ayokelaki bango mawa?

7 Lelo oyo, basaleli ya Yehova mingi bamoni motema mawa na ye. Na ndakisa, na bambula ya 1990 na Bosnie, bato ya bikólo ekeseni bazalaki kobunda mpe kobomana. Kuna, ezalaki na libota moko ya Batatoli ná mwana na bango ya mobali ya mbula 12 oyo tobengi Milan. Milan, leki na ye ya mobali, baboti na bango mpe Batatoli mosusu bazalaki kosala mobembo na motuka longwa na Bosnie mpo na kokende na Serbie. Bazalaki kokende na liyangani moko ya etúká epai baboti ya Milan basengelaki kozwa batisimo. Na ndelo ya mboka, basoda bamonaki ete libota yango ezalaki ya ekólo mosusu mpe bakitisaki bango na motuka. Batikaki bandeko mosusu bákoba mobembo na bango. Basoda bakangaki libota yango mikolo mibale mobimba. Nsukansuka, soda oyo azalaki kokamba abengaki mokonzi na bango mpe atunaki ye soki asala nini na bandeko yango. Lokola bandeko yango bazalaki kaka pembeni wana, bayokaki ntango mokonzi ya basoda azongisaki: “Bóbimisa bango mpe bóboma bango!”

8 Ntango basoda yango bazalaki kosolola, bato mibale bayaki pembeni ya bandeko. Bayebisaki bango na mongongo ya nse ete bazali Batatoli mpe ete bandeko oyo balekaki na motuka bayebisaki bango makambo oyo esalemaki. Lokola basoda bazalaki kotala bapapye ya bana te, bandeko wana mibale bayebisaki Milan ná leki na ye bámata na motuka mpo bákatisa ndelo. Na nsima, bandeko yango bayebisaki baboti ya Milan bábaluka na nsima ya biro ya basoda mpe bákutana na ngámbo mosusu. Milan abangaki makasi mpe ayebaki te asala nini. Baboti na ye batunaki: “Bokanisi ete bakotika biso tókende kaka boye?” Kasi, ntango babandaki kokende, emonanaki ete basoda wana bamonaki bango kutu te. Milan ná leki na ye bakutanaki na baboti na bango na ngámbo mosusu mpe bakendaki na liyangani. Bamonaki mpenza ete Yehova nde ayanolaki na mabondeli na bango! Biblia elobi te ete Yehova asalaka ntango nyonso ndenge wana mpo na kobatela basaleli na ye. (Misala 7:58-60) Kasi na likambo wana, Milan alobaki: “Namonaki lokola baanzelu bazipaki miso ya basoda wana mpe Yehova abikisaki biso.”​—Nzembo 97:10.

9. Yesu ayokaki ndenge nini mpo na ebele ya bato oyo bazalaki kolanda ye? (Talá elilingi ya ebandeli.)

9 Yesu azalaki ndakisa malamu na oyo etali komonisa motema mawa. Ayokelaki bato mawa mpo “banyokwamaki mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.” Na yango, asalaki nini? “Abandaki koteya bango makambo mingi.” (Matai 9:36; tángá Marko 6:34.) Nzokande, Bafarisai bazalaki bongo te, bazalaki kolinga kosalisa bato te. (Matai 12:9-14; 23:4; Yoane 7:49) Olandaka ndakisa ya Yesu? Ozalaka na mposa makasi ya kosalisa bato mpe koteya bango makambo ya Yehova?

10, 11. Ebongi komonisa motema mawa ntango nyonso? Limbolá.

10 Yango elimboli te ete ebongi komonisa motema mawa ntango nyonso. Na ndakisa, Mokonzi Saulo akanisaki ete azali komonisa motema mawa ntango aboyaki koboma  Agage, mokonzi ya Amaleke oyo azalaki monguna ya basaleli ya Nzambe. Saulo aboyaki mpe koboma banyama oyo eleki malamu. Nzokande, Yehova ayebisaki Saulo aboma Baamaleke nyonso ná banyama na bango nyonso. Lokola atosaki te, Yehova aboyaki ye. (1 Samwele 15:3, 9, 15) Yehova azali Mosambisi ya sembo. Akoki kotánga mitema ya bato mpe ayebi ntango nini esengeli te komonisa motema mawa. (Bileli 2:17; Ezekiele 5:11) Mosika te, akopesa etumbu na bato nyonso oyo baboyaka kotosa ye. (2 Batesaloniki 1:6-10) Na ntango yango, Yehova akomonisela bato mabe motema mawa te. Koboma bango ezali ndenge ya komonisela bayengebene, bato oyo akobikisa motema mawa.

11 Na yango, kokata soki nani akobika to te ezali mokumba na biso te. Tosengeli nde kosala nyonso oyo tokoki sikoyo mpo na kosalisa bato. Ndenge nini tokoki komonisela basusu motema mawa? Tótalela yango.

NDENGE YA KOMONISA MOTEMA MAWA

12. Ndenge nini okoki komonisela basusu motema mawa?

12 Salisáká basusu mokolo na mokolo. Yehova asɛngi bakristo bámoniselaka bazalani na bango mpe bandeko na bango motema mawa. (Yoane 13:34, 35; 1 Petro 3:8) Komonisa motema mawa elimbolaka mpe “konyokwama elongo.” Moto oyo ayokelaka basusu mawa alukaka kosalisa baoyo bazali konyokwama. Yango wana, lukáká mabaku ya kosalisa basusu. Na ndakisa okoki kosɛnga moto soki okoki kosalela ye misala ya ndako to kokende kosombela ye biloko.​—Matai 7:12.

Salisáká basusu mpo omonisa motema mawa na yo (Talá paragrafe 12)

13. Basaleli ya Nzambe basalaka nini ntango likama ebimi?

13 Pesá mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko. Ntango tomoni bato oyo bazali na mpasi mpo bazwi likama, tolingaka kosalisa bango. Eyebani ete basaleli ya Yehova basalisaka bato oyo bazwi likama. (1 Petro 2:17) Na ndakisa, ndeko mwasi moko ya Japon azalaki kofanda esika oyo ebebaki makasi na koningana ya mabele mpe tsunami na 2011. Alobi ete ‘alendisamaki mpe abɔndisamaki mingi’ ntango bandeko ya bingumba mosusu ya Japon mpe ya bikólo mosusu bayaki mpo na kobongisa bandako mpe Bandako  ya Bokonzi. Abakisi boye: “Likambo yango esalisaki ngai namona ete Yehova atyelaka biso likebi, mpe bandeko batyelanaka likebi. Bandeko ebele na mokili babondelaka mpo na biso.”

14. Ndenge nini okoki kosalisa moto oyo azali kobɛla to mobange?

14 Salisáká baoyo bazali kobɛla mpe mibange. Ntango tomoni moto azali konyokwama mpo na maladi to bobange, toyokelaka ye mawa. Lokola tolingaka makambo yango esila, tobondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya. Kasi liboso Bokonzi eya, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kosunga baoyo bazali na bosɛnga. Mokomi moko akomaki ete mokolo moko mama na ye ya mobange, oyo azalaki kobɛla maladi ya Alzheimer, abebisaki bilamba na ye. Ntango azalaki komeka kolongola salite yango, moto abɛtaki na porte. Ezalaki Batatoli mibale oyo bazalaki koya kotala ye mbala na mbala. Bandeko basi yango batunaki ye soki básalisa ye. Mama yango alobaki: “Ezali nsɔni, kasi bósalisa ngai.” Bandeko basi wana basalisaki ye. Na nsima, basalelaki ye ti mpe bafandaki mpo na kosolola na ye. Mwana na ye ya mobali asepelaki mingi mpenza mpe akomaki ete Batatoli “basalelaka makambo oyo bateyaka.” Motema mawa na yo mpo na bato oyo bazali kobɛla mpe mibange etindaka yo osala nyonso okoki mpo na kosalisa bango?​—Bafilipi 2:3, 4.

15. Ndenge nini mosala ya kosakola esalisaka basusu?

15 Salisá bato báyeba Yehova. Lolenge eleki malamu ya kosalisa bato ezali ya koteya bango makambo ya Nzambe mpe ya Bokonzi na ye. Lolenge mosusu ezali ya kosalisa bango bámona bolamu oyo bakozwa soki bazali kotosa mibeko ya Yehova. (Yisaya 48:17, 18) Mosala ya kosakola ezali lolenge malamu mpenza ya kokumisa Yehova mpe ya komonisela bato motema mawa. Okoki kobakisa molende na mosala yango?​—1 Timote 2:3, 4.

KOMONISA MOTEMA MAWA EZALI MPE NA MATOMBA MPO NA YO

16. Matomba nini tokozwa soki tomonisaka motema mawa?

16 Minganga ya makambo ya bɔɔngɔ balobi ete komonisa motema mawa ekoki kobongisa nzoto na biso mpe boyokani na biso na basusu. Soki osalisi baoyo bazali konyokwama, okozala na esengo mingi, okozala na elikya, okomiyoka yo moko te, mpe okozala na makanisi ya malamu. Ya solo, komonisa motema mawa ezali mpe na matomba mpo na yo. (Baefese 4:31, 32) Bakristo oyo bolingo etindaka bango básalisa basusu bazalaka na lisosoli ya malamu, mpo bayebi ete yango nde Yehova alingi tósala. Motema mawa ekosalisa biso tózala baboti ya malamu, mobali ya malamu, mwasi ya malamu, mpe baninga ya malamu. Lisusu, soki tomoniselaka basusu motema mawa, bato mosusu mpe bakosalisa biso ntango tokozala na mposa ya lisungi.​—Tángá Matai 5:7; Luka 6:38.

17. Mpo na nini olingaka komonisa motema mawa?

17 Ata soki biso mpe tokoki kozwa matomba, tomonisaka motema mawa libosoliboso mpo tolingaka komekola Yehova mpe kopesa ye nkembo. Bolingo mpe motema mawa euti epai na ye. (Masese 14:31) Azali ndakisa ya kokoka mpo na biso. Yango wana, tósala nyonso oyo tokoki mpo tómekola Nzambe na oyo etali komonisa motema mawa. Yango ekosala ete tózala na bomoko elongo na bandeko na biso mpe boyokani malamu na bazalani na biso.​—Bagalatia 6:10; 1 Yoane 4:16.